Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/11 nk. 3-4
  • Lolenge nini otalelaka lisumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini otalelaka lisumu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likanisi na ntina na lisumu esili kobeba na mikili ya Occident
  • Mokili mozangi masumu: mokoki kosalema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ntango lisumu ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lisumu—Ebongwani na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Lisumu ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/11 nk. 3-4

Lolenge nini otalelaka lisumu?

MWASI moko oyo azalaki koyekola Biblia elongo na Témoin de Jéhovah moko ya mwasi, azalaki koimaima ete: “Mpo na nini [mwasi oyo] asɛngaka ntango nyonso bolimbisi ya masumu na biso kati na mabondeli? Emonani lokola ete ngai nazali mosali na mabe mingi.” Lokola mwasi oyo, bato mingi lelo bayebi te ete bazali na masumu, bobele soki basali likambo moko ya mabe mingi.

Ezali mpenza bongo na mikili ya Orient, epai bato bayebi te likanisi ya lisumu oyo tosili kosangola yango, na motindo oyo eteyami na mangomba ya boklisto mpe na mangomba ya Bayuda. (Genese 3:1-5, 16-19; Baloma 5:12) Na ndakisa, mpo na bato na lingomba ya Shintõ, lisumu ezali bosoto oyo sángó akoki kolongola kozanga mpasi na kosaleláká lingenda na ye, oyo nsongɛ na yango ezali na lokasa to na elamba ya pɛtɛpɛtɛ. Molulu yango mosɛngi te ete moto abongola motema mpo na mabe oyo asalaki. Mpo na nini? Mokanda Kodansha Encyclopedia of Japan elimboli ete: “Ezala misala mabe, ezala makama oyo mauti na biloko bizalisami, oyo moto azali na nguya likoló na yango te, nyonso wana ebengami tsumi [lisumu].” Bazali kotalela makama mauti na biloko bizalisami, tsumi oyo euti na bato te, lokola masumu oyo makoki kolongolama na nzela na milulu ya kopetolama.

Yango epesaki likanisi oyo ete masumu nyonso, ata misala mabe oyo moto asali yango na nko (longola bobele oyo ekweisami na mibeko), ekoki kolongolama na nzela na milulu ya kopetolama. Zulunalo The New York Times elobelaki ezaleli yango na motó ya likambo oyo ete “Milulu ya kopetolama na politike na Japon,” mpe elimbolaki ete na Japon, bakonzi ya politike oyo bayebani mpo na misala mabe bamonaka ete “bapetolami” soki baponami lisusu. Na bongo, bato bazali kosembolama mpenza te, mpe bakoki kozongela makambo mabe oyo basalaki.

Bato na lingomba ya Buda oyo bandimaka liteya ya samsara to kobotama lisusu, mpe liteya ya Karma, bazali na likanisi likeseni. Mokanda the New Encyclopœdia Britannica elimboli ete: “Engebene liteya ya karma, etamboli malamu ekobotaka mbuma ya esengo mpe ekopusaka na kosala misala malamu, nzokande etamboli mabe ekobotaka mbuma mabe mpe ekopusaka na kozongela misala mabe.” Na maloba mosusu, etamboli etondi na masumu ekobotaka mbuma mabe. Liteya ya Karma liyokani na liteya oyo ete moto azalaka na bomoi epai mosusu nsima na liwa, mpamba te elobelami na ntina na ba Karmas mosusu ete likambo ya mabe oyo bazali kosala na ntango bazali lelo na bomoi, ekoki kobota mbuma mabe na bomoi oyo bakozala na yango bambula mingi na nsima.

Liteya oyo lizali na bopusi nini likoló na bandimi na yango? Mwasi moko na lingomba ya Buda, oyo azalaki mpenza kondima liteya ya karma, alobaki ete: “Ngai nazalaki komona ete, kozwa mpasi mpo na likambo oyo nabotami na yango mpe oyo nayebaki yango soko moke te, elongobani te. Nasengelaki bobele kondima yango lokola likambo oyo lisilaki kotangama mpo na ngai. Atako nazalaki koyemba ba sutras mpe kosala milende mpo na kozala na etamboli malamu, kasi yango esilisaki bampasi na ngai te. Nakómaki nkandankanda mpe nazalaki na esengo te wana ezalaki ngai koimaima ntango nyonso.” Liteya ya lingomba ya Buda na ntina na mpasi oyo euti na etamboli mabe epesaki ye mayoki ya komitalela lokola ete azali moto mpamba.

Confucianisme, lingomba mosusu ya mikili ya Orient, eteyaki motindo mosusu ya kobundisa mabe ya bato. Engebene Hsün-tzu, moko na bafilozofe misato ya minene na lingomba ya Confucius, moto azali mabe uta kobotama na ye mpe abendami na ezaleli ya moimi. Mpo na kobatela kimya kati na bato ya masumu, alobelaki mingimingi ntina ya li, elingi koloba bopeto, bonkondé mpe kotya makambo na molongó. Atako azalaki na likanisi likeseni na ntina na lolenge ya moto, Meng-tzu, filozofe mosusu ya lingomba ya Confucius, andimaki ete mbébá ezali kati na libota ya bato, kasi lokola andimaki ete lolenge ya moto ezali malamu, akanisaki ete makambo makoki kobonga soki moto na moto alukaki kosala malamu. Na lolenge moko to mosusu, bafilozofe na lingomba ya Confucius bateyaki ntina ya koyekola mpe ya kobongisama mpo na kobundisa masumu na mokili. Atako mateya na bango mamonisi mpenza motuya ya li, kasi likanisi na bango likoló na lisumu mpe na mabe lizali mpenza polele te.​—Tala Nzembo 14:3; 51:5.

Likanisi na ntina na lisumu esili kobeba na mikili ya Occident

Na mikili ya Occident, uta kala bazalaki kotalela lisumu na motindo molongobani, mpe bato mingi bazalaki kondima ete lisumu ezali mpe esengeli kobwakama. Kasi lolenge oyo mikili ya Occident mizali lelo kotalela lisumu ezali kobongwana. Mingi bazali kolongola mayoki nyonso mauti na lisumu; bazali kobenga lisosoli oyo lizali kokweisa bango ete “mayoki ya moto oyo asali mabe,” mpe yango esengeli kobwakama. Esili koleka mibu 40, Pápa Pie XII amilelaki ete: “Masumu ya ekeke oyo mamonisi ete bato basili kobungisa bososoli nyonso na ntina na lisumu.” Engebene Le Pélerin, zulunalo moko ya katolike, 90 % ya bato na France, mingi mpenza bakatolike, bazali kondima lisusu te ete lisumu ezali.

Ya solo, emonani lelo ete na mikili ya Orient mpe na mikili ya Occident, bato mingi basepeli na ezaleli ya kozanga kotungisama na liyoki ya lisumu. Kasi, yango elimboli ete lisumu lizali te? Tokoki nde kobosana yango kozanga kozwa makámá? Masumu makosila mokolo mosusu?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto