Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/12 nk. 24-27
  • Nakangamaki na bosembo nyonso na lisanga ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakangamaki na bosembo nyonso na lisanga ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakutani na komekama
  • Nakomi pionnier
  • Mosala ya pionnier kati na etuka ya ngele
  • Mosala na Béthel
  • Nazwi mosala mosusu
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Tosili kosala oyo tosengelaki kosala’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Yehova apambolaki mpenza ekateli nazwaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Yehova ateyaki ngai banda bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/12 nk. 24-27

Nakangamaki na bosembo nyonso na lisanga ya Nzambe

LISOLO YA ROY RYAN

Sandhill (“Ngomba ya zelo” na Angele) ezali komema mpenza nkombo na yango malamu: ezalaki na yango mpenza monene te koleka ngomba monene ya zelo kati na esobe monene oyo elekani likoló na lobwaku na Ekólo ya Missouri, na Etats-Unis. Mboka yango, etongama na bokutani na banzela mibale, ezalaki na bakilometele mitano na ouest ya engumba ya Rutledge, mpe ezalaki bobele na bandako mwambe to libwa, na ndakonzambe ya méthodiste mpe ndako moke ya kotula bibende to forge. Ezali nde wana ngai na botamaki, mokolo ya 25 octobre 1900.

TATA na ngai azalaki motuli to forgeron ya mboka. Baboti na ngai bazalaki kokende mingi te na ndakonzambe, kasi maman na ngai abandaki kotinda ngai na eteyelo ya lomingo to école du dimanche epai ya ba méthodistes. Nazalaki kolinga nkombo “méthodiste” te, mpamba te nazalaki kokanisa ete elekaki malamu na kobengama “moklisto”; nzokande, nazalaki na mposa mpenza ya solo ya Biblia mpe nazalaki kosepela mingi na bomoi ya seko.

Na mibu 16, nakendeki kosala kati na kompani ya nzela ya engunduka na Santa Fe. Moyekoli moko ya Biblia (ezali nde motindo oyo bazalaki kobenga ba Témoins de Jéhovah na kala) na nkombo ya Jim ayaki kosala esika moko na ngai, mpe mbala mingi tozalaki kosala misala mingi esika moko.

Jim azalaki koloba, mpe nazalaki koyoka oyo ye azalaki kolobela ngai na Biblia. Lokola makambo yango ebandaki kosepelisa ngai, nasengaki ye adefisa ngai moko na mikanda na ye. Jim apesaki ngai volume ya liboso ya mokanda, Etudes des Ecritures, oyo ebimisamaki na ndeko charles Russell, ya Lisangani ya Bayekoli na Biblia ya mokili mobimba. Ntango nazongiselaki ye mokanda yango, nasɛngaki ye mikanda misusu. Mwa ntango moke na nsima, Jim alongwaki na kompani; na nsima nayaki komona ye kati na balabala moko na Rutledge, azalaki kozwa bakomande mpo na mokanda oyo ezalaki na bililingi ya Scénario du Photo-Drame de la création. Na nsima abengisaki ngai na makita oyo mazalaki kosalama epai na ye. Mikolo nyonso ya eyenga, nazalaki kokende na makolo, kotambolaka bakilometele mitano oyo ekabolaki ngai na mboka Rutledge.

Na ntango zulunalo L’Age d’Or (lelo oyo Réveillez-vous!) ebandaki kobima na 1919, na monisaki mposa ya kosakola nsango malamu. Moyekoli ya Biblia moko mpe ngai moko. tozwaki likatami ya kokabola zulunalo yango ya sika na mosala ya ndako na ndako. Kasi tozalaki na mwa nsɔni moke na kosakola epai oyo biso tozalaki kofanda; na bongo tozwaki engunduka mpo na kokende kati na engumba oyo ezalaki pene. Na ntongo, na ntango tokomaki, tokabwanaki mpe tobandaki kotala bato na bandako kino na nsima na nzanga, atako tozwaki ata formation moko te mpo na mosala yango. Nazwaki likoki ya kosala abonema mibale, oyo moko katina yango esalamaki na mobu moko oyo nazalaki kosala na ye elongo na kompani ya nzela ya engdunduka.

Nayaki kozwa batisimo mokolo ya 10 octobre 1920, kati na etima moko pene na Rutledge. Baboti na ngai bazalaki kosepela te ete nazala kati na Bayekoli na Biblia ya mokili mobimba mpo na botemeli oyo bango bakutanaki na yango, na bopusi ya bakonzi na mangomba, na boumeli ya mibu 1914-1918. Atako bongo, na nsima tata na ngai abandaki koyangana na bamoko ya makita na biso, mpe abandaki lisusu kotanga zulunalo L’Age d’Or. Liboso ya kufa na ye, maman na ngai, abandaki kondima mingi mayele ya biso na solo ya Biblia. Nzokande, ata mosangani moko te ya libota na ngai andimaki solo yango.

Nakutani na komekama

Kati na mikolo wana, tozalaki bobele minei na koyangana ntango nyonso na makita ya boyekoli Biblia na Rutledge. Bandeko misato mosusu bayaki kolongwa na lisangá. Moko kati na bango azalaki molobi malamu mpe mbala na mbala azalaki kosala ba diskur kati na etuka. Nzokande, ayaki kokoma na lolendo na mayele na ye mpe na komona ete likoki yango ekokitisama na kosanganaka na mosala ya kosakola ndako na ndako lokola baklisto ya ekeke ya liboso.​—Misala 5:42; 20:20.

Na ntango bato yango misato bakataki boyokani na bango na Bayekoli ya Biblia ya mokili mobimba, nazali komikundola ete nazalaki na liyoki motindo moko na Petelo na eleko oyo Yesu alobaki ete esengelaki ‘kolya mosuni na ye mpe komela makila na ye.’ Kozokisamaka na liteya wana, bato mingi batikaki ye. Na bongo Yesu atunaki na bantóma na ye: “Bino mpe bolingi kokende?” Petelo ayanolaki: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba na bomoi ya seko.”​—Yoane 6:67, 68.

Petelo akangakaki mpenza ntina te na nyonso oyo Yesu alingaki koloba na ‘kolya mosuni na ye mpe komela makila na ye,’ kasi azalaki koyeba ete Yesu azalaki na maloba ya bomoi. Ezali nde oyo nayokaki na kotalela lisangá: ezalaki na solo, atako ntango nyonso nazalaki koyeba mpenza te makambo nyonso oyo nazalaki kotanga kati na mikanda. Nzokande, ntango nazalaki kokanga ntina te na likambo moko, nazalaki kobimisa ntembe te. Na kotikaka ntango, makanisi mazalaki kopesama na likambo yango, to bazalaki kobongisa makanisi. Nazalaka ntango nyonso na esengo na ndenge nazelaki kongengisama na motema molai.​—Masese 4:18.

Nakomi pionnier

Na sanza ya juillet 1924, nayanganaki na assemblée internationale na mboka columbus, na Ohio. Zulunalo L’Age d’Or elobelaki yango lokola “assemblée ya monene oyo esalema naino te na lisangá ya Bayekoli ya Biblia.” Ezali nde na libaku yango bandimaki ekateli ya móto oyo ezalaki na motó na likambo “Efundeli.” Mateya oyo mapesamaki na ntango ya assemblée yango mpe elimo oyo emonisamaki elendisaki ngai na kokoma pionnier.

Na bozongi na ngai na assemblée, nalongwaki na kompani ya nzela na engunduka, mpe nabandaki mosala na pionnier elongo na Moyekoli mosusu ya Biblia. Nzokande, mbula moko na nsima, kolongono na nzoto ya baboti na ngai ebandaki kobeba na lolenge ete bakomaki na mposa na ngai. Na bongo nakataki mosala na ngai ya pionnier mpe nazwaki mosala kati na kompanyi oyo ekosalaka batyo milai oyo ememaka na biloko lokola pétrole. Kasi lokola bato oyo bazalaki kosala kuna bazalaki baninga malamu te, nalongwaki mpe namikɔtisaki na mosala ya kobokola ba nzoi mpe na botekisi mafuta ya nzoi.

Na eleko ya automne 1933, baboti na ngai bango mibale bakufaki, nalongwaki na mikumba na ngai. Na bongo, na eleko ya printemps 1934, napesaki banzoi na ngai na moto moko oyo akobatela yango, namisalelaki mwa ndako moke oyo ezalaki kobendama na motuka mpe nazongelaki mosala ya pionnier. Na ebandeli, nazalaki kosakola elongo na Témoin moko ya mokóló kati na nzinganzinga ya mboka Guincy, na ekólo ya lllinois. Na nsima, nazongaki kati na mboka Missouri, epai kuna nasanganaki na etuluku moko ya ba pionniers.

Na 1935, mabelé ya etuka ya Midwest ezalaki kobimisa lisusu nkona te, mpe lokola etuka oyo kati na yango tozokaki ezalaki kobika bobele na bilanga, ezalaki mpasi mingi. Moto moko te azalaki na mosolo; baoyo bazalaki kozwela biso mikanda, bazalaki komonisa botondi na bango na kopesaka biso biloko ya kolya to biloko mosusu.

Mosala ya pionnier kati na etuka ya ngele

Na eleko ya hiver yango, tokitaki kati na ekolo ya Arkansas mpo na kokima malili. Totikaki mikanda mingi kati na etuka yango, mpe tozalaki kozwa na lipesi biloko nyonso oyo bikoki kobombama na oyo tokokaki kolikya. Mbala mingi tozalaki kondima biloko mosusu oyo tokokaki kotekisa, lokola biloko oyo bisalemi na aluminium, ba cuivres ya kala, ba radiateurs ya kala mpe ba batteries ya voiture ya kala. Nde na yango, tozalaki na mosolo mokoki mpo na kosomba essence mpo na Ford A na ngaí, oyo tozalaki kosalela na mosala ya kosakola.

Toteyaki kati na bituka ya Newton, Searcy mpe Carroll, oyo ezali kati na esika oyo ya ngomba oyo ezwami kati na bangomba Ozark. Tokoki kokoma mokanda moko na nyonso oyo tokutanaki na yango na bokutani na bafandi ya ngomba ya Arkansas. Lokola na eleko yango ba nzela ezalaki ya malamu mpenza te, ntango mosusu ezalaki te, mbula mingi tozalaki kotambola na makolo. Kati na etuluku na biso, ba pionniers mosusu bazalaki kokende kotala bato oyo bazalaki kofanda na likoló mpenza na ba mpunda.

Mbula moko, toyokaki lisolo ya mobali moko, Sam, oyo azalaki kosepela na solo; nsuka na yango toyaki komona ndako na ye na nsonge ya ngomba moko. Ayambaki biso na motema malamu mpe azalaki na esengo ya kopesa biso esika ya kolala na butu. Mwasi ya Sam asepelaki na nsango na biso te, kasi mwana na ye ya mibu 16, Rex, esepelaki Na ntango ya bokei na biso, Sam asɛngaki biso na kozonga lisusu. Ezali nde oyo tosalaki na nsima na póso mibale, mpe lisusu mpo na mbala wana tolalaki epai na ye.

Na ntango ya kokende mpo na mbeba oyo, mwasi ya Sam nde asɛngaki biso na kozonga Alobaki ete tozali kosala bopusi malamu epai ya Rex. Alimbolaki biso ete: ’’Azali mwana mobali moko matata oyo alobaka makambo ebele ya minene, mpe kobanda bino boyaki awa azali koloba yango lisusu mingi te.” Nayaki komona lisusu Rex na nsima na ba mbala, na ntango oyo azalaki kolanda mateya na Eteyelo ya bamisionɛrɛ na Galaad na mboka South Lansing, kati na ekólo ya New York. Na boumeli ya ba mbula, bokutani lokola oyo epesaki ngai, basepeli mingi.

Mosala na Béthel

Ntango nasalaki demande na ngai mpo na kozala pionnier, nasalaki mpe demande mpo ya bokoti na Béthel, na biro monene ekotambwisaka misala ya ba Témoins de Jéhovah na New York. Na eleko ya printemps 1935, nakebisamaki ete demande na ngai endimamaki mpe nasengelaki kokende komimonisa na Ferme ya la Société Watchtower na mboka South Lansing mpo na kobanda mosala na ngai na Béthel. Mbala moko nazwaki bibongiseli mpo na kopesa ndako na ngai oyo ebendamaka na motuka ya pionnier epai na moko na basalani na ngai ya mosala.

Namataki na voiture na ngai Ford A mpe nazwaki nzela mpo na kokende na ekólo New York; nakomaki kuna mokolo ya 3 mai 1935, na ngonga zomi mpe na minute ntuku misato ya ntongo. Na pene na ngonga moko ya nsima na nzanga, bapesaki ngai mosala: ezalaki ya kopasola nkoni. Mokolo ya nsima, bayebisaki ngai na kende esika bakosalaka miliki ya ferme mpo na kosalisa na bokamoli mabele ya bangombe. Nasalaki ba mbula mingi kati na mosala yango; mbala mosusu nazalaki kokamola mabele ya bangombe na ntongo mpe na mpokwa. bongo, bangonga mosusu nazalaki kosalisa bandeko oyo bazalaki kosala kati na bilanga. Nasalaki mpe na bobateli ba nzoi mpe nazalaki kokongola mafuta na nzoi mpo na libota ya Béthel. Na 1953, batindaki ngai na esika bakosalaka fromage.

Moko kati na baoyo basalaki bopusi makasi na ngai na ndakisa na bango malamu ya komikitisa, ya bosembo mpe ya botosi na Jéhovah ezali ndeko Walter Thorn, to “Tata” Thorn. Azalaki moko na Bayekoli ya Biblia 21 oyo baponamaki na 1894 mpo na kozala bapelerins ya liboso​—bokokani ya bakengeli ya zongazonga sikawa​—oyo mokumba mopesamelaki bango ya kotala mwa motuya ya masanga mpo na kolendisa bango. Na nsima na kolekisa ebele na ba mbula kati na mosala ya nzonganzonga, Ndeko mobali Thorn ayaki na ferme ya Bokonzi, epai wapi abandaki kobatela bansoso. Mbala mingi nazalaki koyoka ye koloba ete: “Na ntango ekomelaka ngai na komimona ntina mingi, na motema na ngai moko nazalaki komilobela: ‘Eh yo, eloko mpamba, ozali na ntina ya kosala lolendo?’ ”

Moto mosusu ya bopolo oyo akomaki ndakisa mpo na ngai ezali ndeko John Booth, oyo sikawa azali mosangani ya College central ya ba Témoins de Jéhovah. Mbala mingi batangaka maloba oyo alobaki: “Ezali te oyo ozali kosala nde ezali mpenza na ntina, kasi mpo na nani oyo ozali kosala.” Liloba moko ya petee, kasi ya solo! Kosalela Jehova ezali libaku monene oyo eleki mabaku nyonso.

Moko na bantango oyo eleki na ntina na bomoi na ngai na Béthel ezalaki bofungwami ya Eteyelo ya bamisionere na Galaad na ferme na 1943. Ezalaki mpenza esengo monene ya kozala elongo na ba pionniers oyo bauti na bisika bikeseni ya mokili mobimba. Na eleko yango, kelasi nyonso ezalaki na bankama ya bayekoli; na yango, na nsima na sanza motoba nyonso, ba pionniers ya sika nkama bazalaki koya na ferme ya Bokonzi. Bopesi ya mapɔlɔmi ezalaki kobenda bankama na bato kati na etuka yango ya nord ya ekólo New York.

Nazwi mosala mosusu

Na ntango Eteyelo ya Galaad ekendaki na Brooklyn mpe ete bandako oyo ezalaki na esika ya kolala mpe ya kelasi na South Lansing etɛkamaki, balongolaki esika ya bosali miliki ya ferme ya la Société Watchtower na Wallkill, kaka kati na Ekólo New York. Bongo, na eleko ya automne 1969, natindamaki na kati na ferme yango, epai wapi nalandaki kosala fromage kino na 1983. Na nsima bapesaki ngai mosala ya sika: kobongisa libanda ya lopango.

Esili koleka mwa ntango, batunaki ngai likambo nini esalaki ngai ndenge nakomaki na mosala mosusu nsima na kosala na boumeli ya mibu 30 kati na basali ya fromage. Nayanolaki na polele ete: “Yango etungisaki ngai te, mpamba te nazalaki kolinga kosala fromage te.” Eloko ezali ete tokoki kozala na esengo na kosalelaka Jéhovah ezala esika nini oyo batye biso, kaka soki tobateli likanisi malamu mpe na kotosaka na botambwisi ya teokratike na komikitisa. Na yango, atako nazalaki kolinga mpenza te kosala fromage, nasepelaki na mokumba oyo bapesaki ngai mpamba te nazalaki kopesa lisalisi na libota ya Béthel. Soki tokosalela Nzambe na biso monene Jéhovah na bosembo mpe kozanga kolelalela, tokoki kozala na esengo ezala mosala nini oyo bakopesa biso na kosala.

Na nsuka na bomoi na ngai, nakanisi ete nakokoka te komizwela esika moko ya malamu bobele na Béthel. Bazali kosalisa ngai malamu mpe nazali kolanda kokokisa mosala na ngai atako nazali na mibu 90. Uta ba mbula mingi, nazali na libaku ya kotambwisa texte ya mokolo na mokolo na likelemba na libota ya Béthel na ferme ya Société. Na ntango nazali kozwa libaku, nalendisaka bandeko oyo bazali koya sika na Béthel na kozwa litomba na mabaku nyonso ya mosala oyo mokopesamela bango mpe koyekola na kosepela na yango mpe na kozwa esengo na yango.

Na boumeli ya bambula, nazwaki likoki ya kosala mibembo mbala na mbala na mboka mopaya: na mboka lnde, na mboka Népal, na Asie mpe na Mpoto. Tala toli oyo ekoki kosalisa ba Témoins de Jéhovah nyonso oyo bazali na mokili mobimba, kati na masangá na bango: Bozala na esengo mpe boyeba kosepela na ezalela oyo bozali kati na yango, mpe bokola na elimo na mabelé oyo bosili kolonama.

Nasalaki liponi ya kotikala monzemba, mpamba te na ezaleli yango nakokaki komipesa mobimba na mosala ya Nzambe. Na mbano ya bosembo na biso, Nzambe na biso monene alaki biso bomoi ya seko. Mpo na bato mingi, ekozala kati na paradis oyo ekozongisama na mabelé. Basusu bazali na elikya ya kozala na bomoi ezangi nsuka kati na makoló, epai kuna bakokokisa mikumba nyonso oyo mikopesamela bango.

Mbala mosusu basusu bakokanisa ete nazalaki na bomoi moko molai mpe oyo ekokisami malamu. Ezali solo ete bomoi na ngai ekokisami malamu, kasi molai mpenza te. Na kotikalaka pene na lisangá ya Nzambe mpe na maloba ya solo oyo asila kopesa biso, tokoki koyeisa bomoi mi biso ya seko molai.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ntango oyo ndeko Roy Ryan azalaki kolobela lisolo ya bomoi na ye, mbala moko kolongono ya nzoto na ye ekomaki mabe. Asilisaki bomoi na ye ya mabelé mokolo ya 5 juillet 1991, mwa ntango moke na nsima na kotambwisa texte ya mokolo na mokolo na ferme ya Societé Watchtower.

[Elilingi na lokasa 26]

Ndeko mobali Ryan, na bolenge na ye, pene na Ford T

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto