Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/11 lok. 7
  • Ekulusu—Ezali nde elembo ya boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekulusu—Ezali nde elembo ya boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te na losambo?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/11 lok. 7

Ekulusu​—Ezali nde elembo ya boklisto?

UTA bikeke mingi, bato oyo bazali kotalela ekulusu lokola elembo ya boklisto bazali ebele. Kasi ezali mpenza bongo? Kati na bango, bato mingi ya mitema sembo bazali kokamwa na koyoka ete ekulusu ezali te bobele elembo ya boklisto ya lokuta. Kasi, esalelami mingi mpenza kati na mokili mobimba na mangomba oyo ezali ya boklisto te.

Na ndakisa, na ebandeli ya ekeke ya zomi na motoba, na eleko oyo bazalaki komibongisa mpo na kozwa bokonzi ya ba aztèques, Fernand Cortez mpe limpinga na ye “ya boklisto” bazalaki komema bendele oyo ezalaki na makomi oyo: “Na kondima ya sembo, tolanda elembo ya Ekulusu Mosantu, mpo ete na elembo yango tokolonga.” Ezalaki mpo na bango likambo ya kokamwa ntango bayaki koyeba ete banguna na bango bapakano bazalaki kokumisa ekulusu oyo ekeseneki mwa moke na oyo bazalaki na yango! Mokanda Mangomba minene ya mokili (Lingelesi) elobi ete: “Cortez mpe baninga na ye baokaki mpii na ntina ya bambeka ya bato oyo ba aztèques bazalaki kopesa mpe na oyo ekokanaki na elilingi ya boklisto oyo Satana asalaki: . . . kokumisa bilembo bizali na lolenge ya ekulusu ya banzambe ya mopepe mpe ya mbula.”

Kati na zulunalo La Nación, José Alberto Furque, mokomi mokambi amonisi ete, na ndambo ya mibale ya ekeke ya zomi ya mwambe, ezalaki na “ntembe makasi kati na bakundoli na biloko ya kala mpe bayekoli ya lolenge mpe mimeseno ya bato na ntina ya ebandeli mpe ndimbola ya bilembo ya ekulusu” oyo bazalaki kokuta bipai nyonso na Amérique centrale mpe na Amérique du sud. Basusu balingaki mpenza kokotela endimeli oyo ete, ekulusu ezalaki bobele elembo ya “boklisto” kino babimisaki likanisi ete, na lolenge moko to mosusu, Baamérike bayokaki nsango malamu liboso ya mobembo monene ya Christophe Colomb. Likanisi wana oyo elukami na makasi ebwakamaki, mpo ete ezalaki na moboko moko te.

Na nsima, bokundoli mosusu ya biloko bitali likambo yango biyaki kosukisa ntembe. Furque ayebisi ete: “Mokanda moko mobimisamaki na 1893 na Smithsonian lnstitution momonisaki ete ekulusu ezalaki kokumisama kala . . . , liboso mpenza na kokoma ya bato ya mikili ya Mpoto na Amérike ya nord, likambo oyo lindimisi likanisi . . . oyo ete bato nyonso bayebaki elembo yango mpe bazalaki kosalela yango kati na losambo ya banguya ya kozalisa.”

Biblia emonisi soko moke te ete Yesu akufaki likoló ya ekulusu, kasi likoló ya likonzi moko to stau·rosʹ. Liloba oyo ya Greke limonani kati na Matai 27:40 ezali komonisa sikisiki likonzi moko to nzeté moko etelemi alima, esalelami na ndakisa na kotyama na moboko ya ndako. Na yango, ekulusu ezalaki elembo ya boklisto ya solo soko moke te. Yesu Klisto amonisaki “elembo” ya baklisto ya solo ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozali na bolingo kati na bino.”​—Yoane 13:35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto