Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/9 lok. 8
  • Boklisto ya lokutá mpe mombóngo ya baombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boklisto ya lokutá mpe mombóngo ya baombo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bamilió ya bato bakómi baombo
    Lamuká!—1995
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • Ndenge nini bakokaki kosala likambo ya boye?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/9 lok. 8

Boklisto ya lokutá mpe mombóngo ya baombo

NA BOUMELI ya ekeke ya 19, bamisionere ya katolike mpe ya protestá bazalaki na bomoko mpo na kotemela mosala ya kosomba mpe kotekisa baombo. Nzokande bazalaki komonisa botemeli wana ntango nyonso te. Na bikeke bizalaki liboso, bandimaki mosala yango ya kosomba mpe kotekisa baombo mpe basanganaki na yango atako yango emonisaki baombo mpasi mingi.

Bamisionere babandaki kokota na pembenipembeni epai na est mpe na ouest ya Afrika na nzela ya mai mpo na kosala mombóngo, na nzela oyo ezalaki koleka na Cap de Bonne Espérance, oyo eyaki koyebana na ekeke ya 15. Nzokande, nsima na bikeke misato, mosala ya bamisionere na Afrika ekómaki pene na nsuka na yango. Bato ya Afrika oyo bakómaki bandimi na bango bazalaki moke mpenza. Moko na bantina yango ezalaki ete boklisto ya lokuta ekotaki na makambo ya kosomba mpe kotekisa baombo. Kati na mokanda na ye L’implantation du christianisme en Afrique (angl.), C. P. Groves alimboli ete:

“Mosala ya kosomba mpe kolekisa baombo ekangamaki na mosala ya kotinda bamisionere, mpe yango emonanaki mabe te. Ya solo, bamisiɔ yango moko ezalaki na baombo na yango; monastère moko ya basángo ba Jésuites na Loanda [lelo Luanda, kapitale ya Angola] ezalaki na baombo 12 000. Ntango mosala ya kosomba mpe kotekisa baombo ekolaki kati na Angola mpe Brezile, episkopo ya Loanda, uta kiti na ye ya libanga oyo ezalaki na libongo, azalaki kopambola masuwa maye mazalaki kokende na baombo. Azalaki kolaka bango bolamu na ntango ezali koya, nsima wana mimekamo ya bomoi mikosila.”

Mokanda L’Afrique, des débuts jusqu’à 1 800 etangi C. R. Boxer oyo alobaki ete: “Bamisionere ya ba Jésuites bamonisaki botemeli moko te na boombo ye Baindo.” Boxer abakisi ete na Luanda, liboso ete baombo bakota na masuwa oyo esengelaki komema bango na mikili oyo miyangelamaki na mboka Espagne mpe Portugal, “bazalaki komema bango na ndakonzambe moko ya pembeni . . . mpe episkopo ya paroisse azalaki kobatisa bango na bituluku ya bato nkama na mbala moko.” Mpe na nsima, soki basilisi kosopela baombo ‘mai na bulee,” bazalaki koyebisa bongo ete: “Tala bino bosili kokoma bana na Nzambe; bozali kokende na mboka ya ba Espagnols epai wapi bokoyekola makambo matali Kondima [elingi koloba lingomba ya katolike]. Bomibanzabanza lisusu te mpo na epai bouti . . . Bokende na bolingo malamu.”

Na koloba solo, mosala ya kosomba mpe kotekisa baombo endimamaki bobele na bamisionere ya boklisto ya mokili oyo te. Na mokanda na ye Les missionnaires (angl.), Geoffrey Moorhouse alimboli ete: “Bato nyonso bazalaki na makanisi motindo wana kino na ndambo ya mibale ya ekeke ya zomi na mwambe.” Moorhouse atangi ndakisa ya Thomas Thompson, oyo azalaki misionere ya protestá na ekeke ya 18 mpe mokomi ya trakte Bilembeteli bimonisi ete kosomba mpe kotekisa baindo na Afrika ezali likambo eyokani na malako ya bato mpe na mibeko ya lingomba ndenge toyebi yango.

Atako bongo, lokola boklisto ya lokuta emikotisaki na mosala ya kosomba mpe kotekisa baombo, yango ezali na mokumba monene na bampasi mingi oyo ezwaki bamilió ya baombo ya Afrika. Encyclopédie britannique (angl.) elobi ete: “Longola baombo oyo bazalaki kokufa liboso ete batika Afrika, 12,5 % na bango bakufaki na boumeli ya mobembo mpo na kokende na bisanga bibengami ete les Antilles; na Jamaïque, 4,5 % bakufaki wana ezalaki bango naino na libongo to liboso ete batekisama lokola baombo, mpe koleka 30 % bakufaki na mpasi oyo bamonisaki bango mpo ete bakoma baombo oyo bakembi.”

Mosika te Jéhovah Nzambe akosambisa boklisto ya lokutá mpe mangomba nyonso mosusu ya lokutá mpo na misala na bango nyonso ya nsomo oyo epesi bango nyongo ya makila, misala oyo bango bapesaki mabɔkɔ kino kopambola yango.​—Emoniseli 18:8, 24.

[Etanda na lokasa 8]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Elilingi oyo emonisi lolenge bazalaki kotanda ebele ya baombo pembenipembeni kati na masuwa oyo mazalaki komema bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Schomburg Center for Research in Black Culture / The New York Public Library / Astor, Lenox and Tilden Foundations

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto