Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 nk. 25-28
  • Tózala na elimo ya komipesa!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na elimo ya komipesa!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisengami ya Biblia
  • Mapamboli oyo mazali kozwama na nzela na elimo ya komipesa
  • Lolenge nini komonisa elimo ya komipesa
  • Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Ozalaka na elimo ya komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Bambeka ya masanzoli oyo esepelisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 nk. 25-28

Tózala na elimo ya komipesa!

ROLFa azalaki mosali moko oyo basepelaki na ye mingi. Ntango akanaki kozwa mosala moko ya ndambo na mokolo mpo ete akoka kosangana mingi kati na mosala ya boklisto, mokonzi na ye ya mosala andimaki lisengi na ye kozanga nkaka. Na bongo Rolf akokaki kozala pionnier na boumeli ya mibu mingi. Nzokande, mokolo moko, mbongwana emonanaki kati na mosala na ye. Rolf amimonisaki mosali na makoki koleka na boye ete bakanaki kopesa ye esika na mokambi na makambo matali mombongo kati na kompanyi. Mosala yango mozalaki na lifuti monene mpe na bilikya kitoko ya bomati grade. Kasi akozala lisusu na likoki te ya kosala na ndambo ya mokolo.

Rolf asengelaki kokokisa bamposa ya mosuni ya mwasi na ye mpe ya bana na ye mibale, mpe mwa mosolo mingi esengelaki bobele kozala malamu. Kasi, aboyaki mosala wana mpe asengaki mosala mosusu oyo ekopesa ye nzela ete akokisa mikumba na ye ezala ya elimo mpe ya mosuni. Ekateli ya Rolf ekamwisaki mokonzi na ye. Koyebaka ete ekozala se mpamba na kolaka ye lifuti ya monene, patron na ye alobaki na ye ete: “Nandimi sikawa ete nakoki mpenza te kowelana elongo na bindimeli na yo.”

Ya solo Rolf azalaki mpenza na bindimeli. Kasi azalaki mpe na ezaleli mosusu: elimo ya komipesa. Elimo motindo wana ezali komonana mingi te kati na mokili epai bato bazali komipimela eloko moko te. Kasi ekoki komema na bomoi moko ya bomengo. Elimo ya komipesa elimboli nini? Yango ezali kosenga nini? Mpe esengeli kosala nini mpo na kobatela yango?

Lisengami ya Biblia

Kopesa mbeka elimboli kotika eloko moko ya motuya to koboya yango libela. Mbeka ezali na esika kati na losambo na peto uta ntango Abele, temwe ya liboso ya sembo, apesaki “bana na liboso kati na etonga na ye” lokola mbeka epai na Nzambe. (Genese 4:4) Mibali na kondima, lokola Noa mpe Yakobo, basalaki motindo moko. (Genese 8:20; 31:54) Mbeka na banyama ezalaki mpe moko na eteni monene ya Mibeko na Moize. (Levitike 1:2-4) Nzokande Mibeko yango mizalaki kosenga na basambeli na Jéhovah ete bapesa lokola mbeka biloko kitoko oyo bazalaki na yango. Basengelaki te kopesa lokola mbeka nyama oyo ezwi maladi. (Levitike 22:19, 20; Deteronome 15:21) Ntango Bayisraele bapengwi babukaki mobeko yango, Nzambe apamelaki bango, na kolobaka ete: “Soki bokobonzela ngai moboma mwa nyama ekufi miso, (bozali koloba ete) . . . : ‘Bosali mabe te.’ Bokende naino kopesa yango na mokonzi wa mboka, akosepela? Akoyamba yo malamu? . . . Nakoki koyamba libonza ndenge wana o moboko ma bino?”​—Malaki 1:8, 13, Biblia Liloba lya Nzambe.

Lilako na mbeka lizwami mpe kati na losambo ya moklisto. Kasi, lokola Klisto afutaki motuya ya lisiko na mobimba na yango, mbeka ya banyama ezali kosepelisa lisusu Nzambe te. Mbeka nini ezali kosepelisa Nzambe oyo bakoki bongo kopesa? Paulo akomaki kati na Baloma 12:1 ete: “Bandeko, nazali kobondela bino mpo na mawa na Nzambe ete bokaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulee mpe oyo ebongi ete Nzamba ayamba yango. Bongo bokosambela ye na ntina.” Oyo nde mbongwana na kokamwa! Na esika ya kopesa lokola mbeka nzoto na kokufa, baklisto basengeli komipesa bango moko mbeka na bomoi: makasi na bango, biloko na bango, makoki na bango. Mpe, lokola na ntango na Yisraele, Jéhovah azali kondima te mbeka “etengumi” to oyo epesami na mitema mibale. Azali kosenga na basambeli na ye ete bamipesa mobimba mpe ete basalela ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na elimo na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba.​—Malako 12:30.

Komonisa elimo ya komipesa, ezali bongo kosenga makambo mingi koleka kotosa na ebongiseli ya makita mpe ya kosangana na mosala ya boklisto. Yango elimboli kozala na ekateli ya kosala mokano na Nzambe atako yango ekobimisa likambo nini. Elimboli kozala pene mpo na kondima mimekamo mpe botyoli. “Yesu alobaki ete, soko nani alingi koya nsima na ngai, tika ete amiboya ye moko mpe atombola nzeté na ye [ya mpasi] mpe alanda ngai.” (Matai 16:24) Lobanzo ya liboso ya moklisto ezali ya kolanda bamposa na ye moko te to mikano ya bozwi na mosuni. Bomoi na ye etongami likoló na mposa ya koluka liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye. (Matai 6:33) Soki yango esengeli, azali pene na ‘kotombola nzeté ya mpasi,’ na koyikela monyoko, nsoni ata mpe liwa mpiko!

Mapamboli oyo mazali kozwama na nzela na elimo ya komipesa

Liboso na makambo na mpasi oyo tokoki kokutana na yango, tosengeli mpenza komituna soki ebongi ete tozala na elimo ya komipesa. Baoyo balingi Jéhovah Nzambe mpe balingi ete nkombo na ye ekumisama bazali koyanola ete ee. (Matai 22:37) Totalela ndakisa ya kokoka oyo Yesu Klisto atikaki. Liboso ete aya awa na mabelé, azalaki ekelamu ya elimo oyo azalaki na etelemelo monene kuna na likoló. Nzokande, lokola alobaki yango epai na bayekoli na ye, ‘alukaki mokano na ye moko te, kasi mokano na ye oyo atindaki ye’. (Yoane 5:30) Na bongo “amiyeisaki mpamba, akamataki motindo na moombo, abotamaki na lolenge na bato. Ezwamaki ye na motindo na moto, amisokisaki mpe atosi kino kufa, ee kino kufa na nzeté.”​—Bafilipi 2:7, 8.

Mbeka wana ezalaki ya mpamba te. Lokola azalaki pene mpo na ‘kosopa bomoi na ye mpo na baninga na ye,’ Yesu alongaki kofuta motuya ya lisiko, kopesaka bongo nzela epai na bato bazangi kokoka bazwa to kozanga kokufa kati na makoló, to bomoi na seko awa na mabelé. (Yoane 3:16; 15:13; 1 Yoane 2:2) Na kotikalaka mpenza sembo, apesaki nzela ete nkombo na Jéhovah ekumisama mingi koleka. (Masese 27:11) Na bongo likambo na kokamwa lizali te ete Jéhovah akoka kopambola ye mpo na bomoi na ye ya komipesa! “Nzambe anetoli ye mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo nyonso mosusu.”​—Bafilipi 2:9.

Ya solo, Yesu azalaki Mwana bobele moko ya Nzambe. Nzambe azali mpe kopambola bikelamu na ye mosusu oyo bazali komipesa lokola mbeka mpo na ye? Ee, bandakisa mingi ya kala mpe ya lelo emonisi yango. Totalela lisolo na Biblia litali Luta, mwasi moaba. Na ntembe te ayekolaki koyeba Jéhovah na lisalisi ya mobali na ye moyisraele. Nsima na liwa ya mobali yango, esengelaki na ye kokamata ekateli: Asengelaki kotikala na mboka na ye ya bopakano to kolanda Naomi, bokilo na ye ya mwasi mobange, na Mabelé na ndaka? Luta aponaki likanisi oyo ya mibale, ata soki yango elimbolaki komipesa: komipimela kofanda esika moko na bato ya libota na ye mpe mbala mosusu ata likoki ya kobala lisusu. Kasi, Luta ayekolaki koyeba Jéhovah, mpe mposa ya kosambela ye esika moko na libota na ye liponami etindaki ye ete akangama na Naomi.

Luta apambolamaki mpo na komipesa wana? Ee! Mwa bambula na nsima, nkolo moko ya mabelé na nkombo Boaza akamataki ye na libala lokola mwasi na ye, mpe abotaki mwana moko ya mobali, Yobede, na nzela na ye nde azwami kati na molongo oyo ezali komema kino na Yesu Klisto.—​Matai 1:5, 16.

Na ntango na biso, basaleli na Nzambe oyo bamipesaki bango mpe basili kozwa mapamboli. Na ndakisa, na 1923, William Brown, oyo ayebani malamu na nkombo ya Brown “la Bible,” atikaki ndako na ye kuna na mboka Antilles mpo na kokoma mobandisi ya mosala na kosakola na Afrike ya weste. Mwasi na ye mpe mwana na ye ya mwasi bakendaki na ye elongo. Nsuka na yango afandaki na Nigéria, epai kuna mosala na kosakola mobandaki mpenza kobota mbuma. Elongo na Moindo moko ya mokili ya Amerike na nkombo Vincent Samuels mpe na Temwe mosusu ya mboka Antilles na nkombo Claude Brown, Brown “la Bible” akokisaki mokumba monene kati na ebandeli ya mosala na Afrike ya weste.

Lelo, basakoli koleka 187 000 bazali kosakola na mboka Sierra Leone, na Libéria, na Ghana mpe na Nigéria, mikili epai kuna Brown “la Bible” mpe baninga na ye basalaki mosala ya pionnier. Liboso ete akufa, na 1967, Brown “la Bible” alobaki ete: “Oyo nde esengo ya komona mibali mpe basi kokoma na kotosa nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe!” Ee, apambolamaki mingi mpenza mpo na komipesa na ye.

Lolenge nini komonisa elimo ya komipesa

Ndenge nini tokoki lelo komonisa elimo motindo wana? Moko na balolenge ezali ya kosangana mbala na mbala, poso nyonso, na mosala ya kosakola ndako na ndako. (Misala 20:20) Mbala mosusu ezali mpenza petee te, mingimingi nsima na poso ya mosala na kolembisa. Yango ezali kosenga komipekisa makasi mpe ebongiseli moko malamu. Kasi bosepeli oyo bozali kozwama na yango bozali mpenza kozipa mitungisi nyonso. Na yango, tokoki kozala na likoki ya kosalisa moto moko ete akóma “mokanda na Klisto . . . , mokomami likoló na bitando na mabanga te, kasi likoló na bitando na nzoto, likoló na mitema na bato.”​—2 Bakolinti 3:3, MN.

“Na kosombaka” mpenza “ntango malamu,” mbala mosusu likoló na mosala to likoló na masano, bamosusu bakoki kosangana mingi kati na mosala ya kosakola. (Baefese 5:16) Mingi bazali komibongisa na motindo ete babanda mosala ya pionnier auxiliaire ata mbala moko na mbula. Bamosusu bazali kolonga kobanda mosala yango mbala na mbala to na kokota kati na molongo ya ba pionniers permanents. Mbeka mosusu oyo ebongi na kopesa ezali oyo ya kokende kofanda kati na etúka moko epai kuna mposa ya basakoli na Bokonzi ezali mingi. Yango esengaka mbala mingi kosala mbongwana makasi kati na lolenge na bomoi na biso, kondima mikakatano mpe komesena na makambo mpe bizaleli ya sika. Kasi, na kotalela mapamboli oyo mazali kozwama na kosalisaka mingi mozalani mpo na kozwa bomoi, mbeka motindo wana ebongi solo ete epesama.

John Cutforth, moto ya mboka Canada, ye moko amonaki bosolo ya likambo yango. Mosilisi na eteyelo ya Galaad, Kelasi ya la Société Watchtower mpo na koteya Biblia, atindamaki na mosala ya misionere kati na mboka Australie. “Yango ezalaki mpenza mosika longwa na mboka na ngai! lokola ndeko Cutforth azali komikundola. Nazalaki komituna soki nakozala na likoki ya kozonga lisusu na Canada mpo na komonana na libota na ngai mpe baninga na ngai liboso na Armagedon. Lolenge se moko mpo na koyeba yango ezalaki bobele ya kokende.” Ndeko Cutforth akendaki, mpe aoka naino mawa te mpo na komipesa na ye. Nsima na bambula, akomaki elendiseli monene ya mosala na kosakola na Papouasie-Nouvelle-Guinée, epai kuna azali kokoba kosala na molende nyonso; asali kati na mosala ya misionere bambula 50. Mokolo moko alobaki ete: “Soki tozali ntango nyonso koluka kolanda mitinda na Jéhovah, soki tozali kondima ata mokumba nini oyo amoni malamu kopesa biso, tozali kozwa esengo, bolamu, bosepeli mpe baninga minei koleka.”

Ya solo, makambo lokola, kolongono mabe ya nzoto, mikakatano mitali mosolo to mikumba ya libota, mikoki kokitisa misala na biso; moto nyonso asengeli kozala pionnier to misionere te. Atako bongo, tozala na ekateli ya kosangana mingi na makita mpe na mosala ya kosakola, na kopesaka nzela te na mitungisi mikemike, lokola mbula to moi makasi, ete epekisa biso kosangana na yango. (Baebele 10:24, 25) Tokoki mpe kolekisa ntango na biso mingi na koyekolaka Liloba na Nzambe biso moko. Mabota mingi bazali kolonga na kokataka ngonga oyo bazali kolekisa mpo na kotala télévizyó, mbala mosusu mpe na kolekisa mpokwa moko “kozanga télévizyó” to na kolongola mpenza télévizyó na ndako na bango Soki tozali mpenza komibombela ntango mpo na boyekoli na biso moko, “mbeka na lisanzoli” oyo tokopesa na “kosalaka eyambweli polele mpo na nkombo na ye” na makita mpe na mosala ya kosakola ekozala mpenza mbeka na motuya koleka.​—Baebele 13:15.

Tomikundola likambo oyo ete: mosala na kosakola ekomi na nsuka na yango. Mosika te Nzambe akoyeisa lisambisi na ye likoló na mokili oyo na lokoso mpe na moimi. (Sofoni 2:8) Mpo na kobatela ngolu na Nzambe, tosengeli te komiyokela mawa biso moko. Tosengeli nde ‘kokaba nzoto na biso lokola mbeka na bomoi, na bulee, mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.’ (Baloma 12:1) Elimo motindo wana ekomemela biso esengo mpe bosepeli, mpe ekosalisa biso na kozwa esengo mingi kati na mosala ya Nzambe. Lisusu, ekosepelisa motema na Jéhovah Nzambe.​—Masese 27:11.

Na bongo tobatela elimo ya komipesa! Tokakatana te na koboma nzoto mpo na bamosusu mpe mpo na matomba ya Bokonzi. Paulo alendisi biso na maloba oyo ete: “Bobosana te kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko mpo ete Nzambe akosepelaka mbeka na motindo yango.”​—Baebele 13:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yango ezali mpenza nkombo na ye te.

[Elilingi na lokasa 26]

Komibombela ntango mpo na boyekoli na yo mpe mpo na mosala ya kosakola ekoki kosenga komipimela makambo mosusu, kasi yango ezali na ntina

[Elilingi na lokasa 28]

William Brown mpe John Cutforth bapambolamaki mingi mpo na elimo na bango ya komipesa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto