Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 lok. 29
  • Papyrus Nash: Maniskri ya motuya mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Papyrus Nash: Maniskri ya motuya mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo mazali na papyrus Nash
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Biblia ebatelamaki na ndenge ya kokamwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Loyembo ya mbu”—Maniskri oyo ekomamaki na kati ya bileko mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Boyekoli nimero 5—Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 lok. 29

Papyrus Nash: Maniskri ya motuya mingi

NDENGE nini koyeba sikisiki mbula ya maniskri ya Biblia na Liebele? Ezali motuna oyo John Trever akutanaki na yango na 1948, ntango amonaki mpo na mbala ya liboso rulo ya mokanda na Yisaya, moko na bamaniskri ya la mer Morte. Lolenge ya makomi ebulunganisaki ye. Ayebaki ete yango nde esengelaki kopesa ye nzela na kososola mbula ya maniskri wana, kasi alingaki kokokanisa yango na oyo wapi? Akomaki na bosukisi oyo ya malamu: Kokokanisa yango na makomi ya papyrus Nash. Mpo na ntina nini? Maniskri yango ezali nini, mpe eutaki epai wapi?

Papyrus Nash ezali bobele biteni minei ya banzela 24 ya makomi na Liebele oyo ezali na bonene penepene ya ba centimètre 7,5 na bonene mpe 12,5 na bolai. Nkombo na yango euti na W. Nash, secrétaire ya Société d’archéologie biblique, oyo asombaki yango epai na Moezipito moko moto ya mombongo na mobu 1902. Na mbula oyo elandaki, enyatamaki na S. A. Cooke kati na mokanda Proceedings, moko na mikanda ya société yango, mpe akabaki yango na bibliothèque ya université Cambridge (Angleterre), esika ezali kino lelo oyo. Motuya monene ya eteni wana ya papyrus euti na mbula na yango. Bayekoli ya Biblia bakanisi ete ekomamaki na ekeke ya mibale to ya liboso, liboso ya ntango na biso. Ezali bongo eteni ya makomi na Liebele ya kala koleka mosusu nyonso.

Ntango John Trever asalaki bokokanisi ya diapositive couleur ya papyrus Nash elongo na rulo oyo azalaki na yango liboso na ye, atalelaki penepene lolenge ya nkoma moko moko. Na ntembe te, nyonso ekokanaki. Atako bongo, azalaki kokakatana mpo na kondima ete mokanda monene oyo ekundolami kala mingi te ezala na mbula lokola papyrus Nash. Nsima na ntango, likanisi na ye emonanaki sembo. Rulo ya Yisaya oyo ekundolamaki penepene ya la mer Morte ekomamaki solo na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso.

Makambo mazali na papyrus Nash

Botaleli ya makomi ya papyrus Nash emonisi ete banzela 24 na yango nyonso ekokana te: ezali kozanga nkoma moko to makomi mingi na nsuka moko. Ezali na biteni ya Mibeko Zomi euti na Exode mokapo ya 20, mpe mwa ba versets ya Deteronome mikapo ya 5 mpe ya 6. Ezali maniskri ya Biblia lokola bamaniskri mosusu te, kasi mokanda ya biteni ya makomi esalemi na mokano moko sikisiki. Ekokaki mpenza kozala mokanda ya kolakisa mpo na kokundwela Bayuda mikumba na bango epai na Nzambe. Eteni moko oyo ebandi na Deteronome 6:4, ebyangami Shema, ezalaki mbala na mbala kozongelama. Verset yango elobi ete: “Yoka, ɛ Yisraele: Jéhovah, Nzambe na biso, azali bobele ye moko Jéhovah.”

Tétragramme, YHWH, “Jéhovah,” ezali komonana mbala mibale na verset yango, na nzela ya nsuka ya papyrus, mpe na bisika mosusu mitano. Lisusu, emonani mbala moko esika nkoma moko na yango ezali kozanga.

Makomi wana to Shema ekomamaki mpo na komonisa “bomoto ya Nzambe oyo ekokani na mosusu te.” Engebene Talmud ya Bayuda (Berachoth 19a), liloba ya nsuka ’E-chadh’ (“Moko”), “esengelaki koyokana makasi ntango bazali kotanga yango, na kokatakata syllabe moko moko.” (W. Oesterley mpe G. Box.) ’E-chadh’ wana molai, oyo ezali kolobela Nzambe, ezalaki mpe kosakola ezalela na ye oyo ekokani na mosusu te.

Lelo oyo basili kokundola ebele ya bamaniskri oyo ezali na lolenge ya papyrus Nash, mingi mpenza kati na barulo ezwami na mibéngá ya mabongo ya ebale Motane, pene ya Qumran. Botaleli ya sikisiki ya maniskri yango emonisi ete mingi na yango ekomamaki na ekeke ya liboso to ya mibale liboso ya ntango na biso.a Atako etikali lisusu te maniskri ya kala mingi ya Liebele, papyrus Nash ezali ntango nyonso eloko ya motuya. Ezali yango moko maniskri ya Biblia na Liebele oyo ezwami na Ezipito mpe ezali bileko mpenza ya kala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala Mosenzeli ya 15 avril 1991, nkasa 11-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto