Bililingi ya Mokili na ndaká
Libéké ya Genesalete ‘ezali kitoko mpe na bonzenga’
“Mabelé oyo mazingi libéké ya Genesalete mpe ebengami bobele na nkombo yango moko, ezali mpe kitoko mpo na bonzenga na yango mpe na kobota mbuma mingi. Nzeté moko te elónami kati na yango nde ezangi kobota mbuma na yango; ezali na eloko moko te to mpe mosala moko te oyo ezangi kopesa litomba na yango epai na bafandi na mabelé wana. Mopepe mozali mpenza malamu mpo na mbuma ya motindo nyonso. . . . (Mabelé yango) mazali kobota bobele mbuma ya kitoko te, kasi mazali mpe kobatela yango . . . ntango molai . . . Mai mingi makokitaka na kati na yango.”
Motindo wana nde Josèphe, mokomi na masoló ya bato amonisaki esobe yango ezali na mipanzi misato mpe etando wana esuki kino na ngambo ya nord-ouest na libéké oyo liyebani mingi na nkombo Galilai. Bafɔtɔ́ oyo ezali awa na likoló ezali kopesa likanisi na kobota mbuma ezali na esobe wana, oyo ezalaki moko na bisobe bizalaki kobota mbuma mingi na etúka ya Galilai.a Etúka wana ezalaki na lokumu mingi na ntango na kala na motindo boye ete Luka mokomi na Evanzile abéngaki yango nkombo “libeké na Genesalete,” mai monene mazangi mongwa oyo mazalaki kokóma kino na libóngo.—Luka 5:1.
Luka asaleli liloba yango na ntango Yesu akómaki na etúka yango mpe akutanaki na mibali minei oyo bakómaki bantóma na ye na nsima. Mibali yango bazalaki nde basali bilanga baoyo batimolaki mabelé wana na kobota mbuma mingi, baoyo balónaki nzeté na vinyo, nzeté na ndiká, nzeté na olive to nzeté na mosuké? Te. Mosala ya kolóna oyo esalemaki mingi mpenza kati na esobe ya Genesalete, kasi mibali yango minei bazalaki nde balɔ́bi na mbisi, mpe yango ezali mpasi te mpo na kokanga ntina.
Na kokatisáká esobe yango, milúká mizalaki kotyola matiti oyo mbisi bazalaki kolya yango, kino na libéké. Libéké yango litóndaki bongo na mbisi ya motindo nyonso, mpo na yango nde bisika ya bolɔ́bi mbisi bikómaki mingi. Petelo mpe André bazalaki kofanda kuna mpo na mosala na bango ya kolɔ́ba mbisi,lisusu mpe Yakobo mpe Yoane, bana na Yebedai, molɔ́bi mbisi.—Matai 4:18-22; Luka 5:2-11.
Na boumeli ya ntango mingi, balɔ́baki na milúbá—na kobwakáká molúbá kati na mai mpe na nsima kobenda yango kati na bwato. Ezali yango nde Petelo mpe André bazalaki kosala wana Yesu ayaki epai na bango. Molúbá monene mobwakamaki na etando ya ndambo na zolongano (cercle) na mai. Matukú na molúbá masalemi na mabaya mazalaki kotepa likoló na mai, nzokande mabangá na kilo oyo matyamaki na nsé na molúbá, mazalaki konanola yango mpo ekila na nsé na mai. Na milúbá ya lolenge wana, bakokaki koboma mbisi mingi. Bazalaki komatisa molúbá, kati na bwato to mpe kobenda yango kino na esika oyo mai mazalaki mozindo mingi te, mpe bazalaki kobimisa mbisi na libóngo. Na nsima, bazalaki kopona mbisi mpo na kotika bobele oyo ezalaki malamu na kolya. Luka 5:4-7 mpe Yoane 21:6-11 epesi makanisi ya sikisiki na likambo yango. Ozali komikundola ete Yesu alobelaki motindo na kolɔ́ba wana kati na lisese na ye ya kobwaka molúbá? (Matai 13:47, 48) Epai mosusu, Matai 4:21 emonisi ete mbala mingi balɔ́bi mbisi basengelaki kolekisa ntango mingi mpo na kobongisa milúbá oyo mipasolamaki na mabangá to na mbisi.
Soko etamboli pembenipembeni na libéké ya Genesalete, na ntembe te, okomona bisika mibale oyo bikanisami ete ezali kuna nde makambo na ntina na mosala na Yesu masalamaki. Moko na yango ezali ngomba ezipami na matiti mingi, epai Yesu asalaki Lisoló na ye likoló na ngomba, engebene masoló ya bato ya kala. Masoló ya Baevanzile mazali kokweisa masoló na bato na kala te, mpamba te Yesu azalaki pene na esobe ya Genesalete na ntango oyo asalaki lisoló yango.—Matai 5:1 kino 7:29; Luka 6:17 kino 7:1.
Mpo na esika mosusu, oyo bakanisaka ete ezali bongo, ekokani te na oyo Biblia ezali komonisa. Ndakonzambe moko etongamaki na esika oyo ekanisamaki ete Yesu aleisaki bato 4 000 na mampa sambo mpe na mwa ndambo na mbisi. (Matai 15:32-38; Malako 8:1-9) Nzokande lisoló ya Malako limonisi te ete makambo yango masalemaki kati na esobe ya Genesalete, kasi emonisi ete makambo yango masalemaki na “bitúka Décapole,” oyo ezalaki na ngambo mosusu na libéké, koleka ntaká ya bakilometele 11.—Malako 7:31.
Matai mpe Malako balobi ete nsima na kosala likamwisi wana, Yesu amataki na masuwa mpe akendaki na mboka Magadana, to Dalmanutha. (Matai 15:39; Malako 8:10) Bato na mayele bamonisi ete Magdala (Migdal) ezali pene na ngele ya esobe ya Genesalete, oyo ezali mosika te na mboka Tibériade. Engebene mokanda moko mokolobelaka makambo matali molóngó (The Macmillan Bible Atlas), mboka Magdala “eyebanaki mingi mpo na bisika na yango ya bolɔ́bi mbisi.” Na ntembe te, mayele wana ya kosala ezalaki malamu mpe ezalaki kopesa matomba mpamba te bolɔ́bi mbisi ezalaki kosalema mingi na libéké yango.
Na 1985-1986, moi makasi mokitisaki mai na libéké ya Galilai mpe bamonaki ndambo na mbeto. Pene na esobe ya Genesalete, mibali mibale bamonaki likita ya masuwa moko ya kala. Ba archéologues (bakundoli na biloko na kala) bamonisaki masuwa yango ya bolɔ́bi mbisi, oyo ezalaki mingi mpenza na eleko oyo Yesu atambolaki na libéké mpe na esobe na etúka ya Genesalete.
[Maloba na nsé ya lokasa]
a Calendrier des Témoins de Jéhovah 1992 ezali na fɔtɔ́ eyeisami monene mpe na langi kitoko.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Garo Nalbandian
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.