Pusaná penepene na Nzambe
Mosambisi oyo asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo
BOSEMBO. Kozanga kopona bilongi. Osepelaka te na bizaleli yango ya kitoko? Biso bato tobotamaka na mposa ete básalelaka biso makambo na bosembo. Likambo ya mawa, bosembo ezali mingi te na mokili lelo oyo. Nzokande, ezali na Mosambisi moko oyo abongi kotyelama motema—Yehova Nzambe. Asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo. Yango emonanaki polele ntango Yehova asololaki na Abalayama; lisolo yango ezali na Genese 18:22-32.a
Ntango Yehova ayebisaki Abalayama ekateli oyo azwaki ya kotya likebi na makambo ya mabe oyo ezalaki kosalema na Sodoma ná Gomola, Abalayama amitungisaki mpo na bato ya sembo oyo bazalaki kuna, ata mpe Lota, oyo azalaki mwana ya ndeko na ye. Abalayama atunaki Yehova boye: “Okoboma mpe bayengebene elongo na bato mabe? Soki bayengebene ntuku mitano bazali kati na mboka , . . . okobikisa mboka te na ntina na bayengebene ntuku mitano [oyo] bazali kati na yango?” (Vɛrsɛ 23, 24) Nzambe alobaki ete akoboma bingumba yango te soki bayengebene bazali 50. Abalayama atunaki Yehova mbala koleka mitano, mpe azalaki kokitisa motángo yango mokemoke tii na zomi. Na mbala nyonso, Nzambe azalaki koyebisa ye ete akoboma bingumba yango te soki bayengebene mingi bazali kuna.
Abalayama azalaki nde kotyana ntembe na Nzambe? Ata moke te! Kosala bongo elingaki komonisa lofundo. Ndenge oyo Abalayama azalaki koloba emonisaki ete azali na limemya mpe komikitisa. Alobaki ete azali kaka “mabelé mpe putulu ya mɔtɔ.” Asalelaki maloba lokola “limbisá ngai” mpe “nasɛngi yo.” (Vɛrsɛ 27, 30-32, Bible na lingala ya lelo oyo) Lisusu, maloba ya Abalayama emonisaki ete azalaki kotya motema na bosembo ya Yehova. Abalayama alobaki mbala mibale ete ‘ebongi na Nzambe’ te ete aboma bayengebene esika moko na bato ya mabe. Abalayama amonisaki ete azalaki mpenza kondima ete “Mosambisi ya mokili mobimba akosala [oyo ezali] sembo.”—Vɛrsɛ 25.
Abalayama alobaki mpenza makambo ya solo? Makambo mosusu oyo alobaki ezalaki solo, mosusu ezalaki solo te. Azalaki na libunga ndenge azalaki koloba ete bayengebene bazalaki soki zomi na Sodoma ná Gomola. Kasi, alobaki solo ndenge alobaki ete Nzambe akoki te ‘koboma bayengebene elongo na bato mabe.’ Na nsima, ntango Nzambe abomaki bingumba yango, moyengebene Lota ná bana na ye mibale ya basi babikisamaki na lisalisi ya baanzelu.—2 Petelo 2:7-9.
Lisolo yango ezali koteya biso nini na ntina na Yehova? Ntango Yehova ayebisaki Abalayama ete alingi koboma bingumba wana mibale, alingaki nde básolola. Na nsima, ayokaki moninga na ye Abalayama na motema ya kokita wana azalaki kobimisa makambo oyo ezalaki kotungisa ye. (Yisaya 41:8) Yango emonisi ete Yehova azali Nzambe ya komikitisa, oyo apesaka biso basaleli na ye lokumu! Tomoni polele ete tosengeli mpenza kotyela Yehova motema mobimba, mpamba te azali Mosambisi oyo asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokolo yango, Yehova asalelaki anzelu mpo na kosolola na Abalayama. Talá ndakisa mosusu na Genese 16:7-11, 13.
[Elilingi na lokasa 24]
Abalayama abondelaki Yehova mpo na Sodoma ná Gomola