Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/12 nk. 2-3
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Elembo ya ntango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Elembo ya ntango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Nzambe nde azali mobandisi na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Wana makámá mauti na biloko bizalisami mabimi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/12 nk. 2-3

Makámá mauti na biloko bizalisami​—Elembo ya ntango?

“LIBOTA mɔkɔ ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonji mɔkɔ ekotɛlɛmɛla bokonji mosusu; njala mpe koningana na mokili ekojala na esika na esika. Makambo oyo yɔnsɔ ijali bobɛlɛ ebandeli na bolɔji.” Na maloba oyo, Yesu Klisto alimbolaki na bayekoli na ye esili koleka sikawa bikeke 19 ete makambo ya nsomo motindo wana, elongo na kobakisama ya mobulu mpe kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba, elingaki kobandisa elembo oyo esangisi makambo mingi, oyo esengelaki komonisa “nsuka ya ekeke.”​—Matai 24:3-14.

Na kotalela yango, tosengeli komituna: Tozali nde komona koningana ya mabelé ya nsomo, ekungola, mpela, kozanga mai, mpe nzala mingi koleka na ntango ya liboso? Mpe atako zébi mpe tekiniki ekóli mingi, tozali nde komona lelo bato mingi konyokwama na makámá wana koleka na kala?

Mpo na bato mingi eyano ezali ee. Na ndakisa, zulunalo New Scientist epesi likebisi oyo ete: “Mokili mosengeli komizela na makámá mingi na bambula 1990 koleka oyo esalemaki na mibu misusu nyonso ya liboso.” Bobele bongo, kati na Chronique O.N.U. ya Yuní 1991, mokambi ya Lisangá likotalelaka makambo matali météo kati na mokili mobimba, alobaki ete: “Likambo yango lizali komonana polele. Uta bambula 1960 kino bambula 1980 . . . , makámá ya biloko bizalisami masili kobakisama mbala mitano, motuya ya biloko nyonso ya nkita bibebisami mobakisami mbala misato.” World Health, zulunalo ya Lisangá likotalelaka kolongono ya nzoto na mokili mobimba, oyo ezali bongo lisangá ya O.N.U., elobeli mwa moke likambo yango na maloba oyo: “Bandakisa ya makámá mauti na biloko bizalisami mpe mpasi na yango ezali komonana na boumeli ya ntango nyonso ya lisoló ya bato. Nzokande, wana tozali kobelema na ekeke ya 21, tozali kokutana na mbongwana ya makambo matali motuya ya bafandi ya etando na biso, ezingelo na biso mpe bokóli ya tekiniki esali ete bato mingi batyami liboso na makámá mauti na biloko bizalisami mpe na makámá oyo mauti na bato.”

Moto nyonso oyo alandaka nsango ya makambo mazali koleka na mokili akokamwa te na koyoka maloba ya lolenge yango. Myango ya bopanzi nsango mizangaka makambo ya kobenda likebi na bato te, ezala kobima ya mɔ́tɔ na ngomba na Philippines, koningana ya mabelé na Californie, mpela na Bangladesh, nzala na Somalie, ekungola na Hawaii, to bobuti ya mbóngé ya mai monene na Nicaragua. Sanza moko ekoki mpenza koleka mpamba te kozanga ete nsango ya mawa ebima na eteni moko to mosusu ya mokili.

Mpo na bato mosusu, bansango yango ezali na ndimbola moko te ya ntina. Bazali kobimisa likanisi ete soki emonani ete makámá ya ntango na biso mazali kokóla, ezali bobele mpo na boyebisi malamu ya nsango to mpo na boyebisi ya sikisiki ya mitango. Bazali lisusu koloba ete lokola bato bakómi lelo ebele kati na mokili, ezali likambo ya kokamwa te soki mingi kati na bango bazali konyokwama na makámá. Makanisi wana mazali mpenza solo?

Tala oyo elobamaki kati na zulunalo New Scientist oyo toutaki kolobela. “Makámá 523 masalemaki na mibu oyo mibandaki na 1960 mpe 767 na mibu oyo mibandaki na 1970. Na mibu mibandaki na 1980, motuya yango mokómaki 1 387.” Elandi kolimbola ete “oyo ezali komonana lokola bokóli kati na makámá na boumeli na mibu zomi oyo miuti koleka ekoki mwa moke kolimbolama na boyebisi nsango ya sikisiki oyo euti na Chine mpe na Union Soviétique.” Na nsima ebakisi ete: “Atako bongo, motuya yango mozali bobele kokóla.” Boyebisi malamu ya nsango to boyebisi ya sikisiki ya mitango yango moko ekoki te mpo na kolimbola bokóli monene oyo ya motuya ya makámá.

Na ebimeli na yango ya Mársi 1992, zulunalo Chronique O.N.U. eyebisi ete: “Na boumeli ya mibu ntuku mibale oyo miuti koleka, bato soko milió 3 basili kokufa mpe basusu milió 800 bazwaki mpasi na ‘kobebisama ya biloko, mikakatano mpe mpasi’ ebimisami na makámá mauti na biloko bizalisami.” Yango elimboli ete pene na moto 1 kati na bato 7 oyo bazali na bomoi na mabelé asili kokutana na lolenge moko ya makámá minene to na likambo moko ya mawa. Yango ezali mpenza likambo ya kobulunganisa mpe ezali komonisa polele ete tozali kobika ntango ya mobulungano mpe ya yikiyiki.

Mpo ete Biblia esilaki kosakola ntango wana ya mpasi monene, yango elingi koloba ete Nzambe nde azali mobandisi ya makámá wana mpe mpasi oyo ezali kouta na yango? Bato mingi bakanisaka bongo. Kasi makambo mazali komonisa nini? Mpe oyo eleki ntina, Biblia elobi nini?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover: W. Faidley/​Weatherstock

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Middle photo: Mark Peters/​Sipa Press

WHO/​League of Red Cross

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto