Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/10 nk. 2-4
  • Bato bazali mpenza na mposa ya Masiya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bazali mpenza na mposa ya Masiya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini nzala boye?
  • Likoki ezali te mpo na kosilisa yango?
  • Bana bazali na mpasi
    Lamuká!—1993
  • Likambo ya bampasi ya bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Esakweli 2. Nzala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mikano mpo na kobikisa Bana
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/10 nk. 2-4

Bato bazali mpenza na mposa ya Masiya?

“MOKONZI MOKO ALOBAKI ETE, MOKILI MOZALI NA MPOSA YA MASIYA”

Lisoló oyo libimaki na 1980, na zulunalo The Financial Post ya Toronto, na Canada. Mokonzi yango ezalaki Aurelio Peccei, prezidá mpe mobandisi ya lisangá moko ya bato na mayele oyo babéngi Club de Rome. Na zulunalo Post, Peccei alobaki ete: “Esengeli makonzi moko oyo azali na bopusi monene​—na makambo ya sianse, na politike, to na makambo ya mangomba—​mpo na kobikisa mokili na yikiyiki oyo emonani na ezalela ya bomoi ya bato mpe na makambo ya nkita oyo ezali sé kobeba.” Okanisi boni? Mokili mazali mpenza kati na ezalela ya mpasi monene na boye ete bato bazali na mposa ya Masiya? Totalela bobele moko na bampasi oyo ezali na mokili: nzala.

NA LOKASA oyo ya zulunalo, miso mibale ya minene oyo etɛli, ezali kotala yo mpenza. Ezali miso ya mwana moko, elenge mwasi oyo akokisi naino mibu mitano te. Nzokande, miso na ye ekoki te kosepelisa yo. Ata elembo moko ya bomwana emonani na yango te, esengo ezali te, elembo ya bopeto emonani na yango te. Lokola esili kobeba mpo na mpasi, ezali komitungisa mpe ezali komonisa kozanga elikya na ntina na nzala. Mwana oyo azali kokufa na nzala. Azali ntango nyonso na mpasi mpe na nzala.

Mbala mosusu, lokola bato mingi, okokaka te kotala makambo motindo wana, yango wana ofungoli nokinoki lokasa mosusu. Ezali te ete ozangi komibanzabanza mpo na yango, kasi ozali nde na mawa mpamba te, omoni ete ntango esili koleka mpo na elenge mwasi oyo. Binama na ye ya nzoto bisili kokɔnda mpe libumu na ye livimbi, ezali bilembo bimonisi ete nzoto na ye ebandi kobeba. Na ntango oyo ozali kotala fɔtɔ́ na ye, mbala mosusu asilá kokufa. Oyo eleki mpenza mabe, oyebi ete yango ezali kosalema na bisika mingi.

Mpo na koyeba bonene ya likambo wana mpenza, okoki kokanisa na ntina na bamilió zomi na minei ya bana? Mingi kati na biso bakoki kosala yango te; motuya moleki monene. Na bongo, kanisa mpo na stade oyo ezali na bifandelo 40 000. Mpe tala ete etondi na bana: na milongó nyonso, na bilekelo nyonso; etondi mpenza na bilongi ndenge na ndenge. Atako bongo, ezali mpe kopesa mawa. Nzokande, esengeli ba stades 350 ya motindo wana oyo etondi na bana, mpo na kokokisa motuya ya bamilió zomi na minei. UNICEF (Ebongiseli ya Lisangá ya mabota mpo na kosunga bana) eyebisi ete, wana ezali motuya monene ya bana oyo bakokisi naino mibu mitano te, baoyo bazali kokufa mbula na mbula mpo na kozanga kolya malamu mpe na bamaladi oyo ekokaki kopengolama na mikili ya bobólá. Motuya oyo momonisi pene na stade moko etondi na bana oyo bazali kokufa mokolo na mokolo! Soki obakisi ntalo ya mikóló oyo bazali kolya malamu te, okozwa motuya ya bato miliare moko, baoyo bazwi bokɔnɔ mpo na kozanga kolya malamu na mokili mobimba.

Mpo na nini nzala boye?

Mabelé mazali kobimisa bilei mingi mpenza koleka oyo bato bakoki kolya, mpe ekoki kobimisa bilei mingi mosusu. Nzokande, na minute moko na moko, bana 26 bazali kokufa mpo na kozanga kolya malamu mpe na maladi. Bobele na minute wana, mokili mozali kobimisa 1 300 000 000 000 Z mpo na bitumba. Okoki kokanisa mpo na oyo ekokaki kosalama na mosolo wana​—to bobele ndambo na yango—​mpo na bana 26 wana?

Emonani ete, soki nzala ezali mingi na mokili, ezali te mpo na bosɛnga ya bilei to ya mosolo. Likambo yango lizali mpenza monene. Lokola elobaki Jorge E. Hardoy, molakisi na université ya Argentine, ete: “Bato nyonso bazali soko na likoki moke te mpo na kokabola bolamu, nguya, ntango, bozwi mpe boyebi elongo na baoyo bazali mpenza na mposa na yango.” Ya solo, likambo liuti na bozwi ya moto te, kasi epai na moto ye moko. Emonani lokola ete lokoso mpe moimi ezali na bopusi makasi likoló na bato. Ndambo ya mitano oyo baleki na bozwi awa na mabelé, ezali na biloko mpe na misala pene na mbala ntuku motoba koleka ndambo ya mitano oyo baleki na bobólá.

Ya solo, bato mosusu bazali mpenza komeka kopesa bilei epai na baoyo bazali na nzala, kasi milende na bango mibebisami na makambo mosusu oyo bango moko bayebi yango te. Nzala ebimaka mpo na bitumba ya banamboka to na botomboki, mpe mampinga oyo bazali kobunda, bakopesa nzela te ete bilei bikómela baoyo bazali na mposa na yango. Ngámbo nyonso mibale ezali kobanga ete, soki bapesi nzela ete bilei bikómela basivile oyo bazali na nzala, baoyo bafandi na ngambo banguna bazali, ekozala lokola nde baleisi banguna na bango. Mabe mauti mpe na biyangeli oyo bizali kosalela nzala lokola ebundeli mpo na makambo ya politike.

Likoki ezali te mpo na kosilisa yango?

Likambo ya mawa mpenza, mpasi oyo emonani epai na bamilió ya bato wana bazali na nzala, ezali bobele yango moko te oyo ezali konyokola bato lelo. Kobebisa ezingelo na biso mpe kosopela yango bankisi mabe; bitumba, mpasi oyo ezali ntango nyonso koboma ebele na bato; mobulu mpe mabe, ezali mpenza kopesa nsɔmɔ mpe kozanga elikya; bizaleli ya bato oyo bizali se kobeba mpe emonani lokola ete yango nde ezali kobimisa makambo yango; mpasi nyonso wana emonani na mokili mobimba endimisi likambo oyo ete: moto akoki te kolónga komitambwisa ye moko.

Tala ntina oyo mpo na yango mpenza bato mingi bazangi elikya mpo na kondima ete bampasi ya mokili ekosila. Bato mosusu bazali mpe na makanisi motindo moko na Aurelio Peccei, moto na mayele ya mboka Italia, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló. Bakanisi ete, soki likoki likozala mpo na kosilisa yango, ekouta na bato te kasi na ye oyo aleki bato. Wana nde likanisi ya Masiya likomi kosepelisa mingi. Kasi, kotya elikya epai na Masiya ezali likambo ya solo, to ezali bobele makanisi mpamba?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover photos: Top: U.S. Naval Observatory photo; Bottom: NASA photo

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

WHO photo by P. Almasy

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

WHO photo by P. Almasy

U.S. Navy photo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto