Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/11 lok. 3
  • Liteya oyo epalangani mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya oyo epalangani mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makanisi ya bakonzi ya mangomba
  • Mpo na nini likanisi na yo ezali na ntina?
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Banani bakendaka na lifelo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mɔ́tɔ na lifelo: ezali kopela to ezali kozimama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/11 lok. 3

Liteya oyo epalangani mingi

“Nazalaki kolɔta ete nazali kozika na lifelo! Nazalaki kolɔta ete babwaki ngai na esika moko ya mɔtɔ makasi mpe nazalaki kolamuka na koganga. Yango wana, nazalaki kosala makasi nasala lisumu te.”​—Arline.

YO MPE ondimaka ete lifelo ezali esika oyo ebongisamá mpo na konyokola bato ya masumu? Bato mingi bandimaka yango. Na ndakisa, na mobu 2005, moto moko ya teoloji na Iniversite St. Andrews na Écosse, alobaki ete ndambo moko likoló ya misato (1/3) ya bakonzi ya mangomba ya Écosse bazalaki kondima ete bato oyo bazali pembeni ya Nzambe te “bakonyokwama na makanisi libela na libela na kati ya lifelo.” Ndambo moko likoló ya mitano (1/5) ya bakonzi ya mangomba bazalaki kondima ete bato oyo bakokende na lifelo, bakonyokwama mpenza na nzoto.

Na mikili mingi, ebele ya bato bandimaka liteya yango. Na ndakisa, na États-Unis, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na mobu 2007 emonisaki ete bato mingi (70 %) bandimaka ete lifelo ezali. Ata na mikili oyo bato mingi basambelaka te, bato mingi bandimaka ete lifelo ezali. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Canada na 2004, emonisaki ete bato mingi (42 %) bandimaka ete lifelo ezali. Lisusu, na Grande-Bretagne, bato mwa mingi (32 %) balobaki ete bandimaka mpenza ete lifelo ezali.

Makanisi ya bakonzi ya mangomba

Bakonzi mingi ya mangomba batiki koteya ete lifelo ezali esika oyo bato banyokwamaka na mɔtɔ. Mingi bakómi koteya makanisi lokola oyo ezali na Katekisimo ya Lingomba ya Katolike, oyo ebimisamaki na 1994. Buku yango elobi ete, “Etumbu monene ya lifelo ezali kokabwana na Nzambe mpo na libela.”

Atako bongo, bato mingi bazali naino kondima ete lifelo ezali esika oyo bato banyokwamaka na makanisi to bazikisamaka na mɔtɔ. Bato oyo bateyaka likanisi yango balobaka ete euti na Biblia. Albert Mohler, mokambi ya eteyelo moko ya teoloji (Southern Baptist Theological Seminary), alobi boye: “Ezali liteya oyo euti na Makomami.”

Mpo na nini likanisi na yo ezali na ntina?

Soki lifelo ezali mpenza esika ya minyoko, osengeli kobanga yango. Nzokande, soki liteya yango ezali solo te, boye bakonzi ya mangomba oyo bateyaka yango batyaka bato oyo bandimaka yango na mobulungano mpe babangisaka bango mpamba. Tokoloba mpe ete bakoselaka Nzambe makambo.

Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi nini? Na masolo oyo elandi, tokosalela mabongoli ya Biblia ya Bakatolike mpe ya Baprotesta mpo na koyanola na mituna misato oyo: (1) Nini ekómelaka moto ntango akufi? (2) Yesu ateyaki nini na ntina na lifelo? (3) Koyeba solo na ntina na lifelo ekoki kosalisa yo na nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto