Tópɛngola motambo ya lokoso
“Baoyo bamipesi mpo na kokóma bazwi bazali kokwea kati na komekama mpe na motambo.”—1 TIMOTÉ 6:9, MN.
1. Mpo na nini tosengeli komibanzabanza na ntina na mitambo?
LILOBA “motambo” lipesi likanisi ya mobomi nyama oyo abombi esaleli na ye mpo na kokanga nyama ezangi bokɛngi. Nzokande, Nzambe amonisi polele ete mpo na biso, mitambo yango mileki minene ezali mpenza bisaleli na mobomi nyama te, kasi eloko nyonso oyo ekoki kokanga biso kati na elimo to na bizaleli. Diable ayebi mpenza kotya mitambo wana malamumalamu.—2 Bakolinti 2:11; 2 Timoté 2:24-26.
2. (a) Lolenge nini Jéhovah azali kosalisa biso mpo na kopɛngola mitambo mabe? (b) Motindo nini na motambo oyo tokotalela mpenza sikawa?
2 Jéhovah azali kosalisa biso na koyeba mwa ndambo ya ebele na mitambo ndenge na ndenge ya Satana. Na ndakisa, Nzambe akebisi ete mbebu na biso, to monoko na biso ekoki kozala motambo soki tozali koloba kozanga mayele, kozanga kososola, to koloba makambo oyo tosengeli koloba te. (Masese 18:7; 20:25) Lolendo ekoki kozala motambo, lolenge moko mpe kotambola na bato bamipesi na nkanda ekoki kozala motambo. (Masese 22:24, 25; 29:25) Kasi tika totalela motambo mosusu: “Baoyo bamipesi mpo na kokóma bazwi bazali kokwea kati na komekama mpe na motambo, mpe kati na bamposa mingi mabe mpe na mpasi, oyo ekozindisa bato kati na kufa mpe na libebi.” (1 Timoté 6:9, MN) Eloko oyo ezali nsima na motambo wana to ezali moboko na yango ekoki kobéngama na mokuse ete “lokoso.” Atako lokoso emonisamaka mbala mingi na mposa ya kozala na bozwi, lokoso ezali mpenza motambo oyo mozali na mitindo mingi.
Jéhovah azali kokebisa biso na likámá
3, 4. Makambo na kala na lisoló ya bato ezali na liteya nini na ntina na lokoso?
3 Ya solo, lokoso ezali mposa makasi to mposa eleki ndelo mpo na kozala na mosolo mingi, na kozwa biloko ya mosuni, na kozala na nguya, na kosangisa nzoto, to na makambo mosusu. Biso tozali bato ya liboso te baoyo bazwami na motambo ya lokoso. Kala kati na elanga ya Edene, Eva azwamaki na motambo ya lokoso mpe na nsima, Adam. Mobalani ya Eva, oyo ayebaki makambo mingi ya bomoi koleka ye, azwaki mpenza mitinda epai na Jéhovah. Nzambe apesaki bango efandelo na paradis. Bakokaki kosepela na ebele ya biloko mpe bilei ya ndenge na ndenge, oyo ebimi na mokili oyo mai mpe mopepe ebebisami te. Bakokaki kobota bana oyo bazali na ezaleli ya kokoka, bakokaki kozala na bomoi mpe kosalela Nzambe elongo na bango libela na libela. (Genese 1:27-31; 2:15) Yango ekokaki te mpo na kosepelisa moto nyonso?
4 Nzokande, kozala na biloko mingi ezali kobatela moto te ete lokoso ekóma motambo mpo na ye. Eva azwamaki na motambo mpo na mposa ya kozala lokola Nzambe, ya kozala na lipandá mpe ya komityela mitinda ye moko. Emonani ete Adam alingaki ete azala ntango nyonso elongo na mobalani na ye ya kitoko, ata soki yango ekokaki komema likámá nini. Lokola bato wana ya kokoka bazwamaki na motambo ya lokoso, biso mpe tokoki kososola mpo na nini lokoso ekoki kozala likámá mpo na biso.
5. Mpo na nini ezali ntina mpo na biso ete tópɛngola motambo ya lokoso?
5 Tosengeli komibatela ete tozwama na motambo ya lokoso te mpo ete ntoma Paulo apesi biso toli oyo ete: “Boyebi te ete bato mabe bakosangola Bokonzi ya Nzambe te? Bomizimbisa te. Bato na pite, basambeli na bikeko, bato na ekobo, bakembi na nsɔni, mibali bamibebisi na mibali, miyibi, bato na lokoso . . . bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Paulo alobi na biso lisusu ete: “Tika te ete motindo nyonso na pite mpe na lokoso ezwama kati na bino.” (Baefese 5:3, MN) Na yango, lokoso ekoki ata kolobelama te kati na masoló na biso mpo na mokano ya kosepelisa nzoto na biso ezangi kokoka.
6, 7. (a) Bandakisa nini ya Biblia emonisi nguya oyo lokoso ekoki kozala na yango? (b) Mpo na nini bandakisa wana esengeli kozala likebisi mpo na biso?
6 Jéhovah akomisaki bandakisa mingi mpo na kokebisa biso na likámá ya lokoso. Tokanisa mpo na lokoso ya Akana. Nzambe alobaki ete Yeliko esengelaki kobomama, kasi wolo, paláta, motako mpe ebende ezalaki mpo na ebombelo na biloko na Ye ya motuya. Ekoki kozala ete, na ebandeli, Akana azalaki mbala mosusu na likanisi ya kolanda etinda yango, kasi azwamaki na motambo ya lokoso. Ekómaki ye na Yeliko, ezalaki lokola nde akendaki mobembo ya mombongo epai akutanaki na libaku malamu ya kosomba biloko ya motuya mingi, kati na yango, bilamba kitoko oyo bimonanaki kitoko mpo na ye. Kozwa wolo mpe paláta elimboli kozwa bankóto mingi ya dolare, mbala mosusu akanisaki boye: ‘Oyo nde bozwi!’ Ya solo, ezalaki mpenza koyiba! Koluláká biloko oyo bisengelaki kobebisama to kotyama na ebombelo, ayibaki Nzambe, mpe yango ebomaki Akana. (Yosua 6:17-19; 7:20-26) Totalela lisusu bandakisa ya Gehazi mpe ya Yuda Mokeliota.—2 Mikonzi 5:8-27; Yoane 6:64; 12:2-6.
7 Tobosana te ete bato misato oyo bauti kolobelama bazalaki bapakano te baoyo bayebaki mitinda na Jéhovah te. Kasi, bazalaki na boyokani malamu elongo na Nzambe. Bango nyonso bamonaki makamwisi oyo makokaki kozala na bopusi likoló na bango mpo na koyeba malamu nguya ya Nzambe mpe kososola ntina ya kobatela ngolu na ye. Kasi, motambo ya lokoso mokangaki bango. Biso mpe tokoki kobebisa boyokani na biso elongo na Nzambe soki tomitiki biso moko kozwama na motambo ya lokoso na mitindo mikeseni. Wapi mitindo mpe lolenge ya lokoso oyo ekoki mpenza kozala likámá mpo na biso?
Bazwami na motambo ya lokoso mpo na bozwi to biloko ya mosuni
8. Biblia ezali kopesa makebisi nini na ntina na bozwi?
8 Baklisto mingi bayebi mpenza makebisi mauti na Biblia na ntina na kokólisa mposa ya bozwi, mposa makasi ya biloko ya mosuni. Mpo na nini te kotalela lisusu ndambo na yango, lokola oyo ezwami na Matai 6:24-33; Luka 12:13-21; mpe 1 Timoté 6:9, 10? Okoki kokanisa ete ondimi mpe ozali kolanda toli oyo, bobele bongo, Akana, Gehazi, mpe Yuda bakokaki koloba ete bango mpe bandimaki yango, boye te? Na ndenge emonani, tosengeli bobele kondima yango te. Tosengeli nde komibatela ete motambo ya lokoso mpo na kozala na bozwi to na biloko ya mosuni ezala na bopusi te likoló na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
9. Mpo na nini tosengeli kotalela ezaleli na biso na ntina etali kosomba biloko?
9 Na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, tozali ntango nyonso koluka—bilei, bilamba, mpe biloko ya ndako. (Genese 42:1-3; 2 Mikonzi 12:11, 12; Masese 31:14, 16; Luka 9:13; 17:28; 22:36) Kasi ebongiseli ya mombongo ezali kolamwisa mposa ya kozala na biloko mingi mpe ya sika. Ebele ya piblisité etondi bazulunalo, mikanda mpe ba programmes ya televizyo ezali na bopusi mabe mpo na kokólisa lokoso. Bopusi motindo wana ekoki kouta na bamagazini oyo etondi na bazambala, na bakazáka, na minkóto, mpe mimpíla, na basapato ya sika, na bamasini mpe ba caméras. Baklisto bakoki komituna bango moko ete: ‘Kosomba biloko ezali likambo ya ntina mingi to ezali bobele mposa mpamba kati na bomoi na ngai?’ ‘Nazali mpenza na mposa ya biloko ya sika oyo nazali komona, to ezali bobele ebongiseli ya mombongo nde ezali kolona mbotó ya lokoso kati na motema na ngai?’—1 Yoane 2:16.
10. Wapi motambo ya lokoso oyo mozali mpenza likámá mpo na mibali?
10 Soki kosomba biloko emonani lokola motambo mpo na basi, kozala na mosolo mingi ezali moko na mitambo mpo na mibali mingi. Yesu amonisaki motambo yango kati na lisese ya mozwi oyo azalaki na mosolo mingi nde azwaki ekateli ya ‘koboma bibombelo na ye mpe kotonga mosusu eleki minene mpo na koyanganisa mbuma na ye nyonso mpe biloko kitoko.’ Yesu amonisaki mpenza likámá wana ete: “Bozipola miso mpe bomibatela mpo na motindo nyonso na bilulela” to lokoso. (Luka 12:15-21, MN) Ata tozali bazwi to mpe bazwi te, tosengeli kolanda toli oyo.
11. Lolenge nini moklisto moko akoki kozwama na motambo mpo na lokoso ya kozwa mbongo mingi?
11 Lokoso ya kozala na mosolo mingi, to ya biloko oyo bikoki kosombama na mosolo, ekokólaka mbala mingi na lolenge ya kobombama. Mwango ya kokóma na bozwi nokinoki ekoki komonisama—mbala mosusu ete ezali libaku oyo okoki kolekisa soko moke te, mpo ete okozwa yango lisusu te kati na bomoi na yo, mpo na kozwa mbongo na nzela mabe. To okoki koluka kozwa mbongo na misala mabe to na misala oyo mindimami na Leta te. Mposa wana makasi ekoki kokóma nguya eleki makasi, motambo. (Nzembo 62:10; Masese 11:1; 20:10) Basusu kati na lisangá ya boklisto bazali kobanda kosala mombongo na elikya ete bandeko na bango kati na solo bakozala basombi na bango ya liboso. Soki mokano na bango ezali te mpo na kokokisa bamposa ya basusu na kosaláká ‘mosala makasi mpo na kosalisa mabɔkɔ na bango mosala malamu,’ kasi mpo na kozwa mosolo nokinoki longwa na mpasi ya baninga na biso baklisto, boye bazali kosala na lokoso. (Baefese 4:28; Masese 20:21; 31:17-19, 24; 2 Batesaloniki 3:8-12) Lokoso ya mosolo epusaki basusu kobɛta masano ya mbongo lokola tombolá, PMU, to loterie. Basusu, baoyo bazali na mawa te mpe bayebi kososola te, bakokendaka nokinoki mpo na kofunda makambo na Leta na elikya ya kozwa mbano to lifuti.
12. Lolenge nini toyebi ete lokoso mpo na kozala na bozwi ekoki kolóngama?
12 Ebongi na biso komitalela kati na makambo oyo touti komona mpo ete tokoka komona na bosembo nyonso soki lokoso ezali na bopusi likoló na biso. Ata soki ezali bongo, tokoki kobongwana. Tomikundola ete Zakai abongwanaki. (Luka 19:1-10) Soki moto asosoli ete lokoso ya kozala na bozwi to na biloko mingi ezali kotungisa ye, asengeli kozwa ekateli makasi lokola Zakai, mpo na kokima motambo wana.—Yilimia 17:9.
Lokoso kati na makambo mosusu ya bomoi
13. Nzembo 10:18 ebendi likebi na biso likoló na motambo nini mosusu ya lokoso?
13 Basusu bazali na nkaká te mpo na komona likámá ya lokoso na ntina na mosolo to na biloko mingi, kasi bazali na nkaká mpo na komona banzela mosusu oyo yango ezali komonana. Diksionere moko ya Greke elobi ete maloba oyo mabongolami na “lokoso” to “bilulela” ezali na ndimbola ya “‘mposa ya kozala na mingi,’ awa tolobeli nguya, biloko ya mosuni mpe bongo na bongo.” Ya solo, tokoki kozwama na motambo na kozaláká na lokoso ya koyangela bato mosusu na lolenge mabe, mbala mosusu mpo na kobangisa bango na bokonzi na biso.—Nzembo 10:18.
14. Mposa ya kozala na bokonzi ezali likámá kati na makambo nini?
14 Uta kala, bato bazangi kokoka basepelaki kozala na bokonzi likoló na bato mosusu. Nzambe ayebisaki liboso ete matomba mabe mauti na lisumu ya moto ekosala ete mibali mingi bazala “na bokonzi likoló na” basi na bango. (Genese 3:16) Atako bongo, mabe wana esuki te bobele kati na libala. Bambula mingi na nsima, mokomi moko ya Biblia amonisaki ete “moto azali na bokonzi likoló na moto mosusu mpo na kookisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Na ntembe te, oyebi lolenge yango ezali kosalema kati na makambo ya politike mpe na makambo ya basodá, kasi mbala mosusu tozali nde komonisa mposa wana ya kozala na bokonzi mpe na koyangela epai na bato bazali zingazinga na biso?
15, 16. Moklisto akoki kozwama na motambo mpo na mposa ya kozala na bokonzi mingi kati na makambo nini? (Bafilipi 2:3)
15 Biso banso tozalaka na boyokani elongo na bato mosusu—kati na libota ya penepene to ya mosika, na esika ya mosala to na eteyelo, kati na baninga, mpe kati na lisangá. Na mabaku mosusu, to mbala mingi, tokoki kozwa mokumba ya kopesa mitinda na makambo, kolakisa lolenge mpe kopesa ntango oyo yango esengeli kosalema. Yango ezali mabe te. Nzokande, tokosepela nde kosalela bokonzi bopesameli biso na kolekisa ndelo? Olingaka mbala mosusu ete okamata ekateli ya nsuka mpe koluka ete osala bobele bongo mbala na mbala? Mbala mingi, bakambi to bakonzi ya misala na mokili bakomonisaka ezaleli yango wana bazingami na bato oyo bazali bobele kondima makambo nyonso bango bazali koloba, baoyo bazali kotɛmɛla makanisi na bango te mpe bazali kobɛta ntembe te na mposa na bango monene (lokoso) ya koyangela.
16 Wana ezali motambo oyo tosengeli kopɛngola kati na boyokani na biso elongo na baninga na biso baklisto. Yesu alobaki ete: “Boyebi ete bakonzi ya mabota bazali koyangela bango mpe bato minene bazali na bokonzi likoló na bango. Ezali bongo te kati na bino; kasi moto na moto oyo alingi kozala monene kati na bino, asengeli kozala mosaleli na bino.” (Matai 20:25, 26, MN) Komikitisa lolenge oyo esengeli komonana kati na boyokani oyo ezali kati na bankulutu bango moko, na boyokani na bango elongo na basaleli na misala, mpe elongo na etongá. Na ndakisa, mposa ya kozala na bokonzi ekoki komonisama na mokɛngɛli-mokambi oyo azali kotalela bobele makambo ya mikemike elongo na baninga na ye bankulutu, nde alingi bobele ye moko azwa bikateli nyonso? Azali mpenza na motema malamu mpo na kopesa mikumba na basusu? Mikakatano mikoki kobima soki mosaleli na misala moko akambi likita mpo na mosala ya kosakola na kosɛngisáká na kozanga kososola mpe na bokonzi nyonso ete batosa bobele bibongiseli na ye.—1 Bakolinti 4:21; 9:18; 2 Bakolinti 10:8; 13:10; 1 Batesaloniki 2:6, 7.
17. Mpo na nini ebongi mpenza kotalela bilei awa ezali biso kolobela motambo ya lokoso?
17 Bilei ezali likambo mosusu kati na yango bato mingi bazali kozwama na motambo ya lokoso. Ya solo, moto nyonso azalaka na esengo na kolya mpe na komela; yango endimami na Biblia. (Mosakoli 5:18) Nzokande, emonanaka mingi ete mposa kati na likambo wana ekóla na boumeli ya ntango, kolekisáká ndelo ya oyo ebongi mpe ekoki. Soki yango etaleli basaleli ya Nzambe te, mpo na nini Liloba ya Jéhovah lizwami na Masese 23:20 lilobi ete: “Zala elongo na bameli na masanga te, soko elongo na bato baoyo bakolyaka mosuni na mposa mabe”? Na yango, lolenge nini tokopɛngola motambo wana?
18. Na likambo nini tosengeli komitalela na ntina etali kolya mpe komela?
18 Nzambe alobi te ete bato na ye balyaka bobele bilei oyo bizali kitoko mingi te. (Mosakoli 2:24, 25) Kasi azali mpe kondima te ete lolenge na biso ya kolya mpe ya komela eyangela masoló na biso mpe mikano na biso. Tokoki komituna ete: ‘Mbala mingi nakómaka na esengo eleki ndelo na ntango nalobelaka biloko oyo nalyaki to oyo nakolya?’ ‘Nalobaka ntango nyonso na ntina na kolya mpe komela?’ Elembo mosusu ekoki kozala lolenge tosalaka na ntango tozwi bilei oyo tolambaki yango te to tosombaki yango te, mbala mosusu ntango tobyangami na ndako mosusu to ntango bilei bipesami na assemblée ya boklisto. Ekoki bongo kokóma ete tomipesa na kolya koleka na momeseno? Tomikundola ete Esau apesaki nzela na bilei ete ekóma na ntina mingi mpenza, mpo na libebi na ye ya seko.—Baebele 12:16.
19. Lolenge nini lokoso ekoki kozala mokakatano na ntina na mposa ya kosangisa nzoto?
19 Paulo amonisi biso motambo mosusu: “Tika te ete motindo nyonso na pite mpe na lokoso ezwama kati na bino, lokola ebongi na basantu.” (Baefese 4:17-19; 5:3, MN) Ya solo, lokoso mpo na mposa ya kosangisa nzoto ekoki kokóla. Solo mpenza, esengo wana endimami bobele kati na libala. Bolingo makasi esangani na esengo wana ezali kosalisa mobali mpe mwasi na komipesa moko epai na mosusu na boumeli ya bambula mingi na libala. Nzokande, bobele bato moke nde bakoki koboya kondima ete mokili ya lelo emipesi mingi mpenza na makambo matali kosangisa nzoto, kolakisáká bizaleli oyo bimonisi mpenza lokoso oyo Paulo alobelaki, lokola makambo malamu. Mingi mpenza, likanisi mabe oyo litali mposa ya kosangisa nzoto na kozanga kokakatana ezali komonana epai na baoyo bamipesi mpo na kotala misala ya mbindo mpe bolumbu ya basi na mibali oyo elakisami na bafilme, ba vidéos, mpe bazulunalo, lokola mpe na bisika ya masano.
20. Lolenge nini baklisto bango moko bakoki komisɛnzela na likámá ya lokoso kati na makambo matali kosangisa nzoto?
20 Lisoló ya lisumu oyo Davidi asalaki elongo na Bata-seba emonisi ete moko na basaleli ya Nzambe akoki kozwama na motambo ya lokoso mpo na kosangisa nzoto. Atako eloko moko te epekisaki ye mpo na kozwa esengo wana kati na libala na ye moko, Davidi atikaki nzela na mposa mabe ya kosangisa nzoto ekóla. Na kotala ete mwasi ya Uliya azalaki kitoko mingi, Davidi apekisaki makanisi na ye te—mpe misala na ye te—mpo na kokokisa mposa wana ya mabe elongo na ye [Bata-seba]. (2 Samwele 11:2-4; Yakobo 1:14, 15) Solo mpenza, tosengeli kopɛngola lolenge na lokoso oyo. Ata kati na libala, ebongi kopɛngola lokoso. Yango esɛngi kobwaka bosangisi nzoto na kolekisa ndelo. Mobali oyo azwi ekateli ya kopɛngola lokoso kati na likambo wana asengeli solo komibanzabanza mpo na mwasi na ye, na boye ete, liponi nyonso bango mibale basalaki na ntina na motuya ya bana oyo bakobota, etinda ye te na kotalela kosangisa nzoto na ntina mingi koleka kolongono na nzoto ya mwasi na ye mpo na sikawa to na mikolo mizali koya.—Bafilipi 2:4.
Tózala ntango nyonso na ekateli ya kopɛngola lokoso
21. Mpo na nini lisoló na biso na ntina na lokoso esengeli kolɛmbisa biso te?
21 Jéhovah azali te kopesa makebisi to batoli mpo ete azangi kotyela biso motema. Ayebi ete basaleli na ye baoyo bamipesi balingi kosalela ye na bosembo nyonso, mpe azali na elikya ete mingi na bango bakolanda kosala bongo. Na ntina na libota na ye mobimba, akoki kosalela maloba makokani na oyo abimisaki na ntina na Yobo, ntango alobaki na Satana ete: “Osili kotya motema na yo likoló na moombo na ngai Yobo, mpo ete moto moko te azali lokola ye kati na mokili, moto na efundeli te mpe na sembo, akobangaka Nzambe mpe atangwi na mabe?” (Yobo 1:8, MN) Tata na biso na likoló, oyo na bolingo mpe abongi na kotyela motema, azali kokebisa biso na mitambo mabe, lokola oyo ezali na boyokani na mitindo ya lokoso, mpo alingi ete biso tolanda kozala na litɔnɔ te mpe na bosembo epai na ye.
22. Moko na moko na biso asengeli kosala nini soki boyekoli na biso emonisi likambo moko lizali likámá to mabe mpo na ye?
22 Moko na moko na biso asili kosangola mposa ya lokoso, mpe ekoki kozala ete tokólisaki yango na kopusama na mokili oyo mabe. Ezali boni soki na boumeli ya boyekoli na biso likoló na lokoso—na bozwi, na biloko ya mosuni, nguya mpe bokonzi, bilei, to na mposa ya kosangisa nzoto—omoni bolɛmbu na ndambo na makambo oyo? Na bongo, simba toli oyo na Yesu: “Soki lobɔkɔ na yo ezali kobɛtisa yo libaku, kata yango; ezali malamu mpo na yo ete okɔta ebɔsɔnɔ kati na bomoi, na esika na kobwakama na mabɔkɔ mibale kati na Gehena.” (Malako 9:43, MN) Salá mbongwana oyo esengeli kati na bizaleli to bamposa na yo. Pɛngolá lokoso, motambo oyo mozali komema na liwa. Bongo na lisalisi ya Nzambe, okokoka ‘kokɔta kati na bomoi.’
Toyekolaki nini?
◻ Mpo na nini tosengeli komibanzabanza na ntina na motambo ya lokoso?
◻ Kati na makambo nini lokoso mpo na kozala na bozwi to na biloko ya mosuni ekoki kozwa biso na motambo?
◻ Lolenge nini lokoso kati na makambo mosusu ya bomoi ya lelo ekoki mpenza kozala likámá?
◻ Ezaleli na biso esengeli kozala nini na ntina na mabe nyonso oyo tozali na yango na ntina na lokoso?