Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/7 nk. 20-23
  • ‘Nabosanaka mokolo ya Jéhovah te’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nabosanaka mokolo ya Jéhovah te’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala na Béthel
  • Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Na mobémbo ya zongazonga
  • Nasili kozwa mapamboli na Jéhovah
  • Nazali sé kozela mokolo ya Jéhovah
  • Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Tosili kosala oyo tosengelaki kosala’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/7 nk. 20-23

‘Nabosanaka mokolo ya Jéhovah te’

LISOLÓ YA LYLE REUSCH

NAZALI komikundola lisusu ete, libota na biso lizalaki na endimeli makasi na ntina na koya ya mokili ya sika ya boyengebene. Wana tozalaki naino bana mike, baboti na biso bazalaki kotangela biso mikapo ya Bíblia na ntina na “makoló ya sika” mpe “mabelé ya sika,” to mpe na ntina na ‘ngombe oyo akolya elongo na ngombolo, nkɔsi akolya matiti lokola ngombe, mpe mwana moke akokamba bango.’ Botangi na bango ezalaki malamu kino namimonaki lokola mwana wana.​—2 Petelo 3:11-13; Yisaya 11:6-9.

Na bambula 1890, nkoko na ngai ya mobali, August Reusch, ayebaki solo na moboko ya Biblia na nzela ya kotindelana mikanda elongo na charles Russell. Azalaki kosakola mingi, ezala kati na libota to libándá na Teritware ya Nord-Ouest ya canada, kati na engumba ya sika ya Yorkton, na Saskatchewan. Azalaki koloba ntango nyonso epai na bana na ye ya mibali ete: “Bana na ngai, bobosana mobu 1914 te!” Kondimisamáká na ntina na koya ya mokolo ya Jéhovah moye mobelemi, tata na ngai apusamaki na kosala eloko na boumeli ya bomoi na ye mobimba, likambo oyo nazali kolanda kosala kino lelo.

Baboti na ngai bazalaki na boyambi mingi. Etuluku moko ya boyekoli na Biblia ya Eclezia ya Bayekoli na Biblia ya Saskatoon, ezalaki koyangana mbala na mbala na ndako na biso. Mbala mingi, basali ya zongazonga (baoyo babengamaki ba pèlerins) bazalaki kofanda epai na biso. Verne ndeko na ngai ya mobali, Vera ndeko na ngai ya mwasi mpe ngai, tozwaki matomba mingi na elimo. Nsango ya Bokonzi ezalaki ntango nyonso komonisa biso makambo ya solo, mpe tozalaki na mposa makasi ya kolobela yango epai na bazalani na biso. (Matai 24:14) Nakanisaki te ete nakolekisa eteni monene ya bomoi na ngai na kolanda mosala ya pèlerins na lolenge ya mokengeli ya zongazonga ya ba Témoins de Jéhovah.

Na 1927, tokendaki kofanda na Berkeley, na californie. Na nsima, na 1933, kati na mpasi monene na ntina etali mosolo, nazwaki lipolɔmi na ngai na kelasi. Verne, ndeko na ngai ya mobali mpe ngai, tosepelaki mingi ntango tozwaki mosala na komanyi moko ya Ford Motor compagny ya Richmond, na Californie. Kasi, mokolo moko na elanga ya mobu 1935, nalobaki ete: “Soki nasengeli kosala makasi, ebongi kosala bongo mpo na likambo lizali na ntina mingi.” Bobele mokolo wana nasengaki kotika mosala, mpe mokolo molandaki, natindaki demande na ngai mpo na bokɔti na Béthel, na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba na Brooklyn. Nandimamaki na Béthel nsima na koyangana na assemblée kitoko esalemaki na Washington, na Juin 1935.

Mosala na Béthel

Nathan Knorr, ye oyo azalaki kotalela mosala na Binyateli, atindaki ngai mpo na kotya bopeto na bandako. Nazalaki bobele ngai moko na ekipe yango. Lokola nazalaki elenge mobali ya mibu 20, nazalaki komimona na ntina mingi. Nazalaki na lotomo ya kotambola kati na esika nyonso epai kuna binyateli bizalaki mpe moto te azalaki kotuna ngai. Ndeko Knorr azalaki kosepela na mosala na ngai, kasi amonaki ezaleli moko mabe kati na elimo na ngai. Alandaki kosalisa ngai mpo ete nalóna mwa elimo ya komikitisa.

Esengelaki na ngai mwa ntango mpo na kososola ete ndeko Knorr azalaki nde kosalisa ngai. Nasengaki ye bolimbisi mpo na elimo oyo nazalaki na yango mpe nayebisaki ye ekateli nakamataki mpo na kobongwana. Ezalaki wana ebandeli ya boninga malamu mpe ya ntango molai elongo na ndeko Knorr, oyo akómaki prezidá wa misato ya la Société Watch Tower, na Janvier 1942.

Longola misala ya kopetola bandako, nayekolaki kosala na bamasini mingi ya esika bakosalaka ba reliés to na kopesa maboko kuna. Na nsima nakómaki kosala na biro: kosala mpe kotinda ba bons de commande ya mikanda mpo na binyateli. Elanga mpe eleko ya molungé ya mobu 1943 ezalaki mpenza kitoko mpe na mosala mingi. Wana bato bazalaki kati na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah banyokolamaki, bakangisamaki mpe batyamaki na boloko mpo na bifundeli ndenge na ndenge ya lokutá. Na 1940, Esambiselo monene ya Etats-Unis epesaki etinda na biteyelo nyonso ete basengisa bayekoli na bango ete bapesaka losako na bendɛle. Yango ebimisaki monyoko monene na ba Etats 44 kati na ba Etats 48. Bana ya ba Témoins de Jéhovah balongolamaki na kelasi, bango moko bakangamaki, mpe bibele na bato oyo basilikaki bazalaki kobengana bango na mboka. Bamoko babetamaki masasi, bamosusu bapakolamaki ndokó (goudron) mpe balatisamaki nsálá.

Ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosamba na batribinale, mikanda mingi ya mosala, mikanda ya kosamba, maloba ya nsuka mpo na kosamba to mikanda mibimisami na biro ya la Société etali makambo ya kosamba, ezalaki kokomama na biro na ngai. Biso nyonso tosengelaki kosala ba heures supplémentaires mpo na kokokisa bilaká. Bikateli 13 bikamatamaki na Esambiselo monene na sanza ya Mai mpe sanza ya Juin 1943, oyo 12 kati na yango ezalaki malamu mpo na ba Témoins de Jéhovah, sikawa ezali eteni monene ya mikanda mpo na kosambisa. Nazali na botɔndi lokola namonaki uta ebandeli, lolenge oyo Jéhovah afungolaki nzela ya bokɔteli mpe kondimama ya nsango malamu kati na mibeko ya Leta.​—Bafilipi 1:7.

Eteyelo ya mosala ya Nzambe

Na kotalela makambo mosusu, tobongisamaki mpenza te mpo na kokokisa mosala monene oyo mosakolami na Matai 24:14, mosala motali ‘kosakola nsango malamu na Bokonzi na mokili mobimba liboso ete nsuka eya.’ Ndeko Knorr, prezidá ya la Société, amonaki ntina na kosala programme moko ya formation. Bobele na ntango wana, nazwaki libyangi mpo na kolanda “Kelasi monene ya mosala ya Nzambe” elongo na bandeko mosusu ya Béthel. Na nsima na yango nde basalaki Eteyelo ya mosala ya Nzambe, oyo ezali kosalema kati na masangá ya ba Témoins de Jéhovah uta 1943.

Na Lundi ya le 16 Février 1942, na mpokwa, toyanganaki na Salle ya makita ya Béthel. Ndeko Knorr asalaki diskur ya ebandeli. Lisoló lilobelaki “Makomi ya Biblia.” Ndeko Sullivan azalaki mokengeli ya kelasi yango mpe azalaki kopesa toli mpo na bokóli na biso. Nsima na ntango, baponaki ngai lokola mokengeli na eteyelo ya Béthel, eloko oyo nazalaki kotalela lokola mokumba monene. Kasi esengelaki na ngai kozwa toli lisusu.

Napesaki toli epai na mobangé ndeko moko, na maloba mabe mpe na makasi. Ndeko Knorr ayebisaki ngai polele mpenza ete: “Moto te azali kosepela wana ezali yo kosalela maloba makasi mpe na bokonzi mingi.” Alobelaki ngai nyonso oyo azalaki na yango, kasi na ntango nasilikaki, miso na ye minene oyo ezalaki ngba, ebongwanaki. Na mongongo ya boninga, atangelaki ngai Nzembo 141:5 ete: “Soki moyengebene abɛti ngai, ekozala boboto; mpe soki akopamela ngai, ekozala lokola mafuta malamu oyo motó na ngai ekoboya yango te.” Mbala mingi nasalelaka verset oyo na ntango napesaka batoli epai na bato mosusu mpo na kosembola etamboli na bango.

Liboso na kobanda Eteyelo ya mosala ya Nzambe, bobele bato moke nde bazalaki na libaku ya koloba liboso na bato nyonso. Nsima na liwa ya ndeko Rutherford, ndeko Knorr asalaki makasi mpo na kokólisa makoki na ye ya koloba malamu. Na Béthel, chambre na ngai ezalaki na nsé na oyo ya ye, mpe nazalaki koyoka wana azalaki kotanga badiskur na ye mbala na mbala. Soko mbala zomi, atangaki diskur piblike na mongongo makasi, diskur oyo asengelaki kosala na 1942, na assemblée ya cleveland na motó na likambo, “Kimya oyo ekoya, ekozala mpo na ntango molai?”

Na mobémbo ya zongazonga

Nsima na kolekisa mibu 13 ya mosala na Béthel, naponamaki na ndeko Knorr mpo na kozala mokengeli ya distrike. Wana ezalaki ye kopesa ngai malako na ntina na mokumba yango, alobaki na ngai ete: “Lyle, okozwa sikawa libaku ya komona lolenge oyo Jéhovah azali kotalela libota na ye.” Ezali na likanisi wana mpe na bavalize na ngai mibale nde nabandaki mosala na ngai ya mokengeli ya zongazonga na le 15 Mai 1948. Liboso na kobanda misala ya distrike, nasalaki mwa basanza lokola mokengeli ya circonscription.

Etuluku ya liboso, to lisangá oyo natalaki ezalaki etuluku moke oyo ezalaki na zamba ya Waseca, na Minnesota. Natindaki liboso mokanda epai na Dick Cain, directeur ya etuluku (nkombo oyo bazalaki kobenga mokengeli mokambi na eleko wana), ete aya kozwa ngai na gare. Azalaki pionnier special mpe, mpo na kokitisa motuya ya mosolo oyo azalaki kobimisa, alongwaki na ndako kitoko epai kuna akendeki kofanda na eleko na mpio mpe azongaki kofanda na hema, na bakartyé ya eleko ya molungé. Nzokande na sanza ya Mai, Minnesota ezalaka mpenza na eleko ya molunge te! Wana nazalaki kolɛnga kati na hema, namitunaki soki bomoi wana ebongaki mpo na ngai. Nabelaki maladi makasi ya miyoyo oyo elandanaki na boumeli ya baposo mingi, kasi esilaki.

Na boumeli ya bambula wana ya yambo oyo nazalaki kotala masangá mpe ba circonscriptions, nazalaki kofanda na bandako ya ba Témoins, namemaki bobele valize. Nafandaki kati na bizalela ya makambo nyonso, nazalaki kolála na mabelé kati na kúku, na kiti ya salon to kati na molungé makasi ya divan. Nazalaki mpe kofanda na bandako epai kuna moko na basangani ya libota azalaki kotemela bindimeli na biso. Na Wisconsin, tata ya libota moko, oyo azalaki mondimi te azalaki kodongola ngai wana nazalaki kokende mpe kozonga. Na butu moko, alangwaki masanga, mpe nakutaki ye koloba ete asengelaki “kosala moto yango mabe.” Nasosolaki ete ezalaki ntango mpo na ngai ete nalongwa wana. Kasi makambo oyo nakutanaki na yango ezalaki mingi te mpe ezalaki bobele kobongisa mosala na ngai. Na nsima, ekómaki bobele masoló ya kosekisa.

Nazwi moninga mwasi mpo na mosala

Na yango nazali komikundola malamu. Na assemblée moko esalemaki na Tiffin, kati na Ohio, nakutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki na miso ngbaa, Leona Ehrman, moto ya Fort Wayne na lnde. Ye mpe abokwami kati na kondima na boklisto mpe azalaki pionnière uta bambula mingi. Tozwaki mpenza ntango ya kokutanaka te mpo na mibémbo oyo nazalaki kosala, kasi tozalaki kosolola na nzela ya mikanda. Na nsima, na 1952, natunaki ete: “Okanisi boni soki tobalani?”, mpe ayanolaki ete: “Ee, nalingi yango!” Yango nde tosalaki. Tobalanaki. Mbala mingi bazalaki kotuna biso mpo na nini tozali kosala libota te; na yango tozalaki koyanola ete, tozali na libota: bandeko mibali, bandeko basi, batata mpe bamama kati na bikólo 44 oyo tozali kokende kotala.​—Malako 10:29, 30.

Bamosusu bazali kotuna biso ete: “Naino bolembi te kino kokanisa kotika mosala na bino?” Ya solo, yango eyaka mbala mingi. Kasi na ntango moko kati na biso mibale abandi kolemba, mosusu azali wana mpo na kosunga ye. Nkutu, mokolo moko, natindelaki ndeko Verne mokanda soki akoki kondima ete nasala na komanyi na ye ya langi. Ayanolaki ngai ete azalaki kokanisa mpo na likambo yango, mpo ete tozalaki mpenza baninga na bomwana. Atako bongo, apesaki toli ete natalela malamu ekateli na ngai. Na yango nde nakanisaki lisusu maloba oyo ndeko Knorr azalaki kozongela mbala na mbala epai na basangani ya Béthel ete: “Ezali mpasi te ete otika mosala na yo; nzokande, osengeli kozala na molende mpe na bosembo mpo na kokangama na mosala na yo.” Toli wana ebungisaki motuya na yango.

Mokengeli ya zongazonga oyo abali, akoki te koumela kati na mosala soki mwasi azali te kosunga ye na bosembo nyonso; yango nde Leona asalaki mpo na ngai. Molende, bolingo mpe mpiko oyo azalaki komonisa kati na masangá, esalaki ete alingama na ebele na baninga na biso baklisto. Nazali ntango nyonso koloba na ye boni nalingi ye. Nandimisami ete yango ezali kosalisa ye na kokangama na mosala na ye.

Nasili kozwa mapamboli na Jéhovah

Mosala ya mokengeli ya distrike ezalaka mingimingi na ba assemblées ya circonscription, epai azalaka poso na poso mokambi, molobi mpe mokengeli ya eteyelo. Jéhovah apambolaki mpenza bibongiseli wana, mpamba te ba assemblées ya circonscription oyo nasengelaki kobongisa, esalemaki nyonso. Ezali solo ete mosusu ezwaki yikiyiki, kasi ata moko ezangaki te.

Na Wooster, kati na mboka Ohio, na elanga ya mobu 1950, wana nazalaki koyebisa loyembo ya nsuka oyo tosengeli kosukisa na yango eteni ya Samedi na mpokwa, ebele na batɛmɛli soko nkɔto bayanganaki liboso na Salle epai kuna tozalaki. Bato yango bamemaki maki epolá mpo na kobamba biso yango na ntango tokobima. Totalelaki likambo yango mpe tolandaki koyemba nzembo, koyebisa makambo masalemaki na mosala ya kosakola mpe kosala masoló ya Biblia ya mbalakáká. Ba Témoins 800 wana batungisamaki te mpe bamonisaki motema petɛɛ.

Na ngonga ya mibale ya ntongo, malili makasi mazalaki na libándá. Lokola tozalaki komibongisa mpo na kobima, bavolontere bafungolaki batiyo oyo bakozimisaka na yango mɔtɔ mpo na kolongola maki oyo etikamaki pembeni ya nzela. Bato wana ya mobulu bakimaki molunge ya ndako moko ya penepene epai ba bus ekobómbamaka mpe bazongaki kosala lisusu etuluku. Kasi mosala ya kopetola ezalaki bobele mwango ya kopengola makanisi na bango, bayangani babimaki na nzela na nsima ya Salle. Bango nyonso bamataki bavuatire na bango kozanga nkaká. Ba assemblées mosusu oyo esalemaki na Ohio ebebimisamaki na banguna, na mboka Canton, na Defiance mpe chillicothe. Kasi mobulu mokitaki mpamba te esambiselo monene ya Etats-unis ezalaki kokata bitumbu epai na bato oyo bazalaki kobuka mibeko.

Na nsima, mikakatano ya kolongono ya nzoto to esengisaki mbongwana kati na mosala na ngai. Kati na bambula 1970, la Société aponaki ngai lokola mokengeli ya circonscription kati na etúká na ngele ya californie epai kuna masangá mazali mpenza penepene mpe epai kuna nakokaki komisalisa malamu na lopitalo. Mokengeli ya distrike asengeli kosala mibémbo mingi, mpe azali kotalela ba circonscriptions mingi. Mpo na mokengeli ya circonscription, asengeli, kati na makambo mosusu, kobongisa ba assemblées ya circonscription, kokabola biteni bikeseni ya programme mpe kosenzela na ntina na kobongisama na yango. Lisusu, asengeli kobongisa Eteyelo ya ba pionniers mpe kozala molakisi na yango. Na bongo, mosala ya bakengeli ya zongazonga, ezala na distrike to na circonscription, ezali bomoi ya mosala mingi mpe ekopesaka mbano.

Nazali sé kozela mokolo ya Jéhovah

Nazali komikundola lisusu likambo ya kala mpenza, elingi koloba uta koleka mibu 70, na komiyokaka ntango nyonso ete oyo ezali ntango ya kosala eloko. Na makanisi na ngai, Armagedon esengelaki koya na mokolo molandi. (Emoniseli 16:14, 16) Lokola tata na ngai, mpe tata aboti ye, nazalaki na bomoi lokola oyo ntoma apesaki toli ete, “bobosana mokolo na Jéhovah te.” Nataleláki ntango nyonso mokili ya sika molakami na Nzambe lokola ‘likambo ya solo lizangi komonana.’​—2 Petelo 3:11, 12; Baebele 11:1.

Kozela wana oyo elonamaki kati na ngai uta bomwana mosika te, ekokokisama. “Ngombe mpe ngombolo bakolya elongo,” “nkɔsi akolya matiti lokola ngombe,” mpe “mwana moke akokamba bango.” (Yisaya 11:6-9) Bilaká wana ya kolendisa bikokokisama, mpo ete Jéhovah apesi biso ndanga na maloba oyo mayebisamaki epai na Yoane na Emoniseli 21:5, ete: “Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete: ‘Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ Mpe alobi ete: ‘Komá, mpamba te maloba oyo mazali sembo mpe na solo.”’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto