Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/9 lok. 3
  • Bikelákela bikoki kobatela yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikelákela bikoki kobatela yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boluki ya kobatelama
  • Nguya ya nkísi ekoki kotyama ntembe
  • Kobatelama ya solo ekoki mpenza kozwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Okoki koyanola?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Biyambayamba mpo na nini ezali kaka makasi?
    Lamuká!—2000
  • Ozalaka moto ya biyambayamba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/9 lok. 3

Bikelákela bikoki kobatela yo?

LIBANGA ya kongenga kati na libenga ya mobali moko ya mboka Brésil. Mosani ya Amerika akomemaka mbongo ya ebende mpo na kozala na makilamalamu. Ekulusu ya santu Brigide ekakisami likoló na mbeto na libota moko ya mboka Irlande. Bamilió na bato bazali kosalela biloko wana lokola bikelákela wana to nkísi (amulettes).a Bakanisi ete kozala na bikelákela wana ekoki kobatela na likámá mpe komemela bango makilamalamu.

Na ndakisa, totya likebi na biso na mokili ya Brésil. Engebene zulunalo Veja, bafandi mingi ya Brésil bamemaka “biteni ya mabanga mpe mabanga ya mwa motuya oyo bakanisaka ete ekoki kopesa makilamalamu mpe nguya epai na baoyo bazali na yango.” Bafandi mosusu ya mboka wana batyaka elembo moko to makomi ya lingomba likoló na bifelo ya ndako na bango, mpamba te bazali kobanga kosilikisa banguya ya bondoki. Nkutu basusu basalelaka ata Biblia lokola eloko ya bulee; batikaka yango ntango nyonso polele likoló na mesa, na Nzembo 91.

Na sud ya Afrika, muti, to nkísi ya bonkɔ́kɔ, esalelami motindo moko, bobele te mpo ete ekoki kobikisa na bokono, kasi esalelami lisusu mpo na komibatela na lisumá. Bokono, kufa, kokwea ya nkita mpe ata nsuka ya bolingo kati na mwasi mpe mobali etalelamaka mbala mingi lokola koloka oyo euti na bayini to na kozanga kobondela bankɔ́kɔ oyo bakufa. Muti ezwamaka mbala mingi epai na ngangankisi, oyo asangisaka matiti, nzeté to misuni ya nyama mpo na kosala monɔ́. Nzokande, ezali likambo ya kokamwa ete muti esuki te bobele na bamboka mike; momeseno yango mopalangani na bingumba ya Afrique du Sud. Bato na mombongo mpe bato basilisa na université bazali kati na baoyo bakotyaka motema na muti.

Bolukiluki ya makilamalamu epalangani mpe mingi na mikili ya Mpótó. Mokanda Studies in Folklife Presented to Emyr Estyn Evans eyebisi biso ete: “Ezali mpenza na quartier moko te to na engumba moko te ya Irlande epai okozanga komona bibende ya ensɔ́bú ya mpunda ekakisami na bikuke to likoló ya bikuke ya bandako.” Nkutu bipai nyonso na mboka wana okokuta ekulusu ya nkɛkɛle ekakisami likoló na mbeto mpe na bikuke mpo na kopesa makilamalamu. Bato na mayele balobi ete, na lolenge emonani, bafandi mingi ya Irlande bazali komonisa lokola nde bamipesi na biyambayamba yango te. Nzokande, bobele bato moke kati na bango nde bazali mpenza kotyela yango motema te.

Boluki ya kobatelama

Ntina ya biyambayamba yango ezali nini? Emonani lokola ete ezali kokokisa mposa monene ya kobatelama oyo bato bazali kooka. Ya solo, bato boni bazali komiyoka ete bazali na libateli kati na bandako na bango, to mingi mpenza ntango bazali kotambola na balabala na butu? Bakisa likoló na yango mikakatano ya koleisa mpe kobatela bana. Ee, tozali kobika na eleko oyo Biblia ezali kobenga ete “ntango ya mikakatano.” (2 Timoté 3:1, The New English Bible) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete bato bazala na mposa ya koluka kobatelama.

Likambo yango likoki mpenza komonana mingimingi na bikólo epai kuna bato mingi bamipesi na mitindo mikeseni ya misala ya bilimu mabe mpe na magie. Kobanga oyo bakanisi ete ezali bilimu ya bakufi to kobanga kolokama na monguna ekoki kosala ete kobatelama ya bikelákela to ya nkísi emonana lokola ete ezali na ntina mingi. Atako bongo, mokanda The World Book Encyclopedia emonisi ete: “Ebele na bato bazali na nsomo oyo ezali kopusa bango na komiyoka ete bazangi libateli. Biyambayamba bizali kosalisa na kolónga nsomo motindo yango wana bizali kopesa mwa maoki ya libateli. Bizali kondimisa bato ete bakozwa oyo bazali koluka mpe bakopengola mikakatano.”

Nguya ya nkísi ekoki kotyama ntembe

Kati na mokili mobimba bato balataka, bamemaka mpe balakisaka nkísi, mpúngu mpe bikelákela ya mitindo mingi mpe ya lolenge ekeseni. Kasi, ezali likambo ya mayele na kokanisa ete bikelákela oyo bisalami na maboko ya moto ekoki kopesa kobatelama ya solo? Mingi kati na biloko oyo bisalelami lokola bikelákela bizali biloko oyo bibimisami ebele na mbala moko na bakompanyi oyo ekosalaka yango mpo na kotekisa. Ezali bozoba mpe kozanga mayele na kokanisa ete biloko bisalemi na kompanyi bikoki kozala na nguya ya kobatela, boye te? Lisusu, ata monɔ́ oyo esalemi na ngangankisi ezali bobele kosangisama ya biloko ya mpamba lokola misisa ya nzeté, matiti, mpe biloko mosusu ya lolenge yango. Mpo na nini bosangisi yango ekoki kozala na nguya ya kokamwa? Lisusu, ezali na bilembeteli ete bato oyo bazali kosalela bikelákela bazali koumela ntango molai​—to bazali na esengo mingi​—koleka baoyo bakosalelaka yango te? Baoyo basalaka bikelákela motindo yango bazwaka bokono te to bakufaka te?

Na esika ete epesa bato kobatelama ya solo mpe maoki ya kokamba bomoi na bango, nkísi mpe bikelákela ekoki mpenza kolembisa bato na koluka kolónga mikakatano na bango na lolenge ya mayele mpe ezali kolendisa bango na kotalela makilamalamu lokola mwango ya kobongisa makambo nyonso. Kotya motema kati na nkísi ekoki lisusu kopesa na mosaleli na yango maoki ya lokuta ete azali na libateli. Moto oyo alangwi akoki kobeta ntolo ete alangwi te mpe ete makoki na ye mabongwani te, kasi soki ameki kokumba motuka, akoki mbala mosusu kozoka ye moko to kozokisa moto mosusu. Ye oyo azali kotya motema na nguya ya bikelákela akoki bobele bongo komisala mabe. Lokola azali na nse ya makanisi mpamba oyo ete abatelami, akoki kozala pene ya komitya liboso na makámá to ya kozwa bikateli bizangi mayele.

Kondima nguya ya nkísi ezali lisusu kobimisa makámá minene oyo bamilió na bato oyo bazali kosalela yango bayebi te. Makámá wana mazali nini, mpe ezali solo na mwango mobongi ya kopengola mpasi? Lisoló lilandi likopesa biyano na mituna wana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mokanda Dictionnaire alphabétique et analogique de la langue française ya Paul Robert elimboli liloba “amulette” to “nkísi” lokola “mwa eloko moke oyo bakolataka na nzoto mpo na komibatela na maladi, na makámá, na kolokama, bongo na bongo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto