Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/5 nk. 11-16
  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosalela ekulusu kati na losambo
  • Ekulusu ya Kostanté
  • Ebongi kosambela eloko oyo babomelaki moto?
  • Tobatela Liloba lipemami
  • ‘Totosa mibeko na ye’
  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ekulusu ezali mpo na baklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ekulusu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/5 nk. 11-16

Oyo elimboli bolingo na Nzambe

“Bolingo na Nzambe elimboli boye ete totosa mibeko na ye.”​—1 YOANE 5:3.

1. Ndenge nini tosengeli komonisa bolingo na biso mpo na Nzambe, mpe ekobimisa litomba nini?

KOMONISAKA ete bato basengeli kosambela Nzambe, Yesu alobaki: “Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37) Ndenge nini tosengeli komonisa bolingo yango? Biblia eyanoli: “Bolingo na Nzambe elimboli boye ete totosa mibeko na ye.” (1 Yoane 5:3) Baoyo bazali kosala bongo bazali komizwela bolamu nini? Yoane alobi ete “ye oyo akoumelaka kati na bolingo azali koumela kati na Nzambe mpe Nzambe akoumelaka kati na ye”.​—1 Yoane 4:16b.

2. Tosengeli kosambela bobele nani?

2 Soki tozali na bolingo mpo na Nzambe tokopesa losambo te epai na ekelamu moko, ata ekelamu yango ezali na bomoi to esilá kokufa, kasi tokosambela bobele Ye moko. (Luka 4:7, 8) Ntoma Petelo, mpe ata anzelu moko, baboyaki ete bato basambela bango. (Misala 10:25, 26; Emoniseli 22:8, 9) Yesu amonisaki mpe ete esengeli te kosambela mama na ye Marie, mpamba te lokumu wana ebongi bobele na Nzambe. (Luka 11:27, 28; Yoane 2:3, 4; Emoniseli 4:11) Kosambela eloko mosusu ezali kobuka mibeko ya Nzambe, mpamba te “moto akoki kosalela bankolo mibale te”.​—Matai 6:24.

Kosalela ekulusu kati na losambo

3. Ndenge nini mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali kotalela ekulusu?

3 Kosambela biloko bizangi bomoi ezali mpe kobuka mibeko ya Nzambe. Ekulusu ezali moko na biloko ya losambo oyo bipalangani mingi. Uta bikeke mingi, bazali kosalela yango lokola eloko ya losambo na kati ya boklisto ya mokili oyo. Nouvelle Encyclopédie britannique elobeli yango lokola “elembo ya liboso ya lingomba ya boklisto”. Na Grèce, na boumeli ya likambo moko bazalaki kosambisa, Lingomba ya Ortodokse ya greke elobaki ete baoyo baboyi kosalela ‘Ekulusu Mosantu’ bazali baklisto te. Kasi ekulusu ezali solo elembo ya boklisto? Ebandeli na yango wapi?

4, 5. (a) Diksionere moko elobi nini na ntina na liloba stauros, oyo ba Biblia mingi ebongoli yango “ekulusu”? (b) Kosambela ekulusu ebandaki wapi?

4 Matai 27:32 mpe 40 ezali moko na mikapo ya Biblia elobeli eloko oyo basalelaki mpo na koboma Yesu. Ba Biblia mingi ya Lifalanse ezali kobongola liloba ya greke stauros ete “ekulusu”. Nzokande, liloba yango elimbolaki nini na eleko ya bokomi Makomami ya greke na ekeke ya liboso ya ntango na biso? Kati na mokanda na ye Dictionnaire interprétatif des mots du Nouveau Testament (na Anglais), W. Vine akomaki: “Stauros . . . elakisi nzete moko oyo batelemisi. Ezali na likoló ya nzete motindo yango nde bazalaki kobamba basali ya mabe mpo na koboma bango. Liloba [stauros] lokola verbe Stauroé oyo elimboli kobakisa na nzete, esalelamaki te na ebandeli mpo na ekulusu ya nzete mibale oyo tozali komona na mangomba. Lolenge oyo na ekulusu eutaki na Bakaladi ya kalakala (Babilone); esalelamaki lokola elembo ya nzambe Tamuzu (na lolenge ya Tau ya bonkuku, Tau yango nde nkombo Tamuzu na mokuse) na mokili yango mpe na mikili misusu zongazonga, bakisa mpe Ezipito.”

5 Vine akomi lisusu boye: “Penepene na katikati ya ekeke ya misato nsima na Yesu Klisto, Mangomba batikaki pembeni mateya mosusu ya kondima ya boklisto, to mpe babebisaki yango. Mpo na kobakisa lokumu ya bakonzi na mangomba bapengwi, bazalaki kondima bapakano kati na Biklesia, kozanga kosenga bango ete babongola bizaleli na bango na nzela na bondimi, mpe bazalaki kotika bango kobatela bilembo na bango ya bapakano. Moko na bilembo yango ezali Tau to T, motindo na yango oyo epalangani mingi, na nzete ya kolala oyo ekitisami mua moke, elembo oyo bakomaki kosalela yango mpo na komonisa ekulusu ya Klisto.”

6, 7. (a) Liloba “ekulusu“ eutaki wapi, mpe mpo na nini ezali na esika te kati na Biblia? (b) Mpo na nini motindo Biblia ezali kosalela liloba xulon emonisi ete stauros elimbolaki eteni ya nzete oyo bapiki sembo na mabele?

6 Tala makambo makomamaki na mokanda moko na monoko ya Anglais (The Companion Bible) na nse ya motó ya likambo “Ekulusu mpe kobomama na ekulusu”: “Liloba na biso ‘ekulusu’ euti na latin crux; kasi liloba ya greke stauros elimboli ekulusu (crux) te lokola na ndakisa liloba ya français ‘bâton’ (nzete) elimboli ‘béquille’ te (eloko esalami na nzete mibale to misato oyo ba andikape batambolaka na yango). Homère asaleli liloba stauros mpo na kolobela nzete moko mpamba. Kati na makomi nyonso ya kala ya greke ndimbola ya liloba yango ezali bongo. Elimbolaki nzete mibale te oyo moko ebakisami likoló na mosusu. . . . Eloko moko te kati na makomi na greke na Kondimana ya Sika ezali kotinda biso na kokanisa ete ezali nzete mibale.”

7 Biblia esaleli liloba mosusu ya greke, xulon, mpo na kolakisa eloko oyo likolo na yango Yesu abomamaki. Yango esimbi likanisi oyo ete stauros ezalaki nzete moko mpamba, kasi nzete mibale te oyo moko ekatisi mosusu. Ezali yango endimisami na mokanda oyo touti kotanga, na maloba oyo: “Liloba xulon . . . elakisi mingimingi nzete moko oyo bakoki kosalela yango lokola lokoni to mpo na mosala mosusu. Lokola liloba yango xulon ekoki kosalelama na esika oyo mosusu ete stauros, emonani ete ezali na ndimbola moko mpenza. . . . Yango wana liloba xulon esalelami . . . mpo na kolakisa lolenge oyo Nkolo na biso akufaki, liloba oyo ebongolami ete ‘nzete’ kati na Misala 5:30; 10:39; 13:29; Bagalatia 3:13; 1 Petelo 2:24.

8. Mikanda misusu milobi nini na ntina na ekulusu mpe ebandeli na yango?

8 Kati na Dictionnaire Encyclopédique universel totangi boye: “Uta kala, bakanisaka ete ekulusu, oyo esalelami lokola elembo na losambo, ezali bobele mpo na baklisto. Nzokande ezali bongo te.” Mokanda Un double héritage-La Bible et le British Museum (Angl.) elobi boye: “Tokoki kobulunganisama na koyoka ete liloba ‘ekulusu’ emonani ata esika moko te kati na makomi na greke na Kondimana ya Sika. Liloba stauros oyo ezwami kati na yango elimboli eteni ya nzete moko oyo bapiki yango na mabelé ete etelema alimá. Na ebandeli, ekulusu ezalaki elembo ya boklisto te; eutaki nde na Ezipito mpe na Kostanté.” Totangi lisusu boye kati na buku Nouvelle Encyclopédie Catholique: “Baklisto na bikeke ya liboso bazalaki na bililingi te mpo na kolakisa kufa ya Klisto na Gologota lokola lisiko. Epusamaki bango na epekiseli oyo ete basala bikeko te, epekiseli oyo ezwami na Kondimana ya Kala, baklisto ya liboso bazalaki koboya kosala elilingi ya eloko oyo bato babomelaki Nkolo. . .  Ekulusu eyaki kobima na ntango ya Kostanté.”

Ekulusu ya Kostanté

9. Mokonzi Kostanté asalaki mosala nini mpo na ekulusu?

9 Kostanté azalaki mokonzi ya Loma oyo asalisaki likita ya bakonzi ya Lingomba na mboka Nicée na mobu 325 ya ntango na biso mpe apusaki bango bandima liteya oyo ezwami na Biblia te engebene yango Klisto azali Nzambe. Mokano na ye ezalaki ya koyeisa makasi bokonzi na ye mpo ete bato na ye bazalaki bamosusu bapakano mpe bamosusu baklisto bapengwi. Tala oyo elobami na ntina na ye kati na Nouvelle Encyclopédie britannique; “Butu oyo ezalaki liboso ya etumba oyo alongaki na yango mboka Maxence, na mobu 312, Kostante amonaki emonaneli ya ‘elembo moko ya likoló’, ekuluse, mpe asukisaki ete ezali elembo Nzambe apesi ye mpo na kolonga.” Mokanda yango ebakisi ete na nsima, Kostanté apusaki bato ete basambela ekulusu.

10. Mpo na nini ebongi te mpe eyokani na Biblia te na kondima ete Nzambe to Klisto bapesaki na Kostanté “elembo” ya ekulusu?

10 Kasi Nzambe akokaki kopesa elembo epai na mokonzi moko mopakano oyo azalaki kosala mokano na ye te? Elembo yango mpe elembo ya bapakano. Yesu apamelaki Bayuda oyo basengaki bilembo. (Matai 12:38-40) Epai mosusu, Kostanté asopaki makila ya bato mingi kosalelaka bibundeli ya mosuni mpo na kofandisa malamu bokonzi na ye ya politike. Lisusu, na mayele mabe ya politike, abomisaki bato mosusu kati na libota na ye mpenza mpe bato mosusu zongozonga na ye. Nzokande, Yesu alobaki ete “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te. Soko bokonzi na ngai ezalaki na mokili oyo, mbele bato na ngai babundi.” (Yoane 18:36) Yango wana apesaki etinda oyo na Petelo: “Zongisa mopanga na yo na esika na yango. Mpo ete baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.”-Matai 26:52.

11. Kostanté apusaki bato basambela ekulusu na mokano nini?

11 Mokanda Etranges survivances (na Anglais) elobi boye na ntina na Kostanté mpe na ekulusu na ye: “Ntembe ezali te ete asalaki nyonso wana na mikano ya politike; elembo oyo atelemisaki ezalaki kobenda baklisto oyo bazalaki kati na mampinga na ye, mpe epai mosusu ezalaki kobenda ba Gaulois [bapakano] . . . Na miso na bapakano yango, elembo wana ezalaki ndanga ete nzambe na bango moi azali kosunga bango. Yango wana, ‘elembo ya likoló’ oyo Kostanté amonaki eutaki na Nzambe te soko mpe na Klisto. Ezali nde elembo ya bapakano.

Ebongi kosambela eloko oyo babomelaki moto?

12, 13. Mpo na bantina nini mosusu ebongi te kosambela ekulusu?

12 Ata soki totiki makambo oyo nyonso pembeni mpe tondimi ete Yesu akufaki likoló na ekulusu, ata bongo, ebongi solo kosambela eloko oyo babomelaki moto? Te, mpamba te Yesu abomamaki lokola mosali na mabe, motindo moko na basali mabe oyo babomamaki penepene na ye, mpe lolenge oyo ya kufa ezalaki kolakisa ye lokola mosali na mabe, nzokande asalaki mabe moko te. Baklisto ya ekeke ya liboso batalelaki te ete eloko oyo babomelaki Yesu Klisto ezali bulee. Kosambela eloko wana, mbele elimbolaki ete bazali kokumisa baoyo babomaki Yesu.

13 Soki moko na balingami na yo abomami na bifundeli ya lokuta, yo okokamata elembo ya eloko oyo babomelaki ye (nsinga, kiti ya kurá to monduki) mpo na kopwepwa yango, kopelisa buji liboso na yango, to kolata yango na nkingo lokola eloko ya bulee? Okosala yango te. Ezali ndenge moko na likambo etali kosambela ekulusu. Ezali motindo moko ya bopakano mpe ya mbindo.

14. Mpo na ekulusu, makambo ya kala mpe makambo mazwami na Biblia mapusi biso na kosukisa nini?

14 Kosambela ekulusu ezali motindo ya boklisto te. Ezali elembo ya bolingo te mpo na Nzambe mpe mpo na Klisto, kasi ezali kotiola mitinda na bango. Ezali kobuka mibeko ya Nzambe oyo mipekisi kosambela bikeko. Ezali kokumisa elembo moko ya bapakano oyo mangomba epakoli yango nkombo ya boklisto. (Exode 20:4, 5; Nzembo 115:4-8; 1 Bakolinti 10:14) Moto nyonso oyo azali kotalela elembo moko ya bopakano ete ezali bulee azali kobuka mobeko oyo ya Nzambe: “Bokangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima. Mpo ete koyokana nini ezali kati na boyengebene mpe mabe? . . . bosimba eloko na mbindo te.​—2 Bakolinti 6:14, 17.

Tobatela Liloba lipemami

15. Mpo na nini tosengeli kobwaka mitindo mizangi boyokani na Liloba na Nzambe?

15 Engebene Mangomba, mitindo lokola oyo ya kosambela ekulusu ezali moko na “mitindo ya bulee”. Kasi baoyo balingi Nzambe bakobwaka motindo nyonso oyo eyokani na Liloba na ye te. Kati na Liloba yango nde tozali kokuta oyo esengeli mpenza mpo na kosalela losambo ya solo, lokola endimisi yango maloba oyo ya Paulo epai na Timote: “Longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulee, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.” (2 Timote 3:15-17) Elobami esika moko te kati na Biblia ete tosengeli kotosa mitindo ya bopakano mpo na kozwa lobiko.

16. Yesu alobaki nini epai na bakonzi na mangomba na Bayuda na ntina na malako na bango ya bonkoko?

16 Uta kala, boyokani ezali te kati na Makomami mpe mitindo ya bato. Eleko ezalaki longwa Makomami na liebele mapemami masilaki kokomama, kino koya na Yesu, bakonzi na mangomba Bayuda babimisaki mitindo mingi ya bonkoko mizangi kopemama na Nzambe; na nsima bakomaki mitindo yango na mokanda. Mingi kati na mitindo yango ezalaki na boyokani te na Makomami. Yango wana Yesu alobaki epai na bakonzi na mangomba: “Mpo na nini bino bokobukaka mibeko na Nzambe mpo na [kolanda] mateyo na bino [moko]? . . . Boye mpo na mateyo na bino bobebisi Liloba na Nzambe.” (Matai 15:1-6, 9) Yesu akamataki malako ya bato te mpo na koteya yango; mateya na ye mautaki ntango nyonso na Liloba na Nzambe epemami.​—Matai 4:4-10; Malako 12:10; Luka 10:26.

17. Mpo na nini tokoki kotalela Biblia lokola longo makasi mpo na elikya na biso?

17 Mokumba ya kobatela “Liloba na bomoi”, Nzambe atikaki yango na maboko ya bato te oyo bakolandaka malako na bango ya bonkoko. (Bafilipi 2:16) Na nzela na elimo santu na ye na nguya, apemisaki Biblia, mpo ete “tozala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na Makomami”. (Baloma 15:4) Koloba ete Biblia ezali ya kokoka te mpe ete esengeli lisusu kotalela makanisi ya bato bazangi kokoka mpe bazangi kopemama, wana ekomi koangana nguya ya Nzambe. Mozalisi na nguya nyonso mpe na nkembo mingi na molongo akokaki kozanga nguya ya kosala mokanda? Asalaki yango, na motindo boye ete tozala na longo makasi mpo na elikya na biso mpe tozimbisama te na mitindo mpe malako ya bato oyo kotosa yango elimboli kobuka mibeko ya Nzambe. Yango wana Liloba na ye elobi ete: “Bobima libanda na Makomami te.”(1 Bakolinti 4:6, M.N.) Baoyo solo balingi Nzambe bazali kosimba toli oyo na motema na bango.​—Tala lisusu Masese 30:5, 6.

‘Totosa mibeko na ye’

18. Soki tolingi Nzambe solo, etinda nini tosengeli kotosa yango?

18 Na 1 Yoane 5:3 totangi boye: “Bolingo na Nzambe elimboli boye ete totosa mibeko na ye”. Ntango bakonzi na mangomba bazali kobebisa mibeko yango, bazali kokipe yango te to bazali kotia malako ya bato na esika na yango, malako oyo mazali kotelemela yango, wana bazali kopusa bandimi na bango ete batelemela mokano na Nzambe. Totalela motinda moko ya moboko ya losambo ya boklisto; oyo etali bolingo. Yango ezalaki katikati na koteya na Yesu, oyo alobaki: “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—Matai 22:39.

19. (a) Bolingo ezali na esika nini kati na baklisto ya solo? (b) a nini “lilako ya sika” oyo Yesu apesaki na ntina na bolingo ekeseni na oyo ya kala?

19 Bolingo oyo ya mozalani ezali na motuya nini mpo na baklisto ya solo? Lokola Yesu alobaki yango, baklisto ya solo bazali koyebana na bolingo oyo ezali kati na bango. Tala maloba na ye: “Nazali kopesa bino lilako na sika ete, Bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:34, 35) Ya solo, Mibeko mipesamaki na Yisraele ya kala mizalaki na etinda ya ‘kolinga mozalani na yo lokola yo moko’. (Levitike 19:18) Kasi etinda ya Yesu ebengamaki ete ya sika, mpamba te abakisaki liloba oyo ete “lokola ngai nalingi bino”. Epesaki kilo mingi na bolingo ya boklisto. Na yango, moklisto asengeli kondima kopesa bomoi na ye mpo na bandeko na ye kati na kondima, lokola Yesu asalaki yango.

20. Engebene lisolo ya ntango na biso, banani bazali kotosa etinda oyo ya ‘kolingana’?

20 Na mikolo na biso, basaleli ya solo ya Nzambe bayebani na bolingo makasi oyo esangisi bango na mokili mobimba. Nani, na mikolo na biso, azali kotosa bongo mibeko ya Nzambe mitali bolingo? Baklisto nini banyokwamaki, batyamaki na boloko to na ba camps de concentration, bamosusu kino kobomama mpo ete baboyaki kokamata bibundeli mpo na kokenda kobundisa bandeko na bango baklisto mpe ata bato oyo bazali bandimi te na mikili misusu? Lisolo ya ntango na biso eyanoli ete: bobele ba Témoins de Jéhovah.

21. Mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali kotosa lilako oyo etindi ete baklisto balinga baklisto mosusu?

21 Kasi mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali ntango nyonso kobuka mibeko ya Nzambe oyo mitali bolingo. Na bitumba nyonso oyo bisalami na ntango na biso oyo, bakonzi na Mangomba na boklisto ya mokili oyo bapusaki bandimi na bango ete bakende na bitumba mpe babomana; na motindo yango, bamilió kati na bango babomanaki. Baprotestá babomaki baprotestá, bakatolike babomaki bakatolike. Nzokande, Liloba na Nzambe elobi polele ete: “Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te. Tozwi mpe lilako oyo epai na ye ete oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”​—1 Yoane 4:20, 21.

22. Engebene ndimbola epesami na 1 Yoane 3:10-12, mangomba ya boklisto ya mokili oyo bazali bana ya nani, mpe mpo na nini?

22 Totangi lisusu boye kati na Liloba na Nzambe: “Bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo: moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. Yango wana nsango eyoki bino longwa na ebandeli ete tolingana. Pelamoko Kaina te, oyo autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye.” (1 Yoane 3:10-12) Mangomba ya boklisto ya mokili balobi ete bazali bana na Nzambe, kasi ekoki kozala bongo te mpamba te bazali kobuka polele mibeko na Nzambe mitali bolingo, mpe ‘bazali koboma bandeko na bango’. Bazali bana na “oyo mabe”. Yango wana Liloba na Nzambe epesi toli oyo epai na bato na motema sembo oyo bafandi naino kati na mangomba ya lokuta: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te.” (Emoniseli 18:4) Mosika te Nzambe akokokisa bikateli na ye likolo na mangomba nyonso ya lokuta, mpe bato oyo batikali kuna bakokufa elongo na yango. (Emoniseli 17:16) Nzokande, “ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko”.​—1 Yoane 2:17.

Bozongeli

◻ Mpo na nini kobongola liloba stauros ete “ekulusu” ezali libunga?

◻ Kosambela ekulusu ebandaki wapi, mpe mpo na nini tosengeli kobwaka momeseno yango?

◻ Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na oyo etali lolenge ya kotalela malako ya bato oyo mangomba bazali koteya?

◻ Makambo nini mamonisi banani bazali kotosa lilako oyo etindi ete baklisto balingana?

[Etanda/​Bililingi na lokasa 13]

EBANDELI YA EKULUSU

Naino lisangá ya boklisto ebotamaki te, mitindo mingi ya ekulusu mizalaki kosalelama uta kala lokola bilembo ya losambo bipai nyonso kati na mokili.

Crux ansata ezalaki elembo ya bomoi bokoya mpo na Baezipito na Kalakala.

Crux quadrata ezalaki elembo na biloko minei, oyo bakanisaka ete, uta na yango, biloko nyonso bizalisamaki.

Crux gammata, balobaka ete ezalaki elembo ya móto to ya moi, mpe na nsima ekomaki elembo ya bomoi.

Ekulusu ebengami la croix latine, epalangani mingi kati na boklisto ya mokili oyo.

Ekulusu oyo ezali monogramme ya makomi mibale ya ebandeli ya liloba “Klisto” na monoko ya greke.

[Elilingi na lokasa 12]

Klisto akufaki likoló na eteni na nzete moko mpamba oyo epikami sembo na mabelé kasi akufaki likoló na ekulusu te.

[Bililingi na lokasa 14]

“Balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali koangana ye.”​—Tito 1:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto