Naponaki mosala ya malamu
Lisolo ya Sonia Acuña Quevedo
Na banki epai nazalaki kosala, bayebisaki ngai ete bamatisi ngai mpɛtɛ. Ezalaki mosala moko ya lokumu mpe lifuti elingaki kozala mingi. Kasi, na lingomba, bautaki kopona ngai mosakoli ya ntango nyonso mpe batindaki ngai na lisangá moko mosika. Lelo oyo, mbula 32 na nsima, ntango nakanisaka ekateli oyo nazwaki, namonaka ete naponaki nzela ya malamu.
MAMA azalaki Mokatolike banda bomwana, kasi azalaki kotyela bindimeli ya lingomba yango ntembe. Azalaki komituna mpo na nini kopesa lokumu mingi na bikeko oyo esalemi na bato. Azalaki mpenza na mposa ya koyeba mateya ya solo mpe akɔtaki mangomba ndenge na ndenge, kasi azwaki biyano ya mituna na ye te.
Mokolo moko, mama afandaki na libándá ya ndako na biso na engumba Tuxtla, na Mexique, mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Motatoli ya Yehova moko ayaki kotala ye. Akamwaki mpenza ndenge ndeko yango apesaki biyano ya mituna na ye na Biblia mpe andimaki ete Motatoli yango aya lisusu kotala ye. Ntango azongelaki ye, mama elongo na moteyi moko ya Lingomba ya Adventiste, sango moko ya Lingomba ya Katolike mpe moteyi moko ya Lingomba ya Moto ya Nazalete bazalaki kozela ye. Atunaki bango motuna moko oyo etali Sabata, kasi kaka Motatoli nde apesaki eyano ya malamu oyo euti na Biblia. Kutu, kaka Motatoli wana nde azalaki na Biblia. Na 1956, nsima ya sanza motoba mpamba ya boyekoli ya Biblia, mama azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Na ntango wana, nazalaki na mbula mwambe.
Tata akómi komitungisa mpo na biso
Tata azalaki kopekisa mama te ayekola Biblia. Kasi, ntango mama abandaki koteya biso bana minei, mibale ya mibali mpe mibale ya basi, mpe koyangana na makita, tata atumbaki mikanda ya mama. Lokola tata amonaki ete bazali kobungisa biso nzela, amekaki kosalela Biblia ya Katolike mpo na komonisa ete Batatoli babakisá nkombo ya Nzambe, Yehova, na Biblia na bango mpo na kokosa bato. Ntango mama alakisaki ye nkombo Yehova na Biblia na ye, akamwaki mpenza mpe na nsima, akómaki kosepela na Batatoli ya Yehova.—Nzembo 83:18.
Na ekólo Mexique, soki mwana ya mwasi akokisi mbula 15, ezalaka mokolo moko ya ntina mingi. Lokola bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama endimami na Biblia te, natikaki kosala oyo ya ngai.a Kasi, tata azalaki kaka koloba ete asengeli kosala eloko moko mpo na kosepelisa ngai na mokolo yango. Nakanisaki likambo yango mpe nalobaki ete: “Na esika opesa ngai kado, nasepeli nde tókende ná yo na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo ekoya.” Tata andimaki mpe akómaki na mposa makasi ya koyeba Biblia.
Mokolo moko na butu, mbula moko ya mopɛpɛ makasi ebɛtaki; tata anyataki nsinga ya kura oyo ekweaki na nse mpe esalaki ye mabe mingi na nzoto. Ntango akɔtaki lopitalo, Batatoli ya mboka na biso bazalaki kobatela ye ntango nyonso mpe abosanaki soki moke te bolingo wana ya boklisto. Na nsima, abandaki kosakola nsango malamu mpe amipesaki mpo na kosalela Yehova. Likambo ya mawa, tata akufaki na mokolo ya 30 Sɛtɛmbɛ 1975, sanza moko liboso azwa batisimo. Tozali mpenza kolikya koyamba ye na esengo na mokolo ya lisekwa.—Misala 24:15.
Ndakisa ya malamu na libota
Yaya na ngai ya mwasi Carmen azalaki ntango nyonso kopesa motuya mingi na mosala ya kosakola ntango nyonso. Eumelaki te, nsima ya batisimo na ye na mobu 1967, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba azalaki kolekisa ngonga pene na 100 sanza na sanza na mosala ya kosakola. Na nsima, akendaki na engumba Toluca na Mexique ya Ntei. Ngai, nazwaki mosala moko na banki mpe na mokolo ya 18 Yuli 1970, nazwaki batisimo.
Carmen azwaki esengo mingi na mosala ya mobongisi-nzela mpe alendisaki ngai nalanda ye na Toluca. Nazalaki kokanisa likambo yango mokolo moko ntango nazalaki koyoka lisukulu moko oyo elobaki ete bayekoli ya Yesu basengeli kosalela boyebi na bango ya Biblia mpe kondima na bango mpo na kokumisa Nzambe. (Matai 25:14-30) Namitunaki boye: ‘Nazali mpenza kosalela boyebi ya Biblia mpe makabo mosusu ya elimo oyo nazali na yango?’ Makanisi wana epesaki ngai mposa ya kosalela Yehova lisusu mingi.
Misala mibale: nakopona oyo wapi?
Na mobu 1974, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela kasi nalingaki ezala na teritware mosusu. Eumelaki te, mokolo moko, nkulutu moko abengaki ngai na telefone na engumba Toluca, ntango nazalaki kosala mosala na banki. Alobaki boye: “Tozali kozela yo awa. Mpo na nini ozali koya te?” Nakamwaki koyoka ete basilaki kopona ngai mobongisi-nzela monene mpe batindaki ngai na engumba Toluca; nzokande, emonani ete bato ya posita babungisaki mokanda oyo batindelaki ngai. (Babongisi-nzela monene bandimaka kokende kosala mosala yango na bisika nyonso oyo ebongiseli ya Yehova etindaka bango.)
Kozanga kozela, nayebisaki bakonzi ya banki ete nalingi natika mosala. Mokonzi na ngai ya mosala asimbaki papye moko na mabɔkɔ mpe azalaki koningisa yango. Alobaki na ngai boye: “Zelá naino Sonia. Bauti koyebisa biso ete yo ná basi mosusu motoba bomati mpɛtɛ na mosala. Naino banki na biso etyá basi na bisika wana te. Osepeli na yango te?” Ndenge nalobaki yango na ebandeli, ezalaki mosala moko ya lokumu mpe lifuti elingaki kozala mingi. Atako bongo, natɔndaki mokonzi yango mpe nayebisaki ye ekateli na ngai ya kosalela Nzambe mingi. Alobaki na ngai ete: “Kendá na yo, kasi kobosana te ete ntango nyonso oyo okozala na mposa ya mosala, tokoyamba yo kaka.” Nsima ya mikolo mibale, nakómaki na Toluca.
Mosala ya mobongisi-nzela monene na Mexique
Ntango nakutanaki na Carmen na Toluca, asilaki kolekisa mbula mibale na mosala ya mobongisi-nzela monene na engumba yango. Tozalaki mpenza na esengo ya kozala lisusu esika moko. Kasi, tosalaki elongo na ye ntango molai te. Sanza misato na nsima, mama akutanaki na likama mpe kobanda wana esɛngaki ete moto abatelaka ye ntango nyonso na ndako. Toyebisaki likambo yango na biro ya Batatoli ya Yehova mpe ngai ná Carmen tomonaki malamu Carmen akenda kobatela mama. Abatelaki ye na boumeli ya mbula 17. Na bambula nyonso wana, Carmen azalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Azalaki kobenga bayekoli ya Biblia na ndako mpo báyekola mpe azala na likoki ya kobatelaka mama.
Na mobu 1976, batindaki ngai na Tecamachalco, engumba oyo bazwi bazalaki kofanda na ngámbo moko mpe babola na ngámbo mosusu. Nakómaki koyekola Biblia na mwasi moko ya mobange oyo abalaki te mpe azalaki kofanda epai ya leki na ye ya mobali oyo azalaki mozwi. Ntango mwasi yango ayebisaki leki na ye ete alingi akóma Motatoli, leki na ye ayebisaki ye ete soki ameki, akobengana ye na ndako na ye. Atako bongo, mwasi wana ya komikitisa abangaki te. Na nsima, ntango azwaki batisimo, ndeko na ye abimisaki ye na ndako. Atako mwasi yango azalaki na mbula 86, atyelaki mpenza Yehova motema. Bandeko ya lisangá bakómaki kobatela ye mpe atikalaki sembo tii ntango akufaki.
Nakɔti eteyelo ya Gileadi, na nsima batindi ngai na ekólo Bolivie
Nasalaki mbula mitano na engumba Tecamachalco mpe esepelisaki ngai mingi. Na nsima, babengaki ngai na kelasi ya liboso ya eteyelo mosusu ya Gileadi na ekólo Mexique. Ndenge nkombo na yango emonisi, kelasi yango ezali lokola eteyelo ya Gileadi oyo esalemaka na New York. Mama ná Carmen bayebisaki ngai mpenza ete nakende mpe nasalaki mobembo tii na biro ya Batatoli ya Yehova na engumba Mexico epai tozwaki mateya yango na boumeli ya pɔsɔ zomi. Ezalaki ntango moko ya esengo mpenza na bomoi na ngai. Tozwaki badiplome na mokolo ya 1 Febwali 1981 mpe batindaki ngai ná Enriqueta Ayala (oyo akómi kobengama Fernández) na engumba La Paz na Bolivie.
Ntango tokómaki na engumba La Paz, bandeko ya biro ya Batatoli ya Yehova oyo basengelaki koya kozwa biso na libándá ya mpɛpɔ bakómaki naino te. Tomitunaki boye: “Mpo na nini tozali kobungisa ntango?” Tobandaki kosakwela bato oyo bazalaki wana. Nsima ya ngonga misato, bandeko yango bakómaki. Nsima ya kosɛnga biso bolimbisi, balobaki ete banzela ekangamaki mpo na bato ya fɛti.
Mosala ya kosakola na mboka moko likoló ya ngomba
Engumba La Paz ezali likoló ya ngomba ya mɛtrɛ soki 3 625; yango wana, mikolo mingi ezalaki komonana lokola nde tozali pene na mapata. Lokola mopɛpɛ ezalaki mingi te, ezalaki mpasi mpo na kopema mpe soki nabimi na mosala ya kosakola, nazalaki kolɛmba nokinoki. Atako nasalaki mbula mobimba liboso namesana na bisika wana oyo ezalaki likoló mingi, mapamboli ya Yehova elekaki mitungisi ya nzoto. Na ndakisa, mokolo moko na ntɔngɔ na mobu 1984, namataki ngomba moko ya mabanga mpo nakende kosakola na ndako moko oyo etongamaki na nsɔngɛ na yango. Nalɛmbaki mpenza mpe ntango nabɛtaki na porte, mwasi moko abimaki. Tosololaki na ye malamu mpe nayebisaki ye ete nakozongela ye nsima ya mwa mikolo.
Azongisaki ete: “Nandimi te.” Kasi, nazongelaki ye mpe mwasi yango asɛngaki ngai nayekola Biblia ná mwana na ye ya mwasi. Nalobaki na ye ete: “Wana ezali mokumba ya baboti, kasi nakosalisa yo soki olingi.” Andimaki, ye moko mpe andimaki koyekola Biblia. Lokola ayebaki kotánga te, tobandaki naino koyekola mwa buku Yekolá kotánga mpe kokoma, oyo ebongisami na Batatoli ya Yehova mpo na kosalisa bato oyo bayebi kotánga te.
Mokemoke, libota yango ekómaki na bana mwambe. Ntango nazalaki kokende koyekola na bango, bana mosusu bazalaki kosimbana na mabɔkɔ lokola nsinga mpo básalisa ngai namata ngomba nakóma tii na ndako na bango. Nsukansuka, libota mobimba: tata, mama mpe bana mwambe bakómaki kosalela Yehova. Bana ya basi misato bazali babongisi-nzela mpe mwana moko ya mobali azali nkulutu na lisangá. Tata na bango azalaki mosaleli na misala na lisangá tii ntango akufaki na mobu 2000. Nayokaka esengo mingi ntango nakanisaka libota wana ya malamu mpe bosembo na bango. Natɔndaka Yehova ndenge apesaki ngai likoki ya kosalisa bango.
Tokutani lisusu na Carmen
Nsima ya liwa ya mama na mobu 1997, babengaki lisusu Carmen asala mosala ya mobongisi-nzela monene. Na mobu 1998, batindaki ye na engumba Cochabamba, na Bolivie, epai nazalaki kosakola. Ɛɛ, nsima ya mbula 18, tokutanaki lisusu na Carmen mpe bakómisaki ye misionɛrɛ. Tolekisaki ntango malamu na Cochabamba, engumba moko kitoko oyo bandɛkɛ balingaka mingi. Sikoyo, tozali kofanda na engumba Sucre, kaka na ekólo Bolivie. Engumba yango ezali na bato 220 000, ezali kitoko mpe etongamá na lobwaku moko ya likoló. Kala, bazalaki kobenga engumba yango Vatican ya moke mpamba te, bandako-nzambe mingi ya Lingomba ya Katolike ezalaki wana. Engumba yango ekómi sikoyo na masangá mitano ya Batatoli ya Yehova.
Mbula nyonso oyo ngai ná Carmen tolekisi na mosala na biso ya babongisi-nzela eleki 60 mpe tozwi libaku malamu mpenza ya kosalisa bato koleka 100 bázwa batisimo. Na ntembe te, kosalela Yehova na molimo mobimba ezali bomoi oyo epesaka matomba mingi.—Malako 12:30.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bafɛti mibale mpamba ya kokanisa mokolo ya kobotama oyo Biblia elobeli ezalaki ya bapakano mpe Biblia elobeli yango na ndenge ya malamu te. (Genese 40:20-22; Malako 6:21-28) Kasi, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tópesaka bato makabo na motema na biso mobimba, na esika ya kopusama na bato to kolanda baninga.—Masese 11:25; Luka 6:38; Misala 20:35; 2 Bakolinti 9:7.
[Elilingi na lokasa 15]
Nazalaki komata ngomba ya mabanga mpo na koyekola Biblia na libota oyo
[Elilingi na lokasa 15]
Ngai ná yaya na ngai Carmen (na lobɔkɔ ya mobali) na mosala ya kosakola