Sambelá Nzambe “na elimo”
“Okanisi ‘te Nzambe azali lokola nani? Ekeko nini ekokani na ye?” YISAYA 40:18, “LILOBA LYA NZAMBE”
MBALA mosusu ondimaka na motema moko ete kosalela bililingi mpo na kosambela Nzambe ezali mabe te. Ntango mosusu omonaka ete yango esalisaka yo omiyoka penepene na Ye oyo ayokaka mabondeli, lokola ye amonanaka te mpe ntango mosusu omonaka lokola nde azali moto te to mpe azali te.
Kasi, okanisi mpenza ete tozali na bonsomi nyonso ya kopona lolenge ya kosambela Nzambe? Omoni te ete Nzambe nde asengeli koyebisa makambo oyo ebongi tósala mpe oyo ebongi tósala te? Yesu alimbolaki makanisi ya Nzambe na likambo yango ntango alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6, NW) Kaka maloba wana mpamba ezali komonisa ete ebongi te kosalela bililingi to biloko mosusu ya mosantu mpo na kosambela.
Ezali na lolenge ya kosambela oyo Yehova Nzambe andimaka. Yango ezali lolenge nini? Mokolo mosusu Yesu alobaki boye: “Ngonga ezali koya, mpe yango oyo sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:23, 24, NW.
Moto akoki kosala elilingi ya Nzambe oyo “azali elimo”? Te. Atako soki elilingi ezali monene, kitoko to na lokumu ndenge nini, ekoki kokokana na lokumu ya Nzambe te. Yango wana, elilingi ya Nzambe oyo bato basali ekoki te komonisa mpenzampenza ndenge oyo Nzambe azali. (Baloma 1:22, 23) Tokoki nde koloba ete moto azali ‘kosambela na solo’ soki azali kosalela elilingi oyo bato basali?
Mateya oyo ezali polele na Biblia
Mibeko ya Nzambe epekisaki kosala bililingi mpo na losambo. Na mibeko zomi, mobeko ya mibale elobaka boye: “Okosala ekeko mpo na yo te, soki elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te.” (Exode 20:4, 5) Makomami mapemami ya boklisto epesi mpe etinda ete: “Bókima losambo ya bikeko.”—1 Bakolinti 10:14.
Ya solo, bato mingi balobaka ete basambelaka bikeko te ntango basalelaka bililingi na losambo. Na ndakisa, mbala mingi baklisto ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse balobaka ete bango basambelaka mpenza bililingi te oyo bagumbamelaka, bafukamelaka, mpe babondelaka liboso na yango. Sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse akomaki boye: “Topesaka yango limemya mpamba te ezali biloko ya bosantu, lisusu mpo tomemyaka bato oyo bililingi yango ezali komonisa.”
Atako bango bazali koloba bongo, motuna oyo tosengeli komituna ezali boye: Nzambe andimaka ete bato básalela bililingi mpo na kosambela ye? Ezali ata na vɛrsɛ moko te ya Biblia oyo epesi ndingisa ya kosala makambo wana. Ntango bana ya Yisalaele basalaki ekeko ya mwana ya ngɔmbɛ, balobaki ete ezali mpo na kokumisa Yehova; kasi ye amonisaki ete aboyaki yango mpenza, alobaki ete bapɛngwi.—Exode 32:4-7.
Likama oyo bato bayebi te
Kosalela bikeko to bililingi mpo na kosambela ezali likama. Ekoki kotinda bato bábanda mpenza kosambela eloko na esika básambela Nzambe oyo balobi ete eloko yango ezali komonisa ye. Na maloba mosusu, elilingi ekómaka ekeko oyo bato bazali kosambela.
Yango nde likambo esalemaki mpo na mwa biloko mingi na ntango ya Bayisalaele. Na ndakisa, ntango Bayisalaele bazalaki koyengayenga na esobe, Mose asalaki nyoka ya ebende nsima ya kobima na bango na Ezipito. Nyoka yango ya ebende oyo batyaki yango likoló ya nzete ezalaki mpenzampenza mpo na kobikisa. Nzambe akokaki kobikisa bato soki nyoka eswi bango mpe na nsima batali nyoka wana ya ebende. Kasi, ntango bafandaki na Mokili ya Ndaka, emonani ete bakómaki kosambela nyoka yango ya ebende lokola nde yango moko ezalaki na nguya ya kobikisa. Batumbelaki yango mpaka ya malasi mpe bapesaki kutu yango nkombo Nehusutana.—Mituya 21:8, 9; 2 Mikonzi 18:4.
Bayisalaele balukaki mpe kosalela sanduku ya kondimana lokola nkisi mpo na komibatela liboso ya banguna na bango, kasi esukelaki bango mabe. (1 Samwele 4:3, 4; 5:11). Mpe na mikolo ya Yilimia, bato ya Yelusaleme bazalaki kotya likebi mingi na tempelo na esika bátya likebi na Nzambe oyo bazalaki kosambela na tempelo yango.—Yilimia 7:12-15.
Likambo ya kosambela biloko na esika ya kosambela Nzambe ezali naino makasi ata na moi ya lelo. Vitalij Ivanovich Petrenko, moto ya mayele, alobaki ete: “Elilingi ya losambo . . . ekómaka eloko oyo bato basambelaka mpe ekoki komema moto na likama ya kosambela bikeko . . . Esengeli moto ayeba ete ezali mpenzampenza momeseno oyo eutá na bapakano oyo bazalaki kosambela bililingi mpo na bindimeli na bango.” Ndenge moko mpe, Demetrios Constantelos, sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, akomaki na buku na ye (Understanding the Greek Orthodox Church) ete: “Moklisto akoki kobanda kosambela mpenza elilingi ya losambo.”
Koloba ete bililingi ya losambo ezali kaka biloko oyo esalisaka mpo na kosambela Nzambe ezali mpenza likambo ya kokeba na yango. Mpo na nini? Emonanaka te ete bato bapesaka bililingi mosusu ya Malia to ya “basantu” limemya mingi mpe bakanisaka ete ezalaka na nguya ya kosala makambo malamu koleka bililingi mosusu kaka ya moto yango oyo akufá banda kala? Na ndakisa, ezali na elilingi ya Malia na Tínos, na ekólo Grèce, oyo ezalaka na bandimi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse oyo basambelaka yango, kasi bandimi mosusu ya lingomba se moko wana basambelaka elilingi mosusu ya Malia oyo ezali na Soumela, na nɔrdi ya Grèce. Bato na bato bandimaka ete elilingi na bango nde eleki, esalaka makamwisi koleka elilingi mosusu, atako bililingi yango mibale ezali kaka ya moto moko. Na bongo, na kotala ndenge makambo ezali kosalema, tokoki koloba ete bato bakanisaka mpenza ete bililingi mosusu ya losambo ezalaka na nguya mpe basambelaka yango.
Ebongi nde tósambela “basantu” to Malia?
Kasi, tokoloba nini mpo na oyo etali kosambela bato lokola Malia to “basantu”? Ntango Satana amekaki ye, Yesu apesaki ye eyano euti na Deteronome 6:13, ete: “Okongumbamela Nkolo Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” (Matai 4:10) Na nsima alobaki ete basambeli ya solo bakosambela “Tata,” kasi moto mosusu te. (Yoane 4:23) Lokola ayebaki likambo yango malamu, anzelu moko apamelaki ntoma Yoane ntango alingaki kosambela ye; alobaki na ye ete: “Tiká! . . . Sambelá Nzambe.”—Emoniseli 22:9.
Ebongi kosambela Malia, mama oyo abotaki Yesu to “basantu” mosusu, mpo na kosɛnga bango bálobela biso epai ya Nzambe? Biblia epesi eyano polele ete: “Ezali na . . . moyokanisi kaka moko na kati ya Nzambe mpe bato, moto moko, Klisto Yesu.”—1 Timote 2:5, NW.
Kobebisa boyokani na yo na Nzambe te
Lokola Biblia ezali koteya ete esengeli kosalela bililingi mpo na kosambela te, yango ekoki kosalisa moto te mpo Nzambe andima ye mpe azwa lobiko. Nzokande, Yesu alobaki ete moto akozwa bomoi ya seko soki azwi boyebi ya Nzambe ya solo kaka moko, mpe soki ayekoli bizaleli na ye oyo eleki ya moto nyonso, mikano mpe misala na ye mpo na bato. (Yoane 17:3) Bililingi oyo emonaka te, eyokaka te, to elobaka te, ekoki kosalisa moto te ayeba Nzambe mpe asambela ye na ndenge oyo andimaka. (Nzembo 115:4-8) Moto asengeli kaka koyekola Liloba ya Nzambe, Biblia, mpo na kozwa mateya wana ya ntina mingi.
Bililingi ekoki kosalisa moto ata moke te, ekoki mpe lisusu kozala likama mpo na elimo. Na ndenge nini? Libosoliboso, ezali mpo ete ekoki kobebisa boyokani ya moto na Yehova. Mpo na Yisalaele, baoyo “basilikisaki ye na bikeko ya mbindo,” Nzambe alobaki ete: “Nakobombela bango elongi na ngai.” (Deteronome 32:16, 20, Liloba lya Nzambe) Mpo báyokana lisusu na Nzambe, esengelaki ‘bábwaka bikeko mabe ya masumu.’—Yisaya 31:6, 7, New American Bible.
Yango wana, ebongi mpenza kolanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bána ba bolingo, bóboya bikeko”!—1 Yoane 5:21, Liloba lya Nzambe.
[Etanda na lokasa 6]
Basalisaki bango básambela “na elimo”
Olivera azalaki mondimi ya molende na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na ekólo Albanie. Ntango Leta apekisaki mangomba nyonso na ekólo yango na 1967, Olivera akobaki kosambela na kobombana. Azalaki kosalela mwa mbongo oyo bazalaki kofuta ye, mingimingi mpo na kosomba bililingi ya wolo mpe ya palata, mpaka ya malasi mpe babuji. Azalaki kobomba biloko nyonso wana na mbeto na ye, mpe mbala mingi azalaki kolala na kiti pembeni mpo azalaki kobanga ete moto mosusu amona yango to báyiba yango. Ntango Batatoli ya Yehova bakutanaki na ye na ebandeli ya bambula ya 1990, Olivera akangaki ntina ete nsango oyo bamemelaki ye ezali mateya ya solo ya Biblia. Amonaki oyo Biblia elobi mpo na losambo ya solo ete esengeli kosambela “na elimo,” mpe bateyaki ye ndenge oyo Nzambe atalelaka likambo ya kosalela bililingi na losambo. (Yoane 4:24) Motatoli oyo azalaki koyekola na ye Biblia amonaki ete, mbala nyonso oyo azalaki kokende kotala Olivera, bililingi oyo ezalaki na ndako na ye ezalaki kosila se kosila. Nsukansuka, etikalaki ata moko te. Nsima ya kozwa batisimo, Olivera alobaki boye: “Lelo oyo, na esika nasalela bililingi ezangi ntina mpo na kosambela, nazali kosalela nde elimo santu ya Yehova. Nazali mpenza na botɔndi mingi mpo nakoki kozwa elimo na ye kozanga kosalela bililingi.”
Athena, mwasi moko oyo afandaka na esanga Lesbos na ekólo Grèce, azalaki mondimi ya molende mpenza na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Azalaki koyemba na korale mpe azalaki kolanda malamumalamu makambo ya lingomba, ezala mpe kosalela bililingi ya losambo. Batatoli ya Yehova basalisaki Athena na koyeba ete makambo mosusu oyo bateyaki ye eutaki na Biblia te. Moko na makambo yango ezali kosalela bililingi mpe bikulusu mpo na kosambela. Athena alingaki ete ye moko aluka ndenge oyo makambo ya kosalela biloko wana ebandaki. Nsima ya kotánga mikanda ndenge na ndenge oyo elobeli makambo yango, andimaki ete biloko yango eutá na boklisto te. Mposa na ye ya kosambela Nzambe “na elimo” etindaki ye abwaka bililingi na ye nyonso, atako ezalaki bililingi ya ntalo mingi. Atako bongo, Athena azalaki na esengo ya kobungisa mbongo mpo ete akoka kosambela Nzambe na elimo ya pɛto mpe na ndenge oyo Nzambe akondima.—Misala 19:19.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Kozala na bililingi ya losambo mpo kaka ezali kitoko, ezali mabe?
Banda mwa bambula, na mokili mobimba, bato mingi bazali kosomba bililingi ya losambo ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpo na kobomba yango. Bato oyo basombaka bililingi basepelaka na yango lokola biloko ya losambo te kasi lokola mayemi kitoko ya bato ya Byzance na ntango ya kala. Mbala mingi, okoki kokuta bililingi yango na bandako to na babiro ya bato oyo balobaka ete bandimaka Nzambe te; batyaka yango mpo na kitoko na yango.
Kasi, baklisto ya sembo babosanaka te ntina ya libosoliboso ya elilingi. Ezali eloko ya losambo. Atako baklisto bapekisaka bato mosusu te ete bázala na bililingi ya losambo, bango moko bazalaka na yango te ata mpo kaka ezali kitoko. Yango ezali na boyokani na likambo oyo ezali na Deteronome 7:26, oyo elobi ete: “Okokɔtisa eloko ya mbindo na ndako na yo te ete olakelama mabe lokola yango te. Okoyokela yango likunya mpe okoyina yango.”
[Elilingi na lokasa 7]
Nzambe andimaki te ete básalela bililingi mpo na kosambela ye
[Elilingi na lokasa 8]
Boyebi oyo euti na Biblia esalisaka biso tósambela Nzambe na elimo