MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | SEFANIA 1–HAGAI 2
Bóluka Yehova liboso mokolo ya nkanda na ye eya
Mpo Yehova abomba biso na mokolo ya nkanda na ye, tosengeli kosuka kaka te na komipesa na ye. Tosengeli mpe kotosa malako oyo Sefania apesaki Bayisraele.
Koluka Yehova: Batelá boyokani makasi ná Yehova mpe kangamá na ebongiseli na ye
Koluka boyengebene: Longisá mitinda ya sembo ya Yehova
Koluka komikitisa: Salá mokano ya Nzambe na komikitisa nyonso mpe ndimá disiplini na ye
Ndenge nini nakoki koluka Yehova, boyengebene, mpe komikitisa mingi koleka?