Mpela kati na masapo ya bato na mokili
MPELA oyo esalemaki na eleko ya Noa ezalaki likambo ya nsɔmɔ mpenza na motindo boye ete etikálá libela kati na makanisi ya bato. Koleka mibu 2 400 na nsima, Yesu alobelaki yango ete ezali likambo lisalemaki solo. (Matai 24:37-39) Likambo wana ya kokamwa lisila kotikálá na makanisi na bato, kino ekɔtisami kati na masapo ya mokili mobimba.
Kati na mokanda na ye Mythes de la création (angl.), Philip Freund akanisi ete masapo oyo mazali kolobela mpela mazali koleka 500, mpe bikolo mpe mabota oyo bazali masoló motindo yango ezali koleka 250. Lokola tosengelaki komizela na yango, na boumeli ya bikeke, mingi kati na masapo yango mabongisamaki na kokɔtisáká makambo mpe bato oyo bazalaki solo te. Atako bongo, tozali kokuta bokokani monene kati na mokomoko na yango mpe lisoló ya ebandeli.
Bokokani ya kokamwa
Nsima na mpela, wana ezalaki bango kopalangana longwa na Mésopotamie, bato bamemaki masoló ya likambo yango ya nsɔmɔ na bipai nyonso ya mokili. Yango wana, ezala na Azia, to na bisanga ya Pacifique Sud, na Amérique du Nord, na Amérique centrale mpe na Amérique du Sud, ezali na masapo oyo mazali kolobela likambo wana na kokamwa. Masapo mingi matali mpela mazalaki uta kala liboso ete bato ya mikili wana babanda kotanga naino Biblia. Nzokande, ezali na makambo makokani elongo na lisoló ya mpela oyo liyebisami kati na Makomami.
Masapo mosusu mazali kolobela bato mabe, ya milai mpe minene, oyo bazalaki na bomoi na mabelé liboso na mpela. Na bokokani, Biblia ezali koyebisa ete liboso ya likámá monene wana baanzelu batomboki balataki nzoto na bato, babalaki basi mpe babotaki libota moko na bilombé oyo babéngami Nefilime.—Genese 6:1-4; 2 Petelo 2:4, 5.
Masapo yango mazali koyebisa mpe ete moto moko akebisamaki mpo na koya ya mpela oyo esengelaki kouta na Nzambe. Engebene Biblia, Jéhovah Nzambe akebisaki Noa ete akoboma bato mabe mpe na yauli. Alobaki na ye ete: “Nasili kokana kosilisa bato nyonso, mpo ete mokili motondi na yauli mpo na bango. Mpe nakobebisa bango na mokili elongo moko.”—Genese 6:13.
Na nyonso wana, masapo oyo matali mpela mazali komonisa ete yango eyeisaki libebi mobimba awa na mabelé. Biblia mpe ezali koloba motindo moko: “Mai mabutaki lisusu mingi, mpe ngomba molai nyonso na nse na likoló ezipamaki. Bango nyonso na mokili baoyo bazalaki na mpema na bomoi na zolo na bango bakufaki.”—Genese 7:19, 22.
Mingi na masapo yango mazali koyebisa ete mobali moko abikaki elongo na mwasi moko to abikaki elongo na bato mingi mosusu na mpela. Bango nyonso babombamaki na masúwa oyo mobali wana atongaki; mpe na nsima masúwa yango masemaki likoló na ngomba. Motindo moko, Makomami mazali koloba ete Noa atongaki masúwa, mpe mayebisi ete: “Bobele Noa nde atikalaki, mpe baoyo bazalaki na ye elongo na kati na masúwa. (Genese 6:5-8; 7:23) Totangi lisusu ete nsima na mpela, ‘masúwa masemaki likoló na ngomba na Ararata,’ epai Noa mpe libota na ye babimaki longwa na masúwa. (Genese 8:4, 15-18) Masapo mazali koyebisa lisusu ete bato babikaki na mpela batondisaki lisusu mokili, lokola libota na Noa lisalaki yango, engebene lisoló na Biblia.—Genese 9:1; 10:1.
Masapo ya Kalakala
Kozanga kobosana bandimbola oyo touti kolobela, totalela mwa masapo na ntina na mpela. Tobanda naino na Basumerié, libota ya Kalakala oyo lizalaki kofanda na Mésopotamie. Lisoló na bango ya mpela limonanaki likoló na etánda moko ya mabelé motane oyo ekundolamaki kati na bitika ya Nippour. Likoló na etánda yango, ezali kotangama ete banzambe na Sumer, Anou mpe Enlil, bazwaki ekateli ya koboma bato na mokili na koyeisaka mpela monene. Ziousoudra mpe libota na ye bakokaki kobika na nzela na lisalisi ya masúwa monene.
Lisapo ya bato na Babilone ya Gilgamesh ezali na bandimbola mingi. Ezali koyebisa ete Gilgamesh akendaki kotala nkoko na ye Outa-Napishtim, ye oyo azwaki bomoi na seko nsima na kobika na mpela. Kati na lisoló oyo basololaki bango mibale, Outa-Napishtim alimbolaki ete bayebisaki ye atonga masúwa moko mpe akɔtisa bibwele, nyama ya zámba mpe libota na ye. Masuwa oyo atongaki ekokanaki na kibe moko monene oyo mopanzi moko na moko ezalaki na metele 60 elongo na mikili ya likoló motoba na kati. Outa-Napishtim ayebisaki na Gilgamesh ete mopepe ya mbula moumelaki mikolo motoba mpe butu motoba, na nsima abakisi ete: “Wana ekómaki mokolo ya nsambo, mopepe mpe mpela oyo ebundaki etumba lokola limpinga, elɔmbaki. Mai monene matikaki koningana, makelele nyonso matikaki, mpela esilaki. Ntango natalaki mai monene, nyonso efandaki nyee, kasi bato nyonso babongwanaki na potopoto.”
Masúwa masemaki likoló na ngomba Nisir, mpe na nsima Outa-Napishtim abimisaki ebenga, oyo ezongaki, mpo ete emonaki ata esika moke te mpo na kotelema. Na nsima atindaki mbilámbilá (hirondelle), oyo yango mpe ezongaki lokola. Nsima na mikolo yánganga etindamaki mpe, komonáka ete akei libela, Outa-Napishtim asosolaki ete mai makitaki. Na nsima abimisaki bibwele mpe apesaki mbeka.
Lisapo wana ya kalakala likokani moke na lisoló na Biblia mpo na mpela. Nzokande, ezangi bandimbola ya bonzenga mpe bosáwa oyo tozali kokuta kati na Biblia; lisusu, bametele oyo epesami mpo na masúwa ezali ya solo te mpe boumeli ya mpela oyo eyebisami bokokani te na oyo ya Makomami. Na ndakisa, lisapo ya Gilgamesh elobi ete mopepe eumelaki mikolo motoba mpe butu motoba, nzokande Biblia elimboli ete “mbula enokaki na mokili mikolo ntuku minei mpe butu ntúku minei:” ezalaki mbula makasi, oyo ebetaki kozanga kokatana kino ezipaki mabelé mobimba na mai.—Genese 7:12.
Nzokande Biblia ezali kolobela babiki mwambe, lisapo na Bagreke lilobeli bobele bato mibale: Deucalion mpe mwasi na ye Pyrrha. (2 Petelo 2:5) Engebene lisapo wana, liboso na mpela mabelé matondaki na bato na yauli oyo babengamaki bato na ebende. Nzambe Zeus azwaki ekateli ya koboma bango na koyeisáká mpela, mpe alobaki na Deucalion ete etonga sandúkú monene mpe akɔta kati na yango. Ntango mai na mpela makitaki, sandúkú esemaki likoló na ngomba Parnasse. Deucalion mpe Pyrrha bakitaki na ngomba mpe batondisaki lisusu mokili.
Masapo ya epai na Ebimelo na Moi
Na Inde ezali na lisapo oyo lizali koloba mpo na moto moko nkombo na ye Manou ete abikaki na mpela. Asalaki boninga elongo na mwa mbisi moko, oyo mokemoke akómaki monene mpe ayebisaki ye koya na mpela oyo ekobebisa mokili. Manou atongaki masúwa, oyo ebendamaki na mbisi kino ekendaki kosema likoló na ngomba ya Himalaya. Ntango mai masilaki, Manou akitaki longwa na ngomba mpe elongo na Idâ, bomoto ya mbeka na ye, abotaki lisusu libota na bato.
Engebene lisapo ya ba chinois na ntina na mpela, nzambe na nkake apesaki lino moko epai na bana mibale, Niu-koua mpe Fou-hi. Apesaki bango etinda ete balona yango mpe ete bamibomba na nsé ya mbika oyo ekobima likoló na yango. Nokinoki lino ebotaki nzeté moko, oyo ebimisaki mbika moko monene. Ntango nzambe na nkake anokisaki mbula makasi, bana bakotaki kati na mbika. Mpela oyo elandaki ezindisaki bato nyonso ya etando longola bobele Niu-koua mpe Fou-hi, oyo babikaki mpe batondisaki lisusu mokili.
Masapo ya Amerike
Ba Indiens ya Amérique du Nord bazali na masapo mingi na ntina na kotonda na mai oyo ebomaki biloko nyonso longola bobele mwa bato moke. Na ndakisa, ba Arikaras, libota na ba Caddo liyebisi ete na kala, mabelé mafandamaki na libota moko ya bilombe mpenza baoyo bazalaki kotyola banzambe. Nzambe Nesaru abomaki bilombe yango na koyeisáká mpela, kasi abatelaki libota na ye, banyama mpe masango kati na mobéngá moko. Ba Havasupais bazali koloba ete nzambe Hokomata ayeisaki mpela oyo ebomaki bato na mokili. Nzokande, moto moko, Tochopa alóngaki kobikisa mwana na ye ya mwasi Pukeheh na kokangeláká ye kati na mobimbi ya nzeté moko oyo ezalaki na lilusu kati na yango.
Ba Indiens ya Amérique centrale mpe ya Amérique du Sud bazali na masapo mingi matali mpela oyo mazali na bakokani. Ba Mayas ya Amérique centrale bazali kondima ete nyoka moko monene oyo anokisaka mbula abomaki mokili na mai mingi. Na Mexique, engebene lisoló ya ba Chimalpopocas, mpela moko ezindisaki bangomba. Nzambe Tezcatlipoca ayebisaki moto moko nkombo na ye Nata, ye oyo apetolaki ntéi ya mobimbi na nzeté moko epai abómbamaki elongo na mwasi na ye, Nena, kino ntango mai makitaki.
Na Pérou, lisapo liyebisami na ba Chinchas ezali koloba ete mpela ya mikolo mitano ebomaki bato nyonso, longola bobele moto moko, oyo nyama moko ebéngami lama, oyo azalaki na likoki ya koloba, abikisaki ye na komemáká ye likoló na ngomba moko. Ba Aymaras, na Pérou mpe na Bolivie, bazali koloba ete nzambe Vimcocha abimaki na etima ya Titicaca mpe azalisaki mokili mpe bato oyo bazalaki bambinga mpe bilombe. Mpo ete bato wana ya liboso bapesaki ye nkanda, Viracocha abomaki bango na mpela.
Na Brésil, ba Tupinambas bazali kolobela eleko moko epai mpela monene ebomaki bankoko na bango nyonso longola bobele baoyo babombamaki kati na bwato to na nsongé ya banzeté milai mpenza. Kati na bikólo mingi oyo bizali na masapo malobeli kobomama esalemi na kobundana na mai, tozali mpe kokuta ba Cashinauas na Brésil, ba Macusis na Guyana, ba Caribs na Amérique centrale bakisa mpe ba Onas mpe Yahgans na Terre de Feu.
Masapo ya Pacifique du Sud mpe ya Azia
Masapo matali mpela oyo ebomaki bobele bato moke ezali koyokana mingi kati na bisanga ya Pacifique Sud. Na ndakisa, kati na bisanga Samoa, ezali na lisapo oyo lilobi ete, esili koleka mibu mingi, mbula moko ebomaki bato nyonso longola bobele Pili mpe mwasi na ye. Babombamaki likoló na libanga moko mpe, nsima na mpela, batondisaki lisusu mokili. Na bisanga ya Hawaii, nzambe Kane asilikelaki bato mpe ayeisaki mpela mpo na koboma bango. Bobele Nu’u nde abikisamaki kati na masúwa monene, oyo esukaki na kosema na ngomba moko.
Kati na esánga ya Mindanao, na Philippines, ba Atas bazali koloba ete na kala mabelé mazipamaka na mai, eloko oyo libomaki bato nyonso longola bobele mibali mibale mpe mwasi moko. Ba Ibans, kati na mboka Sarawak, na Bornéo, bazali koyebisa ete bobele mwa bato babikaki na mpela na kokimáká epai na ngomba ya milai mpenza. Na Philippines, na kotalela lisapo oyo ba Igorots bazali kondima yango, bobele mobali moko mpe ndeko na ye ya mwasi nde babikaki na kobombamáká likoló na ngomba Pokis.
Ba Soyots, na Sibérie, bazali koloba ete mombemba moko molai, oyo azalaki kokumba mabelé, aninganaki mpe ayeisaki kotondisama ya mai na etando mobimba. Mobangé moko ya mobali mpe libota na ye babikisamaki na lisalisi ya biteni ya nzeté oyo mobali yango akangaki lokola bwato.
Ntango mai makitaki, bwato esemaki likoló na ngomba moko molai. Na Sibérie occidentale mpe na Hongrie, ba Ougriens bazali mpe koloba ete babiki na ntango mai matondaki na mokili, basalelaki ba bwato nde basemaki na bisika bikeseni ya mokili.
Yango nyonso ezali na ebandeli moko
Bosukisi nini tokoki kosala mpo na botaleli ya masapo oyo nyonso likoló na mpela? Atako ezali kokesena mingi kati na kolimbolama na yango, nyonso ezali na makambo oyo mayokanisi yango. Yango emonisi ete ezwi eutelo na yango na libebi monene oyo likwelaki mokili. Atako kokesena mingi oyo ekotisamaki na kati na boumeli ya bikeke, motó na likambo na bango monene, oyo ezali lokola nsinga ekangisi yango nyonso na likambo moko mpe ya kokamwa: mpela na molongo mobimba oyo elobelami kati na lisoló moko ya petee mpe ya sembo oyo Biblia ezali koyebisa.
Lokola masapo yango mazali mpenzampenza epai na bato oyo bayebaki Biblia te kino na bikeke oyo ya nsuka, ekozala libunga na koloba ete lisoló ya Makomami nde epesaki bopusi likoló na yango. Lisusu, totangi kati na encyclopédie moko (The International Standard Bible Encyclopedia) ete: “Bopalangani ya masoló matali mpela ekamatami mpenzampenza lokola elembeteli ya kobomama na bato ya mokili mobimba na mpela moko. . . . Lisusu, mingi na masoló yango makomamaki na bato oyo bazalaki mpenza na boyokani te elonga na mateya ya Baebele mpe na baklisto.” (Volume 2, page 319.) Na bongo tokoki kosukisa kozanga ntembe ete masoló matali mpela mandimi bosolo ya lisoló na Biblia. Lokola tozali na bomoi kati na mokili moko ya mobulu mpe ya pite, ezali malamu ete totanga lisoló na Biblia oyo lizali koloba mpo na mpela, oyo likomami kati na Genese, mokapo 6 kino 8. Soki tokanisi na mozindo likoló na bantina oyo eyeisaki mpela ya molóngó mobimba—kosala mabe liboso na Nzambe—tokomona ete yango ezali likebisi ya ntina mingi mpo na biso.
Mosika te mokili mabe ya lelo ekozwa lisambisi na Nzambe. Kasi ezali esengo, mpamba te babiki bakozala. Tokoki kozala kati na bango soki totii likebi na maloba ya ntóma Petelo ete: “Mpe mpo na mai yango, mokili [ya ntango na Noa] ezindaki mpe ebomamaki. Mpo na liloba na ye, likoló mpe nse na ntango oyo ibombami ete izika; izali kobatelama kino mokolo na kosambisama mpe na koboma bato bakotioloka Nzambe. . . . Na bongo, awa ezali biloko nyonso mpo na konangwa, ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli na bulee mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emononeli na mokolo na Jéhovah?”—2 Petelo 3:6-12.
Kobosana soko moke te mpo na koya ya mokolo na Jéhovah! Soki obateli mokolo yango kati na makanisi na yo, okozwa mapamboli mingi mpenza. Baoyo bazali kosepelisa Jéhovah motindo wana bakoki kozala na kondima kati na mokili ya sika oyo Petelo alobelaki yango ntango abakisaki maloba oyo ete: “Nde tozali kotalela likoló na sika mpe mabelé na sika, pelamoko elakaki ye [Nzambe]; boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:13.
[Elilingi na lokasa 7]
Masapo ya bato na Babilone likoló na mpela masolólamaki libota moko kino libota mosusu
[Elilingi na lokasa 8]
Otyaka likebi na toli na Petelo na kozanga kobosana mokolo no Jéhovah?