Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/4 nk. 2-4
  • Mɔ́tɔ na lifelo: ezali kopela to ezali kozimama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mɔ́tɔ na lifelo: ezali kopela to ezali kozimama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozonga ya lifelo
  • Mituna oyo mibimisami
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Banani bakendaka na lifelo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Liteya oyo epalangani mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/4 nk. 2-4

Mɔ́tɔ na lifelo: ezali kopela to ezali kozimama?

MOTEYI ya lingomba ya protesta Jonathan Edwards azalaki na momeseno ya kobangisa bato oyo, na ekeke ya zomi na mwambe, bakendeki kofanda na Amerika, na bililingi na ye ya lifelo. Mokolo mosusu amonisaki kati na elilingi moko ete Nzambe akakisaki basumuki likoló na mɔ́tɔ lokola mampulútutú ya mbindo. Edwards apamelaki bato na ye ete: “Ɛɛ mosumuki, okakisami na nsinga moke, oyo mɔ́tɔ na nkele na Nzambe ezali kozikisa yango, mpe ezali ntango nyonso pene ya kotumba yango mpe kozikisa yango nyonso.”

Nzokande, ntango moke nsima wana Edwards apesaki lisoló na ye wana ya nsomo, mɔtɔ ya lifelo ebandaki bongo kozimisama.a Mokanda Kokwea ya Lifelo, (na Lingelesi) ya D. P. Walker, emonisi ete “Na boumeli ya mobu ya ntuku minei ya ekeke ya zomi na mwambe liteya ya konyokwama ya basumuki mpo na libela etyamelamaki ntembe na polele.” Na boumeli ya ekeke ya ntuku mibale, mɔtɔ ya lifelo elandaki kozimisama, mpe na katikati ya ekeke ya ntuku mibale, likanisi ya Edwards oyo emonisi lifelo lokola ˈepelelo ya mɔtɔ epai basali mabe bakonyokwama na makanisi na bango mpe na nzoto na bango mpo na libela,ˈ ezalaki kolobelama lisusu te. Mokomi ya bazulunalo Jeffrey Sheler amonisaki ete: “Ekweisami na bato ya mayele ya ntango na biso mpe elembisami na mɔtɔ ya Hiroshima mpe kobomama monene ebyangami Holocauste, likanisi ya nsomo ya lifelo esili kobungisa nguya na yango.”

Bateyi mingi basili kobungisa mposa na bango ya kolobela mɔtɔ mpe sufulu. Mateya ya nguya na ntina na nsomo ya lifelo esili kolimwa epai na bateyi ya mangomba minene ya boklisto ya lokuta. Mpo na batéolojié mingi, ngala ya lifelo esili koleka mpo na bato na mayele. Esili koleka mwa mibu, mokomi moko ya lisolo ya mangomba asalaki bolukiluki kati na ba index ya bazalunalo mingi ya bato na mayele mpamba te asengelakski kopesa diskur moko na ntina na lifelo kati na université moko. Azwaki ata motó na likambo moko te ete “lifelo.” Engebene zulunalo Newsweek mokomi wana ya makambo ya kala asukisaki ete: “Lifelo esili kolimwa. Mpe moto moko te atyaki likebi na likambo yango.”

Kozonga ya lifelo

Elimwaki? Mpenzempenza te. Na kokamwa, na mibu oyo miuti koleka liteya ya lifelo ezongaki lisusu na bisika mosusu. Bolukiluki oyo esalemaki na Amerika emonisi ete motuya na bato bazali koloba ete bandimaka lifelo ebakisamaki longwa na 53% na 1981 kino na 60% na 1990. Bakisa na yango kopalangana na mokili mobimba ya bituluku oyo bizali koteya lifelo, mpe ekomi polele ete bozongi moke ya lifelo na makanisi ya boklisto ya lokuta esili kokoma solo likambo ya mokili mobimba.

Kasi bozongi wana ezali kosimba bobele bato oyo balakisami kati na mangomba, to esili mpe kosimba bakonzi ya mangomba? Ezali na ntina koyeba ete lifelo ya mɔtɔ lokola Jonathan Edwards azalaki koteya yango esili koleka mibu 250 elimwaki mpenza te epai na bakonzi na mangomba mosusu oyo baboyaka mbongwana. Na 1991, zulunalo U.S.News & World Report emonisaki ete: “Ata kati na mangomba ya minene oyo elingaka mbongwana, bilembo ezali oyo emonisi ete batéolojié babandi kokanisa mingi na ntina na lifelo koleka na mibu mingi oyo miuti koleka.” Ezali polele ete nsima na kosundolama mibu mingi, mɔtɔ ya lifelo ezongi kati na mangomba na mokili mobimba. Nzokande ebatelaki balolenge na yango ya mɔtɔ?

Mituna oyo mibimisami

Téolojié W. F. Wolbrecht azalaki na kokakatana moko te mpo na likambo yango: “Lifelo ezali lifelo, mpe mokano to makanisi ya moto moko te ekoki kosala ata likambo moke na etumbu ya seko.” Bato mingi ya lingomba bandimi yango mpenza te. Atako bazali na ntembe te likoló na lifelo, kasi bazali na mituna etali lolenge ya lifelo. Téolojié mosusu andimaki yango ete: “Mpo na ngai mpe, lifelo ezali solo oyo ekoki kotyamela ntembe te, eyebisami polele na litatoli ya Biblia, kasi lolenge na yango mpenza nde ezali na mokakatano.” Ee, mpo na motuya monene ya batéolojié mpe ya bato na mongomba, lelo oyo motuna ezali lisusu te “Lifelo ezali?” kasi, “Lifelo ezali nini?”

Okopesa eyano nini? Bayebisaki yo nini na ntina ya lolenge na lifelo? Mpe mpo na nini baklisto ya sembo bazali kobulungana na liteya yango?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na le 8 Juillet 1741, Edwards asalaki lisoló oyo elobi ete: “Basumuki na maboko na Nzambe ya nkanda.”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover: Doré’s illustration of Tumult and Escape for Dante’s Divine Comedy

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Doré’s illustration of Devils and Virgil for Dante’s Divine Comedy

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto