Bamoni nini na Yizelele?
BANDA bikeke mingi, esika oyo engumba ya kala ya Yizelele ezalaki etikalá mpamba. Biblia elobeli eleko moko oyo engumba yango ezalaki na lokumu mingi. Lelo oyo, lokumu na yango esilá mpe mboka yango ekundamá na nse ya mabele, ekómá libondo ya mabele, to ngomba. Na bambula eleki bato ya arkeoloji babandaki kotalela bitika ya Yizelele. Bitika yango emonisi nini mpo na masolo ya Biblia?
Yizelele ndenge elobelami na Biblia
Yizelele ezalaki na ɛsti ya Lobwaku ya Yizelele, na esika oyo mabele ezalaki kobota malamu koleka na Yisalaele ya kala. Soki okatisi lobwaku yango na nɔrdi okokuta Ngomba Mole epai Bamidyani batɛlɛmaki ntango bazalaki komibongisa mpo na kobundisa Mosambisi Gideona na basoda na ye. Soki opusani mwa moke na ɛsti okokuta libulu ya mai ya Alodo, penepene ya Ngomba Giliboa. Ezalaki awa nde Yehova ayebisaki Gideona oyo azalaki na bankóto ya basoda ete atikala bobele na basoda 300 mpo na komonisa bango ete azali na makoki ya kobikisa bato na ye ata soki basoda bazali mingi te. (Basambisi 7:1-25; Zekalia 4:6) Pene ya Ngomba Giliboa, Bafilistia babundaki etumba monene na Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisalaele, mpe balongaki ye. Na etumba yango Yonatana na bana mosusu mibale ya Saulo bakufaki mpe Saulo ye moko amibomaki.—1 Samwele 31:1-5.
Biblia elobeli engumba ya kala ya Yizelele na makambo ndenge na ndenge ekeseni mpenza. Biblia elobeli boyangeli mabe ya bakonzi ya Yisalaele oyo bakómaki bapɛngwi, elobeli mpe basaleli ya Yehova oyo bazalaki na mpiko mpe basalelaki ye na bosembo nyonso. Ahaba, mokonzi oyo azalaki koyangela mabota zomi ya nɔrdi ya bokonzi ya Yisalaele na nsuka ya ekeke ya zomi L.T.B. atongaki ndako na ye na Yizelele, atako engumba-mokonzi ezalaki Samalia. (1 Mikonzi 21:1) Ezalaki na Yizelele nde Yezabele, mwasi mopaya ya Ahaba, akanelaki koboma Eliya, mosakoli ya Yehova. Yezabele asilikaki mpamba te Eliya, na mpiko nyonso, abomaki basakoli ya Baala, nsima ya kotya bango na komekama na Ngomba Kalemele mpo na koyeba nani azali Nzambe ya solo.—1 Mikonzi 18:36–19:2.
Babomaki mpe moto na Yizelele. Babomaki Nabota moto ya Yizelele. Mokonzi Ahaba alulaki elanga ya vinyo ya Nabota. Ntango mokonzi asɛngaki azwa elanga, Nabota alobaki na ye na bosembo nyonso ete: “[Yehova] apekisa ete napesa yo libula na batata na ngai.” Ahaba asepelaki na eyano wana ya sembo ata moke te. Ntango Mokonzi-mwasi Yezabele amonaki mokonzi akómi mawamawa, ayokanaki na bato básambisa Nabota na bosembo te, akoselaki ye makambo ete afingi Nzambe mpe mokonzi. Balobaki na Nabota oyo asalaki likambo te ete asali mabe, babambaki ye mabanga tii akufaki, mpe mokonzi azwaki elanga ya vinyo na ye.—1 Mikonzi 21:1-16.
Mpo na likambo mabe wana, Eliya asakolaki boye: “Bambwa bakolya [Yezabele] na kati na ndako na Yizelele.” Mosakoli alobaki lisusu boye: “[Moto ya ndako ya Ahaba oyo akokufa, NW] kati na mboka, bambwa bakolya ye . . . Ezalaki na mosusu te oyo amitɛkisaki ete asala mabe na miso na [Yehova] lokola Ahaba, oyo [Yezabele] mwasi na ye apesaki ye simbisi.” Kasi, lokola Ahaba amikitisaki ntango Eliya ayebisaki etumbu ya Yehova, Yehova alobaki ete etumbu yango ekopesama na ntango Ahaba azali na bomoi te. (1 Mikonzi 21:23-29) Biblia elobi ete na eleko ya Elisa oyo akómaki mosakoli nsima ya liwa ya Eliya, Yehu apakolamaki lokola mokonzi ya Yisalaele. Ntango Yehu akɔtaki na Yizelele, apesaki mitindo mpe babwakaki Yezabele na nse longwa na lininisa ya ndako na ye, mpe bampunda banyataki ye. Na nsima, bakendaki kokuta ete bambwa oyo eyengayengaka na mboka balyaki ye mpe batikaki kaka mikwa ya motó, ya makolo mpe ya mabɔkɔ. (2 Mikonzi 9:30-37) Esika ya nsuka oyo Biblia elobeli Yizelele ezali nsima ya kobomama ya bana 70 ya Ahaba. Yehu asangisaki mitó na bango na bakitunga mibale ya minene na ekɔtelo ya engumba Yizelele, mpe na nsima abomaki mibali na banganga oyo basanganaki na Ahaba na boyangeli na ye ya mabe.—2 Mikonzi 10:6-11.
Bato ya arkeoloji bamoni nini?
Na 1990, bato ya arkeoloji ya bainiversite mibale basanganaki mpo na kotimola na bitika ya engumba ya Yizelele. Misala etambwisamaki na David Ussishkin (oyo atindamaki na Institute of Archaeology of Tel Aviv University) mpe John Woodhead (oyo atindamaki na British School of Archaeology in Jerusalem). Bikipi ya bato banda 80 mpe 100 basalaki mosala wana mbala nsambo (mbala mokomoko eumelaki pɔsɔ motoba) banda 1990 tii 1996.
Sikoyo, bato ya arkeoloji balingi kotalela kaka biloko oyo bakokuta na esika oyo bazali kotimola, kasi makanisi to mateya oyo bato mosusu bazali na yango te. Na yango, mpo na bato ya arkeoloji oyo bayekolaka mikili oyo Biblia elobeli, batalelaka kaka makambo oyo Biblia elobi te. Batalelaka mpe bayekolaka malamumalamu mikanda mosusu nyonso mpe biloko oyo bakomona. Nzokande, ndenge John Woodhead alobi yango, longola mwa mikapo oyo ezali na Biblia, mikanda mosusu ya kala ezali te oyo ezali kolobela Yizelele. Yango wana, ntango bazali koyekola likambo mokomoko, basengeli mpe kotalela masolo ya Biblia mpe ndenge makambo ezalaki kolandana. Makambo nini bato ya arkeoloji bamoni?
Ntango bakundolaki bifelo minene mpe bambeki, banda na ebandeli bamonaki polele ete bitika yango ezali ya eleko oyo ebengami Âge de fer, eleko mpenzampenza oyo Biblia ezali kolobela Yizelele. Kasi wana bakobaki kotimola, bakutanaki na makambo mingi oyo ekamwisaki bango. Ya liboso bamonaki ete engumba yango ezalaki monene mpe ezalaki na bifelo ya mineneminene. Bato ya arkeoloji bazalaki kokanisa ete bakomona bifelo mineneminene lokola oyo ya Samalia ya kala, engumba-mokonzi ya bokonzi ya Yisalaele. Kasi wana bazalaki kotimola, bamonaki polele ete Yizelele elekaki Samalia na monene. Bifelo na yango ya milai ezalaki na mɛtrɛ 300 mpe oyo ya mikuse ezalaki na mɛtrɛ 150 mpe engumba ezalaki monene mbala misato koleka engumba nyonso ya ntango wana oyo bakundolaki na Yisalaele. Bamonaki talase moko ya mɛtrɛ 11 ya mozindo ekauká mpe ezingaki bifelo minene. Profɛsɛrɛ Ussishkin, alobi ete ezalaki mbala ya liboso bámona talase ya ndenge yango na bisika ya kala. Abakisi ete: “Tomoni talase mosusu te oyo ekokani na yango na Yisalaele tii na eleko ya etumba ya Croisades.”
Bakamwaki lisusu na ndenge bandako ya mineneminene ezalaki te na kati ya engumba yango. Ebele ya mabele motane oyo bazalaki kosopa na kati ntango bazalaki kotonga engumba, batyaki yango na esika moko mpe esalaki mwa ngomba, lokola ebaelo moko monene, na kati ya lopango. Buku moko (Second Preliminary Report) oyo elobeli misala ya kotimola na Tel Jezreel, eyebisi ete ebaelo monene wana emonisi mpenza ete Yizelele ezalaki kaka te mboka epai mokonzi azalaki kofanda. Elobaki boye: “Tomoni lokola nde Yizelele ezalaki esika oyo basoda ya mokonzi ya Yisalaele na eleko ya mikonzi ya libota ya Omri bazalaki kofanda . . . esika oyo bazalaki kobomba makalo mpe bampunda mpe basoda bazalaki koyekola ndenge ya kosalela yango na etumba.” Woodhead alobi ete lokola ebaelo yango ezalaki mpenza monene mpe lopango yango moko, yango ekokaki kozala libándá monene esika basoda bazalaki kosala defile mpo na kolakisa makasi ya limpinga oyo elekaki na makalo na Moyen-Orient mobimba na ntango wana.
Bato ya arkeoloji bamonaki ete bakoki koyekola makambo mingi na bitika oyo bakundolaki na ekuke ya engumba. Bitika yango ezali komonisa ekɔtelo oyo ezalaki na shambre soki minei. Kasi, lokola bazalaki kolongola mabanga mingi oyo ezalaki na esika yango na boumeli ya bikeke, biloko oyo bakuti emonisi makambo nyonso te. Woodhead akanisi ete ekotelo ezalaki na shambre motoba oyo ezalaki monene ndenge moko na bikotelo oyo bamonaki na Megido, Hasola, mpe na Gezele.a
Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli emonisi bango ete mboka Yizelele eumelaki ntango molai te atako ezalaki na esika ya malamu, ezala mpo na makambo ya basoda mpe na lolenge batongaki yango. Woodhead alobi ete Yizelele ezalaki engumba ya bifelo makasi, kasi eumelaki te, esalaki kaka mwa bambula. Ekeseni na bingumba minene mosusu ya Yisalaele oyo Biblia elobeli, lokola Megido, Hasola, mpe mboka-mokonzi Samalia, oyo mbala na mbala bazalaki kotonga yango, koyeisa yango monene, mpe bazalaki kofanda wana na bileko ndenge na ndenge. Mpo na nini engumba malamu yango eumelaki te na kotikala mpamba? Woodhead akanisi ete Ahaba na bakonzi oyo bayaki nsima na ye bakweisaki nkita ya mboka mpamba te bazalaki kosalela bozwi na yango na ndenge ya mabe. Likambo yango emonanaki solo soki totali ete Yizelele ezalaki mboka monene mpe ezalaki makasi. Ekoki kozala ete ntango Yehu akómaki mokonzi alingaki te kolanda makambo oyo Ahaba atikaki mpe yango wana asundolaki engumba yango.
Biloko nyonso oyo bato ya arkeoloji bakundoli endimisi ete Yizelele ezalaki engumba monene na Yisalaele na eleko babengi Âge de fer. Lokola ezalaki monene mpe na bifelo ya makasi, yango eyokani na makambo oyo Biblia elobi ete ezalaki mboka monene epai Mokonzi Ahaba na Yezabele bazalaki kofanda. Bilembeteli oyo emonisi ete bato bafandaki kuna mingi te endimisi makambo Biblia elobi mpo na engumba yango. Biblia elobi ete ekómaki mbala moko mboka ya lokumu ntango Ahaba azalaki koyangela mpe na nsima, Yehova apesaki etinda, ekweaki ntango Yehu “abomaki bato nyonso ya libota ya Ahaba baoyo batikalaki na Yizelele mpe bato nyonso na ye minene mpe baninga na ye mpe banganga na ye kino atikelaki ye moto moko te.”—2 Mikonzi 10:11.
Makambo oyo esalemaki na Yizelele na boumeli ya bambula
John Woodhead alobi: “Na arkeoloji, ezali mpasi mpo na kozwa bilembeteli ya sikisiki mpo na kopesa badati.” Na yango lokola bato ya arkeoloji bazali koyekola malamumalamu biloko oyo bakundoli na boumeli ya mbula nsambo, bazali kokokanisa yango na biloko oyo bakundolaká na bisika mosusu. Yango ememi bango na kotalela lisusu badati oyo bapesaki mpe ebimisi ntembe kati na bango. Mpo na nini? Mpamba te banda Yigael Yadin, moto ya ekólo Israël mpe moto ya arkeoloji akundolaki biloko na Megido na bambula ya 1960 mpe na ebandeli ya bambula ya 1970, bato mingi ya arkeoloji bandimaki ete amonaki bifelo makasi mpe bikuke ya engumba oyo ezalaki na eleko ya Mokonzi Salomo. Sikoyo, bifelo makasi mpe bambeki, mpe bikuke oyo bamoni na Yizelele etindi bato mosusu ya arkeoloji bátyela makambo ya Yagael Yadin ntembe.
Na ndakisa, bambeki oyo bamonaki na Yizelele ekokani na bambeki esalemi na lima (argile) oyo bamonaki na Megido; bambeki oyo Yadin alobaki ete esalemaki na ntango oyo Salomo azalaki koyangela. Lolenge ya bikuke mpe monene ya bingumba mibale yango esali lokola ekokana. Woodhead alobi ete: “Makambo nyonso ezali kolakisa ete Yizelele ezalaki na eleko ya Salomo to ntango bayekoli bambula na yango, ekokani na bambula ya bingumba mosusu [Megido na Hasolo] mpe ezali komonisa ete ezalaki na eleko ya Ahaba.” Lokola Biblia elobaka ete Yizelele ezalaki na eleko ya Ahaba, Woodhead amoni ete ebongi mpenza kondima ete biloko oyo bakundoli ezali komonisa ete ezalaki na eleko ya boyangeli ya Ahaba. David Ussishkin andimi ete: “Biblia elobaka ete Salomo atongaki Megido, kasi elobaka te ete atongaki bikuke wana.”
Lisolo ya Yizelele ekoki koyebana?
Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli mpe mituna oyo yango ebimisi esali ete bato bázala na ntembe likoló ya makambo oyo Biblia elobi mpo na Yizelele mpe Salomo? Ntembe oyo bato ya arkeoloji bazali kotyana ezali mpenza kotalela makambo oyo Biblia elobi te. Bato ya arkeoloji batalelaka masolo ya Biblia te mpo na koyekola makambo ya kala. Bango batunaka mituna mingi mpe batyaka likebi mingi na makambo mosusu. Tokoki kokokanisa moyekoli ya Biblia mpe moto ya arkeoloji na bato oyo bazali kotambola na banzela mibale oyo etalani mpe ezali komema lokola na esika moko. Moto moko azali kotambola na motuka na kati ya nzela, mpe mosusu azali kotambola na makolo pembenipembeni ya nzela. Moko na moko azali na makanisi mpe makambo oyo ezali kobenda likebi na ye. Ndenge oyo moko azali komona makambo ekoki kosalisa moninga, kasi ekozala te ete makambo ya moko ekotɛmɛla makanisi ya mosusu. Soki totii makambo ya bato yango esika moko, ekoki kosalisa na koyeba malamu.
Biblia ezali na masolo ya bato ya kala mpe makambo basalaki; bato ya arkeoloji bazali koyekola eloko nyonso oyo etikalá mpe ekundamá na nse ya mabele mpo na koluka koyeba makambo yango mpe bato yango ya kala. Kasi biloko yango emonisaka makambo nyonso te, etindaka bato ya arkeoloji na kopesa bandimbola ndenge na ndenge. Yango wana, Amihai Mazar, kati na buku na ye (Archaeology of the Land of the Bible—10 000−586 L.T.B.), alobi boye: “Arkeoloji . . . ezali mayele ya mosala, mpe esangisi kotánga kelasi ya mosala yango mpe koyekola. Kokangama na lolenge moko ya kosala ekoki kopesa litomba malamu te, mpe esengeli kozala na elimo ya kondima ndenge mosusu ya koyekola mpe kokanisa ndenge ya sika. Bomoto ya moto ya arkeloji, mayele na ye mpe kozala na bokatikati ezali na ntina mingi, lokola mpe kelasi oyo atángaki mpe biloko ya mosala oyo azali na yango.”
Arkeoloji endimi ete Yizelele ezalaki mboka monene ya mokonzi mpe ya basoda, mboka moko oyo eumelaki te mpe ezalaki na eleko ya boyangeli ya Ahaba, se ndenge Biblia elobi. Mituna mingi mosusu ebimaki oyo mbala mosusu bato ya arkeoloji bakoyekola na boumeli ya bambula oyo ezali koya. Nzokande, Liloba ya Nzambe, Biblia, ezali koloba polele, ezali komonisa biso lisolo nyonso na ndenge oyo arkeoloji ekokoka kosala yango te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “L’énigme des portes” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1988, ebimeli ya Lifalanse.
[Bililingi na lokasa 26]
Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli na Yizelele
[Elilingi na lokasa 28]
Bikeko ya Bakanana oyo bakuti na Yizelele