Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 2
NA ETUMBA ya Mibale ya mokili mobimba, lifúngu ya mokaba na ngai ya basodá ya nazi lizalaki na likomi oyo ete “Nzambe azali na biso.” Yango ezalaki ndakisa mpo na ngai ete, Mangomba masanganaki na bitumba mpe na kosopama ya makila. Naokaki motema mpasi. Na yango, mokolo oyo ba Témoins de Jéhovah mibale basololaki na ngai na engumba Limbach-Oberfrohna, na Allemagne de l’Est, na ntango yango nasilaki koboya mangomba, naboyaki kondima ete Nzambe azali mpe nakómaki mondimi na évolution.
Nalobaki na Batemwe oyo bayaki epai na ngai ete: “Bokanisa te ete nakokóma moklisto.” Kasi makanisi oyo bapesaki ngai, mandimisaki ngai ete Nzambe azali. Lokola nazali moto oyo alukaka koyeba makambo mingi, nasombaki Biblia mpe na nsima, nabandaki koyekola Biblia elongo na bango. Ezalaki na printemps 1953, wana ba communistes basilaki kopekisa misala ya Batemwe ya Allemagne de l’Est uta mibu misato.
La Tour de Garde ya 1er juin 1954 emonisaki ezalela ya ba Témoins de Jéhovah na ntango wana: “Basaleli na Jéhovah balandaki kosakola na Allemagne, atako bakɛngɛlamaki mpe batungisamaki ntango nyonso, mpe bazalaki na likoki te ya [kotalana] bobele ete bayeba soki moto moko azali kolanda bango te, atako komonana ya mikanda ya Société Tour de Garde epai na bango esɛngisaki bango bolɔkɔ ya mbula mibale to misato mpo ete ‘bapalanganisaki mikanda mizali kotombokisa bato’ mpe atako bandeko mibali batɛli baoyo bazalaki kotambwisa lisangá batyamaki na bolɔkɔ.”
Na 1955, ngai mpe Regina, mwasi na ngai, toyanganaki na assemblée internationale ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalemaki na engumba Nuremberg, na Allemagne de l’Ouest, mpe mbula elandaki, tozwaki batisimo na Berlin-Ouest. Yango esalemaki mpenza liboso na kotongama na efélo ya Berlin na 1961, efélo oyo ekabolaki Allemagne de l’Est mpe Berlin-Ouest. Kasi bosembo na ngai epai na Jéhovah Nzambe esilaki komekama liboso ya batisimo na ngai.
Nandimi mikumba
Lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ya engumba Limbach-Oberfrohna, epai tozalaki koyangana liboso, bazalaki na mposa na moto moko mpo na kokenda koluka mikanda mikolimbolaka Biblia na engumba Berlin-Ouest. Tozalaki kosala mwa mombóngo mpe tozalaki na bana mibale ya mike, kasi kosalela Jéhovah ekómaki ntéi ya bomoi na biso. Tobongisaki vuatire na biso ya kala mpo ete tokoka kokɔtisa mikanda 60. Kozala motindami ezalaki likámá, kasi yango esalisaki ngai na kotya motema epai na Jéhovah.
Kotambola na vuatire longwa Berlin-Est kino Berlin-Ouest, ezalaki likambo moke te, mpe mbula mingi namitunaka ndenge nini tolóngaki kosala yango. Mbala mosusu, tokendaki kozwa mikanda oyo tozalaki kobomba na vuatire na esika oyo bato bazalaki te, liboso na kokatisa lisusu ndelo mpo na kokɔta na Allemagne de l’Est.
Mokolo moko, wana tosilisaki kobómba mikanda, mobali moko abimaki na ndako moko. Angángaki ete: “Hé! bino kuna.” Makanisi na ngai mabulunganaki. Amonaki biso? “Ekozala na bino malamu soki bokokenda epai mosusu na mbala ekoya. Vuatire ya la police ya Allemagne de l’Est etɛlɛmaka wana, mpe bokoki kokangama.” Motema mokitaki. Tolekaki ndelo kozanga mokakatano, mpe biso nyonso minei toyembaki nzembo na boumeli ya mobémbo na biso mpo na bozongi.
Tobongisamaki mpo na kosala biso moko
Na bambula 1950, bandeko ya Allemagne de l’Est bazalaki kotya motema epai na baoyo ya Ouest mpo na kozwa mikanda mpe batoli. Kasi na 1960, mabongwani masalemaki mpo na kosalisa Temwe moko na moko ya Allemagne de l’Est na kozala ntango nyonso na boyokani malamu elongo na Batemwe mosusu ya etuká oyo ye azalaki kofanda. Na nsima, na juin 1961, bankulutu oyo basalaki kelasi ya liboso na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi bayanganaki na Berlin. Nayanganaki na kelasi wana eumelaki poso minei. Bobele nsima na poso motoba, na pwasa, tokabwanaki na Ouest na efélo ya Berlin. Uta ntango wana, mosala na biso mosalemaki na nkuku mpe tokómaki kosala biso moko.
Basusu bazalaki kobanga ete misala ya ba Témoins de Jéhovah ya Allemagne de l’Est mikokita mokemoke kino kosila. Kasi mabongwani oyo masalemaki pene na mobu moko liboso mpo na kobongisa biso, esalisaki biso na kobatela bomoko na biso mpe makasi na biso ya elimo. Lisusu, bankulutu oyo bazwaki formation na kelasi wana ya liboso na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, bamipesaki mpo na kopesa formation wana epai na bankulutu mosusu. Jéhovah abongisaki biso ete tosala biso moko lokola asalaki yango na ba assemblées ya distrike na 1949, mpo na epekiseli ekweisamaki na 1950.
Wana tokabwanaki na Ouest, emonanaki polele ete biso moko nde tosengelaki kozwa meko ya kolanda kokólisa lisangá. Totindaki mokanda epai na bandeko na biso ya Berlin-Ouest mpe toyebisaki bango ete tokutana na nzela oyo mituka mikoutaka Allemagne de l’Ouest mpo na kokɔta na Allemagne de l’Est. Na esika oyo toyokanaki, tosalaki lokola ete motuka mobebaki. Nsima na mwa minite, bandeko bakómaki elongo na mikanda mikolimbolaka Biblia. Na esengo nyonso, bamemelaki ngai mokanda na ngai ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, ba notes oyo nazwaki na Eteyelo mpe Biblia na ngai; natikaká yango na Berlin mpo na komibatela na likámá. Nazalaki na esengo mpenza wana nazwaki yango. Namonaki motindo oyo yango esengelaki kosalisa ngai na bambula oyo elandaki.
Eteyelo na nkuku
Nsima na mwa mikolo, basɛngaki biso ete tobongisa kelasi ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi kati na Allemagne de l’Est mobimba. Baponaki balakisi minei, mpe ngai nazalaki kati na bango. Kasi kopesa formation epai na bankulutu nyonso na ntango mosala na biso mosilaki kopekisama, emonanaki na ngai lokola mokumba nakokaki kokokisa yango te. Mpo ete bato bayeba te likambo oyo tolingaki kosala, nazwaki ekateli ya kobongisa bakelasi lokola bato oyo bakendaki esika moko mpo na kolekisa mikolo ya bopemi na bango.
Kelasi moko na moko ezalaki na bayekoli minei, na molakisi (ngai moko), mpe ndeko mobali ya motoba, oyo azalaki kolamba bilei. Basi na biso mpe bana na biso bazalaki wana lokola. Tosalaki mpenza etuluku oyo ezalaki na bato 15 kino bato 20. Tolukaki te esika oyo ebongisamaki malamu mpo na kofanda; ngai mpe libota na ngai tokendaki bongo koluka bisika oyo bibongaki na biso.
Mokolo mosusu, wana ezalaki biso kokatisa mboka moko, tomonaki nzela oyo ezalaki komema na ebele na banzete epai bato bazalaki te. Esika yango ezalaki mpenza malamu; bongo, nakendaki kotala mokonzi ya mboka. Nalimbolaki ye, ete: “Tozali koluka esika mpo na kofunda na boumeli ya poso mibale na mikolo na biso ya bopemi elongo na mabota mosusu. Tolingi kozala bobele biso moko mpo ete bana bakoka kosakana zingazinga. Tokoki kokenda kofanda na banzeté oyo kuna?” Andimaki, mpe tomibongisaki.
Na esika yango, totyaki bahema mpe ndako na ngai oyo ekobendamaka na motuka, ezalaki carré mpe ezalaki na esika moko te mpo na kotala libandá. Ndako wana ekobendamaka na motuka ezalaki ndako na biso ya kelasi. Tozalaki koyangana kati na yango na motindo na kokamwa mpenza mpo na koyekola: ngonga 8 na mokolo moko, na boumeli ya mikolo 14. Mesa moko mpe bakiti etyamaki na esika oyo ezalaki lokola jardin mpo na bapaya oyo bakokaki koya pwasa. Ekómaki bongo! Na bantango motindo wana, tozalaki kosepela mpo na lisungi litondi na bolingo lipesamaki na mabota na biso.
Na boumeli ya kelasi wana, mabota na biso mazalaki kokɛngɛla. Mokolo moko, bamonaki mokonzi ya mboka, oyo azalaki mpe secrétaire ya communisme na esika wana, na ntango azalaki koya epai oyo tofandaki na banzeté. Ye oyo azalaki kokɛngɛla afinaki buto ya ngonga oyo ezalaki kati na ndako ekobendamaka na motuka. Tobimaki nokinoki na libandá, mpe tofandaki na bisika oyo bisilaki kotyama zingazinga na mesa mpe tobandaki kobeta karte. Ezalaki nkutu na molangi moko ya schnaps mpo na komonisa likambo yango ete ezalaki solo. Mokonzi ya mboka ayaki bobele mpo na kotala biso, mpe azongaki kozanga kozwa likanisi na oyo tozalaki mpenza kosala.
Bakelasi ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi esalemaki na mboka mobimba, uta printemps 1962 kino nsuka ya 1965. Formation monene oyo bankulutu bazwaki, bakisa mpe malako oyo bazwaki mpo na kolónga makambo oyo mazali mpenza koleka na Allemagne de l’Est, ebongisaki bango na kotambwisa mosala ya kosakola. Mpo na kokɔta na bakelasi wana, bankulutu bandimaki te bobele kolekisa mikolo na bango ya bopemi, kasi bandimaki mpe likámá ya kokangama.
Bolamu ya eteyelo
Bakonzi ya leta bazalaki kotala malamumalamu misala na biso, mpe na nsuka ya 1965, bamekaki kobundisa lisangá na biso, nsima wana bankulutu mingi basilaki kozwa formation na eteyelo. Bapolisié bakangaki Batemwe 15, oyo bakanisaki ete bazalaki kotambwisa mosala. Babongisaki mwango yango mpe esalemaki nokinoki na mboka mobimba. Wana lisusu, mingi bakanisaki ete misala ya Batemwe mikosuka. Kasi na lisalisi ya Jéhovah, tomesenaki na ezalela wana mpe tokóbaki mosala na biso lokola na liboso.
Oyo epesaki nzela na komesena na makambo wana, ezalaki bongo formation oyo bankulutu bazwaki na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpe kotyelana motema oyo bamonisanaki na boumeli ya kelasi. Na bongo, lisangá limonisaki makoki na yango. Tosalaki malamu mpenza na kolandáká malako ya lisangá.—Yisaya 48:17.
Basanza elandaki, eyaki komonana ete epekiseli monene oyo eutaki na bakonzi ya Leta ezalaki bobele na bopusi moke likoló na mosala na biso. Nsima mwa moke, tozongelaki lisusu bakelasi na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Na ntango bakonzi bamonaki molende na biso, basengelaki kobongola mwango na bango. Oyo nde elónga monene mpo na Jéhovah!
Molende kati na mosala ya kosakola
Na eleko wana, boyekoli na biso ya mokanda ezalaki kosalema soko na bituluku ya bato mitano. Moko na moko na biso azalaki kozwa mikanda mikolimbolaka Biblia kati na boyekoli ya mokanda, mpe mosala ya kosakola mobongisamaki na bituluku wana mike. Uta ebandeli, Jéhovah apambolaki biso, ngai mpe Regina, na kopesáká biso likoki ya kokutana na bato mingi oyo bazalaki na mposa ya koyekola Biblia.
Tobongolaki mwa moke mosala ya ndako na ndako ete tobenda likebi ya bato te mpo ete tokangama te. Tozalaki kokenda na ndako moko, mpe, nsima na koleka bandako mingi, tozalaki kobɛta na ekuke mosusu. Na ndako mosusu, mwasi moko akɔtisaki ngai mpe Regina. Tosololaki elongo na ye na ntina na lisoló moko ya Biblia; bobele na ntango wana, mwana na ye ya mobali akɔtaki. Azelaki te mpo na koloba.
Atunaki ete: “Bino bosili komona Nzambe? Boyeba ete, ngai nakoki kondima bobele yango ezali ngai komona. Nyonso oyo etikali, ezali bozoba.”
Nayanolaki ete: “Nandimi te. Osilá komona bɔɔngɔ na yo? Nyonso oyo ozali kosala emonisi ete ozali na yango.”
Topesaki ye bandakisa ya biloko mosusu oyo tondimaka nzokande tomoni naino yango te, lokola lontiliki. Elenge mobali ayokaki na likebi, ye mpe mama na ye, babandaki boyekoli ya Biblia. Bango nyonso mibale bakómaki Batemwe. Bato 14 baoyo, ngai mpe mwasi na ngai, toyekolaki na bango Biblia, basili kokóma ba Témoins de Jéhovah. Tokutanaki na bamoko na bango na mosala ya ndako na ndako, mpe basusu na litatoli ya libaku malamu.
Wana ezalaki biso kotambwisa boyekoli ya Biblia mbala na mbala, mpe wana tomonaki ete moto abongaki na kotyelama motema, tozalaki kobyanga ye na makita. Atako bongo, lobanzo na biso ya liboso ezalaki kososola soki moto oyo azalaki koyekola Biblia akokaki te kotya kimya ya libota na Nzambe na likámá. Na yango, ezalaki mbala mosusu koleka soko mbula moko liboso na kobyanga moyekoli ya Biblia na likita, mpe ntango mosusu nkutu koleka. Nazali lisusu komikundola mpo na mobali oyo azalaki moto monene; azalaki na boyokani malamu na bakonzi ya communisme, mpe azalaki kobénga bango na nkombo na bango ya ndako. Ayekolaki Biblia na boumeli ya mbula libwa liboso na kopesa ye nzela ete ayangana na makita. Lelo oyo, mobali wana azali ndeko na biso moklisto.
Bakonzi bazali sé kolukaluka biso
Nsima ya mobu 1965, bazalaki lisusu kokanga bandeko mingi te, atako bongo, bazalaki kotika biso na kimya te. Bakonzi bazalaki sé kokɛngɛla na likebi. Na eleko wana, namipesaki mpenzampenza na mosala ya lisangá na biso, mpe bakonzi batyaki likebi na bango epai na ngai. Bakangaki ngai soko mbala boni mpo na kotuna ngai mituna; bazalaki komema ngai na commissariat mpe bazalaki kosambisa ngai. Bazalaki koloba na ngai ete: “Okangami. Okokenda na bolɔkɔ.” Kasi bazalaki ntango nyonso kotika ngai.
Na 1972, bapolisié mibale bayaki kotala ngai mpe bakumisaki lisangá na biso kozanga koyeba. Balandaki boyekoli ya Mosenzeli ya lisangá na kobómbama. Balobaki na mongongo ya kopamela ete: “Toyoki lisoló yango mabe mingi.” Na ndenge emonani, bazalaki kokanisa mpo na oyo bapolisié mosusu bakokaki kotalela likanisi ya communisme soki batangaki lisoló. Balobaki ete: “Atako bongo, Mosenzeli ebimisami na bamilió mitano to mpe bamilió motoba ya baekzamplere mpe etangami na mikili ya bobóla. Ezali zulunalo ya mpamba te.” Nakanisi ete: “Yo ozali na elónga.”
Na 1972, tozalaki na epekiseli uta mibu 22, mpe Jéhovah akambaki biso na bolingo mpe na mayele. Tosɛnzelaki kolanda malako na ye, kasi esengelaki na biso kozela lisusu mibu 18 liboso ete ba Témoins de Jéhovah bandimama na Leta ya Allemagne de l’Est. Tozali na botɔndi mingi epai na Jéhovah, Nzambe na biso, mpo ete asili kopesa biso bonsomi kitoko oyo tozali na yango sikawa mpo na kosambela ye.—Lisoló ya Helmut Martin.