Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/12 lok. 8
  • “Bóluka Yehova, bino basɔkɛmi nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bóluka Yehova, bino basɔkɛmi nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini koluka bosɔkɛmi?
  • Baoyo bazali ‘koluka bosɔkɛmi’ na mikolo na biso
  • Koyamba solo na kosɔkɛma
  • Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Luká kondimama na Nzambe ata soki makambo ya bomoi na yo ebongwani
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bóluka Yehova liboso mokolo ya nkanda na ye eya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/12 lok. 8

“Bóluka Yehova, bino basɔkɛmi nyonso”

“BOLUKA [Yehova, NW] bino basɔkɛmi yɔnsɔ na mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; boluka boyɛngɛbɛnɛ, boluka [bosɔkɛmi, NW]. Sɔkɔ nde bokobombama na mokɔlɔ na nkanda na [Yehova, NW].”​—Sefania 2:3.

Mosakoli Sofoni ayebisaki maloba oyo epai na ‘basɔkɛmi ya mokili,’ mpe alendisaki bango ete ‘báluka bosɔkɛmi’ mpo na kobatelama na “mokɔlɔ na nkanda na Yehova.” Ntembe ezali soko moke te ete bosɔkɛmi ezali ndanga mpo na kobika. Mpo na nini bongo?

Mpo na nini koluka bosɔkɛmi?

Bosɔkɛmi ezali motindo na ezaleli ya bopɔlɔ, oyo ezangi lolendo to enzombo. Ezali na boyokani makasi na bizaleli mosusu bibongi, lokola komikitisa mpe bopɔlɔ. Na yango, basɔkɛmi bazali kondima koteyama mpe kosembolama na Nzambe, ata soki yango ekoki kopesa mpasi na ntango wana.​—Nzembo 25:9; Baebele 12:4-11.

Kati na yango moko, bosɔkɛmi etaleli mpenza kelasi oyo moto asali te soko etɛlɛmɛlo na ye ya lokumu. Nzokande, baoyo batangá mingi to baoyo bazali na bozwi bakokanisaka ete bango moko bakoki kozwa bikateli kati na makambo nyonso, ata kati na makambo ya losambo. Yango ekoki kopekisa bango na kondima ete bato mosusu balakisa bango makambo to bakoki koboya kondima toli mpe koboya kosala mbongwana oyo esengeli kati na bomoi na bango. Basusu oyo bazali na bozwi ya mosuni bakoki kokanisa na libungá nyonso ete libateli na bango lizali nde kati na biloko na bango ya mosuni. Yango wana, bazali na mposa na bozwi ya elimo te oyo euti na Liloba ya Nzambe, Biblia.​—Matai 4:4; 5:3; 1 Timoté 6:17.

Tótalela naino bakomeli, Bafalisai, mpe banganga-kapita ya ntango na Yesu. Mokolo moko, na ntango basodá oyo bakendaki kokanga Yesu bazongaki kozanga ete bakanga ye, Bafalisai balobaki ete: “Bino mpe bokosami? Mɔkɔ na mikolo na Bafalisai andimi ye? Kasi ebele oyo na bato bayebi Mibeko tɛ basili kolakelama mabe!” (Yoane 7:45-49) Na elobeli mosusu, mpo na bango, bobele bato bayebi makambo te mpe baoyo batangi kelasi te nde bakokaki kondima Yesu.

Atako bongo, Bafalisai mosusu babendamaki na solo, mpe nkutu bakɔtɛlaki Yesu mpe baklisto. Kati na bango, totangi Nikodeme mpe Gamaliele. (Yoane 7:50-52; Misala 5:34-40) Nsima na liwa na Yesu, “ebele na banganga batosi kondima yango.” (Misala 6:7) Na ntembe te, kati na likambo yango, ndakisa eyebani mingi ezali oyo ya ntoma Paulo. Lokola alakisamaki na Gamaliele, akómaki mosali na molende mpe mokɔtɛli monene na lingomba ya Bayuda oyo bazalaki komemya. Nzokande, mokolo moko, ayanolaki na libyangi na Yesu Klisto na komikitisa nyonso mpe akómaki moyekoli na ye ya molende.​—Misala 22:3; 26:4, 5; Bagalatia 1:14-24; 1 Timoté 1:12-16.

Nyonso oyo emonisi ete maloba ya Sofoni mazali na motuya na yango kino lelo oyo, ata ezaleli nini moto azali na yango soko makanisi nini akoki kozala na yango na ntina na nsango euti na Biblia. Bosɔkɛmi ezali na ntina mingi soki moto alingi kondimama na Nzambe mpe kotambwisama na Liloba na ye.

Baoyo bazali ‘koluka bosɔkɛmi’ na mikolo na biso

Bipai binso na mokili, bamilió ya bato bazali koyamba nsango malamu ya Bokonzi. Poso na poso, Batatoli ya Yehova bazali kotambwisa koleka bamilió minei ya boyekoli ya Biblia. Bato yango bauti na mikili mingi mpe na bikólo bikeseni mpe mimeseno mpe na bizalela ya bomoi bikeseni. Atako bongo, eloko oyo emonani epai na bango nyonso ezali ete, bazali na komikitisa mingi mpo na kondima nsango ya Biblia oyo moto moko ayebisaki bango na ndako na bango to na esika mosusu. Mingi kati na bango bazali kosala bokóli malamu mpo ete bazali kosala makasi mpo na kolongola mikakatano oyo mizali kati na nzela na bango. Ee, bato yango bazali sikawa kati na “basɔkɛmi ya mokili” na mikolo na biso.

Tózwa ndakisa ya Maria, na mboka Mexique. Asalaki kelasi ya koyekola mibeko na université, mpe mpo na mosolo mingi oyo asangolaki yango, azalaki na mitungisi te na ntina na biloko ya mosuni. Mpo na yango, akólisaki makanisi mosusu ya mpamba oyo makómisaki ye “motomboki,” engebene maloba na ye moko, “moto na makambo makasi, moto alingi komikumisa mingi, mpe moto oyo andimaka te ete Nzambe azali.” Maria amikundolaki ete: “Nazalaki kokanisa ete makambo manso makokaki kobongisama bobele na mbongo, mpe Nzambe azalaki na ntina moko te. Ya solo, nkutu nazalaki kokanisa ete azali te.” Abakisaki ete: “Mpo na ngai, kosambela ezalaki na ntina te mpe ezalaki bobele etindá euti na bato.”

Na nsima, Maria amonaki mbongwana epai na ndeko na ye ya mobali oyo abotami na ndeko ya tata to na ndeko ya mama na ye, nsima wana akómaki Motatoli ya Yehova. Maria alimbolaki ete: “Azalaki moto na matáta mingi liboso, kasi sikawa akómaki moto na kimya mpe moto na sembo. Bandeko na biso mosusu bazalaki koloba ete atiki komela masanga mpe azali kosala lisusu mobulu te mpo azali kosakola mpe kotanga Biblia. Ngai mpe nalingaki ete ye aya kotangela ngai Biblia, mpamba te nakanisaki ete nakozwa kimya mpe libateli oyo nazalaki na yango mposa mingi na nzela wana.” Litomba lizwamaki na boye ete Maria andimaki boyekoli ya Biblia elongo na babalani mibale oyo bazalaki Batatoli.

Asengelaki kolónga makambo mingi, ezalaki mpe lisusu mpasi mpo na ye ete andima etinda ya Biblia na ntina etali kotosa mobali na ye. Kasi asalaki mbongwana monene kati na bomoi na ye mpe na makanisi na ye. Alobaki polele ete: “Nakanisi ete kobanda mokolo bandeko bayaki na ndako na ngai mpe basalisaki ngai mpo na kozwa lisungi ya Yehova, esengo, kimya, mpe mapamboli ya Nzambe ezali kati na libota na ngai.” Lelo oyo, Maria asili komipesa na Nzambe, asili kozwa batisimo lokola Motatoli ya Yehova.

Na losambo ya solo ezali na likambo mosusu kati na yango kozala na bosɔkɛmi, to kozala na lolendo, ezali na ntina mingi. Kati na libota, mbala mingi mwasi nde akoyambaka solo mpe kozwa ekateli ya kosalela Nzambe; nzokande mobali akokakatanaka. Mbala mosusu ezalaka mpasi mpo na mibali mosusu na kondima likanisi oyo ete moto mosusu, mingi mpenza​—Yehova Nzambe​—ázala na bokonzi likoló ya mwasi na ye. (1 Bakolinti 11:3) Mwasi moko na engumba Chihuahua, na mboka Mexique, asɛngaki boyekoli ya Biblia, mpe na nsima, ye mpe bana na ye nsambo bayambaki solo. Na ebandeli, mobali na ye atɛmɛlaki ye. Mpo na nini? Mpamba te alingaki te ete libota na ye bakende kosakola ndako na ndako, kokaboláká mikanda mikolimbolaka Biblia. Na ndenge emonani, akanisaki ete yango ezalaki kokitisa lokumu na ye. Nzokande, libota na ye likangamaki na ekateli na bango ya kosalela Nzambe. Na nsima, mobali wana abandaki komona ntina ya kondima ebongiseli ya Nzambe. Kasi alekisaki mibu 15 liboso ete amipesa epai na Yehova.

Na Mexique, ezali naino na ebele na bitúká bitangwi epai kuna bafandi na yango ba Indiens zali kino lelo kobatela nkótá mpe mimeseno na bango. Nsango ya Biblia ezali kopalangana epai na bato wana mpe ezali kosalisa bango na kobongola lolenge na bomoi na bango, na ndakisa koyekola kotanga mpe kokoma wana bazali koyekola solo. Nzokande, likambo oyo ete bato yango batangá mingi te to bazali na bozwi mingi te, elimboli te ete bakondima [nsango] yango. Lolendo na ntina na mposo mpe bokangami makasi na mimeseno ya bonkɔ́kɔ ezali nkaká epai na basusu ete bandima solo te. Yango ezali lisusu kolimbola ntina oyo esalaka ete na bamboka mosusu ya ba Indiens, baoyo bazali kondima solo, batungisami mbala mingi na bato mosusu ya mboka. Na bongo, bosɔkɛmi ezali na mitindo mingi.

Koyamba solo na kosɔkɛma

Ezali boni mpo na yo mpenza? Ozali koyanola na solo ya Liloba ya Nzambe? To ezali mpasi mpo na yo ete ondima makambo mosusu ya solo oyo mazwami kati na Biblia? Mbala mosusu yo moko okoki komitalela mpo na komona likambo oyo lizali kopekisa yo. Otungisami mpo ete bato mingi oyo bamipesi na solo bazali bato oyo bazali na lokumu mingi te? Lolendo na yo ekoki nde kobulunganisa makanisi na yo? Ezali malamu kokanisa likoló na maloba oyo ya ntoma Paulo, ete: “Njambe apɔni bilɔkɔ na bolema na mokili ete ayokisa [nsɔni na bato ya mayele, NW] mpe Njambe apɔni bilɔkɔ na bolɛmbu kati na mokili ete ayokisa bilɔkɔ na nguya nsɔni. Mpe Nzambe apɔni bilɔkɔ bijangi lokumu mpe bilɔkɔ bitiolami mpe yango bijali tɛ ete bikomisa mpamba bilɔkɔ bijali. Yango wana, moto mɔkɔ akoki komikumisa liboso na Njambe tɛ.”​—1 Bakolinti 1:27-29.

Okoki kobwaka biloko ya motuya bobele mpo ete ezwami kati na mbeki ya mabelé? Soko moke te! Nzokande, wana ezali lolenge oyo Nzambe asili kopona mpo na kolakisa biso Liloba na ye ya solo oyo likobikisaka bomoi, lokola ntoma Paulo alimboli yango ete: “Tojali na elɔkɔ oyo na motuya kati na [mbeki ya mabelé, NW] ete nguya na yango mingi mpenja euta na biso tɛ kasi na Njambe.” (2 Bakolinti 4:7) Bosɔkɛmi mpe komikitisa ekosalisa biso na komona ntina monene ya biloko ya motuya, kasi tokotalela te bobele “mbeki ya mabelé” soko etuluku ya bato baoyo bayei kolakisa biso yango. Kosaláká bongo, tokobakisa lisusu likoki na biso ya “kobombama na mokolo na nkanda [ya Yehova, NW]” mpe kozala kati na basɔkɛmi oyo “bakosangola mokili.”​—Sefania 2:3; Matai 5:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto