Esaleli malamu mpe esaleli mabe ya bililingi kati na losambo
LIKAMBO yango lizali kosalema na engumba ya Saint-Petersbourg, na Russie. Ezali mokolo ya le 2 Août 1914. Bato batondi na esengo, baoyo bazali koningisa bililingi ya mangomba bayangani na ndako na mokonzi. Batelemisi etumbelo moko na katikati na eteni ya ndako moko monene. Tablo moko oyo ezali na elilingi ya mwasi amemi mwana eyemami likoló na etumbelo. Elilingi wana ebyangami ete “Ngondo ya Vladimir.” Bibele bamoni yango lokola eloko ya motuya oyo eleki bosantu kati na Russie.
Bazali kokanisa ete elilingi wana esalaka bikamwiseli. Na 1812, wana mampinga ya Russie bazalaki kokende kobundisa Napoléon, général Koutouzov abondelaki liboso na yango. Sikawa, na 1914, nsima na kokotisa ekolo na ye na etumba, mokonzi Nicolas II atelemi liboso ya elilingi yango. Wana atomboli loboko na ye ya mobali, alapi ndai oyo ete: “Nalapi liboso na bato nyonso ete nakosala boyokani ya kimya te soki monguna moko azali naino na etando ya ekolo ya Russie.”
Nsima na baposo mibale, mokonzi asalaki mobembo na engumba Moscou mpo na kosenga mapamboli na Nzambe likoló na mampinga na ye. Kati na ndakonzambe Cathédrale de lˈAssomption, afukami na mabolongo mpe abondeli liboso na mwa eteni oyo ekembisami na babijou; ezali bibombelo oyo ezali na bililingi ya Yesu, ya Maria, ya baanzelu mpe ya “basantu.”
Mabondeli wana elongaki te kopengola likama. Naino mibu minei ekokaki te mampinga ya Russie ebungisaki bato koleka milio motoba, mpe basundolaki bitando mingi ya ekolo na bango. Lisusu, mokonzi, mwasi na mokonzi mpe bana na bango mitano babomamaki na lolenge ya nsomo. Boyangeli moko ya sika ekitanaki bokonzi na bango, oyo eumelaki bikeke mingi. Elikya oyo mokonzi Nicolas atyaki na bililingi ezalaki ya mpamba.
Atako bongo, lelo oyo, na Russie mpe na mikili misusu bato bazali naino kokumisa bililingi ya losambo. Ezali komema biso na kotuna mituna ya ntina. Nzambe akanisaka nini na losambo oyo epesami na bililingi wana? Ezali boni mpo na mimeseno ya kotya yango na bifelo ya ndako?
Biblia elobi nini?
Ntango Yesu azalaki na mabelé, azalaki kotosa Mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela na Moize. Mibeko yango ezalaki na mobeko ya mibale ya oyo ebengami ete Mibeko zomi, oyo elobi ete: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te, to kosalela yango te, mpo ete ngai Jéhovah Nzambe na yo nazali Nzambe na zuwa na kobatela.”—Exode 20:4, 5.
Na yango, Yesu asambelaki Nzambe na bililingi to na bikeko bisalemi na bato te. Na bokesene, lolenge na ye ya kosambela eyokanaki na maloba oyo ya Tata na ye: “Ngai nazali Jéhovah yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.”—Yisaya 42:8.
Epai mosusu, Yesu alimbolaki mpo na nini ebongi te kosambela na nzela na biloko bizali komonana. Alobaki ete: “Kasi ntango ezali koya, ee ezali sasaipi, wana basambeli ya solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo. Mpo Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye. Nzambe azali elimo mpe ekoki na basambeli na ye ete basambela ye na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:23, 24.
Motindo lokola Nkolo na bango, bayekoli ya solo ya Yesu balakisaki lolenge malamu ya kosambela. Na ndakisa, mokolo moko ntóma Paulo asololaki na etuluku moko ya bafilozofe ya Bagreke baoyo bazalaki kosalela bililingi mpo na kosambela banzambe bazangi komonana. Alobelaki bango na ntina na Mozalisi na moto mpe alobaki ete: “Ekoki na biso kobanza te ete bonzambe ezali na motindo na wolo soko palata soko libanga, na eloko ekomami na mayele mpe na makanisi na bato.” Na libaku mosusu, bobele ntóma yango alimbolaki ete baklisto ˈbazali kotambola na kondima kasi na komona te,ˈ mpe basengeli kokima ˈlosambo ya bikeko.ˈ—Misala 17:16-31; 2 Bakolinti 5:7; 1 Bakolinti 10:14.
Likambo likomelaki ntóma Petelo emonisi ete azalaki pene na kosembola misala nyonso oyo ekokaki komema na losambo ya bikeko. Ntango mokonzi na basoda Moloma Corneille akweyaki na makolo na ye, Petelo aboyaki. Atombolaki Corneille, na kolobaka ete: “Telema! Ngai mpe nazali bobele moto.”—Misala 10:26.
Mpo na ntóma Yoane, akamwaki mpenza mingi na bimononeli biuti na Nzambe ete akweaki na makolo ya anzelu moko. Anzelu akebisaki ye ete: “Tika! Ngai nazali moombo moninga na yo, mpe na bandeko na yo basakoli, na bango bakotosaka maloba na mokanda oyo. Sambela Nzambe.” (Emoniseli 22:8, 9) Ntóma ayokaki toli yango. Na bolingo nyonso, akomaki lisoló ya likambo yango mpo na litomba na biso.
Kasi boyokani nini ezali kati na makambo ya solo mayebisami awa na likoló mpe bililingi ya losambo? Na yango, soki ezalaki mabe ete Corneille afukama liboso na ntóma na Klisto, tokoloba nini mpo na losambo ya bikeko ya “basantu” oyo bizangi bomoi? Mpe soki ezalaki mabe mpo na ntóma na Klisto kofukama liboso na anzelu ya bomoi, ezali boni mpo na losambo ya bikeko ya baanzelu oyo bizangi bomoi? Na ntembe te, misala wana mizali kotemela likebisi oyo ya ntóma Yoane ete: “Bana mike, bobelema na bikeko te.”—1 Yoane 5:21.
Kokembisama mpe mwango mpo na koteya
Yango elingi koloba te ete kozala bobele na bililingi ya makambo mazali na Biblia ekokomisa biso basambeli ya bikeko. Mosenzeli ezali kosalela malamu bililingi na makambo malekaki kati na Biblia lokola mwango mpo na koteya. Tokoki mpe kosalela yango mpo na kokembisa bifelo ya bandako na biso to ya bandako minene. Nzokande, moklisto ya solo akolinga te kosalela elilingi oyo eyebani malamu ete basambelaka yango, to akotya te na efelo ya ndako tablo moko oyo ekolakisa Biblia na motindo ya mabe.—Baloma 14:13.
Bililingi mingi ya losambo ya boklisto ya lokuta ezali komonisa zolongano ya pole zingazinga na mitó ya Yesu, ya Maria, ya banzelu mpe ya “basantu.” Babengaka zolongano yango na lifanlase auréole. Eutelo ya auréole ezali epai wapi? Encyclopédie catholique (ebimeli ya 1987, [na Lingelesi]) endimi ete: “Eutelo na yango ezali ya boklisto te, mpamba te esalelamaki na basali ntoki ya bapakano mpo na kolimbola lokumu monene mpe nguya monene ya banzambe ndenge na ndenge.” Epai mosusu, mokanda Baklisto (na Lingelesi), ya Bamber Gascoigne, ezali na bafoto ya nzambe moi elongo na auréole, oyo euti na Musée capitolin ya Rome. Baloma bapakano bazalaki kosambela nzambe wana. Gascoigne alimboli ete, na nsima “auréole ya moi” esukaki na “kosalelama na losambo ya boklisto.” Ya solo, auréole ezali na boyokani elongo na losambo ya nzambe moi ya bapakano.
Ezali malamu ete bililingi oyo ezali kosangisa makambo ya Biblia elongo na losambo ya bopakano etyama na bifelo ya ndako na moklisto? Soko moke te. Biblia ezali kopesa toli oyo: “Esambelo na Nzambe ezali na kondimana nini elongo na bikeko? ... Jéhova alobi ete: ˈ“Yango wana, bobima kati na bango.” “Bomama eloko na mbindo te”; “mpe boye nakoyamba bino.”ˈ”—2 Bakolinti 6:16, 17.
Nsima na bileko, baoyo bazalaki komitanga baklisto babosanaki toli oyo. Lipengwi ekolaki, lokola Yesu mpe bayekoli na ye basakolaki yango. (Matai 24:24; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1) Na ebandeli ya ekeke ya minei ya ntango na biso, mokonzi ya Loma Constatin akomisaki lingomba ya boklisto ya lipengwi lingomba ya Bokonzi na Loma. Kobanda wana, ebele na bapakano bamibengaki bango moko ete “baklisto.” Bazalaki na momeseno ya kosambela bililingi ya mokonzi. Bazalaki mpe kokakisa bililingi ya bankoko na bango to ya bato mosusu ya lokumu mingi. John Taylor azali kolimbola kati na mokanda na ye Bililingi ya losambo biyemami (na Lingelesi), ete: “Na boyokani na losambo ya mokonzi, bato bazalaki kosambela bililingi na ye eyemami likoló na bilamba mpe mabaya, mpe kobanda wana kino losambo na bikeko ya mangomba ezalaki bobele likambo moke.” Losambo ya bikeko ya bapakano etikaki esika na bililingi ya Yesu, ya Maria, ya baanzelu mpe ya “basantu.”
Lolenge nini bakonzi ya Lingomba balongisaki yango?
Engebene mokanda LˈEnclopédie des religions (na Lingelesi), bakonzi na mangomba basalelaki maloba moko oyo bafilozofe ya bapakano basalelaki. Mibali lokola Plutarque, Dion Chrysostome, Maxime de Tyr, Celsus, Porphyre mpe Julien bazalaki koloba ete bikeko bizali na bomoi te. Kasi bapakano wana bazalaki kolongisa esaleli ya bikeko na kolobaka ete ezalaki kosalisa bango na kopesa losambo epai na banzambe na bango oyo bazangi komonana. Kati na mokanda na ye Ndimbola ya bililingi ya losambo (na Lingelesi), moyekoli na bililingi ya losambo, moto ya ekolo Russie Leonid Ouspensky andimi ete: “Bakonzi na mangomba basalelaki filozofi ya Bagreke, na koyokanisa elimo mpe makanisi na yango na téoloji ya boklisto.”—Tala Bakolose 2:8.
Bato mingi bamonaki ete ezali mpasi kososola bantina ya téoloji oyo esalelami mpo na kolimbola esaleli ya bililingi. Kati na Bililingi ya losambo, John Taylor alobi ete: “Bokeseni kati na kosambela oyo emonisami na elilingi ya lingomba mpe kosambela elilingi yango moko ... ezalaki mpasi mingi mpo moto mosusu oyo ayekoli mingi te akoka komona yango.”
Na bokeseni, oyo Biblia ezali koloba na ntina ya bililingi ya losambo ezali mpasi te mpo na kososola. Tokamata ndakisa ya Emilia, oyo azali kofanda na engumba Johannesburg na Afrique du Sud. Lokola azalaki Katolike ya molende, azalaki na momeseno ya kofukama mpe kobondela liboso ya bikeko. Mokolo moko, Témoin de Jéhovah moko ayaki na ndako na ye. Asepelaki na komona kati na Biblia na ye ya Portugais ete Nzambe azali na nkombo, Jéhovah. (Nzembo 83:18, Almeida) Na boumeli na moko na boyekoli na ye ya Biblia, atunaki ete: “Nasala nini mpo nazanga te kosepelisa Jéhovah?” Temwe alakisaki ye bikeko oyo bityamaki na bifelo mpe asengaki ete atanga Nzembo 115: 4-8. Na mpokwa wana, ntango mobali na ye azongaki, Emilia alimbolaki ye ete alingaki kolongola bikeko na ye ya losambo. Mobali na ye andimaki. Na mokolo molandaki na ntongo, asengaki na bana na ye ya mibali Tony mpe Emanuel ete babukabuka bikeko nyonso mpe batumba yango. Lelo oyo, nsima na mibu 25, Emilia azali kooka mawa mpo na yango? Soko moke te. Ye mpe libota na ye basili kosalisa baninga na bango ya mpembeni mingi na kokoma basambeli ya esengo ya Jéhovah.
Makambo lolenge yango mazali kosalema mbala na mbala. Na nzela ya mosala ya kozalisa bayekoli ya mokili mobimba oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa, bamilio na bato basili koyeba kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo.” Yo mpe okoki kozwa matomba na lolenge ya losambo wana oyo etombwami, mpo ete Yesu alobaki ete: “Tata azali koluka basambeli ya lolenge yango.”—Yoane 4:23, 24.
[Elilingi na lokasa 26]
Mokonzi Nicolas II azali kopambola mampinga na ye na elilingi moko ya losambo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photo by C.N.