Noel ezali motindo malamu yo kokumisa Yesu?
Kobotama na Mobikisi, Masiya oyo bato bazalaki kozela, ezalaki mpenza likambo ya esengo. Anzelu alobaki epai na babateli na mpate baoyo bazalaki pene na Beteleme ete: “Nazali koyebisa bino nsango malamu ya esengo monene oyo bato nyonso bakozala na yango, mpo ete . . . Mobikisi, Klisto oyo azali Nkolo, abotameli bino lelo oyo.” Ebele na baanzelu bangángaki mpo na kosanzola Nzambe ete: “Nkembo na Nzambe kuna na likolo, mpe kimya awa na nsé kati bato oyo ye asepeli na bango!” (Luka 2:10-14, MN) Bato mosusu basukisaki ete baklisto basengelaki komekola baanzelu mpe komonisa esengo na bango mpo na kobotama na Klisto awa na mabelé na eleko wana.
Yango ezali lisoló ya liboso te oyo Biblia elobeli na ntina na baanzelu oyo bamonisaki esengo na bango na nzela na nzembo ya masanzoli. Na ntango mabelé makelamaki, “minzoto ya ntɔngɔntɔngɔ miyembaki elongo moko mpe bana nyonso na Nzambe bangángaki na esengo. ”(Yobo 38:4-7) Mokolo ya sikisiki oyo likambo yango lisalemaki moyebisami te kati na Biblia (Genese 1:1, 14-18) Ata soko eleko yango ezali mpenza ya esengo mingi, baklisto bakoki te komiloba ete bango basengeli, na mobu nyonso, kokumisa mokolo ya kozalisa mokili mpo ete baanzelu bangangaki na esengo, mpe bakoki te kosalela feti ya Bapakano mpo na kokundola likambo yango.
Nzokande, ezali yango nde ekosalaka baoyo bazali kokumisa Noel mpo na kobotama na Yesu Klisto. Kati na mikanda oyo mibongi na kondima yango, tokoki kotanga na nsé na liloba “Noel” ete, mokolo na kobotama na Yesu moyebani te. Biblia elobeli yango te.
“Soko kɛlɛlɔ ekobɛtama malamu te”
Na ntango apamelaki lisangá ya Kolinti ya ekeke ya liboso mpo na etamboli na bango ya mobulu, ntóma Paulo akomaki ete: “Nzambe azali Nzambe na mobulu te. kasi na kimya.” Mwa moke liboso na maloba oyo, atunaki ete: “Soko kɛlɛlɔ akobɛtama malamu te, nani akomibongisa mpo na etumba?” (1 Bakolinti 14:8, 33, MN) Soki Nzambe oyo na mobulu te alingaki ete baklisto bakumisa kobotama ya Mwana na ye awa na mabelé, mbɛlɛ atikaki bato bazangi kokoka ete bapona bango moko mokolo oyo bakokumisaka feti ya Bapakano, mpe ete basalela makambo na mbindo?
Botaleli malamu ya mwa bandakisa ya Biblia ezali komonisa polele ete Jéhovah Nzambe akosala bongo te epai na bato na ye. Wana apesaki etinda na Bayisraele ete bakumisa bafɛti mbula na mbula na nsé na Mibeko ya Moize, alakisaki bango mikolo ya sikisiki oyo basengelaki kosala yango mpe alimbwelaki bango lolenge oyo basengelaki kokumisa yango. (Exode 23:14-17; Levitike 23:34-43) Yesu Klisto asɛngaki te epai na bayekoli na ye ete bakumisa kobotama na ye, kasi apesaki bango etinda ya kokumisa likambo moko ya ntina mingi na mokolo moko ya sikisiki. “Na butu oyo asengelaki kokabama,” na mokolo ya 14 Nisan ya mobu 33, Yesu abandisaki elambo na Nkolo na kosaleláká mampa mazangi mfulu mpe vinyo. Apesaki etinda oyo ete: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” (1 Bakolinti 11:23, 24) Mpo na oyo etali mokolo ya elambo na Nkolo mpe mpo na motindo ya kosala feti yango, kɛlɛlɔ ebɛtami malamu mpe ezali kobulunganisa bato te. Ezali boni mpo na Noel? Tozali kokuta ata esika moko te kati na Biblia oyo elobeli etinda epesameli biso mpo na kokumisa kobotama na Klisto; lisusu mokolo ya sikisiki mpe motindo ya kosala yango moyebisami te.
‘Ete nazwa bato mingi’
Mokonzi moko ya lingomba na ndakonzambe Sion na engumba Tokyo alobaki ete: “Ya solo, nayebi ete Noel euti epai na Bapakano, kasi lokola bato mingi bazali kosepela na losambo na boklisto na mokolo ya 25 décembre mpe bakoyaka koyoka mateya na Yesu moto na lokumu, boye Noel ezali na esika kati na boklisto.” Bato mingi bakokanisaka bongo. Okanisi ete ezali malamu na kobuka mibeko motindo wana?
Basusu bakolobaka ete Paulo abukaki mibeko mpo ete azwa bato oyo bazalaki bandimi te. “Nasili komiyeisa moombo na nyonso, ete nazwa bato mingi . . . Epai na bango bazangi Mibeko, nayei lokola moto oyo azangi Mibeko . . . Nazali kosala nyonso wana mpo na Nsango Malamu ete nakóma mokabani na yango.’‘ (1 Bakolinti 9:19-23) Tokoki nde kosalela maloba oyo mpo na kolóngisa kosalelama ya feti oyo ezali ya boklisto te mpo na kobenda Bapakano epai na boklisto?
Totalela na likebi nyonso ba versets oyo ezali zingazinga ya maloba yango. Na verset 21, Paulo alobi ete: “Nazangi mibeko na Nzambe te, mpo ete nakangami na mibeko na Klisto.” Na bongo, abukaki mibeko na Klisto te, kasi ‘atambolaki lokola moto azangi Mibeko’ na ndimbola oyo ete atosaki mimeseno mpe bizaleli ya bato oyo azalaki kokutana na bango, wana yango ezali kotɛmɛla mitinda na Yesu te.a
Na likanisi wana mpe na lisalisi na etinda ya Biblia oyo elandi, meka kotala oyo ekoki komonana na likambo oyo “boklisto” ezali kosalela feti ya Bapakano oyo ebéngami ete Noel: “Bokangami na ekanganeli na bokɛsɛnɛ te esika moko na bato bazangi kondima. Mpamba te, kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe kobuka mibeko? . . . Kokokana nini ezali na mosembwi mpe moto oyo azangi kondima? . . . ‘Yango wana bobima kati na bango, mpe bokabwana na bango,’ Jéhovah alobi bongo; ‘bosimba eloko na mbindo te’ ‘mpe nakoyamba bino.”’ (2 Bakolinti 6:14-17) Ata bantina nini ekoki kopesama, kobebisa mateya na boklisto na kokɔtisaka bafeti ya Bapakano kati na yango ezali soko moke te kokumisa Yesu lokola Mobikisi na biso. Mbɛlɛ yango endimamaki te na ekeke ya liboso, na ntango Yesu ayaki na mosuni; bantina yango endimami mpe te na eleko na biso, mpe ekotikala bongo mpo na mikolo mizali koya, wana Klisto akoya lokola Mokonzi mpo na kokokisa bikateli na Nzambe. (Emoniseli 19:11-16) Ya solo, ekoki kozala ete baoyo bazali kokumisa bafeti ya Bapakano na kolobáká ete ezali nde ya “boklisto,” bazali kotyola Yesu Klisto.
“Baklisto babómbamaki” baboyi kozongela boklisto
Tozwa liteya na oyo ekómelaki bakatolike ya mboka Japon na boumeli na boyangeli ya mikonzi oyo babéngi bango ete ba shogun. Na ntango lingomba ya katolike lipekisamaki na 1614, soko bakatolike 300 000 ya mboka Japon basengelaki kopona moko na bikateli oyo misato: kobomama mpo na lingomba, koangana kondima na bango to mpe kosambela na kobombana Baoyo baponaki ekateli ya misato babéngamaki ete baklisto babombamaki. Mpo na kobomba bindimeli na bango, basalelaki mimeseno mingi ya Babuda mpe ya ba Shinto. Kati na losambo na bango, bakomonisaka Maria lokola bodhisattva (Buda oyo asengeli koya), na motindo na mama moko amemi mwana na ye, mpe bapesaki ye nkombo Maria Kannon. Na boumeli ya bafeti na bango, bazalaki kosangisa losambo ya Buda, losambo ya katolike mpe mimeseno ya Shinto. Nzokande, na ntango basɛngisamaki kokenda na milulu ya Babuda, bazalaki kosalela mabondeli ya boklisto mpe basalelaki modoshi, molulu oyo mozalaki kosalema mpo na kotyola lolenge Babuda bakokundaka ebembe. Lolenge nini “baklisto” yango bakómaki?
Mokanda Baklisto babombamaki (oyo ya Bajaponé) elimboli ete: “Ba Kirishitan (baklisto) bakanganaki na losambo ya Buda mpe oyo ya Shinto, mpe bazalaki na mpasi mpo na kotika losambo oyo lopesami na banzambe ya mangomba wana.” Na ntango epekiseli elongwaki mpe na ntango bamisionere ya katolike bazongaki na Japon, mingi na “baklisto wana babómbamaki batikalaki sembo na lingomba na bango,oyo ezali bongo lisanga ya bindimeli bikeseni.
Kasi, lingomba ya katolike ekoki mpenza kopamela “baklisto (wana) babómbamaki” mpo ete baboyaki kozongela lingomba ya katolike? Lingomba ya katolike mpe lisili kozwa bindimeli mingi mpe bafɛti ya Bapakano, oyo Noel etangami kati na yango. Soki bakatolike mpe baprotestá basili kobebisa mateya na bango ya “boklisto” na bafeti ya Bapakano, atako bakomilobaka ete bazali baklisto, ekoki kozala te ete bango mpe bazali kotyola Yesu Klisto?
Bozongi na boklisto ya solo
Setsuko, ye mokatolike mwasi na molende uta mibu 36, asosolaki likambo yango. Nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, amekaki kokokisa mposa na ye ya elimo na koyanganaka kati na ndakonzambe moko ya katolike. Azalaki ‘na esengo mingi’ na ntango akendaki na misa esalemaki na katikati na butu, mpe ntango amonaki banzeté kitoko oyo babéngi yango ete sapins ya Noel oyo etyamaki na kati mpe na libandá ya ndakonzambe. Alobaki ete: “Nasepelaki mpo ete banzete oyo etyamaki (na ndakonzambe) na biso ezalaki kitoko koleka oyo ya bandakonzambe ya zingazinga na biso.” Nzokande, Setsuko azalaki mpenza kososola bindimeli ya katolike te, atako ye moko azalaki molakisi ya malongi na boumeli ya mwa ntango. Wana alingaki kokɔta na bozindo kati na lingomba na ye, atunaki mwa mituna epai na sángó na bango. Na esika na koyanola ye, sángó atyolaki ye. Aokaki nsoni, mpe azwaki ekateli ya koyekola Biblia bobele ye mei. Poso mibale na nsima, ba Témoins de Jéhovah bayaki kotala ye, mpe andimaki koyekola Biblia elongo na bango.
Ayebisi ete: “Nazalaki kooka mpasi na komona solo ya Biblia oyo ezalaki kokweisa bindimeli na ngai ya kala. Nkutu nabɛlaki maladi oyo babéngi yango ete alopecia neurotica, kolongwa ya nsuki euti na mitungisi. Kasi, mokemoke, pole ya solo ebandaki kongɛnga kati na motema na ngai. Nakamwaki na koyeba ete Yesu akokaki soko moke te kobotama na sanza ya décembre, mpamba te yango ezali sanza ya mpiɔ mpe na mbula mingi (na Azia), mpe babateli na mpate bakokaki te kobatela bampate na bango na katikati ya butu na eleko wana ya mobu. (Luka 2:8-12) Yango alongolaki likanisi oyo nazalaki na yango mpo na mbotáma, mpamba te tozalaki kosalela bakɔta lokola elembo ya mbula mpɛmbɛ kati na bilanga epai kuna bampate mpe babateli na mpate bazalaki.”
Na ntango andimisamaki na mateya ya solo na Biblia, Setsuko azwaki ekateli ya kotika kosala fɛti ya Noel. Sikawa, azali komonisa lisusu te “elimo ya Noel” oyo emonisamaki bobele mbala moko na mobu, kasi azali nde komonisa elimo ya moklisto na bokabi, na esengo mokolo na mokolo.
Soki ozali mpenza kondima Klisto, kosilika te na ntango Bapakano bazali kotyola fɛti ya Noel. Bazali bobele komonisa yango ezalaki kosalema na ebandeli: feti na Bapakano. Ezali na nzela na Noel te nde tokokumisa Yesu Klisto, oyo asili kozonga na motindo mozangi komonana lokola Mokonzi na likoló. (Matai mokapo 24 mpe 25; Malako mokapo 13; Luka mokapo 21) Na boumeli ya mbula mobimba, baklisto ya solo bakomonisaka elimo motindo moko na Klisto, mpe bazali kosakola nsango malamu na Bokonzi oyo Yesu azali Mokonzi na yango Ezali na motindo wana nde Nzambe alingi ete tokumisa Yesu Klisto, Mobikisi na biso mpe Mokonzi na Bokonzi na Nzambe.—Nzembo 2:6-12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala bizaleli mibale oyo Paulo azalaki na yango liboso na likambo litali kokata ngenga. Ayebaki ete “kokata ngenga ezalaki na ntina te”; nzokande, asalaki ete Timoté, moninga na ye ya mobémbo akatama ngenga, ye oyo azalaki moyuda na bomama na ye. (1 Bakolinti 7:19; Misala 16:3) Na ntina na Tito, ntóma Paulo, kati na matáta oyo azwanaki na Bayuda, alingaki te akatisa ye ngenga na kolanda mitinda. (Bagalatia 2:3) Na kokesena na Timoté, Tito azalaki Mogreke mpe na bongo, azalaki na ntina te ete akatama ngenga. Soko ye Mopakano akatamaki ngenga, mbele ‘Klisto azalaki na ntina moko te mpo na ye.’—Bagalatia 5:2-4.
[Elilingi na lokasa 7]
Baklisto ya solo bazali kokumisa Yesu na boumeli ya mbula mobimba