Mituna ya batángi
Mpo na nini Paulo akomaki ete mwasi moklisto “akobatelama na lisalisi ya kobota”?—1 Timote 2:15.
Makambo mosusu oyo Paulo alobaki na esika yango emonisi ete Paulo alingaki mpenza koloba nini? Na litambwisi ya Elimo Santu, Paulo azalaki nde kolobela mokumba ya mwasi moklisto na kati ya lisangá. Akomaki boye: “Nalingi ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na nzela ya misala ya malamu.” (1 Timote 2:9, 10) Paulo azalaki kolendisa basi baklisto bálekisaka ndelo te, bázala na bokatikati ntango bazali kobongisa nzoto na bango, mpe ‘bámibongisaka’ na misala malamu.
Na nsima, Paulo alobelaki ebongiseli ya bokonzi na kati ya lisangá boye: “Nazali te kopesa mwasi nzela ya koteya, to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali, kasi nde ya kofanda kimya.” (1 Timote 2:12; 1 Bakolinti 11:3) Mpo na komonisa ntina oyo esengeli kozala bongo, alobaki ete Satana akosaki Adama te, kasi Eva nde “akosamaki mpenza mpe abukaki mobeko.” Ndenge nini mwasi moklisto akokaki kobatelama mpo akwea te na lisumu oyo Eva asalaki? Paulo ayanoli boye: “Nzokande, mwasi akobatelama na lisalisi ya kobota, soki bakangami na kondima mpe na bolingo mpe na kosantisama elongo na makanisi malamu.” (1 Timote 2:14, 15) Paulo alingaki mpenza koloba nini?
Babongoli mosusu bamonisaka lokola nde mpo mwasi abika, esengeli abota. Na ndakisa, na Biblia Liloba lya Nzambe babongoli vɛrsɛ yango boye: “Nzókandé akobíka sókó akómí mamá wa bána.” Nzokande, lolenge wana ya kolimbola maloba wana ya Paulo ezali malamu te. Mikapo mingi emonisaka ete mpo moto abika, asengeli koyeba Yehova, kondima Yesu, kozala na kondima mpe komonisa kondima yango na misala. (Yoane 17:3; Misala 16:30, 31; Baloma 10:10; Yakobo 2:26) Lisusu, Paulo alingaki koloba te ete mwasi moklisto akobanda kobota kozanga likama. Tomonaka ete basi mingi babotaka malamu, bázala baklisto to te. Likambo ya mawa, basi mosusu mpe bakufaka na kobota, bázala baklisto to te.—Genese 35:16-18.
Toli mosusu oyo Paulo apesaki na ntina na basi na nsima, kaka na mokanda yango, ezali kosalisa biso tóyeba nini mpenza alingaki koloba. Alobaki na baklisto bákeba na bilenge basi mosusu oyo bakufelá mibali, oyo ‘bazalaki kosala mosala te, kotambolatambola na bandako; ɛɛ, kaka kozanga kosala mosala te, kasi mpe bato ya bilobaloba mpe oyo bamikɔtisaka na makambo ya bato mosusu, kolobeláká makambo oyo basengeli te kolobela.’ Toli nini Paulo alingaki kopesa awa? Abakisaki boye: “Na bongo nalingi ete bilenge basi oyo bakufelá mibali bábala, bábota bana, bákamba ndako, mpo na kopesa te motɛmɛli nzela ya kofinga.”—1 Timote 5:13, 14.
Paulo alingaki komonisa makambo mingi ya malamu oyo basi bakoki kosala na kati ya libota. Ntango mwasi azali kosala makambo yango, elingi koloba ‘kobota mpe kosala misala ya ndako,’ mpe azali kokoba “na kondima mpe na bolingo mpe na kosantisama elongo na makanisi malamu,” akoluka te kosala makambo ya mabe oyo etongaka te. Elimo na ye ekobebisama te, to ‘ekobatelama.’ (1 Timote 2:15) Soki bilenge basi bazali kosala bongo, yango ekoki kosalisa bango bákwea te na mitambo ya Satana.
Maloba yango oyo Paulo akomelaki Timote emonisi biso nyonso, mibali mpe basi, ntina ya kosalela ntango na biso na ndenge ebongi. Liloba ya Nzambe epesi baklisto nyonso toli oyo: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya.”—Baefese 5:15.