Mwango mozali nini?
D. A. HENDERSON—oyo akokisaki mokumba monene na kosilisama ya kolokóto —kati na etuluku ya banganga-mayele na engumba Génève, na Suisse na 1993 alobaki ete: “Ezali na likanisi moko oyo lipalangani ete bolamu ya bato, mpe mbala mosusu kútu kobika na biso lokola bikelamo, ekotalela likoki na biso ya koyeba makɔnɔ oyo mazali kobima. . . . Nini ekoki kokómela biso lelo soki VIH ekómi kopalangana na nzela ya mopɛpɛ? Mpe endimiseli nini tozali na yango ete mikrobe moko ya motindo wana ekoki te kopalangana na nzela ya mopɛpɛ na mikolo mizali koya?”
Ndenge nini makɔnɔ oyo mazali kobima makoki koyebana? Mwango ya liboso ya kopesa likebisi mpo na makɔnɔ oyo mabimaka na mikili ya molungé ezali boyokani ya balaboratware 35 oyo epesaka lapólo na Organisation mondiale de la santé (O.M.S.). Nzokande, bolukiluki oyo esalemaki na balaboratware yango emonisaki ete ndambo moke kati na yango ezalaki na bisaleli ya koyeba maladi babéngi encephalitis oyo ebimaka na Japon, hantaviruses, fièvre Rift Valley—nyonso wana ezali makɔnɔ oyo mabomaka. Bobele 56 % bakoki koyeba kɔ́ngɔ́, mikrobe oyo eutaka na ngungi oyo epesaka kosanza, kobeba ya libale mpe kobima ya makila kati na nzoto. Na 1992 soko bato 28 bakufaki na Kenya na kɔ́ngɔ́ liboso ete minganga báyeba ntina ya liwa yango. Na boumeli ya basanza motoba, bakanisaki ete bazalaki kobundisa malaria.
Bolɛmbu mosusu ya bibongiseli ya kosɛnzɛla ezali oyo ete bakoki koyeba te kobima ya virus ya makɔnɔ oyo ebomaka mokemoke. Na ndakisa, VIH, ekoki kobombana na nzoto ya moto moko, kopalangana epai na basusu mpe komimonisa yango moko lokola sida nsima ya bambula koleka zomi. Kopalangana ya sida emonanaki mbala moko kati na bakontiná misato mpe nokinoki ekómaki na mikili 20 mikeseni. Emonani polele ete likebisi ya liboso lizalaki te mpo na yango!
Atako mikakatano mizali, banganga-mayele mingi bazali kotalela mikolo mizali koya na elikya, bazali na makanisi ya kolónga na ntina na bolukiluki oyo ezali kosalema mpe bokóli oyo ekomonana mpenza na bambula oyo ezali koya. Zulunalo International Herald Tribune emonisi ete: “Bato na mayele mingi balobi ete elikya ya malamu koleka mpo na bokóli ya solosolo ezali biotechnologie, koyeba kosalela esaleli ya kosangola kati na baselíle ya bomoi. Bato na mayele na makambo matali biotechnologie bazali na elikya ya kosala baselíle oyo ebimisaka biloko oyo bibomaka nkei ya mikrobe, elingi koloba, lolenge mosusu ya tekiníki ya kobimisa antibiotiques.”
Nzokande, ezali na matomba mosusu ya mabe kati na yango. Tekiníki yango epesaki nzela na kokɔtisa gènes kati na virus oyo epesaka bokɔnɔ te na boye ete virus yango epesa gènes epai na bato. Tekiníki yango ekoki kosalelama na lolenge ya malamu, mbala mosusu kopesa nzela mpenza na kobimisama ya oyo ebéngami tekiníki ya antibiotiques. Kasi, tekiníki yango ekoki mpe kosalelama mpo na mikano mabe.
Na ndakisa, gènes oyo euti na Ebola ekoki kokɔtisama na kozanga likebi to na nkó kati na virus mosusu, ya grípɛ mpe ya kitútu. Na nsima, virus wana oyo ebomaka ekoki kopalangana na nzela ya kɔsúkɔsú to na likisɛ́. Monganga Karl Johnson oyo alekisaki bomoi na ye na bolukiluki mpo na makambo matali virus lokola, Machupo mpe Ebola, alobaki ete ntango ekoya mosika te wana “moto nyonso oyo azali na makanisi makeseni mpe azali na bisaleli ya motuya ya mwa badolare mpe auti kotánga kelasi ya bioloji akoki kobimisa bokɔnɔ oyo ekoki komonisa Ebola ete ezali bobele bokɔnɔ moko mpamba.” Babiolojiste mosusu bandimi likanisi yango.
Mwango
Kosilisa mikakatano mitali makɔnɔ oyo mapalanganaka ezali bobele likambo litali kobimisa bankisi ya sika te. Etaleli mpe kosilisa mikakatano ya makɔnɔ oyo mauti na bobóla, bitumba, kokima mboka, kosalela bilangwiseli, nkaka kati na bingumba, lolenge ya bomoi ezangi kolɔngɔ́nɔ́, kobeba ya mopɛpɛ mpe kobebisama ya ezingelo. Tóloba na bosembo. Tokanisi solo ete bato bakoki mpenza kosilisa mikakatano minene wana?
Liloba ya Nzambe lilobi ete: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Na bongo, tosengeli kotya elikya epai na nani? Makomami malandi ete: “Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali kosunga ye; oyo azali na [Yehova] Nzambe na ye; ye oyo asalaki [likoló] mpe [mabelé].” Bobele Yehova, Mozalisi na bato, akoki kosilisa mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango.—Nzembo 146:3-6.
Biblia, Liloba ya Nzambe oyo lipemami, kati na esakweli monene ya Yesu oyo etali “elembo . . . ya kosukisama ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo,” elobelaki bampasi ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto oyo ezali konyokola bato lelo. Yesu alobaki ete: “Maladi mabe makozala esika moko na mosusu.”—Matai 24:3-8; Luka 21:10, 11, NW.
Nzokande, Biblia elobeli mpe lolenge ya bomoi na mikolo mizali koya awa na mabelé na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe ntango “mofandi moko te akoloba ete, ngai nazali na malali.” (Yisaya 33:24; Matai 69, 10) Na yango, baoyo bazali kotya elikya na bango na Yehova bazali na ntina malamu ya kondima ete bato ya botosi, mosika te, bakozwa libondisi ya ntango nyonso oyo litali te bobele makɔnɔ oyo mabomaka oyo mazali konyokola bato kasi mpe mikakatano oyo mizali kopesa nzela na makɔnɔ yango. Baklisto ya solo bazali komonisa botɔ́ndi mpo na milende oyo minganga bazali kosala mpo na kobundisa mikrobe oyo ebomaka. Nzokande, bayebi ete mwango oyo ekosilisa bokɔnɔ mpe liwa mpo na libela ezali epai na Yehova, oyo ‘akosilisa bampasi na biso nyonso.’—Nzembo 103:1-3; Emoniseli 21:1-5; 22:1, 2.
[Elilingi na lokasa 10]
Biblia ezali kolaka lolenge ya bomoi ntango mofandi moko te akoloba ete “nazali na malali”