Kobatelama ya solo ekoki mpenza kozwama?
MOKOMI Ralph Waldo Emerson alobaki mokolo moko ete: “Bato oyo bazangi bososoli bazalaka bindimandima . . . bato na bososoli bayebi ete likambo nyonso libimaka na ntina na yango.” Ya solo, moto oyo azali kondima nguya ya nkísi mpe ya bikelákela azali kotika bomoi na ye kotambwisama na banguya ezangi komonana. Azali kobwaka bososoli mpe mayele, mpe azali komitika na bobangi ya biyambayamba ya mpamba.
Nzokande, Biblia ekoki kosikola moto na bobangi motindo yango. Ezali komonisa ete nkísi mpe bikelákela ezali na nguya te. Lolenge nini? Engebene mokanda The New Encyclopædia Britannica, “bakanisaka ete nkísi ezwaka nguya na boyokani na yango elongo na [makambo lokola] banguya ya biloko bizalisami.” Banguya wana ekoki kozala ‘bilimu ya bakufi’ to ‘nguya ya makilamalamu.’ Kasi Biblia ezali komonisa polele ete bakufi “bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Na bongo, ezali na bilimu ya bakufi te oyo bikoki kosalisa to kopesa mpasi epai na bato na bomoi; ezali mpe na nguya moko te ezangi komonana lokola, makilamalamu, oyo ekoki kosala mpo na bolamu na biso.
Na ntango ya kala, Nzambe akweisaki baoyo bazalaki kotika ye, baoyo bazalaki kobosana ngomba na ye mosantu, “baoyo bakotelemisaka mesa mpo na nzambe ya makilamalamu mpe bakotondisa kopo mpo na nzambe na Kokanelama.” Na esika ya kozwa libateli, baoyo bazalaki kobyanga makilamalamu babongisami mpo na kobomama. Jéhovah Nzambe alobaki ete: “Nakokanela bino mpo na mopanga.”—Yisaya 65:11, 12.
Na komipesáká na misala ya bilimu mabe, libota ya Babilone lizalaki bongo kotya motema na libateli ya banguya ya kokamwisa. Kasi Babilone ezangaki te kozwa libebi. Mosakoli Yisaya atemelaki yango ete: “Kangama na nkísi na yo mpe na bondoki monene na yo. Soko nde okozwa litomba na yango . . . Kasi eloko te! ata bikelákela na yo, ozali na nguya te.” (Yisaya 47:12, 13, The New English Bible) Na nsima libota wana elimwaki mobimba. Elikya oyo batyaki kati na soloka ezalaki mpamba. Bobele bongo, nkísi moko te, bikelákela te to mpúngu moko te ekoki kosala likambo mpo na kosalisa biso to mpo na kobatela biso.
Lolenge ya losambo ya bikeko
Nzokande, bato mosusu bazali komona ete likámá moko ezali te na kolata libanga, lokolo ya lapin, to modai ya mangomba. Yango ezali bobele eloko ya mpamba ezangi makámá? Engebene Biblia, ezali bongo te. Biblia elobi ete kosalela makambo ya magie ezangi likámá soko moke te.
Kosalela nkísi ezali lolenge moko ya losambo ya bikeko—eloko oyo Liloba na Nzambe ekweisi yango polele. (Exode 20:4, 5) Ezali solo ete, moto moko akoki kokanisa te ete azali mpenza kosambela nkísi to mpúngu. Kasi kozala na bikelákela elakisi kokumisa mpe kosambela banguya ezangi komonana ya bondoki, boye te? Mpe mbala mingi bapesaka likebi oyo ekokani na losambo (lokola kopwepwa bikelákela yango), boye te? Nzokande Biblia, kati na 1 Yoane 5:21, epesi baklisto toli oyo: “Bana, bobelema na bikeko te.” Toli oyo etali biloko bitalelami lokola bikelákela to lokola nkísi, boye te?
Motambo ya misala ya bondoki
Na nzela na nkísi, bato mingi bazali kozwama na motambo ya misala na bondoki. Ezali solo ete, bato mingi bakoki komema libanga bobele mpo na momeseno kasi te mpo ete bandimi nguya na yango. Kasi lokola kotambola na mwasi ya pite ekoki komema na SIDA, bobele bongo komipesa na misala ya bilimu mabe ekoki kozala na bosukisi ya mabe mingi. Ezalaki na ntina soki Nzambe apekisaki Bayisraele na komipesa na magie, na soloka mpe na zonga. Biblia ekebisi ete: “Bato nyonso bakosala makambo oyo bazali mbindo na miso na Jéhovah.”—Deteronome 18:10-14.
Mpo na nini epekiseli ya makasi boye? Mpo ete nguya ezangi komonana oyo ezali nsima na biloko yango euti na bilimu ya bakufi te to mpe na makilamalamu te kasi euti na Satan le Diable mpe bilimu mabe.a Mpe nkísi ezali mbala mingi na boyokani na losambo ya bilimu mabe. Mokanda Diksionere ya ndimbola ya maloba ya Kondimana ya Kala mpe ya Sika ya Vine (na Lingelesi) elobi ete: “Kati na bondoki, kosalela drogue, ezala ya mpamba to oyo ya makasi, etambolaka nzela moko na kosáka mpe kobyanga nguya ya bondoki, elongo na bikelákela mpe nkisi ndenge na ndenge, mpe bongo na bongo.”
Moto oyo azali na bikelákela ya bondoki azali bongo komipesa na losambo ya bilimu mabe. Azali na likámá ya kozwama na bopusi mabe ya “nzambe na mokili oyo”—Satan le Diable. (2 Bakolinti 4:4) Ezali bongo na bantina malamu soki Biblia epesi biso etinda ya koboya lolenge nyonso ya losambo ya bilimu mabe.—Bagalatia 5:19-21.
Tomisikola na biyambayamba
Mokanda monene The World Book Encyclopedia emonisi likanisi oyo ete: “Biyambayamba ekolanda mbala mosusu kozala eteni ya bomoi ntango nyonso oyo bato bakozala kobangana mpe kokakatana na ntina na makambo mazali liboso.” Kasi ba Témoins de Jéhovah bazali kosalisa bato mingi na komisikola na biyambayamba oyo ezali kopesa mpasi. Mwasi moko ya mboka Afrique du Sud amikundoli ete: “Natungisamaki na bilimu mabe, mpe ndako na ngai etondaki na muti mpo na kobatela ngai na maboko na bango.” Ba Témoins de Jéhovah basalisaki ye na komona likámá ya kosakana na bondoki. Ayanolaki ndenge nini? Alobi ete: “Nabandaki kobwaka biloko nyonso oyo nazalaki na yango oyo ezalaki na boyokani na losambo ya bilimu mabe. Kolongono na ngai ya nzoto ezongaki malamu. Namipesaki mpo na kosalela Jéhovah mpe nazwaki batisimo.” Lelo oyo asili kosikolama na biyambayamba mpe na losambo ya bilimu mabe.
Totala mpe likambo ya ngangankisi moko moto ya Nigéria oyo azalaki kosangisa losambo ya bilimu mabe mpe misala na ye ya kobikisa. Azalaki na momeseno ya kobengana ba Témoins de Jéhovah ntango bazalaki kokende kotala ye, kosaleláká mbala mingi makaneli mpe maloba ya kolakela mabe. Mokolo moko abongisaki nkutu nkísi moko ya nsomo, asáki likoló na yango mpe abwaki yango na elongi ya Temwe moko! Angangaki ete: “Liboso ete mikolo nsambo ekoka okokufa!” Nsima na mikolo nsambo Temwe azongaki. Nokinoki ngangankisi abimaki na libandá, mpo akanisaki ete amoni elima! Lokola magie na ye elóngaki te, andimaki bongo koyekola Biblia mpe na nsima ye moko akómaki Temwe.
Yo mpe okoki kosikolama na minyololo ya bobangi mpe na biyambayamba. Ya solo, yango ekoki kozala mpasi. Mbala mosusu okolaki na esika oyo bazali mpenza kosalela mingi nkísi mpe bikelákela. Baklisto ya Efese ya kala bakutanaki na mokakatano yango. Bazalaki kobika kati na bato oyo bapusamaki mingi na losambo ya bilimu mabe. Basalaki nini ntango bayekolaki solo ya Liloba na Nzambe? Biblia elobi ete: “Mingi na baoyo basalaki makambo na nkísi bayanganisi mikanda na bango nyonso mpe batumbi yango na miso na bato nyonso. Batangi motuya na mikanda yango mpe mikoki palata nkóto ntuku mitano.”—Misala 19:19.
Toluka kobatelama ya Nzambe
Soki olongoli bikelákela nyonso ya bondoki, okozanga nde kobatelama? Na bokeseni, “Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi.” (Nzembo 46:1) Kobatelama ya Nzambe ekozala mpenza polele ntango akoboma biloko mabe ya ntango oyo. “Jéhovah ayebi kobikisa bango bakosambela ye wana ezali bango kati na komekama nde kobatela bakesene kino mokolo na kosambisama mpo na kozwa etumbu.”—2 Petelo 2:9; tala Nzembo 37:40.
Wana tozali kozela, ‘ntango mpe makambo makanelami te ekokwela biso nyonso.’ (Mosakoli 9:11, MN) Nzambe alobi te ete basaleli na ye bakozala na bomoi “ebatelami” na mikakatano to akobatela bango na mabe nyonso oyo ekoki kokómela moko na moko na bango. Nzokande, alakaki ete akobatela elimo na biso mpe boyokani na biso elongo na ye. (Nzembo 91:1-9) Lolenge nini? Ya liboso, apesi biso mibeko na ye mpe mitinda na ye oyo mikoki kopesa biso litomba mpe kobatela biso na bopusi mabe ya Satana. (Yisaya 48:17) Soki tozwi boyebi ya banzela na Jéhovah, ‘mayele ekobatela biso mpe bososoli ekosunga biso’—na ndakisa, na misala mizangi ntina to na oyo mizali na makámá.—Masese 2:11.
Lolenge mosusu oyo Nzambe azali kobatela biso ezali ya kopesa “nguya oyo eleki nguya na bato” na ntango ya komekama. (2 Bakolinti 4:7) Mpe wana makambo oyo mabimi malingi kobulunganisa moklisto moko, Ye akopesa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” mpo na kobatela motema mpe makanisi na ye. (Bafilipi 4:7) Ya solo, moklisto abongisami mpo na “kotelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana.”—Baefese 6:11-13.
Lolenge nini okoki kozwa libateli motindo oyo? Banda liboso kozwa boyebi ya Jéhovah mpe ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 17:3) Ba Témoins de Jéhovah bakoki kosala mingi mpo na kosalisa yo na makambo yango. Ntango okobanda kokolisa boyokani ya malamu elongo na Jéhovah, okobanda bongo kozwa libateli na ye ya boboto. Nzambe alobi, lokola tokoki kotanga yango na Nzembo 91:14: “Nakobikisa ye mpo ete ye azali kolinga ngai; nakotombola ye likoló mpo ete ayebi nkombo na ngai.”
Ya solo, soki otikali sembo epai na ye, Nzambe akopesa yo bomoi ya seko na mikolo mizali koya kati na mokili ya sika. Jéhovah apesi endimiseli na ntina na baoyo bakobika na ntango wana ete: “Moto moko akobangisa bango te, mpo ete monoko na Jéhovah na bibele elobi bongo.” (Mika 4:4) Bokono mpe kufa ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:4) Nzokande, ata sikawa, okoki kozala na mwa libateli—soki okolisi boyokani ya penepene elongo na Jéhovah. Lokola mokomi ya Nzembo, okoki koloba ete: “Kosunga na ngai ekolongwa na Jéhovah, oyo asalaki lola mpe mokili.”—Nzembo 121:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisi mingi, tala brochure Bilimo ya bakufi—bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 6]
Baklisto ya Efese balongolaki biloko nyonso oyo bizalaki na boyokani na bilimu mabe
[Elilingi na lokasa 7]
Na nse ya Bokonzi na Nzambe, kobanga ekozala lisusu te