Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 nk. 18-20
  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezalaki ekulusu?
  • Ekulusu eutá wapi?
  • Oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kondima
  • Ekulusu ezali mpo na baklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Oyo elimboli bolingo na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Ekulusu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 nk. 18-20

Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?

BUKU moko elobi ete: “Ekulusu ezali elembo oyo mangomba mingi ya bokristo esalelaka.” Bililingi mingi ya mangomba mpe ya bato ya ntɔki elakisaka Yesu babɛti ye nsɛtɛ likoló ya ekulusu. Mpo na nini elembo yango epalangani mingi na mangomba ya bokristo? Yesu akufaki mpenza likoló ya ekulusu?

Bato mingi bakoluka eyano na Biblia. Na ndakisa, Bible na lingala ya lelo oyo, elobi ete na ntango oyo Yesu abomamaki, bato oyo bazalaki wana bazalaki kosɛka Yesu mpe kosɛnga ye “akita na kuruze.” (Matai 27:40, 42) Mabongoli mingi mosusu ya Biblia elobaka mpe bongo. Mpo na Simo moto ya Sirene, Bible na lingala ya lelo oyo elobi ete: “Basoda batindi ye na makasi ámema kuruze ya Yezu.” (Marko 15:21) Na bavɛrsɛ oyo, liloba “ekulusu” ebongolami na liloba ya Grɛki stauros. Ezali mpenza na ntina oyo etindaki bato bábongola bongo? Na ebandeli liloba yango ezalaki na ndimbola nini?

Ezalaki ekulusu?

Moto moko ya mayele oyo azali Mogrɛki, William Vine, alobi ete liloba stauros “elimboli libosoliboso nzete oyo ezali semba to likonzí. Na banzete wana nde bazalaki kobɛta bato mabe nsɛtɛ mpo na koboma bango. Ezala liloba yango to verbe stauroō, kobaka na nzete, na ebandeli ekesanaki na ekulusu oyo esalemi na mabaya mibale, oyo moko ekatisá mosusu ndenge mangomba esalelaka.”

Diksionɛrɛ moko (The Imperial Bible-Dictionary) elobi ete liloba stauros “elimboli libosoliboso nzete, oyo ezali semba, to eteni ya nzete oyo bakoki kokakisa eloko nyonso likoló na yango, to oyo bakoki kopika na mabele.” Diksionɛrɛ yango ekobi boye: “Emonani ete ata epai ya Baroma liloba crux (na Latin, epai liloba ekulusu eutá) na ebandeli ezalaki kaka nzete moko oyo ezali semba.” Na yango, tokoki kokamwa te ete buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Na ntembe te, na ebandeli ekulusu ezalaki kaka nzete moko oyo ezali semba, oyo bazalaki kobongisa yango na nsonge.”

Ezali na liloba mosusu ya Grɛki, xulon, oyo bakomi ya Biblia basalelaki mpo na kolobela eloko oyo Yesu abomamaki. Buku mosusu (A Critical Lexicon and Concordance to the English and Greek New Testament) elimboli xulon lokola “eteni ya nzete, to ya libaya.” Ekobi koloba ete ndenge moko na stauros, xulon “ezalaki na yango kaka nzete moko ya semba to likonzí oyo Baroma bazalaki kobɛta na yango bansɛtɛ bato oyo basengelaki kobakama na ekulusu.”

Na boyokani ya likanisi wana, tomoni ete Biblia haut fleuve elobi na Misala 5:30 ete: “Nzambe ya batata na biso asili kosekwisa Yesu oyo bino bobomaki ye na kobakisa ye na nzete [xulon].” Kasi, atako mabongoli mosusu ebongolaka stauros na “ekulusu,” ebongolaka mpe xulon na “nzete.” Na ntina na Yesu, mokanda ya Misala 13:29, na Biblia haut fleuve elobi ete: “Wana esilaki bango kokokisa makambo nyonso masili kokomama na ntina na ye, bakitisi ye na nzete [xulon], mpe batii ye na lilita.”

Na kotalela ndimbola ya maloba ya Grɛki stauros mpe xulon, buku (Critical Lexicon and Concordance) oyo totángaki liboso elobi ete: “Maloba wana mibale eyokani te na likanisi ya ekulusu oyo tozali na yango lelo, oyo tomesani lelo komona na bililingi.” Na maloba mosusu, oyo bakomi ya Evanzile balobi ntango basalelaki liloba stauros ezalaki soki moke te ndenge moko na oyo bato babengaka lelo ekulusu. Kasi, na boyokani ya likanisi yango, Biblia Libongoli ya mokili ya sika esaleli maloba “nzete ya mpasi” na Matai 27:40-42 mpe na bisika mosusu oyo liloba stauros ezali. Ndenge moko, Biblia moko (Complete Jewish Bible) esaleli maloba “nzete ya koboma bato.”

Ekulusu eutá wapi?

Soki Biblia elobi mpenza te ete Yesu abomamaki likoló ya ekulusu, mpo na nini mangomba nyonso oyo elobaka ete eteyaka Biblia mpe etosaka yango​—Katolike, Protesta mpe Ɔrtɔdɔkse—​ekembisaka bandako-nzambe na bango na ekulusu mpe basalelaka yango lokola elembo ya kondima na bango? Ndenge nini ekulusu ekómaki elembo oyo mangomba mingi esalelaka?

Eyano ezali ete kaka bandimi te oyo balobaka ete batosaka Biblia nde bakumisaka ekulusu, kasi mpe baoyo batosaka Biblia te mpe oyo losambo na bango ezalaki liboso mpenza ya mangomba ya “bokristo.” Babuku mingi oyo elobelaka makambo ya mangomba endimaka ete kosalela bikulusu ya minene ndenge na ndenge mpe ya lolenge ekeseni ebandaki kala ntango bato bakolisaki mayele na bango. Na ndakisa, na makomi ya hyéroglyphe ya Ezipito ya kala mpe bililingi ya banzambe na bango ya mibali mpe ya basi ezalaki kolakisa mbala mingi ekulusu oyo ezali lokola lɛtrɛ T oyo ezali na sɛrklɛ na likoló. Ezalaki kobengama ansate, elingi koloba ekulusu oyo bazalaki kokanisa ete ezali elembo ya bomoi. Na nsima, ekulusu yango endimamaki mpe ekómaki kosalelama mingi na Lingomba ya copte mpe na mangomba mosusu.

Buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Emonani lokola ete lolenge ya liboso mpenza ya ekulusu ezali oyo bazalaki kobenga ‘gamma’ (crux gammata), oyo bato ya mayele ya kala bayebaki malamu mpe bato oyo bayekolaka arkeoloji oyo ezalaki liboso istware ekomama babengaki yango na monɔkɔ ya Sanskrit, swastika.” Ba-Hindu na Inde mpe Ba-Boudha na Azia mobimba bazalaki kosalela elembo yango mingi mpe kino lelo oyo elembo yango ekembisaka bisika yango.

Eyebani mpenzampenza te ntango oyo ekulusu endimamaki lokola elembo ya “bakristo.” Buku (Vine’s Expository Dictionary of New Testament Words) elobi ete: “Na katikati ya siɛklɛ ya misato ya ntango na biso, ekoki kozala ete mangomba etikaki mateya mosusu ya bokristo to ebongolaki yango. Mpo na kobakisa lokumu ya bakonzi ya mangomba oyo bapɛngwaki, bandimaki bapakano na kati ya mangomba atako babandaki te kondima mateya ya bokristo, mpe batikaki bango bákoba kosalela bilembo mpe bililingi na bango ya bopakano,” ezala mpe ekulusu.

Bakomi mosusu balobelaka likambo oyo Constatin, mosambeli ya nzambe-moi alobaki ete, na mobu 312 ya ntango na biso, na moko ya bitumba oyo abundaki, ekoki kozala ete azwaki emonaneli ya ekulusu moko oyo ezalaki likoló ya moi, oyo bakomaki na Latin “in hoc vince,” oyo elimboli (okolonga na nzela na yango). Na nsima, bakómaki kotya elembo wana ya “bokristo” na bendele, banguba mpe bibundeli ya basoda na ye (Talá elilingi oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi.) Ekoki kozala ete Constatin akómaki mokristo, kasi abatisamaki mbula 25 na nsima, ntango azalaki kobɛla makasi mpe azalaki pene na liwa. Bato mosusu bayebaka te nini etindaki asala bongo. Buku moko (The Non-Christian Cross) elobi ete: “Na esika ya kolanda mateya ya Yesu, Constatin azalaki nde koluka kobongola mateya ya bokristo na eloko mosusu, mpo bato na ye bándima yango.”

Banda wana, bato bakómá kosalela bikulusu ndenge na ndenge, ya mike mpe minene. Na ndakisa, diksionɛrɛ moko (The Illustrated Bible Dictionary) eyebisi biso ete oyo bato babengaka ekulusu ya Mosantu Anthony “esalemaki lokola lɛtrɛ T ya monene, mpe bato mosusu bakanisaka ete ezali elembo oyo eutá na nzambe Tamuze ya [Babilone], lɛtrɛ tau.” Ezalaki mpe na ekulusu ya mosantu André, oyo basalaki yango lokola lɛtrɛ X, mpe ezali ekulusu ya banzete mibale (oyo nzete moko ekatisá mosusu) oyo eyebani mingi, oyo nzete na yango ekitá mwa moke. Ekulusu yango, oyo babengaka ekulusu ya Latin, ezali oyo bato balobaka na libunga nyonso ete “ekokani na ekulusu oyo Nkolo na biso akufaki.”

Oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kondima

Biblia emonisi ete na siɛklɛ ya liboso, bato mingi oyo bayokaki Yesu bakómaki bandimi mpe bandimaki motuya ya mbeka ya lisiko na ye. Biblia elobi ete ntango ntoma Paulo asakwelaki Bayuda na Korinti, mpe amonisaki ete Yesu azali Kristo, “Krispusi mokambi ya sinagoga andimelaki Nkolo, ndenge moko mpe bato nyonso ya ndako na ye. Mpe mingi kati na Bakorinti oyo bayokaki babandaki kondima mpe kobatisama.” (Misala 18:5-8) Na esika ya kokɔtisa bilembo to bililingi mosusu ya mangomba na losambo na bango, Paulo ayebisaki baninga na ye bakristo ‘bákima losambo ya bikeko’ mpe misala mosusu nyonso ya losambo ya bapakano.​—1 Bakorinti 10:14.

Bato ya istware mpe bato oyo basalaka bolukiluki bamoni ete ezali na eloko moko te oyo endimisi ete bakristo ya liboso bazalaki kosalela ekulusu. Likambo ya esengo, buku moko (History of the Cross) etángi mokomi moko ya pene ya nsuka ya siɛklɛ ya 17 oyo atunaki ete: “Ekoki kozala likambo ya esengo epai ya Yesu oyo apambolami amona bayekoli na ye bazali kokumisa elilingi ya eloko oyo babomaki ye likoló na yango, oyo ayebi ete anyokwamaki kaka mpamba mpo na yango, mpe atyolamaki mpo na yango?” Okoki kopesa eyano nini?

Losambo oyo Nzambe andimaka esɛngaka te bikeko to bililingi. Paulo atunaki boye: “Boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?” (2 Bakorinti 6:14-16) Esika moko te Makomami emonisi ete mokristo asengeli kosalela eloko lokola oyo babakaki Yesu na nzete na losambo na ye.​—Talá mpe Matai 15:3; Marko 7:13.

Kasi, eloko nini emonisaka mpenza bakristo ya solo? Ezali ekulusu to elilingi moko boye te, kasi nde bolingo. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Oyo bakomi ya Evanzile balobeli ezalaki soki moke te ndenge moko na oyo bato babengaka lelo ekulusu

[Elilingi na lokasa 18]

Liyemi moko ya siɛklɛ ya 17, oyo babomaki moto likoló ya stauros, euti na Lipsius “De Cruce”

[Elilingi na lokasa 19]

Efelo ya ezipito oyo batyá mayemi (siɛklɛ ya 14 L.T.B.) ezali kolakisa ekulusu babengi ansate, elembo ya bomoi

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© DeA Picture Library/​Art Resource, NY

[Elilingi na lokasa 19]

Ekulusu ya gamma na Laxmi Narayan na tempelo ya Hindu

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]

Euti na buku The Cross in Tradition, History, and Art (1897)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto