Bililingi ya Losambo—Epai yango eutá
“Bililingi esalisaka biso na komiyokanisa na bolamu mpe bosantu ya Nzambe mpe Basantu na ye.” ARCHIDIOCÈSE YA LINGOMBA YA ƆRTƆDƆKSE NA AUSTRALIE.
TOZALI na sanza ya Augusto, mokolo yango molunge ezali makasi mpe moi ezali kobɛta na basikalie oyo ekei tii na monastɛrɛ “Mama ya Nzambe Oyo Aleki Bosantu,” na esanga Tínos, na Mai Monene ya Égée. Atako molunge ezali makasi, yango ezali kolɛmbisa te molende ya bandimi koleka 25 000 ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse oyo bauti bipai na bipai mpe bazali kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kokóma na esika oyo ezali na elilingi ya mama na Yesu oyo babongisá yango malamu mpenza.
Elenge mwasi moko oyo azali ebɔsɔnɔ azali konguluma na mpasi; mabɔlɔngɔ na ye ezokizoki mpe ezali kobimisa makila. Pene na ye, mwasi moko mobange oyo auti na nsuka ya mboka, azali kosala makasi mpo na kotambola atako makolo na ye elɛmbi mpenza. Mobali moko ya mbula soki 50 apɔli na motɔki ntango azali komeka koleka na kati ya ebele ya bato oyo bazali kotutanatutana. Bango nyonso bazali na mokano kaka moko: balingi kopesa elilingi ya Malia bizi mpe kofukama liboso na yango.
Na ntembe te, bandimi yango oyo bamipesi mpenza na losambo, na bosembo mpenza, bazali na mposa ya kosambela Nzambe. Kasi, bato boni na kati na bango bayebi ete kosambela bililingi ndenge wana eutá na makambo ya bato ya kala, bambula ebele mpenza liboso lingomba ya boklisto ebanda?
Bililingi ya losambo ezali bisika nyonso
Na mikili oyo Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ezali na bandimi mingi, bililingi ya losambo ezali na bisika nyonso. Na kati ya bandako-nzambe, bililingi ya Yesu, ya Malia mpe ya “basantu” ekoki kozanga te. Mbala mingi bandimi bakendaka kopesa bililingi yango bizi, batumbelaka yango mpaka ya malasi to bapelisaka babuji pembenipembeni na yango. Longola yango, ndako nyonso ya bandimi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ezalaka na esika oyo batyaka elilingi, mpe oyo basalaka mabondeli. Baklisto mingi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse balobaka ete elilingi esalisaka bango mpo na kosambela Nzambe. Bandimi mingi bakanisaka ete bililingi yango ezalaka na ngɔlu ya Nzambe mpe ete ezalaka na nguya.
Bandimi yango mbala mosusu bakoki kokamwa soki bayoki ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosalela bililingi te na losambo na bango. Buku moko (Byzantium) elobi boye: “Baklisto ya liboso bayinaki losambo ya bikeko lokola bandimi ya Lingomba ya Bayuda bazalaki mpe koyina yango, bazalaki kosepela ata moke te na losambo nyonso ya bililingi ya basantu.” Buku yango ebakisi ete: “Kobanda ekeke ya mitano na ntango na biso, bato bakómaki mokemoke kosalela bililingi to bikeko . . . ntango bazali kosambela bato ebele esika moko to moto ye moko.” Soki kosalela bililingi mpo na losambo ebandaki na baklisto ya ekeke ya liboso te, boye likambo yango eutá wapi?
Tóluka koyeba epai oyo yango eutá
Vitalij Ivanovich Petrenko, moto ya mayele, akomaki boye: “Kosalela bililingi mpe mimeseno na yango ebandá liboso kutu lingomba ya boklisto ebanda mpe ‘eutaki na mangomba ya bapakano.’ ” Bato mingi ya mayele oyo bayekolaka makambo ya kala bakanisaka mpe bongo, mpe balobaka ete momeseno ya kosambela bililingi ebandá na mangomba ya kala ya Babilone, ya Ezipito, mpe ya Grèce. Na ndakisa, bato ya Grèce ya kala bazalaki kosalela bikeko. Bazalaki kokanisa ete bikeko yango ezali na nguya ya banzambe. Bato mosusu bazalaki kokanisa ete bililingi mosusu ezali bato te nde basalaki yango, kasi eutaki na likoló, ekwei awa na mabele. Na ntango ya bafɛti minene, bazalaki komema bililingi wana ya losambo mpe kotambola na yango na engumba mobimba, mpe bazalaki kopesa yango bambeka. Petrenko alobi ete: “Mondimi azalaki kotalela elilingi ya losambo yango lokola nzambe mpenza, atako bato mosusu bamekaki . . . kokesenisa nzambe na elilingi na ye.”
Ndenge nini bindimeli mpe mimeseno ya ndenge wana ekɔtaki na lingomba ya boklisto? Kaka moto yango ya mayele alobaki ete nsima ya liwa ya bantoma ya Klisto, na bikeke oyo elandaki, mingimingi na Ezipito, “mateya ya boklisto ekutanaki na ‘mateya ndenge na ndenge ya bapakano’ oyo eutaki na bindimeli mpe mimeseno ya Ezipito, ya Grèce, ya Bayuda, ya Azia mpe ya Loma oyo basangisaki yango na bindimeli mpe mimeseno ya boklisto. Yango esalaki ete “baklisto oyo bazalaki kosala mosala ya koyema, bakómaki na mayele [ya kosangisa bindimeli] mpe bakómaki kosalela biloko ya bapakano na lolenge ya sika, atako bazalaki kolongola te makambo na yango nyonso oyo eutaki na bapakano.”
Eumelaki te, bililingi ekómaki biloko oyo eleki ntina na losambo ya moto na moto to na bandako-nzambe. Na buku na ye (The Age of Faith), Will Durant, moto ya mayele ya makambo ya kala, alimboli ndenge oyo likambo yango ebandaki: “Lokola bato bakómaki kosambela basantu ebele, bato bakómaki na mposa ya kokesenisa bango mpe ya kobosana bango te; basalaki ebele ya mayemi ya basantu yango mpe ya Malia; mpe mpo na Klisto, ezala ndenge oyo bazalaki kokanisa nzoto na ye, ezala mpe lisusu ekulusu, ekómaki biloko ya losambo—bato oyo bazalaki na mayele mingi te bakómisaki yango kutu bikelakela. Makambo ndenge na ndenge oyo bɔɔngɔ ya bato ekokaki kokanisa kosala ekómisaki biloko mosantu, bililingi mpe bikeko lokola biloko ya losambo; bato bazalaki kofukamela yango, kopesa yango bizi, kopelisa babuji pembenipembeni na yango, kotumbela yango mpaka ya malasi, kotya bafololo zingazinga na yango, mpe koluka ete biloko yango oyo bazalaki kokanisa ete ezali na nguya esalela bango makamwisi. . . . Batata ya Lingomba bazalaki kolimbola mbala na mbala na Makita minene ya Lingomba oyo ezalaki kosalema ete bililingi yango ezali banzambe te, kasi ezali kaka biloko oyo esalisaka bango bákanisaka banzambe; bato balingaki te kokesenisa makambo wana mibale.”
Lelo oyo, bato mingi oyo basalelaka bililingi ya losambo bakoki koloba ete bililingi yango ezali kaka biloko oyo bamemyaka, kasi basambelaka yango te. Bakoki koloba ete kosalela bililingi ya losambo ezali likambo moko oyo ezali mabe te, kutu oyo esengeli mpo na kosalisa bato na kosambela Nzambe. Mbala mosusu yo mpe okanisaka ndenge wana. Kasi osengeli komituna, Nzambe atalelaka likambo yango ndenge nini? Ekoki nde kozala ete komemya bililingi ya losambo ezali ndenge moko na kosambela yango? Ekoki nde kozala na makama ebombami na momeseno ya kosalela bililingi ya losambo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
Elilingi ya losambo ezali nini?
Bililingi ya losambo ekeseni na bikeko oyo basalelaka mingimingi na losambo ya Lingomba ya Katolike. Bililingi ya losambo ezalaka mayemi ya Klisto, ya Malia, ya basantu, ya baanzelu, ya bato to makambo oyo Biblia elobeli, to ya makambo oyo esalemá kala na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Mingimingi ezalaka mayemi oyo esalemi na langi likoló ya bitanda ya mabaya.
Na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse balobaka ete “na bililingi ya Basantu, mayemi na bango ekokani te na mayemi mosusu nyonso.” Lisusu, na kati ya bililingi ya losambo yango, “biloko oyo ezali na nsima emonanaka minene koleka oyo ezali na liboso.” Mbala mingi, “ezalaka na mwa elili te, to emonisaka te soki ezali moi to butu.” Bandimi bakanisaka mpe ete “Nzambe akoki kozala” na kati ya libaya mpe langi ya elilingi ya losambo.
[Elilingi na lokasa 3]
Kosalela bililingi na losambo eutá na makambo ya bapakano
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
© AFP/CORBIS