Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/2 nk. 29-30
  • “Boboto na ye ezali monene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Boboto na ye ezali monene”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na boumeli ya mosala na ngai ya sodá mpe nsima na yango
  • Bomoi na ngai ebongwani
  • Mosala ya pionnier
  • Nazali kosalela Nzambe na molimo mobimba atako mikakatano ezali
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Okoki kokende kosala epai mposa ya basakoli ezali makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Naponaki mosala ya malamu
    Lamuká!—2007
  • Bolingo ya boklisto emonisami kati na makámá makwelaki mokili ya Mexique
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/2 nk. 29-30

“Boboto na ye ezali monene”

LISOLO YA JOSÉ VERGARA OROZGO

Okanisi ete na mibu 70, likoki ezali mpo na kobanda motindo na bomoi ya sika? Ezali yango nde nasalaki. Ekoki mibu 35 sikawa uta nabandaki yango.

Na bobóto na ye, Jéhovah asalisaki ngai, uta 1962, ete nazala pionnier permanent mpe, uta 1972, ete nazala nkulutu kati na lisangá ya ba Témoins de Jehovah ya engumba El Carrizal, na ekólo ya Jalisco, na mboka Mexique. Kasi tika nayebisa bino mwa moke lisoló ya bomoi na ngai.

NABOTAMI na ekólo ya Michoacán, na mboka Mexique, na mokolo ya 18 août 1886. Lokola tata na ngai azalaki mosangani ya franc-maçon, tozalaki kokende na ndakonzambe te, tozalaki kosangana ata na feti moko ya katolike te mpe tozalaki na ekeko na losambo te kati na ndako na biso.

Wana nazalaki na mibu 16, tata na ngai akendaki kosala mosala na États–Unis, mpe azwaki bibongiseli ete mobali moko ayekolisa ngai mosala ya mabɔkɔ. Kasi, nsima na mibu mibale, mobali yango amemaki ngai na Mexique ete nazwa formation na eteyelo ya basodá. Nsima na yango, nakɔtaki na limpinga na basodá ya Mexique.

Na boumeli ya mosala na ngai ya sodá mpe nsima na yango

Nabundaki etumba na ntango na botomboki ya Mexique, oyo ebandaki na 1910. Bilenge mibali nyonso ya eteyelo na basodá bazalaki na ngámbo ya Francisco Madero, motomboki oyo atɛmɔlaki bokonzi mabe ya Porfirio Dóaz. Tosungaki Madero kino liwa na ye na 1913 mpe, na nsima, tokómaki na ngámbo ya Venustiano Carranza, oyo azalaki mokonzi ya ekólo kobanda 1915 kino 1920. Bazalaki kobénga biso ete ba Carranzistas.

Mbala minei, namekaki kosɛnga ete balongola ngai mikumba na ngai ya sodá, kasi elongaki te. Nalongwaki mpe nakimaki. Tata na ngai, oyo azongaki na Mexique, anyokwamaki mpo na yango: akangamaki na bolɔkɔ. Mokolo moko, nakendaki kotala ye na kolobáká ete, ngai nazalaki mwana na ndeko na ye. Makambo oyo tolingaki kolobana elongo, tokomaki yango na papier mpo ete bakɛngɛli bayoka biso te. Mpo ete bayeba ngai te, nalyaki ba papiers yango.

Na nsima wana abimisamaki na bolɔkɔ, tata na ngai ayaki kotala ngai mpe asɛngaki ngai ete nakende epai na bakonzi. Nakendaki mpe, nakamwaki, mpo ete général akangisaki ngai te. Kasi, apesaki ngai toli ete nakenda na États-Unis. Nandimaki likanisi na ye, mpe nafandaki na mboka wana kobanda 1916 kino 1926.

Na 1923, nabalaki mwasi moko Momexiké oyo azalaki mpe kofanda na États-Unis. Nayekolaki mosala ya kotonga ndako mpe tozwaki mwana moko ya mwasi mpo na kobɔkɔla. Na ntango akokisaki sanza 17, tozongaki na Mexique mpe tofandaki na engumba Jalpa, na ekólo ya Tabasco. Mpe etumba ya ba “cristeros” ebimaki; eumeli kobanda 1926 kino 1929.

Ba cristeros balingaki ete nasangana na bango. Kasi namonaki malamu kokima elongo na libota na ngai, kati na ekólo ya Aguascalientes. Nsima na kofanda na bisika bikeseni na Mexique, na 1956, tokendaki kofanda na Matamoros, na ekólo ya Tamaulipas, epai nabandaki kokamba mosala ya botongi bandako.

Bomoi na ngai ebongwani

Ezali wana nde bomoi na ngai ebandaki kobongwana. Mwana na ngai ya mwasi, oyo abalaki na ntango wana mpe azalaki kofanda na ngámbo mosusu na ndelo ya mboka, na engumba Brownsville, na Texas, azalaki koya kotala biso. Mokolo moko, alobaki ete: “Papa, ezali na mabota mingi mayangani lelo na esika na feti. Tokenda kotala soki ezali likambo nini.” Ezalaki assemblée ya ba Témoins de Jéhovah. Mwana na ngai ya mwasi, bokilo na ngai, koko na ngai, mwasi na ngai mpe ngai, toyanganaki na mikolo minei oyo assemblée wana esalemaki.

Uta ntango wana, tokómaki kokenda na makita na boklisto masalemaki na ba Témoins de Jéhovah. Wana ezalaki ngai kosala bokóli na elimo na Mexique, mwana na ngai ya mwasi mpe azalaki kosala lolenge moko. Nokinoki, nabandaki kolobela baninga na ngai ya mosala na ntina na solo ya Biblia oyo nazalaki koyekola. Nazalaki kozwa bazulunalo zomi na nimero moko na moko ya Mosenzeli mpe Réveillez-vous! oyo nazalaki kokabwela bango. Bato mitano kati na baoyo bazalaki kosala na biro, ba ingénieurs misato mpe mwa ndambo na basali mosusu, bakómaki ba Témoins de Jéhovah.

Mokolo ya 19 décembre 1959 ezalaki malili mpenza wana nazwaki batisimo kati na ebale. Baoyo nyonso bazwaki batisimo mokolo wana babɛlaki mpo ete mai mazalaki mpenza malili. Mwana na ngai ya mwasi azwaki batisimo liboso na ngai, mpe mwasi na ngai akómaki na boyebi malamu ya solo ya Biblia mpe amonisaki boyokani mingi, atako akómaki kino kozwa batisimo te.

Mosala ya pionnier

Namiyokaki ete nasengelaki kozongisela Nzambe eloko moko mpo na bobóto na ye monene; yango wana, na février 1962, nabandaki mosala ya ntango nyonso na kokómáká pionnier wana ezalaki ngai na mibu 75. Nsima na mwa bambula, na 1968, mwasi na ngai akufaki. Nakómaki bongo na mposa ya kosala mosala na mboka mosusu, kasi, na ntina na mbula na ngai, bandeko bamonaki ete yango ebongaki te. Atako bongo, na 1970, naponamaki lokola pionnier na engumba Colotlán, na ekólo ya Jalisco, epai ezalaki na lisangá moko ya moke.

Na septembre 1972, mokɛngɛli ya zongazonga asɛngaki ngai ete nakende kofanda na engumba moko moke, na El Carrizal, pene na engumba Colotlán. Bobele na novembre ya mbula wana, lisangá lisalemaki na engumba yango, mpe naponamaki lokola nkulutu. Atako engumba yango etangwaki mosika, kasi bato 31 bazalaki koyangana na makita ya lisangá.

Atako mbula na ngai, nazali ntango nyonso na makasi kati na mosala ya kosakola, mpe nazali kosala milende mpo na kosalisa bato na kososola likoló na bindimeli na bango. Na ndakisa, wana ekotangaka bango mbuma ya sapelé na bango, bakatolike na motema sembo bazongelaka libondeli ya Ave Maria, ete: ‘Malia losako! Otondi gracia, Mokonzi azali na yo.’ Libondeli yango libakisi ete: ‘Santu Malia, Mama wa Nzambe.’ Natunaka bango ete: ‘Soki Nzambe nde abikisaki Maria longwa na masumu, ndenge nini akoki bongo kozala lisusu mwana na ye?’

Nazali na mibu 105, mpe nazali nkulutu mpe pionnier permanent na engumba El Carrizal uta pene na mibu 20. Liyoki lizali ete Jéhovah nde asalisi ngai mpo na kozala na bomoi molai, mpo ete na yango nde nakoki kozwa ntango oyo nabungisaki wana nazalaki kosalela ye te.

Nayekoli likambo oyo ete tosengeli ntango nyonso kondimisama ete Mosambisi na biso Aleki-monene, azali kotala biso longwa na kiti na ye ya kosambisa, mpe azali kokokisa bamposa na biso. Lokola Nzembo 117:2 elobi: “Mpo ete bobóto na ye ezali monene epai na biso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto