Masoló ya Basakoli na Bokonzi
Kolongobana ezali kokembisa mosala na biso
KOLONGOBANA ezali lisengami moko ya ntina mpo na baklisto. Ntoma Paulo akomaki kati na Baebele 13:18 ete: “Tozali na lisosoli na peto; tozali na mposa na kosalaka malamu na makambo nyonso.” Kolongobana na biso ˈezali kokembisa mateya na Nzambe, Mobikisi na biso na makambo nyonso.ˈ (Tito 2:10) Ezala kolongobana mpe mosala ya kosakola Bokonzi ya Baklisto mibale na bokonzi ya Tonga kati no bisanga ya Pacifique Sud, ezali kopesa litatoli ya nguya. Biro ya filiale ya Watch Tower Society oyo ezali kati na bisanga Samoa occidentales eyebisi ete:
“Na boumeli ya bambula, babalani mibale ya ba Témoins de Jéhovah balobelaki na ntina na Bokonzi na Nzambe epai na bato ya mboka minei ya esanga na bango, kasi litomba emonanaki te. Na nsima, ntango mobali na ye azalaki maladi, mwasi nde asengelaki kobatela elanga na bango mpe kokata mpe kokaukisa kokoti, eutelo ya bozwi na bango. Wana ekómaki mpo na basombi ntango ya kotala kokoti, saki ya moto moko esanganaki na basaki mitano ya ndeko mwasi. Bato na mboka bapesaki ye toli ete abomba saki wana mosusu mpe atalela yango lokola lipamboli liuti na Nzambe. Kasi ndeko mwasi aboyaki likanisi yango, mpe ntango balingaki kopesa ye mbongo mpo na motuya ya basaki matoba, akamataki bobele ayo esengelaki na ye. Kolongobana na ye eyebanaki.
“Na nsima, ntango mobali na ye akendaki na esanga mosusu, motekisi ya mboka na ye asengaki ye ete asombela ye mwa biloko mosusu. Ezali yango nde Temwe asalaki mpe azangisaki mbongo oyo etikalaki epai na mobali yango. Mobali yango akamwaki. Alobaki ete ezalaki mbala ya liboso amona moto azongiseli ye mbongo. Baoyo epai na bango azalaki kosenga ete basombela ye biloko bazalaki kokamata mbongo oyo etikalaki. Na mbala mosusu, ntango Temwe azalaki na mposa ya kosomba eloko moko kati na magazini ya mobali wana, mobali yango azalaki kopesa ye fungola ya magazini mpo ete akenda kozwa eloko oyo azali na yango mposa mpe liboso ya kokende atika mbongo oyo esengeli mpo na eloko yango. Bato mosusu oyo bazalaki wana bazalaki kotuna na motekisi mpo na nini azalaki kopesa fungola bobele na Temwe kasi na bango te. Alimbwelaki bango ete Temwe azalaki moto bobele moko kati na mboka oyo asengelaki kotyela motema.
“Bato na mboka balobanaki kati na bango na ntina na etamboli malamu ya babalani wana. Batemwe bayebani mingi na ntina na kolongobana na bango, etelemelo na bango ya kozanga kokota na makambo ya politike mpe mosala na bango ya kosakola Bokonzi na Nzambe, oyo emonisi likeseni kati na bindimeli na bato na mboka mpe mateya na Biblia. Sikawa ntango bato na mboka bazali kotuna mituna na ntina na Biblia, bazali kotuna yango epai na Batemwe mpo na kozwa biyano. Butu moko, mobali abengamaki kotika mbeto mpo na kokende na likita ya bato na mboka mpe koyanola na mituna na likambo moko litalaki Biblia. Ntango azali koyangana kati na bokundi ya bato na mboka, bazali kosenga ye mbala mingi ete amonisa oyo Biblia ezali koloba na ntina na liwa, mpe maloba na ye mazali kondimama na bato.”
Na yango, kolongobana ya babalani Batemwe wana mpe mosala na bango ya kosakola Bokonzi ezali kopesa litatoli moko ya kitoko no esanga ya Pacifique Sud. Bazali kolikya ete bato mosusu bakoyekola Biblia mpe bakomitya na ngambo ya solo. Soki bakosala yango, Jéhovah akozanga te kopambola bango.—Yoane 8:32.