Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/11 lok. 7
  • ‘Maladi ekozala esika na esika’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Maladi ekozala esika na esika’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Maladi oyo ezali kopanzana​—Ndenge nini okoki komibatela
    Makambo mosusu
  • Mwango mozali nini?
    Lamuká!—1996
  • Sida: Lolenge ya koluka kosilisa yango
    Lamuká!—1999
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/11 lok. 7

‘Maladi ekozala esika na esika’

BOKOLI makasi ya maladi: ezali moko na makambo masakolamaki oyo esali bongo “elembo ya koya na (Yesu Klisto) mpe nsuka na biloko ya ntango oyo.” (Matai 24:3) Luka, mokomi na Evanzile abakisi likambo oyo lizali te kati na mikanda ya Matai mpe Malako. (Matai mokapo 24 mpe 25; Malako mokapo 13) Alobaki ete, na mikolo ya nsuka, bokɔnɔ bakopalangana mpe maladi mabe ekobima “na esika na esika.” (Luka 1:3; 21:11) Maladi motindo wana ekouta wapi?

Zulunalo Science News elimboli ete: “Bato ya sianse bayebi ete mikrobe mike oyo babengi ete virus, na lolenge oyo yango ebombani na mikili ya molungé, ekoki koboma bato mingi koleka oyo SIDA ekoki kosala soko banguya na kozalisama ekokisi mosala yango. Bato na mayele balobi ete, ata motuya nyonso ya ba virus na mokili ezali kobakisama te, nzokande mikili ya molungé mizali na motuya monene ya ba virus oyo ekoki koboma ntalo monene na bato na mabelé.”

Kobakisama na motuya ya bato na mabelé mpe kobakisama ya bamposa esengeli na mokili oyo motóndi na bato, ezali makambo mibale oyo malimboli ntina oyo eleko na biso ezali sé kobeba. Zulunalo Science News elobi ete: “Lisoló na bato limonisi ete mbala mingi kopalangana monene ya bavirus ekobimaka nsima na kokende kotala mboka oyo liboso eyebanaki te, to nsima na kobeba na ezalela ya bomoi kati na bingumba; na yango, ekopesa nzela na ba virus mosusu ete ebima.” Mbala nyonso oyo bato bazali kokɔta kati na mikili oyo mizali na virus epai bato bazalaki kokenda kuna liboso te, mbala mingi ebele na ba virus ekobimaka na nsima. Likambo yango moko lisalemaka na ntango mabelé mazwi mbongwana na ezalela ya molunge to mpiɔ mpe banyama mike bakómaka mingi Zulunalo yango ebakisi ete: “Lisusu, mayele ya monganga ya lelo, lokola kozongisa makila mpe kolongola enama na nzoto moko mpo na kotya yango na nzoto mosusu, esili kopesa nzela na ba virus ete epalangana epai na bato mingi. Ezali lolenge moko mpo na mabongwani mingi mazali kati na ezalela mpe na etamboli ya bato, oyo ezali komonana na mibémbo bipai na bipai na mokili mpo na bazwi mpe bato na lokumu, mpe na lolenge oyo bato bakomitobolaka drogue bazali kosalela bobele ntonga yango moko.”

Zulunalo yango elobi lisusu ete: “Lisoló na bato ya lelo lizali kopesa bandakisa mingi ya bamaladi oyo epalanganaki na bato mingi kati na mikili mitangwi, oyo ezali komonisa ete na mikolo mizali koya bamaladi na kopalangana ekozala mingi.” Tala mwa bandakisa: virus ya Marburg, virus na mikili ya molungé, oyo eyebanaki naino te nde ebimisaki maladi makasi oyo ebomaki ebele na bato ya sianse na Allemagne de l’Ouest na nsuka ya bambula 1960; virus oyo ebimisaki fièvre na lobwako ya Rift, ezwaki bamilió na bato mpe ebomaki ebele na bato na Ezipito na boumeli ya mobu 1977; virus ya Ebola (maladi oyo ebimaki penepene na Bumba), ezwaki koleka bato nkɔto na Zaire mpe na Soudan na mobu 1976, mpe ebomaki soko bato 500, kati na bango motuya monene ya minganga mpe ba infirmiers oyo bazalaki kosalisa bato na maladi.

Kopalangana na virus oyo ebomaka ekoki koyebana mpenza na liboso te. Zulunalo Science News elimboli ete: “Na ndakisa, na 1918, motindo na virus ya grippe oyo eleki mabe, epalanganaki na mabelé mobimba mpe ebomaki soko bato 20 milió. Kala mingi te, mokili ekamwaki lisusu na komona epai na bato, kobima ya virus moko oyo mbala mosusu ezaláká liboso bobele epai na makako ya Afrika. Lisangá ya mokili mobimba mpo na kolongono na nzoto (OMS) ekanisi ete, lelo, katikati na bamilió mitano mpe bamilio zomi ya bato kati na mikili 149, bazali na virus ya SIDA. Kasi atako mpasi wana nyonso ya sika elamusi likebi ya mokili mobimba, minganga mingi bazali bobele kobanga mpamba te tokoki kozwa makama mosusu minene koleka.”

“Maladi” yango ekonyokolaka bato, esika moko na bitumba, nzala mpe koningana makasi ya mabelé, ezali mpenza eteni moko na elembo oyo emonisi koya na Yesu kati na nkembo na Bokonzi na ye. (Malako 13:8; Luka 21:10, 11) Makambo yango mazali mpe ntina oyo biso tosengeli kosepela, mpamba te Luka abakisi maloba oyo na Yesu ete: “Wana makambo oyo makobanda komonana, botɛlɛma ngwi mpe botómbola mitó, mpamba te kobika na bino ebɛlɛmi.”​—Luka 21:28, MN.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto