Jéhovah abatelaki biso na ntango na epekiseli—Eteni 1
Na boumeli ya bambula, ba Témoins de Jéhovah bazalaki komitungisa mingi na ntina na bandeko na bango oyo bazalaki na mikili misusu epai misala na boklisto mipekisamaki. Tozali na esengo ya kobimisa lisoló ya liboso kati na masoló misato oyo malobeli makambo mosusu. Ezali masoló ya bato, mayebisami na boklisto ya sembo oyo bazalaki kofanda na mokili oyo mobéngamaki liboso ete Allemagne de l’Est.
NA MOBU 1944, nazalaki moto na Allemagne oyo akangamaki na etumba mpe nazalaki kosala lokola mosungi na monganga na camp ya Cumnock, pene na engumba Ayr, na mokili ya Ecosse. Nazalaki na ndingisa ya kobima na camp, kasi nazalaki na lotómo ya kosolola na bato mingi te. Ebimaki ngai mpo na kotambola mwa moke na mokolo moko ya lomingo, nakutanaki na mobali moko oyo asalaki makasi mpo na kolimbwela ngai mwa makambo na Biblia. Nsima na bokutani wana, mbala mingi tokómaki kotambola elongo na ye.
Na nsima, abyangaki ngai ete nayangana na likita oyo lisengelaki kosalema na ndako moko. Yango ezalaki likámá mpo na ye, mpo ete ngai nazalaki moto ya mokili mosusu oyo ezalaki monguna ya mokili na bango. Na eleko wana, nayebaki te ete azalaki Témoin de Jéhovah: na lolenge emonanaki, likita yango libongisamaki na moko na bituluku na bango mike ya boyekoli ya Biblia. Atako nakangaki ntina na makambo mingi te, kasi nazali komikundola malamu mpo na elilingi ya mwana moko oyo alataki elamba ya mpɛmbɛ, oyo atɛlɛmaki pene na nkɔsi mpe na mwana na mpate. Elilingi wana ya mokili ya sika, oyo ezwami na mokanda na Yisaya kati na Biblia, ezalaki na bopusi makasi likoló na ngai.
Na décembre 1947, nabimisamaki na camp ya bakangami. Nsima na bozongi na ngai na Allemagne, nabalaki Margit, oyo nayebaki ye liboso ya etumba. Tokendaki kofanda na engumba Zittau, pene na ndelo ya mokili ya Pologne mpe mokili ya Tchécoslovaquie. Nsima na mwa mikolo, Témoin de Jéhovah moko abɛtaki na ekuke na biso. Nalobaki na mwasi na ngai ete: “Soki ezali bobele etuluku na bato oyo nakutanaki na bango na mokili na Ecosse, boye tosengeli kokóma basangani na bango.” Bobele na poso yango, toyanganaki na likita mpo na mbala ya liboso elongo na Batemwe.
Nokinoki, toyekolaki kati na Biblia ete tosengelaki koyangana mbala na mbala kati na makita na boklisto mpe kosangana na mosala ya kosakola. Solo mpenza, makambo oyo Batemwe balakisaki biso kati na Biblia mazwaki esika ya liboso kati na bomoi na biso. Na nsima, natambwisaki etuluku moko na boyekoli ya Biblia. Mpe, na février 1950, bakɛngɛli mibale ya zongazonga batunaki biso ete: “Naino bokanisi te mpo na kozwa batisimo?” Bobele nsima na midi wana, ngai mpe Margit tozwaki batisimo mpo na komonisa elembo ete tomipesi epai na Nzambe.
Mikakatano mibandi
Engumba Zittau ezalaki na mokili ya Union soviétique na Allemagne mpe, na 1949, babandaki kotungisa ba Témoins de Jéhovah. Bobele nsima na mikakatano wana nde toyei kozwa bisika mpo na kosala assemblée moko ya moke na engumba Bautzen. Mpe na pwasa, na eleko na molungé makasi, bapekisaki bingbunduka oyo bifutelamaki mpo na kokende na engumba Berlin, epai assemblée ya distrike ya ntina mingi esengelaki kosalema. Atako bongo, Batemwe mingi bayanganaki na assemblée yango.
Mobulu mokɔtaki lisusu ata na makita ya masangá. Basali na mobulu bazalaki koyangana bobele mpo na kongánga mpe kobɛta mpiólóló. Mokolo mosusu, tosengelaki bobele kokata diskur ya mokɛngɛli ya zongazonga. Televizio, radio mpe bazulunalo abéngaki biso ete basakoli ya makambo mabe. Masoló ya bazulunalo mayebisaki nkutu ete toyanganaki likoló na ngomba, mpo na kozela ete tomemama na mapata. Bazulunalo etangaki lisusu maloba ya basi oyo balobaki ete Batemwe bamekaki kosangisa nzoto elongo na bango. Ndimbola ya maloba oyo ete ‘baoyo bakomipesa na Jéhovah bakozwa bomoi ya seko’ ebongolamaki boye ete, ‘baoyo bakosangisa nzoto elongo na Batemwe, bakozwa bomoi ya seko.’
Na nsima, bafundaki biso ete tozalaki bato na bitumba. Oyo tozalaki kolobela na ntina na Armagedon, etumba na Nzambe, elimbolamaki na lolenge mabe, ete: biso tozalaki kolendisa bato ete basala bibundeli mpe bitumba. Oyo nde bongolabongola! Kasi na butu moko ya août 1950, ntango nakómaki na binyateli ya zulunalo moko ya mboka wana na esika oyo nazalaki kosala, bapekisaki ngai ete nakɔta te. Sinzílí oyo azalaki elongo na bapolisié, alobaki na ngai ete: “Osili kolongolama na mosala. Bino bozali bato na bitumba.”
Ezongaki ngai na ndako, Margit asepelaki. Alobaki ete: “Mosala ya butu ekozala lisusu te.” Tomitungisaki te. Nokinoki, nazwaki mosala mosusu. Tomitikaki epai na Nzambe ete akokisa bamposa na biso, mpe asalaki yango.
Mosala na biso mopekisami
Mokolo ya 31 août 1950, misala ya ba Témoins de Jéhovah mipekisamaki kati na République démocratique allemande. Na nsima, kokangama mingi esalemaki. Batemwe bamemamaki na bisambiselo, mpe basusu batyamaki na bolɔkɔ kozanga kokatelama mikolo. Batemwe mibale ya engumba Zittau, baoyo banyokwamaki na ba camps de concentration na nsé na boyangeli ya nazi, bakangisamaki na ba communistes.
Mokɛngɛli ya lisangá na biso mpe mwasi na ye, bakangamaki. Baoyo bakangaki bango, batikaki bana na bango ya mike mibale ya basi, bobele bango moko kati na ndako. Bankoko na bango bazwaki bango, mpe lelo oyo bana wana mibale bazali kosakola Bokonzi na Nzambe na molende epai na bato mosusu.
Batindami ya masangá ya Allemagne de l’Est bazalaki kokende na Berlin mpo na kozwa mikanda na bisika ya kokabola mikanda, biye bizalaki na Occident, epai ezalaki na bonsomi. Mingi na batindami wana ya molende bakangamaki, bamemamaki na bisambiselo mpe bakɔtaki bolɔkɔ.
Bakonzi ya mboka bakendaki na ntɔngɔ mpo na kotala biloko nini bizalaki na ndako na biso. Tomibongisaki mpo na vizite na bango: natyaki mikanda nyonso ya lisangá oyo nazalaki kobómba kati na eteni na ndako oyo tozalaki kobómba biloko, pene na zúmbu ya yóto. Banyama wana mike eswaki ngai ata mbala moko te, kasi na ntango mibali wana babandaki kolukaluka, baswamaki na ebele na yóto. Bakimaki mpo na kobómbama
Jéhovah abongisaki biso mpo na epekiseli na ba assemblées oyo esalemaki na 1949. Na yango, tolendisamaki na kozala na molende mingi kati na boyekoli ya moto na moto, na koyangana na makita mpe na mosala ya kosakola, na kosungana mpe na kolendisana. Bibongiseli wana bisalisaki biso na kotikala sembo. Na bongo. atako bato bazalaki kotɔngo biso mpe kolakela biso mabe, tozalaki kotyela yango likebi te.
Makita na ntango na epekiseli
Nsima wana basakolaki epekiseli, ngai mpe Batemwe mosusu mibale toyanganaki mpo na kotala lolenge nini tokokaki kolanda kosala makita na boklisto. Koyangana na makita ezalaki likámá, mpo ete soki bakangaki biso na moko na makita yango, mbɛlɛ tokɔtaki bolɔkɔ. Tokendaki kotala Batemwe ya etuká na biso. Bamoko bazalaki komitungisa, kasi ezalaki elendiseli na komona ete biso nyonso tokangaki ntina ya koyangana na makita.
Mobali moko ya motema malamu alobaki na biso ete tosalela eteni na ndako oyo atyaka biloko na ye lokola esika ya makita. Eteni na ndako wana ezalaki na elanga moko, na esika oyo emonanaki polele na bato, nde ekuke na yango ya nsima etalaki na nzela moke, oyo ezipamaki na banzeté. Bato bazalaki komona biso te wana tozalaki koya mpe kozonga. Na boumeli na eleko nyonso ya mpiɔ, tosalelaki eteni na ndako wana ya kala mpo na makita na biso, oyo tozalaki kosala yango na babuji mpe ezalaki na bayangani koleka ntuku mibale. Poso na poso, tozalaki koyangana mpo na boyekoli ya Mosenzeli mpe likita ya mosala. Programme esalemaki na kotalela makambo oyo tozalaki kokutana na yango, na kolobeláká mingi likoló na likambo oyo tosengelaki kozala ntango nyonso makasi kati na elimo. Na nsima, tozalaki na esengo mpenza ya koyamba mobali wana ya motema malamu oyo akómaki ndeko na biso kati na solo.
Katikati na bambula 1950, bitumbu bikitisamaki, mpe mwa bandeko babimisamaki na bolɔkɔ. Mingi bazongisamaki na Allemagne de l’Ouest. Mpo na ngai, makambo mabongwanaki pwasa nsima wana ndeko moko ya Allemagne de l’Ouest ayaki kotala biso.
Mokumba na ngai ya liboso ya ntina mingi
Ndeko yango nkombo na ye Hans. Nsima na kosolola elongo na ye, asɛngaki ngai ete nakenda na esika moko na engumba Berlin. Nsima na kotalela malamu nkombo oyo ekomami likoló na ngɛngɛlɛ (sonnette), babéngaki ngai ete nakɔta. Mibali mibale bayaki epai na ngai mpe basololaki na ngai makambo malamu, kasi bobele likolólikoló. Mpe bakómaki na likambo oyo balingaki koloba, ete: “Soki bapesi yo mokumba moko ya ntina mingi, okondima yango?”
Nayanolaki ete: “Nakondima yango.”
Balobaki ete: “Malamu, bobele yango nde tolingaki koyeba. Bozongi malamu.”
Poso misato na nsima, basɛngaki ngai ete nazonga na Berlin, mpe nakendaki lisusu na eteni na ndako yango. Na kolakisáká ngai karte ya etuká oyo ezali zingazinga na Zittau, bandeko bamonisaki likambo balingaki koloba. “Tozali ata na boyokani moko te elongo na Batemwe ya etuká oyo. Okoki nde kozongela boyokani yango mpo na biso?”
Nayanolaki nokinoki ete: “Nakoki kosala yango.” Etuká yango ezalaki monene: na molai ya bakilometele 100, longwa Riesa kino Zittau; mpe na monene ya bakilometele 50. Mpe nazalaki bobele na vélo. Mbala nyonso oyo nazalaki kokutana na Temwe moko, nazalaki kokoma nkombo na ye na lisangá na ye, oyo lizalaki mbala na mbala kotinda momonisi moko na Berlin mpo na kozwa mikanda mpe malako. Motindo wana na kosala epɛngolaki kotya masangá mosusu na likámá na ntango bakonzi na leta banyokolaki moko na masangá yango.
Tomitiki epai na Jéhovah
Atako monyoko, totósaki na mitinda ya Biblia mpe totikaki te kokenda ndako na ndako mpo na koyebisa nsango na ntina na Bokonzi na Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20; Misala 20:20) Tozalaki kokenda na ba adresses ya bato oyo tosilaki koyebana na bango, mpe tolekisaki bantango malamu. Mbala mosusu, ata mabunga na biso mabongwanaki mapamboli, lokola yango emonisami na likambo oyo lilandi.
Bapesaki ngai mpe mwasi na ngai, adresse oyo tosengelaki kokenda kuna, kasi tobangaki ndako. Na ntango ekuke efungwamaki, tomonaki mobali moko oyo alataki bilamba ya bapolisié atɛlɛmaki na portemanteau. Margit akómaki maladi; motema na ngai mokómaki kobɛta makasi. Bokutani wana mbɛlɛ esukaki na bolɔkɔ. Tozwaki bobele ntango ya kosala libondeli nokinoki.
Mobali yango atunaki na mobulu nyonso ete: “Bino banani?” Tokangaki motema.
Margit alobaki ete: “Namoni lokola ete tosila kokutana na yo esika moko, kasi nayebi lisusu te soki ezalaki epai wapi. Ya solo! Ozali polisié. Nakanisi ete namonaki yo wana ozalaki na mosala.”
Yango ebongolaki makambo, mpe atunaki na mongóngó ya boninga ete: “Bino bozali ba Témoins de Jéhovah?”
Nayanolaki na kosanganáká na lisoló yango, ete: “Ee, mpe yeba ete esengelaki na biso kozala na mpiko mpo na kobɛta na ekuke na yo. Tozali na bolingo mpo na yo.”
Akɔtisaki biso. Tokendaki kotala ye mbala mingi mpe tobandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye. Na nsima, mobali yango akómaki ndeko moklisto. Likambo wana lilendisaki elikya na biso epai na Jéhovah.
Mbala mingi, bandeko basi basalelamaki lokola batindami, likambo oyo lisɛngaki ete batya motema na bango mobimba epai na Jéhovah. Yango emonanaki epai na Margit, na ntango akendaki mokolo mosusu na Berlin mpo na koluka mikanda. Ezalaki na mikanda mingi koleka oyo esengelaki koya. Nsinga ya elamba esalelamaki mpo na kokanga valisi oyo etondaki na kilo mingi mpenza. Makambo nyonso malekaki malamu kino Margit amataki engbunduka. Sodá oyo azalaki sinzílí na ndelo ya mboka, akómaki.
Atunaki na kotalisáká mosapi na valisi, ete: “Oyo ya nani, mpe biloko nini bizali na kati?”
Margit ayanolaki ete: “Ezali bilamba na ngai.”
Andimaki te, mpe asɛngisaki ye ete afungola yango. Margit abandaki kofungola valisi yango malɛmbɛmalɛmbɛ mpe kokangola litingá moko na moko ya nsinga na elamba oyo ekangaki valisi. Lokola sodá sinzílí na ndelo na mboka asengelaki kotambola kati na engbunduka bobele na ntaká moke, na nsima asengeli kokita mpo na komata engbunduka mosusu ete azonga na esika na ye ya mosala, amimonisaki na motema likoló. Na nsima, akendaki wana etikalaki bobele matingá misato. Angángaki ete: “Longwa kuna, mpe kamata bilamba na yo!”
Jéhovah azali mpenza kobatela biso
Na butu, mbala mingi nazalaki kolala te koleka bangonga minei, mpamba te nazalaki kosalela ngonga ya butu mpo na kosala misala na ngai ya lisangá. Ezalaki nsima na moko na butu wana ya mosala mingi nde bapolisié bayaki kobɛta ekuke na biso na ntɔngɔ. Bayaki kotala biloko na ndako. Ntango ezalaki te mpo na kobómba ata eloko moko.
Bapolisié balekisaki ntɔngɔ mobimba mpo na kobalolabalola biloko nyonso ya ndako mpe bakɔtaki nkutu na kikɔsɔ mpo na kotala soki eloko moko ebombamaki kuna. Kasi ata moko te akanisaki kotala na kazáka na ngai, oyo ekakisamaki na porte-manteau. Nabómbaki nokinoki mikanda kati na ebele na mabenga na yango. Mabenga wana matondaki, mazalaki na biloko oyo bapolisié bayaki mpenza koluka, kasi bazongaki mabɔkɔ mpamba.
Mbala mosusu, na sanza ya août 1961, nazalaki na engumba Berlin. Emonanaki ete ezalaki mbala ya nsuka oyo nakendaki kozwa mikanda liboso na botongi efélo ya Berlin. Gare etondaki na bato wana ezalaki ngai kozonga na Zittau. Engbunduka ekómaki, bato nyonso bawelaki kotɛlɛma na molongó mpo na komata. Epusamaki ngai na ebele na bato wana, nakɔtaki na wagó oyo ezalaki na moto moko te. Nsima na kokɔta, mosika te mokonzi na engbunduka akangaki bikuke uta esika oyo ye afandaki na kati. Nazalaki bobele ngai moko na kati na wagó wana, nde bato mosusu batondanaki kati na bawagó mosusu.
Tozalaki kokenda na engumba Zittau. Na boumeli ya mwa ntango, nazalaki bobele ngai moko na kati na wagó. Na nsima, engbunduka etɛlɛmaki mpe bikuke bifungwamaki. Ebele na basoda ya Union soviétique bamataki. Na ntango wana nde nayei kososola ete namataki na eteni ya engbunduka oyo ezalaki bobele mpo na basodá ya Union soviétique. Nalingaki nkutu kokɔta na nsé na mabelé. Kasi basodá bamonaki mabe moko te na likambo yango.
Engbunduka ekóbaki mobémbo na yango na engumba Zittau. Na ntango tokómaki, bikuke bifungwamaki mpe basodá babimaki noki na libanda. Babandaki kotala bisaka ya bato nyonso kati na gare. Bobele ngai moko nde nazwaki mitungisi te. Nkutu basodá mingi bapesaki ngai losako, kokanisáká ete nazalaki moto monene.
Bobele na nsima nde nayaki kososola motuya ya mikanda yango, mpamba te botongi efélo ya Berlin epekisaki ete tozwa mikanda te na boumeli ya mwa ntango. Nzokande, tozwaki mikanda mingi mpo na kokokisa bamposa na biso na boumeli ya basanza mingi. Na ntango wana, bibongiseli bikamatamaki mpo na kozala na boyokani kati na biso.
Botongi efélo ya Berlin na 1961 ebimisaki mbongwana mingi na Allemagne de l’Est. Kasi lokola mpo na ntango nyonso, Jéhovah ayebaki makambo liboso. Alandaki kobatela biso na ntango na epekiseli.—Na Hermann Laube.
[Elilingi na lokasa 27]
Tozwaki esengo ya koyangana na assemblée moko moke na engumba Bautzen