Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/5 nk. 28-31
  • Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 3

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 3
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bilei ya elimo bipesami
  • Nalóngaki kokima
  • Na bolɔkɔ kasi tozalaki na bonsomi
  • Bana na biso bamekami
  • Mosala na biso ya kosakola ekóli
  • Bibongiseli bisalemi na kolanda meko oyo bonsomi bozali kobɛlɛma
  • Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 1
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/5 nk. 28-31

Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli​—Eteni 3

EZALAKI mokolo ya 14 mars 1990. Na mokolo wana ya ntina mingi, nazalaki na biro monene ya Leta etali Makambo ya mangomba, na Berlin-Est, na ntango mosali monene moko ya Leta apesaki mokanda moyebisi ete Leta andimi ba Témoins de Jéhovah ya mboka oyo bazalaki kobénga liboso République démocratique allemande, to Allemagne de l’Est. Wana makambo nyonso mazalaki kosalema na mokolo yango, namikundolaki eleko oyo nakómaki Témoin de Jéhovah mpe nakanisaki na mikakatano oyo tokutanaki na yango.

Pene na katikati ya bambula 1950, wana Margarete, moninga na ngai ya mwasi na mosala, ayebisaki ngai bindimeli na ye biuti na Biblia mpo na mbala ya liboso, monyoko ya ba Témoins de Jéhovah ya Allemagne de l’Est mozalaki makasi. Nsima na mwa ntango moke, Margarete akendaki kosala epai mosusu mpe nabandaki koyekola Biblia elongo na Temwe mosusu. Nazwaki batisimo na 1956; Margarete mpe ngai, tobalanaki bobele na mbula wana. Tozalaki na lisangá ya Lichtenberg na Berlin. Ezalaki soko na basakoli na Bokonzi 65.

Mbula mibale nsima na batisimo na ngai, basali minene ya Leta bayaki epai na ndeko moko oyo azalaki kokamba lisangá na biso. Bazalaki na mokano ya kokangisa ye, kasi ye akendaki mosala, na Berlin-Ouest. Libota na ye balongaki koyebisa ye mpo ete atikala bobele kuna, mpe nsima ya mwa basanza, balandaki ye na Ouest. Atako nazalaki bobele na mibu 24, bapesaki ngai mikumba minene kati na lisangá. Nazali kotɔndo Jéhovah mpo ete apesaki ngai mayele mpe makasi makoki mpo na kokokisa mikumba yango.​—2 Bakolinti 4:7.

Bilei ya elimo bipesami

Na ntango efélo ya Berlin etongamaki na août 1961, ba Témoins de Jéhovah ya Est bakabwanaki mbalakáká na bandeko na bango ya Ouest. Ezali na eleko wana nde tobandaki kobimisa mikanda na biso, libosoliboso na lisalisi ya bamasini ya daktiló, mpe na nsima na lisalisi ya ebele ya bamasini ya polikopi. Kobanda 1963, nasalaki mibu mibale mpo na kotonga ebómbamelo moko kati na ndako na biso mpo na konyata mikanda. Nsima na kosala mokolo mobimba na masini, na butu mobimba nazalaki kobimisa bakopi ya Mosenzeli na lisalisi ya bandeko mosusu mibale ya mibali. Bakonzi basalaki nyonso mpo na komona lolenge nini mosala na biso ya konyata mikanda mobongisami, kasi Jéhovah asalisaki biso, na motindo boye ete bilei na biso, lolenge oyo tozalaki kobénga yango, bizalaki kozwama na ntango malamu.

Mpo na kobimisa ntalo monene ya bazulunalo, esengelaki kozwa bapapyé mingi, mpe ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kozwa yango. Soki tozalaki mbala na mbala kosomba bapapye yango mingi, mbɛlɛ ekokaki kobénda likebi ya bakonzi. Batemwe bazalaki bongo kosomba, moto na moto, mwa ndambo moke mpe bazalaki komema yango na esika oyo etuluku na biso ezalaki koyangana mpo na boyekoli ye Biblia. Longwa kuna, tozalaki komema yango na esika oyo tozalaki kobimisa bazulunalo. Na nsima, Batemwe mosusu bazalaki kokabola bazulunalo oyo ebimisamaki.

Lokola bato ya Leta batalelaki ngai lokola mosangani na babimisi mikanda, bazalaki kosenzela ngai mingi mpenza. Na nsuka ya mobu 1965, bazalaki kotindela ngai banɔngi mingi koleka mikolo ya liboso, mpe namonaki ete bamibongisi mpo na kosala likambo moko. Na pwasa, bayaki kobɔta ekuke na ntɔngɔ mpenza.

Nalóngaki kokima

Na ntɔngɔ na eleko ya mpiɔ, nazalaki kokenda kosala. Ezalaki liboso na ntɔngɔ etána, mpe nazalaki kosala makasi mpo na kokanga motema na malili makasi. Ezalaki ngai kotambola, namonaki mitó ya bato minei likoló ya lopango na ngai. Mibali yango babalukaki na coin mpe bazalaki koya liboso na ngai. Nalɔngaki wana eyebaki ngai ete ezalaki basali ya Leta. Nasalaki nini?

Mbula mpɛmbɛ makasi ezipaki bangámbo ya nzela, mpe etikaki bobele elekelo moke. Nakóbaki kokenda liboso. Natambolaki nokinoki wana ezalaki ngai kotala na nsé. Nasalaki libondeli ya nokinoki na mongongo ya nsé. Mibali yango bazalaki sé kobɛlɛma. Bayebaki nde ngai? Wana ezalaki biso kolekisana kati na elekelo wana moke, nandimaki te likambo oyo likómelaki ngai. Natambolaki lisusu nokinoki. Moko na bango angángaki ete: “Hé! Ezali ye! Kanga ye!”

Nabandaki kokima mbango noki. Kolekáká coin na lombango nyonso, napumbwaki lopango ya moninga oyo azali penepene na ngai mpe nakómaki na libandá ya lopango na ngai. Nakɔtaki noki kati na ndako mpe nakangaki ekuke. Nangángaki ete: “Bino nyonso botɛlɛma! Bazali nsima na ngai!”

Nokinoki, Margarete akitisaki ebuteli mpe atɛlɛmaki na ekuke. Nokinoki, nakendaki kopelisa mɔ́tɔ na eteni na ndako ezalaki na nsé ya mabelé. Napasolaki ba dossiers nyonso ya lisangá oyo nazalaki na yango mpe natumbaki yango na mɔ́tɔ.

Mibali yango bangángaki ete: “Fungola! Fungola ekuke! Ezali procureur.” Margarete afungolaki ekuke te wana ezalaki ngai kotumba mikanda nyonso oyo bakokaki komona. Na nsima, nakendaki epai na ye mpe nalakisaki ye na elembo ete afungola ekuke. Mibali yango baingelaki na ndako.

Batunaki ete: “Mpo na nini okimaki?”

Mosika te, bapolisié bakómaki mpe bazalaki kolukaluka na ndako mobimba. Nazalaki komitungisa mpo na ebómbamelo ya masini ya polikopi mpe mpo na bapapyé 40 000 ezalaki kati na yango, kasi esika wana emonanaki te. Atako ngonga mingi elekaki wana ezalaki bango kotuna ngai mituna, Jéhovah asalisaki ngai na kobatela kimya na ngai. Likambo wana libɛlɛmisaki biso mpenza epai na Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo mpe alendisaki biso ete toyika mpiko.

Na bolɔkɔ kasi tozalaki na bonsomi

Pene na nsuka ya bambula 1960, nazwaki mokanda oyo babéngisaki ngai ete nakɔta na mosala ya sodá. Lokola lisosoli na ngai lipesaki ngai nzela te ete nasala mosala ya sodá, bakatelaki ngai bolɔkɔ ya sanza nsambo kati na camp ya mosala. Tozalaki Batemwe 15 kati na camp ya Cottbus, na sud-est ya Berlin. Biso nyonso tozalaki wana mpo na ezaleli na biso ya boklisto na ntina na koboya kokɔta na makambo ya mokili. (Yisaya 2:2-4; Yoane 17:16) Mikolo yango mizalaki koumela mpe misala mizalaki makasi. Tozalaki kolamuka na 4 h 15 mpe bazalaki kobimisa biso libandá ya camp mpo na kokenda kosala na banzela ya bingbunduka. Atako bongo, na boumeli ya bolɔkɔ na biso, tozwaki libaku ya kolobela bato mosusu na ntina na Bokonzi ya Jéhovah.

Na ndakisa, bato mibale oyo bazalaki kosakola makambo, bazalaki elongo na biso kati na camp. Mokolo mosusu, nayokaki ete oyo ya elenge azalaki koluka kosolola na ngai. Alingaki nini? Ayebisaki mayoki na ye polele. Nkoko na ye ya mwasi azalaki kosakola makambo, ye mpe akólisaki nguya yango nsima na kotanga mikanda na ye. Mobali wana alingaki mpenza ete atika banguya yango oyo ezalaki koyangela ye, kasi azalaki kobanga makambo oyo makoyela ye na nsima. Azalaki kolela ntango nyonso. Kasi nyonso wana etalaki ngai na likambo nini?

Kati na lisoló na biso, alimbolaki ngai ete nguya na ye ya koyeba makambo mazali liboso, ekitaki na ntango azalaki elongo na ba Témoins de Jéhovah. Nalimbolaki ye ete ezali na bilimu mabe, bademo, mpe bilimu malamu, baanzelu na sembo. Kotangáká ndakisa ya bafandi ya Efese ya kala baoyo bakómaki baklisto, namonisaki ye ntina ya kolongola bikelakela nyonso biyokani na mosala ya kosakola makambo to na misala nyonso ya bondoki. (Misala 19:17-20) Nalobaki na ye ete: “Na nsima, zala na boyokani elongo na Batemwe. Batemwe bazali na bisika nyonso.”

Nsima ya mwa mikolo, elenge mobali wana alongwaki na camp mpe nazalaki lisusu koyoka nsango na ye te. Kasi likambo ya elenge mobali oyo azalaki kobanga mpe azalaki na esengo te, oyo azalaki na mposa mpenza ya kosikolama, ebakisaki bolingo na ngai mpo na Jéhovah. Tozalaki Batemwe 15 oyo bakangamaki na camp mpo na kondima na biso, kasi tozalaki na bonsomi kati na elimo. Elenge mobali yango abimisamaki na bolɔkɔ, kasi azalaki moombo ya “nzambe” oyo azalaki kobangisa ye. (2 Bakolinti 4:4) Biso Batemwe tosengeli mpenza kosepela na bonsomi ya elimo!

Bana na biso bamekami

Bobele mikóló te nde basengeli kokangama na bindimeli na bango bitongami likoló na Biblia, kasi bilenge lokola. Bazalaki kopusa bango na kosala makambo mabe na eteyelo mpe na mosala. Bana na biso minei, nyonso bazwaki etɛlɛmɛlo mpo na bindimeli na bango.

Mokolo ya lundi nyonso, molulu ya kopesa losako na bɛndɛlɛ mozalaki kosalema na eteyelo. Wana etɛlɛmaki bango na milongó na libandá, bana bazalaki koyemba loyembo mpe bazalaki kosala oyo babéngaki ete losako ya Thälmann, ntango bazalaki komatisa bɛndɛlɛ. Ernst Thälmann azalaki mokonzi ya communisme na Allemagne, oyo abomamaki na ba S.S. ya nazis na 1944. Nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Thälmann akómaki moto na lokumu oyo bakokanisaka na Allemagne de l’Est. Na ntina na endimeli na biso etongami likoló na Biblia, oyo elobi ete bobele Jéhovah Nzambe nde akoki na losambo, mwasi na ngai mpe ngai tolakisaki bana na biso lolenge nini basengeli kotɛlɛma na limemya nyonso na boumeli ya milulu wana, kozanga kosangana na yango.

Bazalaki mpe kolakisa nzembo ya communisme epai na banakelasi. Margarete mpe ngai tokendaki na eteyelo mpe tolimbolaki mpo na nini tolingaki te ete bana na biso bayekola nzembo ya politike. Kasi tolobaki sikisiki ete bakondima koyekola nzembo mosusu. Na bongo, uta bolenge na bango, bana na biso bayekolaki kozwa etɛlɛmɛlo mpe na kokesena na baninga na bango ya kelasi.

Pene na nsuka ya bambula 1970, mwana na biso ya mwasi alingaki koyekola mosala na biro moko. Nzokande, moyekoli nyonso asengelaki kosala mikolo 14 na mosala ya sodá. Lokola lisosoli ya Renate lipesaki ye nzela te ete asala yango, azwaki etɛlɛmɛlo na molende nyonso mpe na nsuka, bandimaki ye kozanga ete ayekola mosala ya sodá.

Na boumeli ya koyekola na ye, kelasi ya Renate ebyangamaki mpo na koyekola kobɛta mondoki. Molakisi oyo aboyaki kondima maloba na ye, alobaki ete: “Renate, yo mpe okoya mpo na koyekola kobɛta mondoki.” Alakaki ye ete: “Yo okobɛta mondoki te, okotalela bobele bilei.”

Na mpokwa wana, tosololaki likambo yango na libota mobimba. Tokanisaki ete ezalaki malamu te ete Renate akenda na esika oyo bakoyekola kobɛta mondoki, ata soki akosangana na yango mpenza te. Wana alendisamaki na lisoló yango mpe na libondeli, amitikaki kondimisama te. Oyo nde elendiseli mpo na biso na komona elenge mwana na biso ya mwasi kozwa etɛlɛmɛlo mpo na mitinda ya sembo!

Mosala na biso ya kosakola ekóli

Na ntango botɛmɛli na mosala na biso ekitaki mwa moke, pene na nsuka ya bambula 1970, ebele na mikanda ya boklisto mibandaki kouta na Ouest. Ezalaki mpenza likámá, kasi bandeko ya mpiko bandimaki komema yango. Tosepelaki mpo na ebele ya mikanda wana mpe milende ya baoyo bazalaki komema yango. Na bambula ya liboso ya epekiseli, na ntango monyoko mozalaki makasi, kosakola ndako na ndako ezalaki ntembe monene. Ya solo, kobanga bitumbu epusaki basusu na kotika kosakola na motindo yango. Kasi nsima ya mwa ntango, mosala na biso ya kosakola mokólaki mingi lisusu. Na bambula 1960, bobele 26 % ya basakoli na Bokonzi nde bazalaki kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola ndako na ndako. Atako bongo, motuya ya baoyo bazalaki kosangana mbala na mbala na lolenge ya mosala wana mokómaki na 66 % na nsuka ya bambula 1980. Na ntango wana, bakonzi ya Leta bazalaki mpenza kotalela mosala na biso te.

Mbala mosusu, ndeko moko oyo tozalaki elongo na ye kati na mosala ya kosakola amemaki mwana mwasi na ye ya moke. Kozaláká na elikya mpo ete azalaki na mwana mwasi ya moke, mobangé mwasi moko oyo asololaki na biso akɔtisaki biso na ndako. Asepelaki na lisoló na biso litongamaki likoló ya Makomami mpe andimaki ete tozonga kotala ye. Na nsima, napesaki mwasi na ngai mokumba ete akendaka kotala mwasi yango; abandaki nokinoki koyekola Biblia elongo na ye. Atako azalaki mobangé mpe na kolongono mabe na nzoto, mwasi wana akómaki ndeko na biso mpe azali ntango nyonso na molende kati na mosala ya Jéhovah.

Bibongiseli bisalemi na kolanda meko oyo bonsomi bozali kobɛlɛma

Jéhovah abongisaki biso mpo na ntango oyo tokozwa bonsomi monene. Tala mwa bandakisa: mwa ntango moke liboso ete epekiseli elongolama, tozwaki batoli likoló na lolenge ya kolobana kati na makita. Mpo na bantina ya komibatela, tozalaki kobéngana bobele na bankombo na biso mosusu. Ebele na bato oyo bayebanaki uta bambula mingi babosanaki bankombo na bango ya mboka. Kasi, mpo na komilɛngɛla koyamba bato ya sika na makita na biso, tolendisamaki ete tobénganaka na bankombo ya mboka. Basusu basepelaki na yango te, kasi baoyo balandaki toli yango bamesenaki nokinoki na ntango tozwaki bonsomi ya losambo.

Tolendisamaki lisusu na kobanda makita na biso na loyembo. Na bongo, tomesenaki mokemoke na motindo oyo masangá nyonso mazali kosala na bisika nyonso. Ebongiseli mosusu etalaki motuya ya bato na bituluku na biso ya boyekoli. Elongwaki na bato minei, na bambula 1950 kino na bato mwambe. Na nsima, ekómaki na bato 10 mpe nsuka kino na bato 12. Lisusu, ankete moko esalemaki mpo na koyeba soki bisika ya makita ya lisangá moko na moko ebongisamaki malamu na kotalela motuya ya bayangani.

Mbala mosusu, toyaki kososola ete mayele na likambo moko mamonanaka bobele nsima na kosalela yango. Mpe mbala mingi Jéhovah amimonisaki Tata ya mayele mpe atondi na bolingo! Mokemoke, asalisaki biso na kotambola elongo na lisangá na ye lizali awa na mabelé, mpe tomiyokaki mingi lisusu ete tozali kati na libota ya mokili mobimba, oyo ezali bongo libota na ye. Ya solo mpenza, Jéhovah Nzambe abatelaki libota na ye na bolingo na boumeli ya mibu 40 oyo bazalaki na nsé na epekiseli na Allemagne de l’Est. Tozali mpenza na esengo awa esili biso kondimama na Leta.

Lelo oyo, ezali na ba Témoins de Jéhovah koleka 22 000 na mboka oyo ebéngamaki liboso ete Allemagne de l’Est. Bazali komonisa litambwisi ya mayele mpe likebi ya bolingo ya Jéhovah Nzambe. Lisungi oyo apesaki biso na boumeli ya bambula wana ya epekiseli, elakisi ete akoki kosilisa na likambo nyonso mosusu. Ata ebundeli nini etulami mpo na kotɛmɛla libota na ye, ezali kolónga te. Jéhovah azali ntango nyonso kobatela baoyo bazali kotya elikya na bango epai na ye.​—Yisaya 54:17; Yilimia 17:7, 8.​—Lisoló ya Horst Schleussner.

[Elilingi na lokasa 31]

Horst mpe Margarete Schleussner na ndako ya la Société na engumba Berlin-Est

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto