Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/12 nk. 2-4
  • Wana makámá mauti na biloko bizalisami mabimi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Wana makámá mauti na biloko bizalisami mabimi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini mpo na makama oyo ebimaka yango moko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Nzambe nde azali mobandisi na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Elembo ya ntango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/12 nk. 2-4

Wana makámá mauti na biloko bizalisami mabimi

Accra, Ghana, 4 Yulí 1995: Na boumeli ya eleko ya mibu pene na 60, bambula makasi nyonso oyo enɔkaki eyeisaki mpela makasi. Bato 200 000 babungisaki biloko na bango, bato 500 000 babungisaki bandako na bango, mpe bato 22 babungisaki bomoi na bango.

San Angelo, Texas, États-Unis, 28 Máí 1995: Mipɛpɛ makasi mpe matandala ebebisaki engumba wana ya bafándi 90 000, kobebisáká biloko oyo motuya na yango ekanisami ete ezali ya dolare milió 120.

Kobe, Japon, 17 Yanuáli 1995: Koningana ya mabelé oyo eumelaki bobele segɔnde 20 ebomaki bankóto ya bato, ebele mosusu ya bato bazokaki mpe bato mosusu mingi bazangaki bandako.

TOZALI kobika na eleko oyo ekoki kobéngama ete eleko ya makámá. Lapólo ya Mabota Masangani emonisi ete na boumeli ya eleko ya mibu 30 oyo ebandaki na 1963 kino 1992, motángo ya bato oyo babomamaki, baoyo bazokaki, to baoyo batikaki mboka na bango emataki na mwayene ya bato 6 likoló na monkámá mbula na mbula. Ezalela wana ya mawa epusaki Mabota Masangani na kobénga bambula 1990 ete “Bambula zomi ya bokitisi makámá mauti na biloko bizalisami kati na mokili mobimba.”

Ya solo, nguya ya biloko bizalisami​—na ndakisa ekumbaki, ngomba oyo ezali kobimisa mɔ́tɔ, to koningana ya mabelé​—eyeisaka ntango nyonso likámá te. Makámá mingi esalemaka mbula na mbula kozanga kosala bato mabe. Nzokande ntango yango ebomi bato mpe ebebisi biloko, ekómaka mpenza kobéngama ete likámá.

Emonani ete makámá mauti na biloko bizalisami makokóba sé kobakisama. Búku Makámá mauti na biloko bizalisami​—Misala ya Nzambe to Misala ya Bato? (na Lingelesi) elobi ete: “Bato bazali kobongola ezingelo na bango, na bongo bazali kokómisa yango esika mpenza ya kobenda makámá, mpe lolenge na bango ya bomoi ezali kosala ete bázwama mingi na makámá yango.” Búku oyo emonisi ndakisa moko oyo ezali bobele ya makanisi: “Koningana moke ya mabelé na engumba ya bobólá oyo ezali na bandako etongami na biliki ya mabelé pembeni na lobwaku moko ekoki mpenza kobimisa mawa monene na kobomáká bato mpe na kopesáká bango mpasi. Kasi likámá wana liuti mpenza nde na ntina na koningana ya mabelé to mpo ete bato bazali kofanda na bandako ezangi miboko makasi na esika wana ya likámá?”

Nzokande, mpo na bayekoli ya Biblia ezali na ntina mosusu oyo mpo na yango kobakisama ya makámá mauti na biloko bizalisami ezali likambo ya kokamwa te. Esili koleka pene na mbula 2 000, Yesu Klisto asakolaki ete kati na makambo oyo makomonisa “nsuka ya ebongiseli ya biloko” ekozala na “nzala mpe koningana ya mabelé na esika na esika.” (Matai 24:3, 6-8, NW  ) Lisusu, Biblia esakolaki ete na boumeli ya “mikolo ya nsuka,” bato bakozala balingi na bango moko, balingi na mosolo, bato bazangi bolingo ya motema, mpe bato bazangi boboto.a (2 Timoté 3:1-5) Mbala mingi, bizaleli wana bizali kopusa moto na kobebisa ezingelo na ye, kosaláká ete bato bázwama na makámá mauti na biloko bizalisami. Makámá oyo mabimisami na bato mazali mpe kosalema mpo ete mingi bazali kofanda kati na esika oyo ezangi bolingo.

Lokola mokili na biso etondi na bato mingi, lokola lolenge ya bomoi ya bato ezali kotya bato na likámá monene, mpe lokola biloko bizali kati na mabelé bisili kobebisama mingi, makámá makolanda ntango nyonso konyokola bato. Kopesa lisungi ezali mokakatano monene, lokola lisoló lilandi likomonisa yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na bilembo ya mikolo ya nsuka, talá búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, nkasa 98-107, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Top: Information Services Department, Ghana; right: San Angelo Standard-Times

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

COVER: Maxie Roberts/Courtesy of THE STATE

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto