Bankulutu, bópesaka mikumba!
AZALAKI mobali moko ya motema molai, moto na komisokisa, oyo alingaki boyengebene mingi kasi azalaki pene ya komonisa mawa na ntina na makambo akutanaki na yango kati na bomoi na ye. Mpo na ntina wana, mibali, basi mpe bana koleka milio misato bazalaki komibalola epai na ye na elikya nyonso ntango bazalaki na mposa ya batoli. Azalaki kosala nyonso ete elikya na bango ezala ya mpamba te. Longwa na ntongo kino na mpokwa azalaki koyoka bango kolobela mikakatano na bango mpe na motema molai azalaki kosalisa bango na komona lolenge mibeko na Nzambe mitalelaki makambo na bango. Ya solo, mpo na mwa ntango moke, esili koleka sikawa mibu 3 500, mabota 12 ya Yisraele bazalaki kosambisama na moto moko, Moize.
Nzokande, bokilo na ye Yetelo amitungisaki na yango. Lolenge nini Moize akokaki kolanda kosala motindo yango? Bongo Yetelo alobaki ete: “Oyo ozali kosala ezali malamu te. Yo mpe bato na yo elongo bokomilembisa, mpo ete mokumba oyo eleki nguya na yo. Yo moko okoki kokokisa yango te.” (Exode 18:17, 18) Esengelaki kosala nini? Yetelo apesaki Moize toli ya kopesa epai na bato mosusu mikumba misusu oyo ye azalaki kokokisa. (Exode 18:19-23) Ezalaki toli moko malamu!
Lelo oyo, kati na lisangá ya boklisto, ezali na ebele ya bankulutu oyo, lokola Moize, bazali komeka kokokisa makambo mingi koleka oyo bakoki mpenza kokokisa yango bango moko. Bazali kolengela bibongiseli ya makita, kobongisa mpe kopesa masolo na makita yango na motindo mosengeli. (1 Bakolinti 14:26, 33, 40; 1 Timoté 4:13) Bankulutu bazali lisusu kotalela bamposa na basangani ya lisangá. (Bagalatiya 6:1; 1 Batesaloniki 5:14; Yakobo 5:14) Bazali mpe kopesa ndakisa kati na mosala monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 24:14; Baebele 13:7) Bazali kosala ete lisangá lizala na mikanda ya kokabola epai na bato.
Lisusu, bankulutu mosusu basanganaka na bibongiseli ya ba assemblées ya circonscription mpe ya district. Bazali kopesa maboko mpo na kobongisa ba assemblées mpe bazali basangani ya ba comités de liaison hospitalier. Basusu bazali kosunga na botongi ya ba salles du Royaume. Mikumba nyonso wana mibakisami na mikumba na bango ya mabota mpe na mposa na bango ya komileisa na elimo. (Tala Yosua 1:8; Nzembo 110:3; 1 Timoté 3:4, 5; 4:15, 16.) Lolenge nini baklisto yango bazali kokoka kosala nyonso wana? Lokola Moize bazali na mposa ya lisalisi. Basengeli koyeba kopesa mikumba epai na bato mosusu. Ye oyo ayebi kopesa mikumba te, azali mobongisi malamu te.
Motuya ya kobongisama epesami na bato basusu
Ezali na bantina mosusu mpo na yango esengeli kokabola mikumba na yo elongo na bato basusu. Kati na lisese ya palata oyo epesamaki na Yesu, nkolo, liboso na kokende na mobembo molai, abyangi baombo na ye mpe apesi bango mikumba ya bonene bokeseni. (Matai 25:14, 15) Na motindo yango, nkolo akokaki kokokisa mikano mingi oyo azalaki na yango. Ya liboso, wana azalaki na mobembo, basali na ye basalaki na esika na ye mpe mosala motelemaki te. Ya mibale, lokola misala mizali komonisa polele makambo koleka maloba, nkolo akokaki komona makoki mpe bosembo ya basali na ye. Ya misato, nkolo apesaki na baombo na ye makoki ya komesana na mosala, likambo oyo bazalaki na yango mpenza mposa.
Lisese oyo lizali na ndimbola lelo mpo na biso. Ntango Yesu atikaki mabelé, apesaki mikumba epai na bayekoli na ye bapakolami. Batikali bapakolami bazali naino na mokumba ya kobatela matomba ya Bokonzi kati na mokili mobimba. (Luka 12:42) Lelo oyo, wana batikali bazali kokokisa mikumba na bango ya kapita, emonani polele ete Jéhovah azali kopambola lisangá na ye. Lokola litomba, bokoli monene ezali komonana. Na boumeli ya mibu mitano oyo mileki, koleka bato milio moko bamonisaki elembo ya komipesa na bango na kozwaka batisimo ya mai! Yango epesi nzela na kosalema ya bankoto ya masanga ya sika mpe bankama ya ba circonscriptions ya sika.
Motindo moko Klisto apesaki mikumba, bobele bongo “moombo na sembo mpe na mayele” asili kopesa mikumba kati na masanga epai na bankulutu mpe basaleli ya misala oyo bazali kati na “bampate mosusu.” (Matai 24:45-47; Yoane 10:16) Atako bongo, esengeli kozala mpenza na mibali mingi oyo bamipesi mpo na kotalela bokoli monene oyo ezali kosalema. Bakouta wapi? Bankulutu basengeli kobongisa bango. Kasi lolenge nini bankulutu bakoki kobongisa bango soki bazali kopesa mikumba te epai na bandeko mibali oyo bazali na makoki? Soki basali bongo te, lolenge nini bankulutu bakoki koyeba makoki mpe bosembo ya mibali oyo bazali bilenge?
Kopesa mikumba elimboli nini?
Mpo na basusu, “kopesa mikumba” elimboli komilongola na mikumba na ye, kotika yango, kotalela yango na bopotu to kosundola yango. Nzokande, wana esalemi na motindo mobongi, “kopesa mikumba” ezali mwango mpo na kokokisa malamu mikumba na biso. Liloba “kopesa mikumba” ezali na ndimbola ya “kopesa na moto mosusu, kopona moto mpo na komonisa yo, kopesa mokumba moko to mwa bokonzi.” Kasi, na nsuka ezali ye oyo apesi mokumba nde azali na mokumba ya misala nyonso oyo misalemi.
Basusu bakoki koboya kopesa mikumba mpo ete bazali kobanga kobungisa lotomo oyo bazali na yango mpo na kotambolisa makambo. Nzokande, kopesa mikumba elimboli te kobungisa makoki ya kotambolisa makambo. Atako azangi komonana kati na makoló epai azali koyangela Yesu azali kosimba na maboko na ye lisangá ya boklisto. Ye mpe apesi lisangá na maboko ya mibali oyo bazali na lotómo mpo ete babatela yango.—Baefese 5:23-27; Bakolose 1:13.
Ekoki kozala ete basusu bazali koboya kopesa mikumba mpo bakanisi ete bango moko bakoki kosala yango nokinoki. Nzokande, Yesu ayebaki malamu ntina ya kobongisa bato mosusu. Awa na mabelé, moto mosusu oyo ateyaki malamu koleka ye azali te. (Yoane 7:46) Nzokande, nsima na kopesa mitinda na bayekoli na ye 70, atindaki bango kati na mosala ya kosakola. Atako bakokaki mpenza te komekana na Yesu mpo na makoki ya koteya, bazongaki bongo na esengo monene na kotalela matomba malamu bazwaki. Yesu asepelaki na bango elongo mpe akumisaki bango, mpamba te ayebaki ete basengelaki kolanda kokokisa mosala yango na boumeli ya ntango molai nsima na ye, mpe basengelaki kokokisa yango koleka oyo akokaki kosala ye moko.—Luka 10:1-24; Yoane 14:12.
Kopesa mikumba elimboli lisusu komizwela lisalisi mpo na kotalela makambo nyonso ya ntina. Mokolo moko liboso na kufa na ye, Yesu atindaki Petelo mpe Yoane kosala bibongiseli ya ntina mpo na elambo ya pasika na ye ya nsuka. (Luka 22:7-13) Bongo amitungisaki te na kosomba mwana ya mpate, vinyo, mapa mazangi mfulu to bandunda ya bololo; lisusu akendeki te koluka basani, nkoni ya kopelisa moto mpe biloko mosusu. Petelo mpe Yoane bazwaki mokumba nyonso wana.
Lelo mpe bankulutu bakoki kozwa bolamu motindo moko soki balandi ndakisa ya Yesu. Na yango, bakoki kosenga na ndeko oyo atekaka mikanda ete asala komande na yango na kotalela lipesi ya basanza ezali koya. Bokoki kosalisa ye na kotalela dossier mpo na koyeba soki mikanda boni ya lolenge yango misalelamaki na lipesi ya basanza esili koleka. Ndeko yango akoki lisusu kotalela ezalela ya teritware na bango liboso ya kotondisa ba formulaires etali komande ya mikanda. Na nsima, akolakisa formulaire na secrétaire ya lisangá mpo akoka kotala yango. Wana mosaleli na mikanda ayebi malamu mosala na ye, ekozala lisusu na ntina te ete secrétaire atalela ba dossiers, mpo ete motuya ya mikanda misengami mokokani na mposa ya lisangá. Ezali polele ete bobele na kopesa mikumba, baoyo nyonso batalelami na likambo ya kosala komande ya mikanda bakozala lisusu na mpasi te.
Na kokanisela bolamu motindo yango, lolenge nini tokoki kopesa mikumba na motindo mobongi?
Motindo nini kopesa mikumba
Limbola mikumba. Libosoliboso, limbola polele matomba oyo masengeli kozwama. “Bosala mombongo kino ekozonga ngai,” wana ezali likambo “moto na lokumu” alobaki epai na baombo na ye zomi, kati na lisese ya palata oyo Yesu apesaki. (Luka 19:12, 13) Nkolo azalaki komizela ete baombo basalela bapalata mpo na kozwa matomba mpe ete na bozongi na ye bamonisa ye matomba na bango. Baombo bayebaki oyo basengelaki kosala. Lolenge nini etinda wana ekoki lelo kosalelama na mokano moko motali kobongisa Salle du Royaume? Na ndakisa, esengeli koyebisa ndeko oyo azwi mokumba ya kobongisa nsamba bisaleli oyo bisengeli, epai wapi akozwa yango, mpe ntango esengeli kobanda mosala, na kotalela bileko ya mbula to ya elanga. Etinda wana ya polele ezali kopesa nzela na ebongiseli moko malamu.
Ezali likambo ya ntina kolimbola, bobele bonene ya mosala te, kasi lisusu bikateli nini ndeko moko akoki kokamata mpe na makambo nini asengeli kotuna ndeko mosusu. Moize alobaki na mibali oyo aponaki ete basambisa makambo ya mikemike, mpe basengelaki komemela ye makambo ya makasi.—Exode 18:22.
Esengeli kokeba ete bopesa mokumba moko na bato mingi te. Ekopesa mobulungano. Kanisa naino na likambo likobima, soki na assemblée moko ya ba Témoins de Jéhovah etuluku ya bandeko oyo basalaki na bopeto mpe baoyo ya cafétéria basengeli bango nyonso kosukola bisika ya cafétéria; to bandeko oyo bazalaka na mokumba ya koyamba bato mpe baoyo batalelaka makambo ya batisimo basengeli bango nyonso kokamba bato na bisika ya batisimo.
Pona mibali oyo bazali na makoki. Yetelo apesaki Moize toli oyo: “Pona mibali na makoki kati na bato, mibali bakobangaka Nzambe, bato bakoki kotyelama motema, bayini na kanyaka mpe okotya bango lokola mikonzi likoló na bato.” (Exode 18:21) Ezali polele ete moto asengeli liboso kokokisa masengami ya elimo. Mpo na koyeba soki moto moko azali na ‘makoki’ ya kokokisa mosala moko malamu kino nsuka na yango, esengeli kotalela makambo mingi: bomoto na ye, eksperianse na ye, boyebi na ye mpe makoki na ye. Na yango, moklisto oyo azali na bolingo mingi, na boboto mpe oyo alingaka kosalela basusu akoki kosala malamu na boteki ya bazulunalo to na boyambi bato. Na lolenge moko, soki boponi ndeko moko mpo na kosalisa secrétaire ya lisangá, esengeli kotalela malamu soki ndeko yango azali mpenza moto ya ordre. Atyaka likebi na bosikisiki ya makambo? Bakoki kotyela ye motema mpe azali na makoki ya kobomba sekele? (Luka 16:10) Na kotalela makambo motindo yango nsima ya kotalela masengami ya elimo, likoki lizali ya kozwa moto oyo abongi mpo na mosala moko.
Pesa bisaleli mingi oyo bisengeli. Ye oyo aponami akozala na mposa ya bisaleli mpo na kokokisa mosala na ye. Mbala mosusu akozala na mposa na biloko ya mosala, mbongo to lisalisi. Bopesa bisaleli mingi oyo bisengeli. Na ndakisa, bokoki kosenga na ndeko moko ete asala misala ya kobongisa Salle du Royaume. Ezali solo ete bokoyebisa mosala oyo mosengeli kosalema, kasi akozala mpe na mposa ya mwa mosolo mpo na kosomba biloko ya mosala. Ntango mosusu akozala na mposa ya lisalisi. Na yango, bankulutu bakosenga na bandeko mosusu ete basunga ye, to bakopesa liyebisi na lisangá ete “ndeko Songolo akosala mosala boye kati na salle, mbala mosusu akozala na mposa ya lisalisi ya bandeko mosusu.” Na kotaleláká makambo liboso, bokopengola ete bopesa ndeko mosala kozanga kopesa ye bisaleli bisengeli mpo na yango. “Bopesa mikumba ndambondambo te,” oyo ezali lolenge mopesi toli na makambo ya kokamba bakompanyi azali komonisa likanisi yango.
Soki opesi mokumba na moto moko, yebisa na basusu ete moto yango azali kosala na nkombo na yo. Bokonzi mpo na kosala na esika na yo ekozala na ntina. Ezalaki “liboso ya lisangá mobimba” nde Yosua aponamaki mpo na kozala mokambi ya sika ya Yisraele. Moize azwaki etinda ya “kotya likoló na ye ndambo ya lokumu na [ye].” (Mituya 27:18-23) Mpo na makambo ya lisangá, bakosala motindo yango bobele na kotya na tablo liste ya nkombo na baoyo bapesameli mikumba.
Bosimba bikateli na bango. Lokola ndeko asili koponama, akoki kobanda mosala. Nzokande, bomikundola ete bokoki kozala liziba monene ya elendiseli soki bozali kosimba bikateli malamu oyo azali kozwa. Na ndakisa, bokoki kozala na liponi na bino ya etelemelo ya mikro to kobongisama ya estrade ya Salle du Royaume, mpe mbala mosusu liponi wana likokani mpenza te na oyo ndeko asali. Kasi, soki ndeko oyo azali kotalela estrade azali na mwa bosomi ya kokokisa mikumba na ye, ekosalisa ye na kozwa makoki mingi mpe komesana mingi. Lisusu, akoki mbala mosusu kobongisa mosala na ye malamu mpenza. Mopesi toli moko na makambo ya mombongo alobaki ete: “Bopesa mosala, kasi te lolenge oyo ekosalama. . . . Mbala mingi, makoki mingi ya kosala lisusu malamu makomonana.”
Lisusu, ndeko oyo atye maboko kati na mosala ayebi malamu mbala mingi lolenge makambo mazalaka, na yango ayebi malamu mikakatano mitali mosala yango. Mbala mingi akoki koyeba malamu lolenge ya kobongisa makambo. Akokoka mpe kotalela makambo oyo mazali komonana te na bato oyo bazali kotala. Yango wana mokengeli moko moklisto alobaki na ntina na molandi na ye oyo ameseni na mosala ete: “Soki alobi ete mikakatano mizali nasengeli kondimela ye.”
Na ntembe te, mibali mpe basi oyo bazali pene ya kosalisa mpe bakoki kosala yango, na misala nyonso oyo bakokamba bango na yango, bazali basalani ya motuya mingi mpo na bakengeli baklisto. Bankulutu, bozwa litomba na lisalisi wana monene. Kopesa mikumba ezali elembo ya komisokisa, mpe ekoki kokitisa mikakatano mpe kowelana. Na kosalaka bongo, bokosala bobele mosala mingi te, kasi bokopesa mpe na basusu libaku ya kokóma na makoki.