Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 nk. 18-20
  • Bomoi na ntango ya kala—Baluki-mbisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na ntango ya kala—Baluki-mbisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mbu etombokaki makasi”
  • “Bakangaki mbisi ebele mpenza”
  • Tózala balɔbi na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yesu abimeli mibali oyo bazalaki koboma mbisi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masuwa ya Galilai—Eloko ya motuya ya ntango ya kala
    Lamuká!—2007
  • Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 nk. 18-20

Bomoi na ntango ya kala​—Baluki-mbisi

“Ntango azalaki kotambola pembenipembeni ya mbu ya Galile [Yesu] amonaki bandeko mibale, Simo oyo babengi Petro ná Andre ndeko na ye, bazali kobwaka monyama na mbu, mpo bazalaki baluki-mbisi. Mpe alobaki na bango ete: ‘Bólanda ngai, mpe nakokómisa bino baluki-bato.’”​—MATAI 4:18, 19.

MBALA mingi, Baevanzile elobelaka mbisi, koluka mbisi, mpe baluki-mbisi. Kutu, Yesu asalelaki bandakisa mingi oyo elobeli koluka mbisi. Mpe yango ekoki kokamwisa biso te mpamba te, Yesu alekisaki ntango na ye mingi na koteya pembeni ya libongo to na bokula ya Mbu ya Galile. (Matai 4:13; 13:1, 2; Marko 3:7, 8) Mai ya mbu yango ezalaka kitoko mpe ezali na molai ya kilomɛtrɛ soki 21 mpe monene na yango ezali kilomɛtrɛ soki 11 na ndambo. Ekoki kozala ete bantoma soki nsambo ya Yesu, na ndakisa Petro, Andre, Yakobo, Yoane, Filipe, Toma mpe Natanaele bazalaki baluki-mbisi.​—Yoane 21:2, 3.

Mosala ya moluki-mbisi ezalaki ndenge nini na ntango ya Yesu? Mpo na nini te koluka koyeba mwa moke bato yango mpe mosala na bango? Okosepela lisusu mingi na makambo oyo bantoma basalaki mpe okoyeba lisusu malamu makambo oyo Yesu asalaki mpe bandakisa oyo apesaki. Liboso, tótalela naino ndenge mosala ezalaki kosalema na Mbu ya Galile.

“Mbu etombokaki makasi”

Mbu ya Galile ezali na lobwaku moko, etando ya mai na yango ezalaka mɛtrɛ soki 210 na nse ya nivo ya mai. Bokula na yango ezalaka na mabanga mpe na nɔrdi ngomba molai Heremone ezali kotala na mapata. Na eleko ya malili, mopɛpɛ ya mpiɔ ebɛtaka mai mpe esalaka mbonge. Na eleko ya molunge, mopɛpɛ ya mɔtɔ epɛpaka likoló ya mai. Mipɛpɛ makasi ebɛtaka na mbalakaka na bangomba oyo ezali pembenipembeni ya mai mpe yango emonisaka bamatelo mpasi. Yesu ná bayekoli na ye bakutanaki na mopɛpɛ ya ndenge wana.​—Matai 8:23-27.

Masuwa oyo baluki-mbisi bazalaki kotambwisa esalemaki na mabaya mpe molai na yango ezalaki ya mɛtrɛ soki 8 na ndambo mpe monene na yango ezalaki ya mɛtrɛ soki 2 na ndambo. Bamasuwa na bango mingi ezalaki na likonzí mpe na mwa shambrɛ na nse ya nkɔbɛ. (Marko 4:35-41) Bamasuwa yango ezalaki kotambola malɛmbɛ, kasi ezalaki makasi mpe ezalaki kobeba te mpo na mipɛpɛ makasi oyo ezalaki kobɛta yango. Mipɛpɛ yango ezalaki kotindika masuwa mpe likonzí na yango na ngambo moko, kasi minyama oyo ezalaki kilo ezalaki kobenda yango na ngambo mosusu.

Mibali oyo bazalaki kotambwisa masuwa bazalaki kosalela bankai oyo bakangisá na ngambo mibale. Baluki-mbisi motoba to koleka bazalaki komata na masuwa yango. (Marko 1:20) Longola yango, ekoki kozala ete masuwa yango ezalaki mpe komema biloko oyo etambwisaka yango mpe biloko mosusu lokola elamba ya lini mpo na mopɛpɛ (1), nsinga (2), bankai (3), longo ya libanga (4), bilamba ya komibatela na malili (5), biloko ya kolya (Marko 8:14) (6), bakitunga (7), kusɛ (Marko 4:38) (8), mpe monyama (9). Bakokaki mpe komema biloko mosusu oyo etepaka likoló ya mai (10), na mpe bandɔbɔ (11), bisaleli ya kobongisa masuwa (12), mpe miinda (13).

“Bakangaki mbisi ebele mpenza”

Ndenge moko na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe na Mbu ya Galile bambisi mingi ezalaka pembeni ya bisika oyo maziba mpe bibale mosusu eyaka komibwaka na mbu. Na bisika yango, matiti ekɔtaka na mbu mpe ebendaka mbisi ebele. Mpo na kokanga mbisi, baluki-mbisi ya ntango ya Yesu bazalaki mbala mingi kosala mosala yango na butu mpe bazalaki na miinda. Mokolo moko, bayekoli mosusu ya Yesu balukaki mbisi butu mobimba kasi bazwaki eloko te. Kasi, na mokolo oyo elandaki, na etinda ya Yesu, babwakaki minyama na bango lisusu mpe bakangaki mbisi ebele, kutu, elingaki kozindisa bamasuwa na bango.​—Luka 5:6, 7.

Na bantango mosusu, baluki-mbisi bazalaki komema masuwa na bisika oyo mai ezalaki mozindo. Na bisika ya koluka mbisi, masuwa mibale ezalaki kosala elongo. Mibali yango bazalaki kofungola monyama na katikati ya bamasuwa mibale; mpe na nsima, bazalaki kosala molɔngɔ ngambo na ngambo, bazalaki kobwaka minyama na mai mpe bazalaki kozinga mbisi. Bamasuwa ezalaki kosilisa kozinga mbisi mpe bazalaki kokanga minyama. Na nsima, baluki-mbisi bazalaki kobenda bansinga oyo ekangisamaki na nsuka ya minyama mpe kobenda mbisi yango na kati ya masuwa. Monyama ekokaki kozala na molai ya mɛtrɛ 30 mpe na mozindo ya mɛtrɛ 2 na ndambo; ezalaki mpenza monene mpo na kokanga ebele ya mbisi oyo ezalaki kotambola esika moko na mai. Ngambo moko ya monyama esimbamaki na biloko oyo ezalaki kotepa mpe ngambo mosusu ezalaki na biloko ya kilo. Baluki-mbisi bazalaki kobwaka monyama na bango mpe na nsima bazalaki kobenda yango lisusu mbala na mbala, ngonga moko nsima ya mosusu.

Na mai oyo ezali mozindo mpenza te, baluki-mbisi bazalaki kosalela mayele mosusu. Bazalaki kokanga ngambo moko ya monyama na libongo mpe bazalaki kozinga yango na ngambo mosusu ya bokula mpo na kozinga mbisi. Na nsima, mibali oyo bazalaki na bokula bazalaki kobenda monyama, komema mbisi oyo bakangi na libongo, mpe kopona mbisi yango kuna. Bazalaki kotya mbisi ya malamu na bambɛki. Bazalaki kotɛka mbisi mosusu ya mobesu na mboka na bango. Bazalaki kokaukisa ebele ya mbisi mpe kotya yango mungwa to vinɛgrɛ, kobomba yango na mbɛki mpe komema yango na Yerusaleme to na mikili ya bapaya. Bikelamu ya mai oyo ezangaki mposo oyo bakoki kopalola to biloko oyo etambwisaka yango, na ndakisa nzombo, ezalaki kotalelama ete ezali mbindo mpe ezalaki na ntina te. (Balevi 11:9-12) Yesu alobelaki mayele wana ya koluka mbisi ntango akokanisaki “bokonzi ya likoló” na monyama mpe mbisi ndenge na ndenge akokanisaki yango na bato malamu ná bato mabe.​—Matai 13:47-50.

Moto oyo azalaki koluka mbisi ye moko akokaki kosalela ndɔbɔ mpo na kokanga mbisi. To akokaki kosalela monyama ya moke. Mpo na kobwaka monyama, azalaki kokɔta na mai, kosimba monyama na mabɔkɔ, mpe na nsima kopanza yango mpe kobwaka yango na mai. Monyama yango ezalaki kosala sɛrklɛ mpe na nsima ezalaki kozinda na mai. Soki moluki-mbisi azalaki na libaku malamu, monyama yango ezalaki kozinga mwa mbisi ntango azalaki kobenda yango lisusu mpo ezonga na katikati ya nsinga na yango.

Minyama ezalaki ntalo mingi mpe ezalaki kosɛnga mosala makasi mpo na kobatela yango, yango wana, bazalaki kosalela yango na likebi mpenza. Baluki-mbisi bazalaki kolekisa ntango na bango mingi na kobongisa, kosukola mpe kokaukisa minyama​—mosala oyo bazalaki kosala nsima ya kosilisa koluka mbisi. (Luka 5:2) Ntango Yesu abengaki bango bálanda ye, ntoma Yakobo ná ndeko na ye Yoane bafandaki na masuwa na bango mpe bazalaki kobongisa minyama na bango.​—Marko 1:19.

Mabundu ezalaki na kati ya bambisi ebele oyo baluki-mbisi ya siɛklɛ ya liboso bazalaki koluka. Mbisi yango ezalaki na kati ya biloko oyo bato mingi ya Galile bazalaki kolya ntango nyonso, mpe ekoki kozala ete Yesu alyaki mbisi yango oyo ezalaka elɛngi mpenza. Ekoki kozala ete mbisi mibale ya kokauka oyo batyá mungwa oyo Yesu asalelaki mpo na kosala likamwisi ya koleisa bankoto ya bato ezalaki nde mabundu. (Matai 14:16, 17; Luka 24:41-43) Mbala mingi, mbisi ya lolenge yango etambolaka na mai mpe ememeka bana na yango na monɔkɔ. Kasi, soki ememi bana na yango te, ekoki komema mwa libanga to komema kutu ata ebende moko oyo engɛngaka oyo ezalaka na nse ya mbu.​—Matai 17:27.

Na siɛklɛ ya liboso, baluki-mbisi oyo bazalaki kolonga na mosala na bango, bazalaki motema molai, bazalaki kosala mosala makasi, mpe bazalaki kondima ata koyika mpiko na mikakatano mpo na kozwa lifuti oyo ebongi. Baoyo bandimaki kolanda Yesu na mosala ya kokómisa bato bayekoli, basengelaki mpe komonisa bizaleli ya ndenge wana soki balingaki ete mosala na bango ya “baluki-bato” ebota mbuma malamu.​—Matai 28:19, 20.

[Elilingi na lokasa 19]

(Talá mokanda)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto