Mituna ya batángi
Mpela ya ntango ya Noa ezindisaki mpenza mokili mobimba?
Kobanda Mpela ya Noa esalemaki, eumeli mbula koleka 4 000. Yango wana, moto ata moko te oyo amonaki mpela yango na miso azali na bomoi lelo mpo na kobɛtela biso lisolo na yango. Nzokande, ezali na mokanda oyo elobeli mpela yango, oyo emonisi ete mai ya mpela ezindisaki ata ngomba oyo elekaki molai na mokili mobimba na ntango wana.
Mokanda yango elobi boye: “Mpela eumelaki mikolo ntuku minei na mokili . . . Mai ebutaki lisusu mingi, mpe ngomba molai nyonso na nse ya likoló ebombamaki. Mai [elekaki] ngomba, mpe ebombaki yango na bozindo mapeko zomi na mitano [soki mɛtrɛ 6,5].”—Genese 7:17-20.
Bato mosusu bamitunaka soki lisolo ya mpela oyo ezindisaki mokili mobimba ezali kaka lisapo ya mpamba to balekisá kaka ndelo. Ezali bongo te! Kutu, ndambo monene ya mabelé ezali na nse ya mai tii lelo oyo. Mai ya mbu ezwá eteni monene (71 %) ya mabelé. Yango wana, tokoki koloba ete mai ya mpela ezali naino tii lelo oyo. Mpe soki mai oyo ekangamá mabanga mpe esalá bangomba na nɔrdi mpe na sudi mpenza ya mokili enyangwami, mai ya mbu ekoki komata mpe kozindisa bingumba lokola New York mpe Tokyo.
Bato ya mayele oyo bayekolaka mabelé batalaki mabelé ya nɔrdi-wɛsti ya États-Unis mpe balobaki ete mpela soki 100 mobimba ezindisaki eteni wana ya mabelé. Balobaka ete moko ya mpela yango ezalaki koya lokola efelo moko ya bosanda ya mɛtrɛ 600, mpe ezalaki kotambola na mbangu ya kilomɛtrɛ 105 na ngonga moko mpe ezalaki na bozito ya tone koleka nkóto 2 ya bamiliare. Makambo mosusu ya ndenge wana oyo bato ya siansi bamonaki etindaki bango báloba ete mpela esalemaki.
Nzokande, mpo na baoyo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, mpela ezindisaki mpenza mokili. Yesu ayebisaki Nzambe boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Ntoma Paulo akomaki ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:3, 4) Ndenge nini Paulo akokaki koteya bayekoli ya Yesu solo na ntina etali Nzambe mpe mikano na ye soki Liloba ya Nzambe ezalaka masapo?
Yesu azalaki kondima kaka te ete mpela esalemaki, kasi mpe ete ezindisaki mokili mobimba. Na esakweli na ye oyo etali kozala na ye mpe nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo, alobaki ete makambo oyo ekozala na ntango yango ekokani na oyo esalemaki na ntango ya Noa. (Matai 24:37-39) Na ntina etali mpela ya ntango ya Noa, ntoma Petelo mpe akomaki boye: “Na nzela ya myango yango mokili ya ntango wana ezwaki libebi ntango ezindisamaki na mai.”—2 Petelo 3:6.
Soki lisolo ya Noa mpe mpela ezalaka kaka lisapo mpamba, makebisi oyo Petelo ná Yesu bapesi mpo na bato ya ntango ya nsuka elingaki kozala na ntina moko te. Na esika makanisi yango esalisa bato, elingaki nde kobebisa elimo na bango mpe kozangisa bango libaku ya kobika na bolɔzi moko ya monene koleka kutu Mpela ya Noa.—2 Petelo 3:1-7.
Mpo na komonisa ete alimbisaka bato na ye kozanga ndelo, Nzambe alobaki ete: “Lokola mikolo ya Noa epai na ngai, lokola ekataki ngai ndai ete mai ya Noa ekozipa mokili lisusu te, bongo nakati ndai ete nakoyokela bino nkanda te, nakopamela bino mpe te.” Ndenge kaka mpela ya ntango ya Noa ezindisaki mpenza mabelé, motema-boboto ya Nzambe ekozala mpe na baoyo bazali kotyela ye motema.—Yisaya 54:9.