Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/1 lok. 30
  • Tobatela kondima mpe lisosoli malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tobatela kondima mpe lisosoli malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elendiseli mpo na kondima
  • Batoli etali losambo
  • Ezaleli ya kobanga Nzambe ekokitisaka mitema
  • Mokanda ya Biblia nimero 54—1 Timoté
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Nini ekoki kosalisa biso na kosembola liloba ya solo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/1 lok. 30

Tobatela kondima mpe lisosoli malamu

Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya liboso epai na Timote

PENE na mobu 56 ya ntango na biso, ntoma Paulo akebisaki bankulutu ya Efese mpo na “bankoi na yauli” baoyo basengelaki kobima kati na bango mpe kolakisa “mateya na kokosa mpo ete babenda bayekoli nsima na bango.” (Misala 20:29, 30) Nsima ya mwa bambula, mateya na lipengwi makómaki mingi mpenza na motindo boye ete Paulo asengi na Timoté ete abunda etumba ya elimo kati na lisangá, mpo na kobatela bopeto na yango mpe kosalisa baninga na ye bandimi ete batikala kati na kondima. Wana ezali moko na bantina minene oyo epusaki Paulo na kotinda mokanda na ye ya liboso epai na Timoté, longwa Makedonia, katikati na mobu 61 kino 64 ya ntango na biso.

Kati na yango, Timoté asengelaki kokuta malako na ntina na makambo mingi, lokola mikumba ya bankulutu, mokumba oyo Nzambe asili kopesa na basi mpe masengami ya bakengeli mpe ya basaleli na misala. Malako yango mazali mpe na ntina lelo.

Elendiseli mpo na kondima

Kati na maloba na ye ya ebandeli, Paulo asengi Timoté ete abatela kondima mpe lisosoli malamu. (1Ti 1:1-20) Alendisi ye ete atikala na Efese mpo aloba na “bamoko ete balakisa mateya mosusu te.” Paulo azali na botóndi mpo na mosala oyo mopesamelaki ye mpe alobi ete asalaki makambo na kozanga koyeba mpe na kozanga kondima na konyokoláká baoyo bazalaki kolanda Klisto. Ntoma asengi Timoté ete alanda kobunda etumba ya elimo, “na kobateláká kondima mpe lisosoli malamu,” mpo ete akokana te na “baoyo basili kozindisa kondima na bango.”

Batoli etali losambo

Paulo alandi kopesa batoli na lolenge na ye ya “molakisi epai na Bapakano kati na kondima mpe na solo.” (2:1-15) Esengeli kobondela mpo na bakonzi ya leta, mpo ete baklisto balanda kozala na bomoi ya kimya. Nzambe alingi ete moto na moto abika. Klisto “amipesaki lokola lisiko mpo na bato banso”; wana liteya ya moboko. Paulo alimboli lisusu ete mwasi asengeli kozala na bopóló mpe asengeli kozala te na bokonzi likoló na mobali.

Lisangá lisengeli kobongisama malamu. (3:1-16) Paulo amonisi bongo masengami mpo na bakengeli mpe basaleli na misala. Na nzela ya mokanda oyo, Timoté asengelaki koyeba lolenge nini komitambwisa kati na lisangá, oyo ezali bongo “likonzi mpe etemiselo na solo.”

Paulo apesi epai na Timoté batoli oyo ekokaki kosalisa ye mpenza ete aboya mateya ya lokuta (4:1-16) Na ntango ekoya, bamoko bakopengwa longwa na kondima. Kasi soki Timoté akomisenzela mpo na ye moko mpe mpo na mateya na ye, boye ‘akomibikisa ye moko mpe baoyo bakoyoka ye.’

Timoté azwi lisusu mitinda likoló na lolenge ya kosalisa bilenge mpe mibangé basangani ya lisangá. (5:1-25) Esengelaki, na ndakisa, kopesa bilei epai na basi-bakufela-mibali baoyo na etamboli malamu. Mpo ete bamipesa te na bilobaloba, bilenge basi-bakufela-mibali basengelaki kobala mpe kobota bana. Bankulutu oyo bazali kokamba na motindo mobongi basengeli kokumisama mpenza.

Ezaleli ya kobanga Nzambe ekokitisaka mitema

Paulo asukisi mokanda na ye na batoli na ntina etali ezaleli ya kobanga Nzambe. (6:1-21) “Ezaleli ya kobanga Nzambe ekokitisaka mitema” ezali mwango ya litomba monene, mpo ete mposa ya mosolo ekomemaka na libebi nyee. Paulo elendiseli Timoté na kobunda etumba malamu ya kondima mpe na ‘kosimba bomoi na seko.’ Mpo na kosimba mpenza bomoi na seko, baoyo basili kozwa misolo basengeli te “kolikya na bozwi bokoumela solo te, kasi epai na Nzambe.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 30]

Akobika na nzela na kobota bana: “Mwasi akobika na nzela na kobota bana soko akoumela kati na kondima mpe na bolingo mpe na bulee elongo na ezaleli malamu.” (1 Timoté 2:11-15) Na kokomáká maloba wana, Paulo alobeli te likoló na kozwa lobiko mpo na bomoi na seko, kasi mpo na mokumba ya mwasi oyo akobangaka Nzambe. Na kokómáká mama, na kobokolókó bana na ye mpe na kosaláká mingi mpo na libota na ye, mwasi akozala goigoi te. Na bongo “akobika,” akobatelama longwa na bilobaloba, mpe yango ekopengola ete amikótisa te kati na makambo ya bato mosusu. (1 Timoté 5:11-15) Misala ya ndako mikokokisa mosala na ye mpo na Jéhovah. Na lolenge ebongi, baklisto nyonso basengeli kosenzela mpo na etamboli na bango mpe na kosalela ntango na bango na mayele.​—Baefese 5:15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto