Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/6 nk. 28-31
  • Kotikela basusu mikumba mosusu—Mpo na nini mpe ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotikela basusu mikumba mosusu—Mpo na nini mpe ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotikela basusu mikumba mosusu ezali nini?
  • Mpo na nini kotikela basusu mikumba mosusu?
  • Ntina oyo basusu bakakatanaka
  • Ndenge nini?
  • Bankulutu, bópesaka mikumba!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mibali ya bopɔlɔ bapesaka basusu formasyo mpe mikumba
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Tambolá elongo na Nzambe na komikitisa mpe na bopɔlɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Bankulutu—Bópesa bandeko mosusu formasyo mpo bázwa mikumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/6 nk. 28-31

Kotikela basusu mikumba mosusu​—Mpo na nini mpe ndenge nini?

KOTIKELA basusu mikumba mosusu ebandá kala, liboso kutu mabelé ekelama. Yehova akelaki Mwana na ye mobotami-se-moko mpe na nsima, asalelaki ye lokola “mosali ya mayele,” mpo na kosala molɔ́ngɔ́. (Mas. 8:22, 23, 30, NW; Yoa. 1:3) Ntango Nzambe akelaki babalani ya liboso, ayebisaki bango ‘bátondisa mokili mpe bátya yango na nse na bango.’ (Gen. 1:28) Mozalisi apesaki bato mokumba ya koyeisa Paladiso ya Edene monene tii etonda na mabelé mobimba. Ya solo, banda na ebandeli, kotikela basusu mikumba mosusu ezali momeseno ya ebongiseli ya Yehova.

Kotikela basusu mikumba mosusu ezali nini? Mpo na nini bankulutu basengeli kotikelaka basusu mikumba mosusu ya lisangá mpe ndenge nini bakoki kosala yango?

Kotikela basusu mikumba mosusu ezali nini?

Kotikela basusu mikumba mosusu esɛngaka kopesa basusu mikumba to bokonzi to kotya bango mpo bázala bamonisi na biso. Na yango, kotikela basusu mikumba mosusu esɛngaka kokɔtisa basusu na mosala oyo tozali kosala. Yango elingi koloba kondima kokabola bokonzi na bato mosusu.

Bandeko oyo bapesi bango mosala ya kosala basengeli kokokisa yango malamu, koyebisa ndenge mosala oyo bapesi bango ezali kosalema mpe kosolola na moto oyo apesaki bango mokumba yango. Atako bongo, ndeko oyo apesaki mosala wana nde azali na mokumba monene. Asengeli kolandela makambo malamu mpe kopesa toli soki esengeli. Kasi, bato mosusu bakoki kotuna boye, ‘Mpo na nini kotikela basusu mikumba mosusu soki yo moko okoki kosala yango?’

Mpo na nini kotikela basusu mikumba mosusu?

Kanisá naino ndenge Yehova akelaki Mwana na ye mobotami-se-moko mpe akɔtisaki ye na mosala ya kozalisa. Ya solo, “na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabelé, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te.” (Kols. 1:16) Mozalisi akokaki kosala biloko nyonso ye moko, kasi amonaki malamu Mwana na ye mpe ayoka esengo ya kosala mosala oyo ezali kobimisa matomba. (Mas. 8:31) Yango esalisaki Mwana ayeba malamu bizaleli ya Nzambe. Na maloba mosusu, Tata asalelaki libaku wana mpo na kopesa Mwana na ye mobotami-se-moko formasyo.

Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu Klisto amekolaki Tata na ye na likambo etali kotikela basusu mikumba mosusu. Apesaki bayekoli formasyo mokemoke. Atindaki bantoma 12 mpe na nsima atindaki bayekoli mosusu 70 bákende kosakola na bisika oyo ye asengelaki kokóma na nsima. (Luka 9:1-6; 10:1-7) Ntango akómaki na bisika yango, bayekoli na ye basilaki kotya moboko ya malamu oyo asengeli kotonga likoló na yango. Liboso atika mabelé, Yesu atikelaki bayekoli na ye oyo ateyaki mikumba minene mingi, na ndakisa mosala ya kosakola na mokili mobimba.​—Mat. 24:45-47; Mis. 1:8.

Kotikela basusu mikumba mosusu mpe kopesa bango formasyo ekómaki mpenza momeseno ya lisangá ya boklisto. Ntoma Paulo alobaki na Timote ete: “Makambo yango pesá na bato ya sembo, oyo, na ngala na bango, bakozala bato oyo bakoki mpenza mpo na koteya basusu.” (2 Tim. 2:2) Ya solo, baoyo bakɔmɛli basengeli kopesa basusu formasyo, mpo baoyo bazwi formasyo, na ngala na bango bakolakisa mpe basusu.

Soki azali kotikela basusu mikumba mosusu oyo bapesaki ye, nkulutu akoki kosala ete basusu báyoka esengo ya koteya mpe kobatela bampate. Soki nkulutu ayebi ete makoki na biso ya bato ezali na bandelo, akozala kutu na ntina monene aluka kosɛnga basusu bápesa mabɔkɔ na kokokisa mikumba ya lisangá. Biblia elobi ete: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Mas. 11:2, NW) Bopɔlɔ esɛngaka moto ayeba bandelo na ye. Soki olingi osalaka makambo nyonso yo moko, okoki kolɛmba mpe kozangisa bato ya libota na yo ntango oyo okokaki kolekisa na bango. Na yango, ezali mpenza likambo ya bwanya kokabola kilo ya mikumba na basusu. Tózwa ndakisa ya ndeko oyo azali mokambi-misala ya bankulutu. Akoki kosɛnga bankulutu mosusu bátalela kɔnti ya lisangá. Ntango bazali kotalatala kɔnti yango, bankulutu wana bakoki mpe koyeba malamu makambo etali mbongo ya lisangá.

Kotikela basusu mikumba mosusu epesaka bango libaku ya kozwa makoki oyo esengeli mpe boyebi ya mosala; epesaka mpe moto oyo atikeli basusu mokumba libaku ya komona makoki ya bato yango oyo ye apesi bango mosala. Na yango, wana bazali kopesa basusu misala oyo ebongi na lisangá, bankulutu bakoki komeka “makoki” ya bandeko oyo bakoki kokóma basaleli na misala.​—1 Tim. 3:10.

Na nsuka, soki bankulutu bazali kotikela basusu mikumba mosusu, bakomonisa ete batyelaka bango motema. Mpo na kopesa Timote formasyo, Paulo asalaki na ye na mosala ya misionɛrɛ. Bakómaki na bomoko makasi. Paulo abengaki Timote “mwana ya solosolo na kati ya kondima.” (1 Tim. 1:2) Ndenge moko, Yehova ná Yesu bakómaki na bomoko makasi ndenge basalaki elongo mpo na kokela biloko mosusu nyonso. Soki bazali kopesa basusu misala, bankulutu bakoki kokóma mpenza na boninga na bango.

Ntina oyo basusu bakakatanaka

Atako bayebi ete kotikela basusu mikumba mosusu ezali na litomba, bankulutu mosusu bamonaka mpasi kosala bongo, basalaka bongo mbala mosusu mpo bakanisaka ete bakotikala na bokonzi mingi lisusu te. Na maloba mosusu, bakoki kokanisa ete ntango nyonso, esengeli kaka bango nde básimba yenda. Kasi, kobosana te ete liboso amata na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye ndingisa básala mosala monene, mpe ntango apesaki bango mosala yango, ayebaki ete bakosala misala minene koleka oyo ya ye.​—Mat. 28:19, 20; Yoa. 14:12.

Ekoki kozala ete bankulutu mosusu batikelaki bandeko mikumba mosusu na mikolo eleki, kasi basepelaki te ndenge bandeko yango bakokisaki mikumba yango. Bakoki komona ete bango moko bakoki kosala mosala malamu mpe na lombangu koleka. Kasi, tózwa ndakisa ya Paulo. Ayebaki ntina ya kotikela bato mosusu mikumba mosusu, kasi ayebaki mpe ete bato oyo azalaki kopesa formasyo bakosala ntango nyonso te makambo ndenge ye azalaki kokanisa. Na mobembo na ye ya liboso ya misionɛrɛ, Paulo apesaki elenge Malako, moninga na ye ya mobembo, formasyo. Paulo ayokaki mpasi mingi na motema ntango Malako atikaki mokumba na ye mpe azongaki ndako. (Mis. 13:13; 15:37, 38) Kasi, likambo yango epekisaki Paulo kopesa basusu formasyo te. Ndenge touti koloba yango, abengaki elenge Timote azala moninga na ye ya mobembo. Ntango Timote akómaki na makoki ya kokokisa mikumba minene, Paulo atikaki ye na Efese, mpe apesaki ye bokonzi ya kotya bakɛngɛli mpe basaleli na misala na lisangá.​—1 Tim. 1:3; 3:1-10, 12, 13; 5:22.

Ndenge moko mpe, bankulutu ya lelo basengeli te kotika kopesa bandeko formasyo kaka mpo moko na bango azali kosala malamu te. Koyeba kotyela basusu motema mpe kopesa bango formasyo ezali mpenza likambo ya bwanya mpe ya ntina. Kasi, likambo nini bankulutu basengeli kobosana te ntango bazali kotikela bato mosusu mikumba mosusu?

Ndenge nini?

Mpo na kotikela bandeko mikumba mosusu, kanisá naino makoki ya bandeko yango oyo ozali kokanisa. Ntango bosɛnga ekómaki na Yelusaleme mpo na likambo etali kokabola biloko ya mokolo na mokolo, bantoma baponaki ‘mibali nsambo ya lokumu malamu, oyo batondi na elimo mpe na bwanya.’ (Mis. 6:3) Soki osɛngi moto oyo abongi te asala mosala moko, mbala mosusu akokoka yango te. Na yango, bópesa ye naino misala ya mikemike. Soki moto yango azali sembo na makambo wana, mbala mosusu akokoka kozwa mikumba minene.

Kasi, esuki kaka wana te. Bato nyonso bazalaka na bomoto mpe makoki ndenge moko te. Bato nyonso basalá makambo ndenge moko te na bomoi na bango. Ndeko oyo azali moto ya boboto, ya esengoesengo, akoki kosala malamu soki batye ye ayambaka bato, nzokande oyo atyaka makambo na molɔngɔ mpe alandelaka makambo malamu, akoki kosunga malamu sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá. Bakoki kosɛnga ndeko mwasi oyo ayebi malamu misala ya ntɔki abongisa bafololo mpo na Ekaniseli.

Ntango bozali kopesa moto mikumba, bosengeli koyebisa ye malamu nini bolingi asala. Liboso Yoane Mobatisi atinda bato epai ya Yesu, alimbolelaki bango nini azalaki na mposa ayeba mpe ndenge nini bakotuna motuna yango. (Luka 7:18-20) Epai mosusu, ntango Yesu asɛngaki bayekoli na ye balɔkɔta biloko oyo etikalaki nsima ya likamwisi oyo asalaki, ayebisaki bango makambo nyonso. (Yoa. 6:12, 13) Makambo mingi etaleli lolenge ya mosala mpe makoki ya moto oyo azali kopesa lisungi. Ezala moto oyo azali kotikela moto mosala mosusu, ezala mpe moto basɛngi asala mosala yango, bango mibale basengeli koyeba eloko nini mosala yango esengeli kobimisa mpe mbala boni balapolo ya mosala yango ekopesama na moto oyo apesaki mosala. Bango nyonso basengeli koyeba makambo nini moto oyo batikeli ye mosala akoki kosala to te. Soki mosala yango esengeli kosila na dati moko boye, moto akosepela kosala yango soki bosololi mpe boyokani na ye mpo na dati yango, na esika ya kokweisela ye dati kaka boye.

Moto oyo bopesi mosala asengeli kozala na mbongo, na bisaleli mpe na lisalisi oyo esengeli. Ekozala malamu koyebisa mpe basusu ebongiseli yango. Ntango Yesu apesaki Petelo “bafungola ya bokonzi ya likoló,” asalaki yango na miso ya bayekoli mosusu. (Mat. 16:13-19) Ndenge moko mpe, ntango mosusu ekoki kozala malamu koyebisa lisangá nani akosala mokumba boye to boye.

Kasi, esengeli mpe kosala angɛlɛ. Soki ozali kaka kolandelalandela mosala oyo opesi moto, ezali lokola nde ozali koyebisa moto yango ete: “Nazali kotyela yo motema mpenza te.” Ya solo, ntango mosusu makambo ekoki kosalema mpenza te kaka ndenge okanisaki. Kasi, soki otikeli ndeko yango mwa bonsomi, mbala mosusu akokakatana lisusu te mpe akomesana na mosala. Yango elingi koloba te ete osengeli kokipe te ndenge azali kosala mosala yango. Atako akɔtisaki mpe mwana na ye na mosala ya bozalisi, Yehova amilongaki te na mosala yango. Alobaki na Mosali ya mayele ete: “Tiká tózalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso.” (Gen. 1:26) Na yango, na maloba mpe na misala, pesá mabɔkɔ na mosala oyo ezali kosalema, mpe pesá moto yango longonya mpo na milende na ye. Kotala mwa moke makambo oyo esalemi ekoki kosalisa ye. Soki mosala yango ezali kosalema malamu te, kokakatana te kopesa ye toli to lisalisi mosusu. Kobosana te ete nsukansuka yo nde moto oyo okozongisa monɔkɔ, mpo yo nde moto opesaki mokumba.​—Luka 12:48.

Bandeko mingi bazwaki matomba na ndenge bankulutu oyo bazalaki kotyela bango mpenza likebi bapesaki bango misala mosusu ya lisangá. Ya solo, na ndakisa ya Yehova, bankulutu nyonso báyeba mpo na nini mpe ndenge nini kotikela basusu mikumba mosusu.

[Etanda na lokasa 29]

KOTIKELA BASUSU MIKUMBA MOSUSU EZALI

• kopesa basusu libaku ya koyoka esengo ya kosala

• libaku ya kosala mingi

• komonisa bwanya mpe bopɔlɔ

• libaku ya kopesa basusu formasyo

• ndenge ya komonisa ete tozali kotyela basusu motema

[Etanda na lokasa 30]

NDENGE YA KOTIKELA BASUSU MIKUMBA MOSUSU

• Poná bato oyo babongi na mosala yango

• Limbolelá moto polele/​bósolola

• Monisá polele eloko olingi asala

• Pesá bisaleli oyo esengeli

• Tyaká likebi na mosala yango, mpe monisáká ete ozali kotyela moto yango motema

• Ndimá ete nsukansuka yo nde okozongisa monɔkɔ

[Bililingi na lokasa 31]

Kotikela basusu mikumba mosusu esangisi kopesa mosala mpe kolandela ndenge ezali kotambola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto