Jéhovah mpe klisto basololi minene elongo na bato
“Nkolo jéhovah akosalaka likambo te bobele akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.”—AMOSA 3:7.
1. Na eleko un biso, myango nini bato bazali kosalela mpo na kosolola to kopesa nsango?
MOTUYA ya mosolo oyo mozwami na nzela na bipanzelo na nsango, ezali lelo na motango ya bamiliare mingi ya ba zaïres. Mikanda mibimisami, bazulunalo ekobimaka mokolo na mokolo mpe oyo ekobimaka na bileko, nsango na radio mpe na televizyo, bafilme mpe masano mabongisami, nyonso wana esalemi mpo na kopesa nsango. Yango ekosalemaka mpe na nzela na kotinda mikanda; epai mosusu, ekosalemaka na masoló na nzela na telefone. Ee, nyonso wana ezali myango mpo na kosolola.
2. Tanga mwa bandakisa ya biloko oyo bimonisi bokóli ya teknike kati na myango ya kosolola to kopesa nsango.
2 Bokóli ya teknike kati na myango oyo bato bakoki kosolola, ezali mpenza kitoko. Na ndakisa, kala bazaláka kosalela nsinga ya kwivre nde lelo bakomi kosalela nsinga mosusu eleki malamu, oyo ekoki kolekisa bansango nkɔto na nkɔto mingi, bobele na boumeli ya ntango moko. Basatelite etyami zingazinga na mabelé mpo na kotambwisa nsango, ezali na biloko oyo bikoki na yango ete esalelama mpo na koyamba nsango etindami na nzela na telefone, na telegrafe, na radio m na televizyo. Bobele satellite moko mpamba ekoki koyamba bansango 30 000 na mbala moko.
3. Nini ekómaka wana bato bazali kosalela te?
3 Nzokande, atako myango nyonso wana mizali mpo na kopesa nsango, bato bazali na esengo te, mpamba te bazali kosolola mpenza te. Mpo na yango bazali kolobela “‘kozanga bosololi,’ libulu monene lizali kati na bayangeli mpe bayangelami.’’ Mpe libulu monene oyo ekaboli baboti mpe bana na bango ezali mpenza nini? Ezali boye te ete baboti bazali kokoka kosolola na bana na bango te? Bapesi-toli mpo na mabota bamonisi ete, kozanga kosolola ezali likambo lileki mpenza monene oyo babalani bakokutanaka na yango. Kozanga kosolola ekoki ata koboma. Na ebandeli ya mobu 1990, bato 73 bakufaki na likámá ya mpepo, mpo ete mokumbi mpepo akokaki te kosolola elongo na bato oyo bazali na mosala ya koyebisa soki mpepo ekoki kokita to te (tour de contrôle). Zulunalo moko ebengaki yango ete: “Mawa mauti na kozanga kosolola.”
4. (a) “Kosolola” ezali nini? (b) Mokano ya moklisto ezali nini kati na likambo ya kosolola?
4 Mpo na moklisto, kosolola ezali nini? Engebene diksionere moko, “kosolola” etali bongo “koyebisa likambo epai na moto moko”: “mikano na yo,” “mayoki na yo,” “boyebi na yo.” Mokanda mosusu elobi na ntina na kosolola ete, ezali “nzela oyo moto akokoka komonisa makanisi na ye na lolenge malamu.” Moklisto asengeli mpenza kozala mosololi malamu elongo na bato, mpo ete mokano na ye nde ezali kosimba mitema na bango na nzela na solo oyo ezali kati na Liloba na Nzambe; na bongo, akozala na elikya ete bato yango basala eloko na makambo oyo bakoyekola. Bolingo ezangi koluka litomba nde ezali kopusa na kosolola motindo wana.
Jéhovah, Mosololi
5. Wapi moko na myango ya yambo oyo Jéhovah Nzambe asalelaki mpo na kosolola elongo na moto?
5 Na ntembe te, Jéhovah Nzambe azali ye oyo aleki basololi banso. Lokola asalaki biso na elilingi na ye mpe na lolenge na ye, akoki kosolola elongo na biso, mpe biso tokoki kosolola elongo na bazalani na biso ete bayeba ye. Uta kozalisama na moto, Jéhovah azali kosolola elongo na bikelamu na ye na mabelé na ntina etali ye moko. Ezali yango nde azali kosala na nzela na biloko bizalisami na ye oyo bizali komonana. Na yango, mokomi na nzembo alobi na biso ete: “Likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe, lola ekoyebisaka misala na maboko na ye. Mokolo moko mokoteyaka yango na mokolo mosusu, butu moko ekoyebisaka butu mosusu.” (Nzembo 19:1, 2) Baloma 1:20 (MN) eyebisi biso ete “bizaleli na ye [Nzambe ] bizangi komonana bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa.” Likambo oyo ete bizaleli na ye bizali komonana polele, elakisi ete Nzambe azali mosololi aleki malamu.
6. Masoló nini Jéhovah asololaki elongo na bikelamu na ye na mabelé, wana ezalaki bango kati na elanga ya Edene?
6 Baoyo bazangi kondima epai na Nzambe ata na lolenge oyo ye azali komimonisa epai na bato, balingi kondimisa biso ete moto akoki komitambwisa ye moko mpo na koyeba bantina oyo ye azali na bomoi. Nzokande, Liloba na Nzambe lizali komonisa ete Mozalisi azali kosolola elongo na moto uta ebandeli. Na yango, apesaki mokumba ya kobota epai na babalani na liboso, ete: “Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botya yango na nsé na bino; mpe bozala na bokonzi likoló na mbisi na mai, mpe na ndeke na likoló mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ekotambolaka na mokili.” Epai mosusu, Nzambe apesaki bango nzela na kolya mbuma na nzete nyonso na elanga, longola bobele moko. Na nsima, na ntango Adam mpe Eva bazangaki botósi, Jéhovah apesaki elaká ya yambo na ntina na Masiya, kopesáká bongo elikya epai na bato. Alobaki epai na nyoka ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe yo okoswa litindi na ye.”—Genese 1:28; 2:16, 17; 3:15.
7. Mokanda ya Genese mozali komonisa biso nini na ntina na lolenge oyo Jéhovah azali kosalela elongo na basaleli na ye na mabelé?
7 Emonaki ye ete Kaina, mwana na Adam, atondaki na mposa ya koboma, Jéhovah Nzambe asololaki na ye, kolobáká na ye lokola boye ete: ‘Keba! Okozwa mikakatano!’ Kasi Kaina atalelaki likebisi wana te mpe abomaki ndeko na ye. (Genese 4:6-8) Na nsima, ntango mabelé matondaki na mobulu mpe na mabe, Jéhovah ayebisaki Noa mokano na Ye ya kopetola mabelé longwa na mabe nyonso. (Genese 6:13 kino 7:5) Ntango Noa mpe libota na ye babimaki na masuwa, na nsima na mpela, Jéhovah ayebisaki bango mokano na ye mpo na bomoi mpe makila ete, ezali bulɛɛ; lisusu, na nzela na monama, apesaki bango endimiseli ete akosalela lisusu mpela na mai te ete aboma eloko nyonso ya bomoi. Mwa bikeke na nsima, Jéhovah ayebisaki mokano na Ye epai na Abrahame ete, mabota nyonso na bato makopambwama na nzela na libota na ye. (Genese 9:1-17; 12:1-3; 22:11, 12, 16-18) Na nsuka, wana ekanaki ye koboma bato mabe na mboka Sodome mpe Gomore, na bolingo mpenza, Nzambe ayebisaki ekateli na ye epai na Abrahame, ete: “Nakobomba nde yango ekosala ngai ete Abrahame ayeba te?”—Genese 18:17.
8. Tanga myango minei oyo Jéhovah asili kosalela mpo na kosolola elongo na basaleli na ye na mabelé?
8 Mpo na kosolola elongo na Yisraele, Jéhovah asalelaki molongó molai na basakoli, kati na bango Moïse azalaki moto ya yambo. (Baebele 1:1) Na mabaku mosusu, Jéhovah apesaki etinda ete bakoma nsango; na yango alobaki na Moïse ete: “Komá maloba oyo.” (Exode 34:27) Kasi mbala mingi Jéhovah azalaki kosolola na balobeli na ye na nzela na bimonaneli, lokola asalaki yango kala epai na Abrahame.a Mpo na kosolola elongo na bato, bobele basaleli na ye te, kasi mpe baoyo bazalaki na boyokani elongo na basaleli na ye, Jéhovah asalelaki mpe ndɔtɔ. Na ndakisa, apesaki ndɔtɔ epai na mibali mibale oyo bazalaki na boloko esika moko na Yozefe, mpe Yozefe alimbwelaki bango ndɔtɔ wana. Na nguya na Jéhovah, Farao mpe Nebukadanezare bazwaki ndɔtɔ lokola, ndɔtɔ oyo elimbolamaki na Yozefe mpe Danyele, basaleli na Nzambe. (Genese 40:8 kino 41:32; Danyele, mikapo 2 mpe 4) Lisusu, mbala na mbala Jéhovah atindaki baanzelu ete bamema nsango epai na basaleli na ye.—Exode 3:2; Basambisi 6:11: Matai 1:20; Luka 1:26.
9. Nini epusaki Jéhovah na kosolola elongo na libota na ye, Yisraele, mpe maloba nini mauti na ye mazali komonisa likambo yango?
9 soki Jéhovah asololaki mingi mpenza elongo na libota na ye Yisraele na nzela na basakoli na ye, ezali mpo ete alingaki bano. Mpe alobaki na nzela na mosakoli Ezekiel ete: “Nazali na esengo te na liwa na moto mabe, kasi nalingi ete moto mabe abongwa na nzela na ye mpe abika. Bongwa, bongwa na nzela mabe na bino; mpamba te bino bolingi kokufa mpo na nini, ɛ ndako na Yisraele?” (Ezekiele 33:11) Jéhovah azalaki mosololi na motema molai mpe na motema pɛtɛɛ epai na libota na ye ya kala, libota na batomboki; ezali yango nde emonisami na 2 Ntango 36:15, 16 (MN) ete; “Jéhovah Nzambe ya batata na bango atindaki mbala na mbala maloba na kokebisa na nzela na bantoma na ye, mpamba te azalaki na mawa mpo na libota na ye mpe mpo na efandelo na ye. Kasi . . . batyolaki maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye . . . kino akokaki kolimbisa te.”
10. Lolenge nini Jéhovah azali lelo kosolola elongo na basaleli na ye, mpe mpo na nini tokoki koloba ete ye azali Nzambe oyo ekoyebisaka makambo?
10 Lelo oyo, tozali na Liloba na Nzambe lipemami, Biblia Mosantu, oyo na nzela na yango Jéhovah azali kopesa biso boyebi na ntina na ye moko, na mikano na ye mpe na nyonso elingi ye kosala mpo na biso. (2 Timoté 3:16, 17) Jéhovah, Mosololi na liboso, akómaki kino koloba ete: “‘Nkolo Jéhovah akosalaka likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Jéhovah akomonisaka basaleli na ye makambo oyo ye alingi kosala.
Mwana na Nzambe azali mpe mosololi monene
11. Esaleli nini na liboso, oyo Jéhovah azali kosalela ye mpo na kosolola na bato, mpe mpo na nini abongi mpenza na nkombo oyo ete “Liloba”?
11 Na bisaleli nyonso oyo Jéhovah asili kosalela yango mpo na koyebisa mokano na ye, Liloba to Logos nde aleki, ye akómaki Yesu Klisto. Likambo oyo ete esaleli yango ebengami Liloba to Logos, elakisi nini? Ete azali Molobeli na liboso na Jéhovah. Bongo molobeli elimboli nini? Moto oyo akoyebisaka makambo oyo moto mosusu alingi koloba. Logos akómaki bongo moto oyo azalaki koyebisa maloba na Jéhovah Nzambe epai na bikelamu na Ye ya mayele, bizali awa na mabelé. Mokumba yango mozali na ntina mingi na motindo boye ete abengami Liloba.—Yoane 1:1, 2, 14.
12. (a) Mpo na ntina nini Yesu ayaki na mabelé? (b) Eloko nini emonisi mpenza ete akokisaki mosala na ye na bosembo nyonso?
12 Yesu ye moko alobaki epai na Ponti Pilato ete, ntina ya liboso oyo ayaki awa na mokili ezalaki mpo na koyebisa solo epai na bato: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Mpe Baevanzile ezali koyebisa biso ete akokisaki mosala yango na motindo moko kitoko. Lisoló na ye likoló na ngomba eyebani na lokumu oyo ete ekokani na mosusu te. Azali mpenza esaleli na liboso mpo na kosolola! “Bibele [oyo bayokaki lisoló yango ] bakamwaki na mateya na ye.” (Matai 7:28) Na ntina na oyo elekaki mokolo moko, totangi ete: “Ebele na bato bayoki ye na esengo.” (Malako 12:37) Na libaku mosusu, bato batindamaki mpo na kokanga Yesu bazongaki maboko mpamba. Mpo na nini? Bato yango bayanolaki Bafalisai ete: “Naino moto moko alobi lokola moto oyo te.”—Yoane 7:46.
Bayekoli na Klisto bazwi mokumba ya kozala basololi
13. Nini emonisi ete Klisto alingaki kozala na basalani elongo kati na mokumba na ye ya mosololi?
13 Lokola alingaki ete azala na basalani elongo kati na mokumba na ye ya mosololi, Yesu aponaki liboso bantoma 12, na nsima, basakoli 70 oyo ye atindaki bango mpo na koyebisa nsango malamu na Bokonzi. (Luka 9:1; 10:1) Na nsima, mwa ntango moke liboso na komata na likoló, apesaki bayekoli na ye mokumba ya ntina mingi. Yango nini? Lokola tozali kotanga yango na Matai 28:19, 20, asengaki bango ete bazala basololi; mpe, bango moko basengelaki koyekolisa bamosusu lolenge nini bakoki kokóma basololi.
14. Basololi baklisto ya ekeke ya liboso bamonisaki molende nini?
14 Bayekoli bazalaki mpenza basololi na molende? Na ntembe te. Na Pantekɔte ya mobu 33, mosala na bango ya kosakola mopesaki nzela ete bato 3 000 babakisama na lisangá na boklisto oyo liutaki kosalema sika. Motuya wana mobakisamaki nokinoki na bato 5000. (Misala 2:41; 4:4) Ezali bongo likambo na kokamwa te ete banguna na bango, Bayuda, bafundaki bango ete batondisaki Yelusaleme na mateya na bango mpe, na nsima, bamilelaki ete bayekoli babulunganisi mabelé mobimba na mosala na bango ya kosakola!—Misala 5:28; 17:6.
15. Esaleli nini Jéhovah azali kosalela na eleko na biso mpo na kosolola elongo na bato?
15 Ezali boni mpo na eleko na biso? Lokola yango esakolamaki na Matai 24:3, 45-47, Nkolo, Yesu Klisto, asili kotya “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo ezali bongo lisangá ya baklisto bapakolami, mpo na kobatela bozwi na ye na mabelé na eleko oyo na koya na ye. Moombo na sembo mpe na mayele wana amonisami lelo na collège central ya ba Témoins de Jéhovah, oyo la Société Watch Tower ezali esaleli na yango mpo na kobimisa mikanda. Elobami lisusu ete, moombo na sembo mpe na mayele azali lokola esaleli oyo Nzambe azali kosalela mpo na kosolola elongo na bato. Moombo wana azali kolendisa biso ete tozala basololi malamu. Mpo na yango, nimero ya yambo mpenza ya Phare de la Tour de Sion, Messager de la présence de christ epesaki toli epai na batangi na yango, ete: “Soki okanisi ete moko na bato na zingazinga na yo to baninga na yo akoki kosepela na makambo [mazali kati na zulunalo oyo ] to akoki kozwa litomba na yango, mpo na nini okoyebisa ye te? Yango ekopesa yo libaku ya kosakola Liloba mpe kosala malamu epai na bato banso.”
16. Nini ezali komonisa ete Nzambe azali kosalela bobele Biblia te mpo na kosolola malamu mpenza elongo na basaleli na ye na mabelé?
16 Kasi, bobele kozala na Liloba na Nzambe mpe kotanga yango ekoki te mpo na kozwila yo boyebi ya solo oyo ezali kotya bato na nzela na bomoi. Tomikundola na ntina na mosali na ndako na mokonzi-mwasi na Etiopia, oyo azalaki kotanga esakweli na Yisaya nde akangaki ntina na yango te. Filipi, mopalanganisi na nsango malamu, alimbwelaki ye esakweli yango, eloko oyo esalisaki ye na kozwa batisimo mpe na kokóma moyekoli na Klisto. (Misala 8:27-38) Tosengeli kosala eloko eleki likambo oyo ya kotanga bobele Biblia biso moko; ezali yango nde tozali kososola soki totaleli Baefese 4:11-13, epai kuna Paulo amonisi ete Klisto apesaki bobele bantoma mpe basakoli te, kasi “bamosusu lokola bapalanganisi na nsango malamu, basusu babateli mpe balakisi, mpo na kobongisama na babulami, mpo na mosala na kosunga, mpo na kolendisa nzoto na Klisto, kino biso nyonso tokokóma na bomoko kati na kondima mpe na boyebi ya solo na Mwana na Nzambe, na ezalela na mobali oyo akomeli.”
17. Bilembo nini minene bizali kopesa biso nzela na koyeba esaleli oyo Jéhovah azali kosalela lelo mpo na koyebisa mikano na ye epai na bato?
17 Lolenge nini tokoki koyeba baoyo Jéhovah mpe Yesu Klisto bazali kosalela mpo na kosalisa moto oyo azali na mposa ya kokóma moklisto ete akóma na ezalela na mobali akomeli? Engebene maloba na Yesu, moko na elembo monene ezali bolingo oyo bato yango basengeli komonisa, lokola Yesu ye moko alingaki bayekoli na ye. (Yoane 13:34, 35) Elembo mosusu monene: na komekola Yesu, bato yango basengeli kosangana na mokili te. (Yoane 15:19; 17:16) Elembo mosusu: bato yango basengeli kondima ete ‘Liloba na Nzambe lizali solo,’ lokola Yesu andimaki yango, ye oyo azalaki ntango nyonso kotanga Makomami. (Matai 22:29; Yoane 17:17) Basengeli mpe koyebisa nkombo na Nzambe, na ndakisa na Yesu. (Matai 6:9; Yoane 17:6) Na nsuka, esengeli na bango kosakola Bokonzi na Nzambe, na ndakisa na Yesu. (Matai 4:17; 24:14) Bobele lisangá moko nde lizali kokokisa masengami oyo; ezali bongo basololi bazwami kati na mikili nyonso mpe babengami ete Batemwe baklisto ya Jéhovah.
18. Wapi makambo misato oyo makolobelama kati na masoló malandi?
18 Nzokande, kozala mosololi elimboli komema mikumba. Baklisto basengeli kosolola elongo na banani? Tokoki kolobela makambo misato kati na yango baklisto basengeli komibanzabanza mpo na kosolola malamu: na libota, na lisangá mpe na mosala ya kosakola. Masoló malandi mazali kolobela makambo yango makeseni.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Genese 15:1; 46:2 Mituya 8:4; 2 Samwele 7:17; 2 Ntango 9:29; Yisaya 1:1; Ezekiele 11:24; Danyele 2:19; obadia 1; Nahumu 1:1 Misala 16:9; Emoniseli 9:17.
Bozongeli
◻ Kozanga kosolola ekoki kobimisa makámá nini?
◻ Banani bazali basololi minene elongo na bato?
◻ Wapi myango ndenge na ndenge oyo Jéhovah asili kosalela mpo na kosolola elongo na bato?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki mpenza mosololi malamu?
◻ Nini emonisi ete baklisto ya ekeke ya liboso basololaki na molende?
[Elilingi na lokasa 18]
Lokola Tata na ye na likoló, Yesu azalaki mosololi na motema mawa