Sida: Lolenge ya koluka kosilisa yango
KINO lelo, nkisi mpo na kosalisa sida ezali te, mpe emonani ete minganga bakozwa yango sikawa te. Atako bankisi ya sika ezali kolɛmbisa bokoli ya maladi yango na kati ya nzoto, kasi eleki malamu kopɛngola kozwa yango. Nzokande, liboso ete tólobela ndenge ya komibatela na yango, tiká tótalela naino ndenge moto akoki kozwa sida mpe ndenge akoki kozwa yango te.
Moto akoki kozwa sida na ndenge minei oyo: (1) soki asaleli ntonga to sɛrɛngɛ oyo ezalaki na mikrobe ya sida, (2) soki asangisi nzoto (na eboteli, na esumbeli, to na monɔkɔ) na moto oyo azali na sida, (3) soki bazongisi ye makila to bankisi ya makila oyo ezali na mikrobe ya sida, atako likama yango ekiti mingi na mikili mingi ya bozwi epai kuna basalaka makila ekzamɛ mpo na kopengola makila oyo ezali na mikrobe ya sida, mpe (4) na nzela ya mama oyo azali na sida, oyo akoki kopesa yango na mwana na ye liboso to ntango ya kobotama to ntango azali komɛlisa ye mabɛlɛ.
Lisangá moko ya minganga (U.S. Centers for Disease Control and Prevention) (CDC), emonisi ete bilembeteli minene ya siansi elobi boye (1) okoki kozwa sida te lokola okoki kozwa miyoyo to gripe, (2) okoki kozwa yango te soki ofandi mpembeni ya moto oyo azali na yango to mpe soki osimbi ye to oyambani na ye, (3) okoki mpe kozwa yango te soki olei biloko oyo moto ya sida asimbaki, alambaki to atyaki na mesa, mpe (4) okoki kozwa yango te soki osaleli twalɛti moko, telefone moko, olati elamba moko na moto ya sida, to kolya mpe komɛla na esaleli moko na ye. Lisusu, lisangá yango elobi ete ngungi to nyamankɛkɛ (insect) mosusu ekoki kopesa moto sida te.
Myango ya komibatela
Mikrobe ya sida ebombanaka na kati ya makila ya moto oyo azali na yango. Soki batubi moto yango ntonga, mwa makila mpe mikrobe ekoki kotikala na ntonga yango to na kati ya sɛrɛngɛ. Soki batubi moto mosusu bobele na ntonga yango, akoki kozwa mikrobe ya sida. Na bongo, kobanga soko moke te kotuna monganga to lifulumɛ soki ozali na ntembe mpo na ntonga oyo alingi kotuba yo na yango. Ozali na lotomo ya koyeba malamumalamu; mpamba te bomoi na yo ezali na likama.
Mikrobe ya sida ezalaka mpe na kati ya mai ya eboteli ya mobali to na eboteli ya mwasi oyo azali na sida. Na yango, lisangá moko (CDC) esɛngi boye: “Koboya kosangisa nzoto ezali mwango bobele moko ya malamu koleka mpo na komibatela. Soki olingi kosangisa nzoto, osengeli kozela kino ntango okobalana na moto oyo azali sembo mpe azali na sida te.”
Yebá ete mpo na komibatela na sida, “babalani mibale basengeli kozala sembo moko epai na mosusu.” Soki yo ozali sembo kasi mobalani na yo azali sembo te, yebá ete obatelami te. Mbala mingi likambo yango ebimisaka mikakatano mpo na basi oyo bazali kofanda na bisika oyo mibali bakómisaka bango lokola baombo na makambo ya kosangisa nzoto mpe na makambo ya mbongo. Na mikili mosusu, basi kutu bapesameli nzela te ya kosolola na mibali na bango makambo ya kosangisa nzoto, ata mpe komeka koboya mitindo ya kosangisa nzoto oyo mizali na makama.
Nzokande, basi yango nyonso te nde bazangi mwango ya komibatela. Bolukiluki moko esalemaki na ekólo moko ya Afrika ya wɛsti emonisaki ete basi oyo balukaka mbongo bango moko, bazalaki na likoki ya koboya kosangisa nzoto na mibali na bango oyo bazali na sida, kozanga ete mibali na bango básala bango matata. Na New Jersey, na États-Unis, basi mosusu baboyaki kosangisa nzoto soki mobali aboyi kolata kapɔti. Ya solo, atako kapɔti ekoki kobatela moto na sida to na maladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, kasi esengeli kosalela yango malamu mpe na ntango nyonso ya kosangisa nzoto.
Ntango ya kosalisa ekzamɛ
Karen, oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, akokaki kosala mpenza eloko te mpo na komibatela na maladi yango. Mobali na ye azwaki sida bambula mingi liboso ya libala na bango, mpe babalanaki ntango oyo maladi yango mpe kosalisa ekzamɛ na yango eyebanaki mpenza mingi te. Nzokande, sikawa, kosalisa ekzamɛ ya sida ekómi momemeseno na mikili mosusu. Na bongo, soki moto moko azali na mwa ntembe mpo na nzoto na ye, ezali malamu kosalisa ekzamɛ liboso ya koluka kobala. Karen apesi toli ete: “Poná mobalani na yo malamu. Soki osali liponi ya mabe, yango ekoki kopesa yo mpasi mingi mpe kutu kobungisa bomoi na yo.”
Soki mobalani moko asali ekobo, kosalisa ekzamɛ ekoki kozala likambo ya malamu mpo na kobatela mobalani oyo asali ekobo te. Lokola mikrobe ya sida ekoki mbala mosusu komonana te soki ekzamɛ esalemi liboso ya sanza motoba nsima ya kozwa mikrobe yango, esengeli kosalisa ekzamɛ mbala mingi. Soki mobalani oyo asalaki ekobo te azongeli kosangisa nzoto na mobalani oyo asalaki ekobo (yango elingi komonisa ete alimbisi ye), kosalela kapɔti ekoki kozala libateli.
Ndenge nini mateya ekoki kosalisa?
Esengeli koyeba ete atako Biblia ekomamaki kala liboso ya kopalangana ya sida, kosalela mitinda na yango ezali malamu mpo na komibatela na maladi yango. Na ndakisa, Biblia ekweisi likambo ya kosangisa nzoto na moto oyo azali mobalani na yo te. Ezali kosɛnga na babalani ete bázala sembo kati na libala na bango. Elobi mpe ete baklisto basengeli kobala bobele baoyo bazali kosalela mitinda na yango lokola bango. (1 Bakolinti 7:39; Baebele 13:4) Biblia ezali mpe kopekisa kosalela lolenge nyonso ya biloko oyo ezali kobebisa nzoto mpe kosalela makila.—Misala 15:20; 2 Bakolinti 7:1.
Ezali malamu koyeba yo moko makama oyo makoki kobima na kosangisa nzoto na moto oyo azali na sida. Koyeba makambo matali sida ezali kosalisa bato ete bámibatela na yango.
Ebongiseli moko ebéngami AIDS Action League elobi ete: “Mbala mingi, bato bazali na likoki mpo na komibatela na sida. Kino nkisi ekomonana, mateya ezali mwango bobele moko ya malamu koleka mpo na komibatela na sida.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Ezali malamu ete baboti básolola polele kati na bango mpe na bana na bango na ntina na sida.
Bankisi nini bazali kosalela sikoyo mpo na maladi yango?
Mbala mingi bilembo ya sida ebimaka na nzoto ya moto nsima ya mbula motoba kino mbula zomi uta azwaki maladi yango. Na boumeli ya bambula yango, etumba monene esalemaka na kati ya nzoto. Mikrobe ya sida ebotamaka mpe ebomaka baselile ya ebongiseli oyo ezali kati na nzoto oyo ebundisaka mikrobe. Baselile ya ebongiseli yango mpe ebundisaka mikrobe yango. Nsukansuka, lokola bamiliare ya mikrobe ya sika ya sida ebotamaka mokolo na mokolo, ebongiseli ya kobundisa mikrobe ekokoka lisusu kobunda te.
Bankisi ndenge na ndenge ebimisami mpo na komeka kosalisa ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe. Bankisi yango ezali na bankombo makasi oyo ekomami na mokuse—AZT, ddI, mpe ddC. Atako bato mosusu bakanisaki ete bankisi yango ezali komonisa ete ekopesa matomba malamu mpe ekoki kutu kozala nkisi mpenza mpo na kobikisa bato ya sida, bilikya yango bibungaki noki. Bankisi yango ezali lisusu makasi te mpe ezali kobimisa mikakatano mingi epai ya bato mosusu—globules rouges ezali kokita, makila ezali kobeba mpe ezali kozokisa misisa ya motó, ya mabɔkɔ mpe ya makolo.
Sikawa bankisi mosusu mingi ya sika ebimi oyo ebéngami antiprotéases. Minganga bazali kopesa yango na kosangisáká yango na bankisi mosusu mibale mpo na kobundisa mikrobe yango. Baekzamɛ emonisi ete atako bankisi yango oyo esangisami misato esika moko ezali koboma mikrobe ya sida te, kasi ezali kosala ete mikrobe yango ebotama lisusu te to ebotama mingi te kati ya nzoto.
Bankisi yango oyo esangisamaka misato esika moko esili kobimisa matomba malamu epai ya baoyo bazali na sida. Nzokande, minganga bakanisi ete nkisi yango ekoki kosalisa malamu soki epesami noki na ebandeli ya kozwa mikrobe yango, liboso ete bilembo ya sida ebima na nzoto. Ntango esalemi bongo, likoki ekoki kozala ya kopekisa, mbala mosusu mpo na libela, mikrobe yango ete ekola kino kokóma maladi mpenza ya sida. Lokola kosalisama na lolenge wana ezali naino ya sika, likambo ya ntina ezali ya koyeba ntango boni ekopekisa bokoli ya mikrobe yango.
Bankisi yango oyo esangisami misato esika moko ezali ntalo mingi. Bankisi yango misato mpe ekzamɛ ezali kosɛnga dolare 12 000 na mbula moko. Longola mokumba ya mbongo, moto oyo azali kosalisama na mwango yango asengeli kokendeke mbala na mbala na frigo, epai nkisi yango esengeli kobombama. Mingi mpenza, moto ya maladi asengeli komɛla bankisi mosusu mbala mibale na mokolo mpe mosusu mbala misato na mokolo. Bankisi mosusu asengeli komɛla yango ntango alei mwa eloko, nzokande mosusu asengeli komɛla yango ntango alei naino eloko te. Mwango yango ya kosalisama ekómaka mpasi mingi koleka soki moto ya maladi yango asengeli mpe komɛla bankisi mosusu mpo na maladi mosusu oyo ezwaka bato ya sida.
Minganga bazali kobanga mpo na mikakatano oyo ekoki kobima soki moto ya maladi akati komela nkisi yango. Mikrobe yango ekobotama lisusu mingi koleka, mpe ekoki mbala oyo kotɛmɛla bankisi oyo moto yango azalaki komɛla mpo na kobundisa yango. Mikrobe ya sida oyo ezali kotɛmɛla bankisi ekoki kokóma mpasi mpo na kobundisa yango. Lisusu, mikrobe wana ya makasi ekoki kozwa bato mosusu.
Mangwele ezali mwango ya malamu?
Balukiluki mosusu ya nkisi ya sida balobi ete mwango ya malamu mpo na kosukisa kopalangana ya sida ezali kobimisa nkisi ya mangwele ya malamu. Bankisi ya malamu ya mangwele mpo na kobundisa maladi lokola kɔngɔ́ (fièvre jaune), kintutu (rougeole), makɛlo (oreillons), mpe rubéole esalemi na mikrobe oyo elɛmbi. Na momeseno, soki mikrobe moko oyo elɛmbi batubi yango na nzoto ya moto, ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe ekobundisa bobele te mikrobe yango kasi ekotonga mpe bibundeli mosusu na kati ya nzoto mpo na koboma mikrobe nyonso ya lolenge yango oyo ekokɔta.
Bolukiluki mibale oyo bautaki kosala na makako emonisaki ete mokakatano yango ya sida ezali ete ata mikrobe na yango oyo elɛmbi ekoki koboma. Na maloba mosusu, mangwele ekoki kopesa maladi yango na esika ete ebatela moto.
Bolukiluki mpo na kozwa nkisi ya mangwele ya sida elɛmbisi bato. Mikrobe ya sida etɛmɛli bankisi ndenge na ndenge oyo ekokaki mpenza koboma mikrobe oyo elɛmbi, ndenge emonisami na baekperiansi soko zomi na mibale oyo esalemaki. Lisusu, sida ekómisi makambo mpasi koleka pamba te mikrobe na yango ebongwanaka wana ezali kobotama. (Sikawa ezali na mitindo soko zomi ya mikrobe ya sida na mokili mobimba.) Longola mokakatano wana, mikrobe yango ebundisaka baselile ya ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe, oyo nkisi ya mangwele esengelaki kosala na yango elongo mpo na kobundisa mikrobe yango.
Makambo ya nkita mpe ezali na ntina mingi kati na bolukiluki yango. Ebongiseli moko (Washington-based International AIDS Vaccine Initiative) elobi ete “bakompanyi ya bato ezali mpenza kosala milende mingi te na bolukiluki.” Bazali kobanga mpamba te nkisi ya mangwele ekobimisela bango mosolo mingi te, mpo ete mingi na yango ekotɛkama na mikili ya bobola.
Atako mikakatano ezali mingi, balukiluki bazali kokoba na mosala na bango mpo na kozwa nkisi ya mangwele ya malamu mpo na sida. Nzokande, kino lelo, emonani ete nkisi ya mangwele mpo na sida ekobima sikawa te. Soki nkisi ya mangwele emonani, likambo mosusu oyo ekosɛnga mosala monene, mbongo mingi mpe ya likama, ezali bongo komeka yango epai ya bato.
[Etanda na lokasa 5]
Nani azali kozwa mikrobe ya sida?
Na mokili mobimba, bato soko 16 000 bazali kozwa yango mokolo na mokolo. Elobami ete bato koleka 90 likoló ya monkama oyo bazali kozwa sida bafandi na mikili ya bobola. Moto moko kati na bato zomi azali mwana ya nse ya mibu 15. Baoyo batikali bazali mikóló oyo kati na bango 40 likoló ya monkama bazali basi, mpe koleka katikati bazali na mibu kobanda 15 kino 24.—Organisation mondiale de la santé et Programme commun des Nations unies sur le sida.
[Etanda na lokasa 7]
Ndenge nini okoki koyeba moto oyo azali na sida?
Ezali te bobele na kotala mpamba nde okoki koyeba moto oyo azali na sida. Atako moto oyo azali na yango, kasi soki bilembo emonani naino te, amonanaka lokola azali na nzoto kolɔngɔnɔ, mpe akoki kopesa mikrobe yango na bato mosusu. Okoki kondima moto oyo alobi na yo ete azali na sida te? Ezali bongo te. Bato mingi oyo bazali na mikrobe ya sida bango moko bayebaka te ete bazali na yango. Baoyo bayebi mbala mosusu babombaka, to bakosaka. Ankɛtɛ moko esalemaki na États-Unis emonisaki ete bato minei likoló na bato 10 oyo bazalaki na mikrobe ya sida bayebisaki bato oyo basangisaka nzoto na bango te ete bazali na mikrobe ya sida.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Boyokani kati na VIH mpe sida
VIH elimboli “Virus de l’immunodéficience humaine,” mikrobe oyo ebomaka mokemoke ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe. Sida elimboli “syndrome d’immunodéficience acquise.” Yango ezali eteni ya nsuka ya bokoli ya mikrobe VIH. Nkombo yango ezali komonisa lolenge VIH ebebisaka mpenza ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe, mpe ekosala ete nzoto ya moto oyo azwi yango ekoka lisusu te kobundisa mikrobe mosusu.
[Elilingi na lokasa 7]
Kosalisa ekzamɛ ya sida liboso ya kobala ezali mpenza likambo ya mayele