Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/00 lok. 1
  • Ozalaka na elimo ya komipesa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na elimo ya komipesa?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Tózala na elimo ya komipesa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kokoba komonisa ezaleli ya komipimela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 4/00 lok. 1

Ozalaka na elimo ya komipesa?

1 Botɔndi na biso mpo na likambo oyo Yesu Klisto asalaki mpo na bato kozanga kotalela matomba na ye moko, esengeli kotinda biso nyonso tómipesa mpenza na makoki na biso nyonso, na makasi na biso nyonso mpe na nguya na biso nyonso. Makomami ezali kobondela biso ete: “Bókaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango.” (Lom. 12:1) Komitalela malamumalamu mbala na mbala ekosalisa yo omona soki ozali komonisa mpenza elimo motindo wana na meko oyo makambo ya bomoi na yo ezali kopesa yo nzela ya kosala yango.

2 Mpo na koluka boyebi ya Biblia: Obombaka ntango mokolo na mokolo mpo na kotánga Biblia yo moko mpe koyekola yango? Olandaka programɛ yango? Ozalaka na momeseno ya kobongisa malamu makita ya lisangá? Soki ozali tata ya libota, oyekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na libota na yo? Na yango, mbala mosusu tokoki kosomba ntango oyo tolekisaka mpo na kotala televizyo to kosalela ordinatɛrɛ to makambo mosusu mpo na boyekoli ya libota. Nzokande, okomona ete biloko oyo ozali komipimela ezali na ntina mingi te, soki okanisi ete ntango oyo ozali kolekisa na koyekola Liloba ya Nzambe ekomemela yo bomoi ya seko!​—Yoa. 17:3.

3 Na koteya bana na yo: Eleko malamu mpo na bango ete bábanda koyekola elimo ya komipesa ezali ntango bazali naino bana mike. Teyá bango ete soki ezali na ntango mpo na kosakana, esengeli mpe kozala na ntango mosusu mpo na kosala misala mpe makambo ya Teokrasi. (Ef. 6:4) Pesá bango misala mosusu ya ndako básala. Zalá na programɛ ya kobima elongo na bango pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya kosakola. Pesá ndakisa malamu mpo ete ntango ozali koteya bango, bándima makambo oyo ozali koloba.

4 Na misala ya lisangá: Lisangá ekokóma lisusu malamu soki moto mokomoko azali komipesa na bolingo nyonso mpo na kosala makambo oyo ekopesa litomba na moto nyonso na kati ya lisangá. (Ebe. 13:16) Okoki kolekisa ngonga mingi lisusu na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli? Okoki kozala na bolingo malamu ya kosalisa bato oyo bazali na bokɔnɔ to mibange, mbala mosusu kozwa bango mpo na kokende na bango na makita?

5 Liboso ya kopesa bomoi na ye lokola mbeka, Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete bátya miso na bango na matomba ya Bokonzi, bátya makambo mosusu nyonso na nsima. (Mat. 6:33) Soki tozali ntango nyonso na elimo ya komipesa ndenge wana tokozwa esengo mingi, mpe tokosepela wana tozali ntango nyonso kosalela Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto