Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/2 nk. 4-7
  • Kanisa mokili ezangi lokoso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisa mokili ezangi lokoso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lokoso elongolami na nzela na mateya
  • Basolo ya Biblia ezali kosala mosala
  • Mokili na sika mozangi lokoso
  • “Libota na lokoso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tópɛngola motambo ya lokoso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Okoki kokima mitambo ya Satana!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Lokoso​—⁠Lolenge nini ezali kobebisa biso?
    Lamuká!—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/2 nk. 4-7

Kanisa mokili ezangi lokoso

OKOKI kokanisa mokili epai kuna bato bakosalana elongo na esika ete bawelana kati na bango? Mokili epai kuna bato bakosala epai na baninga na bango bobele makambo oyo balingi ete basalela bango mpe lokola? Ezali wana bizaleli ya mokili ezangi lokoso. Oyo nde mokili kitoko! Ekozala nde mokolo mosusu? Ee, na solo mpenza Kasi ndenge nini lokoso, eloko oyo esili kozwa mpenza misisa epai na moto, ekoki kolongolama?

Mpo na koyanola, esengeli na biso koyeba liboso naino ebandeli ya lokoso. Biblia ezali komonisa ete lokoso ezalaki mpenza ntango nyonso te na ebandeli epai na moto. Mosakoli Moise akundoli biso ete na ebandeli, ata mabe moko ya motindo yango ezalaki te epai na moto ya liboso, ekelamu na kokoka ya Mozalisi oyo na makanisi malamu: “Ye Libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete banzela na ye nyonso ezali boyengebene.” Bongo lokoso euti wapi? Euti na oyo ete, babalani ya liboso batikaki yango kokola kati na bango. Lolenge nini wana? Eva alulaki matomba oyo akokaki kozwa na kolyaka mbuma oyo epekisamaki na Nzambe; mpo na Adam, ezali na lokoso nde aboyaki kozanga mwasi na ye kitoko. Na likambo na bango wana, Moise abakisaki maloba oyo mabongi: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango.”​—Deteronome 32:4, 5; 1 Timoté 2:14.

Na eleko ya mpela ya Noa, lokoso mpe mbindo epalanganaki na mokili mobimba kino ete “masumu na bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso”.​—Genese 6:5.

Motindo oyo na makanisi, oyo etondi mingi epai na bato, eumeli kino sikawa mpe emonani lokola ete esili kokola mpenza koleka kati na libota oyo lisili kobeba mpe na lokoso, oyo tofandi kati na yango lelo.

Lokoso elongolami na nzela na mateya

Soki lokoso ekolaki kokola epai na bato, likambo likoki kobongwana mpe lokoso ekolongama. Nzokande, mpo na kolonga, esengeli kozwa mateya mpe kobongisama ekoki, mpe kolanda bamoko na mitinda ya etambweli malamu. Soko tokondimisama ete yango ekoki kosalema, nani akoki kopesa motindo wana na mateya mpe kosala ete eyekolama etosama, ata mpe kotosisa yango na makasi, soko yango esengeli?

Motindo na mateya wana masengeli kouta bobele na liziba oyo ezangi lokoso. Esengeli kozala na mikano mibambami te, soko kolikya kozwa mwa eloko moko na kosombitanya na kobongisama wana. Mpe lisusu, asengeli koteya mpe komona ntina mpenza ya komibanzabanza mpo na bamosusu. Moto oyo azali koyekola azali na mposa na kondimisama ete, likoki ezali na kokoma na motindo na bomoi wana, mpe lisusu ete ezali wana nde nzela malamu na kolanda, mpe ete ye moko mpe bazalani na ye bakozwa na yango matomba malamu.

Bobele Nzambe ya makoló nde azali na makoki na kopesa motindo na mateya wana, mpamba te moto nani awa na mabelé to lisanga nini likoki kosala yango? Ata moto moko te akoki na yango, engebene solo oyo na Biblia: “Bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo na Nzambe.”​—Baloma 3:23.

Likambo na esengo mpenza ete, Jéhovah Nzambe azali kopesa mateya yango na nzela ya mokanda akomisaki, Biblia. Na ntango azalaki na mabelé, mwana na ye Yesu Klisto azalaki mokoteli monene ya motindo na mateya yango. Katikati na sermon na ye oyo eyebani mingi, Lisolo likolo na ngomba, alobaki na ntina na lolenge na bomoi oyo eyebanaki mpenza te na mingi na baoyo bazalaki koyoka ye. Ateyaki komonisa bolingo ata epai na banguna to batemeli na biso. Yesu alobaki: “Bolinga bayini na bino mpe bobondela mpo na banyokoli na bino; bongo bokozala bana ya Tata na bino na Likoló, mpamba te akobimisaka moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu, mpe akonokisaka mbula na bayengebene mpe na bapengwi. Mpamba te, soko bokolinga bobele baoyo bakolingaka bino,bozali na libonza nini? Bakongoli na mpako bakosalaka bongo te?”​—Matai 5:44-46.

Eteni na mosala na Yesu awa na mabelé ezalaki ya kobongisa bateyi oyo bazali komibanzabanza mpo na bamosusu, baoyo bakokaki mpe koteya na bato mosusu na kolanda motindo na bomoi wana bozangi lokoso. Mwa ntango moke nsima na liwa na ye, Paulo akomaki moko na bateyi yango. Kati na mikanda na ye mingi mipemami na Nzambe, Paulo alendisaki baklisto na kolongola ezaleli ya lokoso. Na ndakisa, akomaki boye epai na Baefese: “Tika te ete baloba nkombo na (pite, MN.) mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela (lokoso, MN.); ebongi bongo na babulami.”​—Baefese 5:3.

Bobele bongo, lelo ba Témoins de Jéhovah bazai koteya na mibali mpe basi lolenge nini bakoki kosilisa makanisi nyonso ya lokoso. Na boumeli na ntango, bango mpe babengami ,mpo na koteya banzela na Nzambe epai na bato mosusu.

Basolo ya Biblia ezali kosala mosala

Kasi ntango mosusu okoki komituna boye: ‘Bato bazangi kokoka, bazali mpenza na likoki ya kolongola kati na bomoto na bango lokoso oyo esili kozwa misisa mozindo kati na bango? Ee. Ya solo ekosila nyonso mpenza te, kasi mwa ndambo monene ekoki kosila. Totalela ndakisa moko.

Na Espagne, ezalaki na moyibi moko monene oyo ndako na ye etondaki na biloko oyo ayibaki. Mokolo mosusu abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Na nsima, lisosoli na ye ebandaki kotungisama mpe azwaki ekateli ya kozongisa biloko oyo ye ayibaki epai na bankolo na yango. Akendaki epai na patron na ye ya kala, epai kuna azalaki kosala mpe ayebisaki ete ayibaki ye masini ya sika oyo ya kosukola bilamba. Na kokamwaka mingi mpenza na mbongwana ya ezaleli na ye, mokonzi yango akanaki ete ayebisa likambo yango na la police te, kasi afutisa moyibi wana ya kala bobele mosolo oyo ye asombelaki masini.

Na nsima, komikundolaka lisusu makambo masalaki ye kala, moyibi yango ya kala akanaki kokende kotala bato oyo ye ayibaka mpo na kozongisela bango biloko na bango. Bato nyonso oyo ye akutaki bakamwaki na koyeba ete, kosalela mitinda na Biblia epusaki ye na kobongwana motindo wana.

Sikawa akomaki na mokakatano. Azalaki lisusu koyeba te bankolo na ebele na biloko oyo bitikalaki na ye. Bongo nsima na kobondela Jéhovah, akendeki na poste ya la police mpe apesaki ba radio motoba oyo ye ayibaki kati na bavuatire. Ba policiers bakamwaki, mpamba te bazalaki koyeba ye te lokola mosali mabe. Bakataki ete afuta lomande mpe asala bobele mwa mikolo na boloko.

Moyibi wana ya kala azali sikawa na lisosoli malamu mpo ete asili kotika kilikili mpe lokoso mpo na kokoma mosangani ya lisangá ya ba Témoin de Jéhovah na mokili mobimba.

Tokoki kotanga bankoto na bandakisa ya motindo oyo. Atako baoyo basili kosala mbongwana wana bazali bobele moke na kotalela motuya na bafandi na mokili, nzokande likambo oyo ete mingi basili kosala bongo emonisi ete boyebi mpe kosalela mitinda ya Biblia ekoki kopusa moto na kosala malamu.

Mbula na mbula, ebele na bato bazali kokoma na lolenge yango ya bomoi. Mateya ya Biblia mazali kopesama kati na masangá koleka 60 000 ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba. Ba Témoins bazali komizela te na kobongola mokili mobimba na kolongolaka lokoso epai na bamiliare ya bato oyo bazali na bomoi lelo. Nzokande, bisakweli bizali koyebisa ete mosika mingi te motindo na bomoi oyo ezangi lokoso ekotyama na mokili mobimba.

Mokili na sika mozangi lokoso

Moyimi mpe lokoso ekozwa esika te kati na mokili na sika oyo ezali koya. Ntoma Petelo azali kondimisa biso ete boyengebene ekozala bobele na ’’makolo na sika” te, kasi ekozala mpe na “mabelé na sika”. (2 Petelo 3:13.) Lokoso ekozala kati na “makambo ya kala” oyo makolongwa elongo na maladi, mpasi ata mpe kufa.​—Emoniseli 21:4.

Na yango, soko nde ozali kotungisama mpo na kobakisama ya lokoso mpe na lolenge na bomoi oyo na moyimi oyo tozali komona nzinganzingana biso, zala na mpiko! Uta sikawa zala na bomoi mpo na mokili na sika oyo ezali koya. Na lisalisi ya Nzambe, bunda mpo na kolongola makanisi nyonso ya lokoso kati na bomoi na yo. Zala esika moko na mibali mpe basi oyo bazali kosalisa bazalani na bango mpo na komona bolamu oyo bokoki kozwama kobanda sikawa na kozalaka na bomoi na boklisto. Ndima elaka na Nzambe oyo elaki ete nsima na mwa moke lokoso ekozala kati na makambo oyo na ntina na yango Yisaya azali kolobela ete: “Mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya na motema te.”​—Yisaya 65:17.

[Elilingi na lokasa 5]

Yesu alobelaki motindo na bomoi moko oyo ezali kolendisa bolingo bozangi koluka litomba kasi lokoso te.

[Elilingi na lokasa 7]

Mosika te mokili oyo ezangi lokoso ekoya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto