Okoki kokende kosala epai mposa ya basakoli ezali makasi?
“Tozalaki na bomoi ya malamu na États-Unis, kasi tozalaki komona ete elimo ya konduka biloko ya mokili oyo bato bazalaki na yango kuna ekoki kokóma likama mpo na biso mpe bana na biso mibale. Ngai ná mwasi na ngai tozalaki liboso bamisionɛrɛ, mpe tozalaki na mposa ya kozongela bomoi wana ya esengo, oyo ezangi mindɔndɔ.”
LOKOLA mposa yango ezalaki makasi, na 1991, Ralph ná Pam bamonaki malamu bákomela babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova mpo na komonisa mposa na bango ya kokende kosala na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Biro ya filiale ya Mexique eyanolaki ete bazali na mposa makasi ya basakoli oyo bakoki kosakola epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Lingelesi na ekólo yango. Lisusu, biro ya filiale yango ebakisaki ete elanga wana “eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35) Eumelaki te, Ralph ná Pam, ná bana na bango mibale oyo na ntango wana bazalaki na mbula 8 mpe 12, bandimaki libyangi yango mpe babandaki komibongisa mpo na kokende kuna.
Teritware moko monene
Ralph alobi ete: “Liboso tótika États-Unis, baninga mosusu ya lisangá bayaki mpe balobaki na biso ete: ‘Kokende na mboka-mopaya ezali likama!’ ‘Bokosala nini soki bobɛli?’ ‘Mpo na nini kokende kosakwela bato oyo balobaka Lingelesi? Bato yango bakosepela na solo te!’ Atako bongo, tozalaki kaka na ekateli ya kokende. Ekateli na biso ya kokende kuna ebimaki mbalakaka te, ezali likambo oyo tokanisaki banda bambula mingi liboso. Toboyaki kokɔta banyongo oyo ekozwa biso ntango mingi mpo na kofuta, tozalaki kobomba mbongo mpe kosolola na libota mpo na mikakatano oyo tokoki kokutana na yango.”
Ralph ná libota na ye bakendeki naino liboso kotala biro ya filiale ya Mexique. Ntango bakómaki kuna, bandeko balakisaki bango karte ya Mexique mobimba mpe balobaki na bango, “Teritware na bino yango oyo!” Libota yango ekendaki kofanda na San Miguel de Allende, engumba oyo ezali na bato mingi oyo bautá na mikili mosusu, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 240 na nɔrdi-wɛsti ya engumba Mexico. Mbula misato nsima ya kokóma kuna, lisangá moko ya Lingelesi ya basakoli 19 efungwamaki na engumba yango. Wana ezalaki lisangá ya liboso ya Lingelesi na Mexique, kasi mosala monene ezalaki kozela bango.
Balobaka ete bato ya États-Unis oyo bafandaka na Mexique bazali soki milio moko. Longola bango, ezali na bato mingi ya Mexique lokola badoktɛrɛ, baavoka ná bana-kelasi oyo balobaka mpe Lingelesi. Ralph alobi boye: “Tozalaki kobondela ete basali báya mingi. Tozalaki ntango nyonso kobomba shambre moko mpo na bandeko oyo bazalaki koya na Mexique mpo na kotala soki bango mpe bakoki koya kosakola na Mexique.”—Mit. 13:2.
Bakómisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo básakola lisusu mingi
Mosika te, bandeko mingi oyo bazalaki na mposa ya kosakola lisusu mingi bayaki. Na kati na bango ezali na ndeko Bill ná mwasi na ye Kathy oyo bautaki na États-Unis. Basilaki kosakola mbula 25 na bateritware oyo mposa ya basakoli ezalaki makasi. Bazalaki kokanisa koyekola monɔkɔ ya Espagnol, kasi mikano na bango ebongwanaki ntango bakendeki na Ajijic, engumba oyo ezali pembeni ya laki Chapala, esika moko kitoko oyo bato mingi ya États-Unis oyo bazwá pansiɔ balingaka kokende kofanda. Bill alobi ete: “Na Ajijic, tomipesaki lisusu mingi na koluka bato ya Lingelesi oyo bazalaki na mposa ya koyeba solo.” Nsima ya mbula mibale na engumba yango, Bill ná Kathy bazalaki na esengo ya komona lisangá ya sika: lisangá ya mibale ya Lingelesi efungwamaki na Mexique.
Ken ná Joanne, bato ya Canada, bazalaki na mposa ya kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpe komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Bango mpe bakendeki na Mexique. Ken alobi ete: “Esɛngaki ntango mpo na komesana na esika oyo mai ya mɔtɔ ezali te, kura ezali te to telefone esalaka te mikolo mingi.” Atako bongo, kosakola nsango malamu ezalaki kopesa bango esengo mingi. Eumelaki te, Ken akómaki mosaleli ya misala mpe mbula mibale na nsima, akómaki nkulutu. Na ebandeli, kozala na mwa lisangá ya Lingelesi oyo ezalaki na bilenge mingi te ezalaki mokakatano mpo na mwana na bango ya mwasi, Britanny. Nzokande, ntango abandaki kosala misala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, akómaki na baninga ebele na Mexique.
Patrick ná mwasi na ye Roxanne, oyo bautaki na etúká ya Texas, na États-Unis, basepelaki ntango bayokaki ete teritware moko ya bato oyo balobaka Lingelesi ezali mosika te. Patrick alobi ete: “Nsima ya kokende kotala Monterrey, engumba moko oyo ezali na nɔrdi-ɛsti ya Mexique, tomonaki ete Yehova alingaki tókende kopesa mabɔkɔ kuna.” Nsima ya mikolo mitano, batɛkaki ndako na bango ya Texas mpe bakendaki na teritware oyo ezalaki na mposa ya basakoli lokola “Masedonia.” (Mis. 16:9) Kozwa mbongo ya kobikela na Mexique ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te, kasi nsima ya mbula mibale mpamba bazalaki na esengo ya komona mwa etuluku oyo ezalaki na Batatoli 17 ekoli mpe ekómi lisangá ya basakoli 40.
Jeff ná mwasi na ye Deb mpe bazali na kati ya bandeko oyo bakómisaki bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo na kosakola mingi lisusu. Batɛkaki lopango na bango ya monene na États-Unis mpe bakendeki kofanda na mwa apartema moko na Cancún, engumba moko oyo ezali pembeni ya mbu na ɛsti ya Mexique. Kala, bazalaki kosala mayangani na bandako oyo ezalaki mosika te na ndako na bango, epai mopɛpɛ kitoko ezalaki. Sikoyo, basengelaki kosala mobembo ya ngonga mwambe mpo na kokende na liyangani ya Lingelesi oyo ezalaki kosalema na libándá moko ya masano oyo ezangá nsamba. Kasi, basepelaki makasi ntango bamonaki lisangá moko ya basakoli soki 50 efungwami na Cancún.
Bandeko mosusu ya Mexique mpe babandaki komipesa na mosala ya kosakola na monɔkɔ ya Lingelesi. Na ndakisa, ntango Rubén ná libota na ye bayokaki ete lisangá ya liboso ya Lingelesi efungwami na San Miguel de Allende mpe ete Mexique mobimba ezali teritware ya lisangá yango, bazwaki mbala moko ekateli ya kopesa mabɔkɔ. Yango esɛngaki báyekola Lingelesi mpe mimeseno mosusu, mpe básalaka kilomɛtrɛ 800 pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyangana na makita. Rubén alobi ete: “Tozalaki na esengo ya kosakwela bapaya oyo bafandaki bambula ebele na Mexique, kasi bayokaki nsango malamu na monɔkɔ na bango mpo na mbala ya liboso. Mpo na komonisa biso esengo na bango, basusu babimisaki mai ya miso.” Nsima ya kosala na lisangá ya San Miguel de Allende, Rubén ná libota na ye basalaki lokola babongisi-nzela na engumba Guanajuato, na ntei ya Mexique, epai bapesaki mabɔkɔ mpo na kofungola lisangá moko ya Lingelesi ya basakoli koleka 30. Lelo oyo, bazali na etuluku moko ya Lingelesi na Irapuato, engumba oyo ezali pene na Guanajuato.
Kosakwela bato oyo ezalaki mpasi mpo na komona bango
Longola bapaya, bato mingi ya Mexique balobaka Lingelesi. Mbala mingi ezalaka mpasi kosakwela bango nsango ya Bokonzi mpo bafandaka na bakartye oyo baboi nde bayaka kofungola baporte. To soki bankolo-ndako nde ayei kofungola porte, baboyaka mbala mosusu koyoka mpo bakanisaka ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko ya moke. Kasi, soki Batatoli ya Yehova oyo bauti na mikili mosusu bakutani na bato yango, bamosusu bandimaka koyoka.
Tózwa ndakisa ya Gloria, oyo azali na engumba Querétaro, na ntei ya Mexique. Alobi ete: “Liboso, Batatoli ya Yehova oyo balobaka Espagnol bayaki koteya ngai, kasi naboyaki koyoka bango. Nzokande, ntango libota mpe baninga na ngai bakómaki na mikakatano, nakómaki kotungisama mpe nabandaki kobondela Nzambe alakisa ngai ndenge ya kosala. Mwa moke na nsima, mwasi moko oyo alobaka Lingelesi ayaki epai na ngai. Atunaki soki na ndako na biso moto oyo alobaka Lingelesi azali. Lokola azalaki moto ya ekólo mosusu, nalingaki koyeba mposa na ye, mpe nayebisaki ye ete nalobaka Lingelesi. Ntango azalaki koloba, nazalaki kokanisa, ‘Oyo likambo nini, moto ya États-Unis aya epai na ngai?’ Kasi, nasɛngaki Nzambe asalisa ngai. Na yango, ntango mosusu mopaya yango nde eyano ya libondeli na ngai.” Gloria andimaki boyekoli ya Biblia mpe akolaki nokinoki mpe azwaki batisimo, atako libota na ye ezalaki kotɛmɛla ye. Lelo oyo, Gloria azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe mobali na ye ná mwana na bango bazali mpe kosalela Yehova.
Mapamboli oyo baoyo bamipesaka mingi na mosala ya kosakola bazwaka
Kokende kosakola epai mposa ya basakoli ezali makasi ezalaka na mikakatano na yango, kasi ezalaka mpe na mapamboli beboo. Ralph, oyo tolobelaki na ebandeli alobi ete: “Toyekolaki Biblia na bato ya Angleterre, Chine, Jamaïque, Suède, ata mpe na bato mosusu ya lokumu ya Ghana. Bayekoli yango mosusu ya Biblia bazwaki bango moko ekateli ya kokóma babongisi-nzela. Na bambula eleki, libota na biso emoni ndenge masangá nsambo ya Lingelesi efungwami. Bana na biso bakómaki mpe babongisi-nzela, mpe lelo oyo bazali kosala na Betele ya États-Unis.”
Lelo, masangá ya Lingelesi na Mexique ezali 88 mpe bituluku ezali mingi. Nini esali ete bokoli esalema mbangu bongo? Bato mingi ya Mexique oyo balobaka Lingelesi basololaki na Batatoli ya Yehova liboso te. Basusu bandimaki mpo botɛmɛli oyo bakokaki kokutana na yango na mikili na bango ezalaki te. Bamosusu bandimaki koyekola Biblia mpo bazwaki pansiɔ mpe bakómaki na ntango mingi ya koyekola Biblia. Lisusu, basakoli mingi ya masangá ya Lingelesi bazali babongisi-nzela, mpe yango ezali kobakisa molende mpe bokoli na masangá yango.
Mapamboli ezali kozela yo
Na ntembe te, bato mingi na mokili bakondima nsango ya Bokonzi soki bayoki yango na monɔkɔ ya mboka na bango. Na yango, ezali mpenza likambo ya esengo komona ete ebele ya bandeko—bilenge, mikóló, minzemba mpe oyo babalá—bazali kondima kokende na bisika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi. Toboyi te, bakoki kokutana na mikakatano, kasi mikakatano yango ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na esengo oyo bayokaka ntango bakutanaka na bato ya mitema sembo oyo bandimi mateya ya solo. Yo mpe okoki kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpo okoka kokende na teritware moko ya ekólo na bino to na mboka-mopaya, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali makasi?a (Luka 14:28-30; 1 Kol. 16:9) Soki osali bongo, yebá ete mapamboli beboo ezali kozela yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kosala esika mposa ezali makasi, talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 111-112.
[Etanda na lokasa 21]
Bato oyo bazwá pansiɔ babendaki likebi na ye
Beryl atikaki Angleterre mpe akendeki kofanda na Canada. Kuna, asalaki lokola mokonzi na bakompanyi ndenge na ndenge ya bapaya. Akómaki mpe mwasi moko oyo ayebi malamu mosala ya kotambwisa bampunda mpe baponaki ye mpo azala momonisi ya Canada mobimba na masano ya Olympique oyo esalemaki na mobu 1980. Nsima ya kozwa pansiɔ, Beryl ná mobali na ye bakendeki kofanda na Chapala, na Mexique. Kuna, bazalaki na momeseno ya kokende kolyaka na barestora. Ntango azalaki komona bato bazwá pansiɔ oyo elongi ezali ya esengo bakɔti, azalaki kopesa bango mbote mpe kotuna bango soki bayei kosala nini na Mexique. Mbala mingi, bato yango oyo bazalaki na bilongi ya esengo ezalaki Batatoli ya Yehova. Beryl ná mobali na ye balobaki ete soki esengo mpe ntina ya bomoi eutaka na koyeba Nzambe, bango mpe bakosepela koyeba ye. Nsima ya koyangana na makita basanza ebele, Beryl andimaki koyekola Biblia. Na boumeli ya mbula mingi, Beryl asalaki lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
[Etanda na lokasa 22]
“Ezali mpenza lipamboli kozala na bango”
Baoyo bakendaka kosala epai mposa ya basakoli ezali makasi, bazwaka matɔndi ya bandeko ya masangá oyo bakutaka kuna. Biro ya filiale moko na esanga Caraïbes ekomaki ete: “Soki ebele ya bandeko ya mikili mosusu oyo bazali kosala awa bakei, masangá ekozala mpenza makasi te. Ezali mpenza lipamboli kozala na bango.”
Liloba ya Nzambe elobi ete “basi baoyo bapalanganisi nsango bazali mingi mpenza.” (Nz. 68:11) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bandeko ya basi ya minzemba bazali mingi na kati ya basakoli oyo bazali kosala na mikili mosusu. Bandeko basi wana oyo bazali kotika epai na bango, bazali mpenza lisungi monene. Biro ya filiale moko na Mpoto ya Ɛsti elobaki boye: “Na masangá na biso, bandeko basi bazali mingi mpenza koleka bandeko mibali. Mingi na bango bazali bato ya sika na lisangá ya Yehova, kasi babongisi-nzela ya basi oyo bazali minzemba, oyo bazali kouta na mikili mosusu bazali kosalisa mpenza bandeko wana ya sika. Bandeko wana ya basi oyo bautaka na mikili mosusu bazali mpenza lipamboli mpo na biso!”
Bandeko wana ya basi oyo bakendaka kosala na mikili mosusu bamiyokaka ndenge nini? Angelica, ndeko moko ya mwasi ya mbula soki 35, oyo asalá bambula mingi na mikili mosusu lokola mobongisi-nzela alobi boye: “Mikakatano ezalaka mingi. Na teritware moko oyo nasalaki, ezalaki mpasi mpo na ngai kotambola na banzela ya pɔtɔpɔtɔ mpe komona bato oyo bazali konyokwama mpe yango ezalaki kosala ngai mpasi. Kasi, kosalisa bato na mosala ya kosakola ezalaki kopesa ngai esengo. Maloba ya botɔndi oyo bandeko basi bazalaki koyebisa ngai mpo nayaki kosalisa bango, ezalaki mpenza kosimba motema na ngai. Ndeko moko ya mwasi ayebisaki ngai ete ndenge natikaki mboka na biso mosika mpo na koya kosala lokola mobongisi-nzela na mboka na bango etindaki ye mpe akóma mobongisi-nzela.”
Sue, mobongisi-nzela moko ya mwasi ya mbula koleka 50 alobi ete: “Mikakatano ezangaka te, kasi mapamboli oyo okozwa eleki mosika mikakatano yango. Mosala ya kosakola epesaka mpenza esengo! Lokola nasakolaka na bilenge basi, nayebisaka bango ndenge makambo oyo nayekolaki na Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo ekoki kosalisa mpo na kolonga mikakatano. Bayebisaka ngai mbala mingi ete ndenge nasalaka mpo na koyika mpiko na mikakatano na boumeli ya bambula oyo nasali lokola mobongisi-nzela mpe monzemba, esalisaka bango bámona ete bango mpe bakoki kolonga mikakatano ya bomoi na bango. Kosalisa bandeko wana ya basi etindaka ngai namona ete nazali na ntina.”
[Karte na lokasa 20]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MEXIQUE
Monterrey
Guanajuato
Irapuato
Ajijic
Chapala
Laki Chapala
San Miguel de Allende
Querétaro
ENGUMBA MEXICO
Cancún
[Elilingi na lokasa 23]
Basakoli mosusu basepelaka kosakwela bato ya bikólo mosusu oyo bayoká naino nsango malamu te