Zebi ya mikili milobelami na Biblia ezali solo?
MOI ebimi na Palestine. Tozali na mobu 1799. Nsima na mobembo ya mokolo mobimba ya moi makasi, limpinga ya basodá ya mboka France bapiki molako na bango, mpe Napoléon Bonaparte, mokambi monene na basodá, azali kopema na hema na ye. Na pole moke ya buji, moko na basali na ye azali kotanga Biblia na Lifalanse na mongongo makasi.
Emonani ete, yango ezalaki kosalema mbala mingi na boumeli ya mobembo oyo basodá ya Napoléon basalaki na Palestine. Amikundolaki na nsima mpenza mpe akomaki ete: “Efandaki biso mwa ntango moke na bitika ya bingumba ya kala, mpokwa nyonso, tozalaki kotanga Makomami Mosantu na mongongo makasi ... Boyokani mpe bosolo ya makambo oyo mayebisami ezalaki kokamwisa; ebongi mpenza mpo na mboka oyo, nsima na bikeke mingi mpe bambongwana mingi.”
Ya solo, baoyo bazali kokende mibembo na Proche-Orient bazali komona ete ezali mpasi te mpo na koyokanisa makambo malobelami na Biblia mpe bitika ya ntango oyo. Liboso ete limpinga ya mboka France lilónga mboka Ezipito, mokili moyebaki makambo mingi te na ntina na mboka wana ya kala. Na nsima, bato na mayele oyo Napoléon amemaki na Ezipito, babandaki komonisa makambo mingi mpo na bonzenga ya kala ya Ezipito. Ezalaki bongo mpasi te mpo na kokanisa “mosala makasi” oyo Bayisraele basengisamaki na yango. —Exode 1:13, 14.
Na butu ya kosikwama na bango na Ezipito, Bayisraele bayanganaki na Lamesese, na nsima batambolaki kino na “ndelo na lisobe.” (Exode 12:37; 13:20) Kuna, Nzambe apesaki bango etinda ya “kozonga nsima” mpe “kofanda pene na mai monene.” Mayele wana ya etumba matalelamaki lokola “koyengayenga,” mpe mokonzi ya Ezipito abimaki na limpinga na ye mpe na makalo 600 mpo na kozwa lisusu baombo na ye.—Exode 14:1-9.
Kobima
Engebene Josèphe, mokomi na makambo na kala na ekeke ya yambo T.B., limpinga ya Ezipito bapusaki Bayisraele “kati na esika moke” mpe bazwaki bango na motambo “katikati na mabulu mozindo mpe mai monene.” Toyebi te mpenza esika ya sikisiki epai Bayisraele bakatisaki Mai Motane. Nzokande, ezali mpasi te mpo na kokanisa esika makambo mazalaki koleka longwa na nsonge na molongo ya bangomba milai oyo ezali na ndelo ya Mai Motane epai na nord. Ezali malamu na koyeba ete nsonge wana ebengami DjebelˈAtaqa, elimboli “Ngomba ya kosikwama.” Katikati na esika wana mpe mai Motane, ezali na esobe moke oyo nkeká na yango ezali kino pene na mai monene. Na ngambo mosusu ya mai Motane, ezali na mwa banzeté kati na esobe, mpe ebele na maziba, oyo babengaki yango ˈAyūn Mūsan,ˈ oyo elimboli “bitima ya Moize.” Katikati na bisika wana mibale bozindo ya mai ezali kokita mokemoke, nzokande epai mosusu ekiti bobele mbala moko na bozindo ya bametele 9 kino bametele 18.
Bateolojié oyo bazangi kondima, baoyo ya boklisto ya lokuta, bamekaki kokitisa bonene ya likamwisi oyo Nzambe asalaki na kokabolaka Mai Motane, mpo na kopesa nzela na Bayisraele ete baleka na mabelé makauki. Balobi ete likambo yango lisalemaki na esika moko ya potopoto mpe ezangi mozindo, na nord ya mai Motane. Kasi yango eyokani te na lisoló ya Biblia oyo eyebisi mbala mingi ete, bakatisaki na mai Motane na esika oyo ezalaki na mai mingi mpenza oyo ebomaki Farao mpe limpinga na ye mobimba, ee, ezindisaki bango nyonso.—Exode 14:26-31; Nzembo 136:13-15; Baebele 11:29.
Esobe ya Sinai
Makambo na mpasi mazali na esanga moke ya Sinai mayebisami na sikisiki kati na Biblia mpo na lisoló oyo Bayisraele bazalaki kotambolatambola. (Deteronome 8:15) Kasi, libota mobimba likokaki koyangana na nse na ngomba Sinai mpo na kozwa Mibeko ya Nzambe mpe na nsima, kolongwa wana mpo na kokende kofanda “na mosika”? (Exode 19:1, 2; 20:18) Ezali na esika moko monene oyo ekoki mpo ete ebele na bato, soko bamilió misato bakoka kotambola wana?
Na ekeke ya zomi na libwa, Arthur Stanley, mosali mibembo mpe molimboli ya Biblia, akendaki kotala etuká ya ngomba Sinai mpe alobelaki lolenge nini bato na ye bamonaki yango, nsima na kobuta na Ras Safsafa, ete: “Nokinoki, yango esepelisaki biso, mpe baoyo nyonso bamonaki yango mpe balimbolaki yango. ... Wana, ezalaki na esobe na langi ya mai na mosaka, monene mpe na mozindo, oyo ezalaki na nkiteli kitoko kino na nse ... Likambo oyo ete, tokoki te kokuta bisobe mpe bangomba na esika mosusu ya etuka wana, bobele na esika moko oyo ezali penepene na esika ya kala ya Sinai, ezali moko na bilembeteli ya ntina mingi mpo na bosolo ya lisoló oyo.”
Mokili ya ndaká
Na mobu ya ntuku minei oyo Bayisraele bazalaki kotambolatambola na esobe, Moize alobelaki lolenge na mokili epai balingaki koingela, ete: “Jéhovah Nzambe na yo akokatisa yo na mokili malamu, mokili na mai mpe na bitima na mai, na maziba mpe na bitóko ekobimaka kati na mabwaku mpe na ngomba.”—Deteronome 8:7, MN.
Bosolo ya elaká wana emonanaki ntango libota mobimba (mibali, basi, bana mike, mpe bapaya) bayanganisamaki na lobwaku ya mai mingi na Sikeme, katikati na ngomba Ebali mpe ngomba Gelizimi. Na nse na ngomba Gelizimi, ezalaki na mabota motoba. Mabota mosusu motoba mazalaki na ngambo mosusu ya lobwaku, na nse na ngomba Ebali, mpo na koyoka mapamboli ya Nzambe oyo libota lisengelaki kozwa soki bakotosa Mibeko ya Jéhovah mpe koyoka bilakeli mabe oyo basengelaki kozwa soki nde bakotosa Mibeko ya Nzambe na bopotu. (Yosua 8:33-35) Kasi ezalaki mpenza na esika monene kati na lobwaku wana oyo ekokaki ete libota mobimba bayangana wana? Mpe lolenge nini bango nyonso bayokaki nzokande ezalaki te na bamasini oyo ekomemaka mongongo mosika?
Jéhovah Nzambe akokaki kosala likamwisi ete mongongo ya Balevi moyokama makasi. Nzokande, emonani lokola ete likamwisi wana lizalaki na ntina te. Kati na lobwaku wana, eyokeli ezalaki mpenza malamu. Alfred Edersheim, molimboli ya Biblia na ekeke ya zomi na libwa, akomaki ete: “Basali na mobembo nyonso bandimi makambo oyo mibale: 1. Longwa na Ebali mpe Gelizimi, ezali na mpasi te mpo na koyoka malamu makambo oyo malobami na lobwaku. 2. Ngomba wana mibale ezalaki na esika ekoki mpo na Yisraele mobimba.”
William Thomson, molimboli mosusu ya Biblia na ekeke ya zomi na libwa, amonisaki likambo yango kati na mokanda na ye Mokili mpe Mokanda (na Lingelesi), ete: “Nangangaki mpo na koyoka mongongo, mpe nakanisaki na oyo esalemaki ntango Balevi basakolaki na mongongo makasi ... ete: ˈTika alakelama mabe, ye oyo akosala ekeko ya nzete to ya ebende, eloko na mbindo na miso na Jéhovah!ˈ Na nsima, AMEN! makasi eutaki na lisanga monene, ebimaki na makasi koleka mbala zomi, mpe ekomaki monene, mpe eyokamaki longwa na Ebali kino na Gelizimi, mpe longwa na Gelizimi kino Ebali.”—Tala Deteronome 27:11-15.
Lobwaku ya Yizelele
Na nord ya Sikeme, ezali na lobwaku mosusu lozali na mabelé malamu, oyo ebandi na nse ya nivo ya mai monene, mpe efungwami kati na esobe monene. Etuká wana mobimba ebengami Lobwaku ya Yizelele, nkombo ezwami mpo na engumba Yizelele. Na nord ya lobwaku, ezali na nkeká ya Galilai, epai Nazarete ezalaki, esika Yesu akolaki. Kati na mokanda na ye Zebi ya mikili ya kala ya Mabelé Mosantu (na Lingelesi), George Smith alimboli ete: “Nazarete ezali kati na libulu lizingami na nkeká; kasi soki omati kino na ndelo ya libulu wana, ... okomona mpenza esika kitoko! [Lobwaku ya Yizelele] ezali liboso na yo, elongo na ... bisika na yango ya bitumba ... Emonisi lisoló ya Kondimana ya Kala.”
Na lobwaku wana, bakundoli biloko ya kala, batimolaki bitika ya bingumba ya mikonzi oyo bilongamaki na Yisraele, na eleko ya Yosua, bingumba yango Tanake, Megido, Yokenama, mpe mbala mosusu Kedese. (Yosua 12:7, 21, 22) Bobele na etuká wana, na eleko ya mosambisi Balaka mpe mosambisi Gédéon, Jéhovah asikolaki libota na ye na likamwisi na maboka ya mabota na nguya mingi oyo bazalaki konyokola bango.—Basambisi 5:1, 19-21; 6:33; 7:22.
Bikeke mingi na nsima, mokonzi Yehu amataki lobwaku wana kino na engumba Yizelele mpo na kokokisa ekateli ya Jéhovah likoló na Yezabele mpe ndako na lipengwi ya Akaba. Longwa na ekengelo ya Yizelele, ezali mpasi te mpo na komona wana mampinga ya Yehu mazalaki koya longwa na ntaká ya bakilometele 19. Na yango, mokonzi Yolama azwaki ntango ya kotinda ntomá ya liboso mpe ya mibale, na mpunda, mpe na nsima, Yolama, mokonzi ya Yisraele mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, bamataki makálo na bango mpe bakendaki mpo na kokutana na Yehu liboso ete akoma na engumba Yizelele. Nokinoki, Yehu abomaki Yolama. Akazia akimaki, nde na nsima azokaki mpe akufaki na Megido. (2 Mikonzi 9:16-27) Na ntina na bisika ya bitumba oyo touti kolobela, George Smith akomaki ete: “Ezali likambo kitoko na komona ete, lisoló moko te ... lizangaki bilembeteli na ntina na zebi ya mikili.”
Na ntembe te, Yesu atalelaki lobwaku ya Yizelele mpe akanisaki likoló na elonga monene oyo ezalaki kozwama na esika yango, koyebaka ete ye, Masiya ya ndaká, alakamaki mpo na kokokisa mokumba ya Yosua Monene, ya Balaka Monene, ya Gédéon Monene mpe ya Yehu Monene, mpo na komonisa boyangeli ya Jéhovah. Na yango, Biblia ezali kosalela Megido, esika ya etumba na lobwaku wana, lokola elilingi mpo na esika ekosalema etumba ya Nzambe, Armaguedon (oyo elimboli “ngomba ya Megido”). Ekozala etumba ya mokili mobimba kati na yango, Yesu Klisto, Mokonzi ya bakonzi, akoboma banguna nyonso ya Nzambe mpe ya lisanga ya boklisto, libota ya solo ya Nzambe.—Emoniseli 16:16; 17:14.
Biblia eyebisi ete Bayuda ya Nazarete oyo basilikaki, bamekaki kobwaka Yesu “na nse longwa na likoló ya ngomba epai mboka na bango etongamaki” mpo na koboma ye. (Luka 4:29, MN) Ezali likambo ya esengo na kosimba ete, na sud-ouest ya Nazarete ya lelo, ezali na nkiteli ya bametele 12 epai likambo yango lisengelaki kosalema. Biblia ebakisi ete, wana akimaki banguna na ye, Yesu “akitaki na Kapernaume.” (Luka 4:30, 31, MN) Na yango, Kapernaume, oyo etongamaki pembeni na libeke ya Galilai, ezalaki na nsé mingi.
Tala mwa makambo matindaki bato mosusu lokola Napoléon na kolobela lolenge oyo basepelaki na bosolo na lisoló ya zebi ya mikili milobelami kati na Biblia. Kati na mokanda na ye Mokili mpe Mokanda (na Lingelesi), Thomson akomaki ete: “Mitindami ya [Biblia] mpo na lolenge ya mokili ezali mingi mpe ezali solo.” Kati mokanda Sinai mpe Palestine (na Lingelesi), Stanley asali komantere oyo ete: “Tosengeli bobele kosepela na boyokani malamu oyo bozali kati na lisoló ya makambo na kala mpe oyo etali zebi ya mikili, oyo elobelami ezala na Kondimana ya Kala to na Kondimana ya Sika.”
Bosolo ya kokamwa ya Biblia na ntina etali makambo ya zebi ya mikili, ezali bobele moko na bilembeteli bimonisi ete yango eutaki bongo na bato te. Banimero misato ya Mosenzeli oyo euti koleka, ezalaki na masolo lokola oyo. Tosengi yo ete ozwa mpe biteni mosusu misato na molongo ya masolo oyo mpe otanga yango.
[Karte na lokasa 7]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
VALLEY OF JEZREEL
Jezreel
Nazareth
Taanach
Megiddo
Jokneam
Kedesh
N
SEA OF GALILEE
GREAT SEA
miles
kilometers
5
10
10
20
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Based on a map copyrighted by Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel.
[Elilingi na lokasa 5]
Yisraele bazwaki Mibeko na ngomba Sinai
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.