Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/12 lok. 30
  • Okoki koyanola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyanola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Bikelákela bikoki kobatela yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini kondima mabungá na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kobatelama ya solo ekoki mpenza kozwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • ‘Bómilatisa motema molai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/12 lok. 30

Okoki koyanola?

Osepelaki na botangi ya banimero ya sika ya Mosenzeli? Soki ezali bongo, talá soki okoki koyanola na mituna milandi:

▫ Kati na lisangá ya boklisto na mikolo na biso, lisalisi nini oyo ebongi kopesama na bato na maladi mpe na mibange?

Kati na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, bazalaki kokoma nkombo ya basi bakufeli mibali oyo bazalaki na bosenga ya lisungi ya mosuni. (1 Timoté 5:9, 10) Bobele bongo lelo, bankulutu bakoki kokoma nkombo ya bato na maladi mpe mibange oyo basengeli kozwa lisalisi. Nzokande, esengeli kotika bobele bankulutu bango moko te kozwa bibongiseli na likambo yango. Biso nyonso tosengeli koyeba bamposa ya bato na maladi mpe mibange. (1 Timoté 5:4-8)​—15/8 nkasa 28-29.

▫ Tokoki mpenza kondima lisoló ya Biblia oyo ete ekelamu moko ya mai monene emelaki Yona?

Ebongi kondimama; ezala mbisi monene cachalot to requin monene ya mpembe ekoki komela moto. Lisusu, Yesu ye moko andimaki ete lisoló ya Yona lizali solo. (Matai 12:39, 40)​—15/8, lokasa 32.

▫ Makámá nini mazali kobima na biyambayamba bitali kosalela nkísi mpe bikelákela?

Kosalela yango ezali mpenza kolembisa bato na koluka kolónga mikakatano na bango na lolenge ya mayele mpe ezali kolendisa bango na kotalela makilamalamu lokola mwango ya kobongisa makambo nyonso. Ezali lisusu kopesa na mosaleli na yango mayoki ya lokuta ete azali na libateli. Likambo ya ntina mingi lizali ete, moto oyo azali kondima nguya ya nkísi mpe ya bikelákela azali kotika bomoi na ye kotambwisama na banguya ezangi komonana ya bilimu mabe.​—1/9, lokasa 4.

▫ Batoli nini minei esengeli kolanda mpo ete libala ekoka koumela?

Ezali bongo mposa ya koyoka, likoki ya koyeba kosenga bolimbisi, kokoka kolendisa ntango nyonso maoki, mpe koluka kosimba motema na bolingo nyonso. (1 Bakolinti 13:4-8; Baefese 5:33; Yakobo 1:19)​—1/9, lokasa 20.

▫ Wapi moko na banzela oyo Yehova azali kosalela mpo na kopesa mpiko na baoyo bazali kokutana na komekama?

Yehova azali kosala yango na nzela na bandakisa ya koyika mpiko oyo ekomami kati na Liloba na ye, Biblia. (Baloma 15:4) Wana tozali kokanisa na mozindo likoló na yango, tolendisami te bobele mpo na koyika mpiko, kasi tozali mpe koyekola makambo mingi mpo na oyo etali lolenge ya koyika mpiko.​—15/9, nkasa 11-12.

▫ Ezaleli ya kobanga Nzambe ezali nini?

Ezaleli ya kobanga Nzambe ezali bokangami epai na Yehova, oyo ezali kopusa biso na kosala makambo oyo asepelaka na yango, ata kati na mimekamo makasi, mpo ete tolingi ye na motema mobimba.​—15/9, lokasa 15.

▫ Lolenge nini tosengeli kotalela motema mawa na Nzambe?

Tosengeli soko moke te kotyola motema mawa na Nzambe. Tosengeli kozala lokola Paulo mpe tosengeli komonisa botɔ́ndi na biso na lolenge oyo tozali kobundisa kozanga kokoka na biso. (1 Bakolinti 9:27) Na motindo yango tokomonisa, ata kati na mikakatano, ete tozali na mposa makasi ya kosala oyo ezali sembo.​—1/10, lokasa 23.

▫ Mpo na nini ebongaki mpenza ete Paulo atanga motema molai lokola motindo ya liboso ya bolingo?

Elobamaki ete kozanga motema molai, mbele boyokani malamu elingaki kozala te kati na baklisto, elingi koloba likoki ya koyikela baninga mpiko. Ezali bongo mpamba te biso nyonso tozangi kokoka, mpe mabunga na biso mazali kotya bato mosusu na komekama. Na yango, motema molai ezali na ntina mingi mpo ete bolingo ezala kati na bandeko.​—15/10, lokasa 21.

▫ Baklisto ya liboso basalelaki nkombo ya Nzambe?

Bilembeteli bizali koyanola ete ee. Yesu ateyaki bayekoli na ye babondelaka Nzambe ete: “Tiká ete nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:9, NW) Mpe na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé abondelaki ete: “Nasili kolimbola nkombo na yɔ epai na bato baoyo opɛsi ngai bango uta na mokili.” (Yoane 17:6) Lisusu, makomi ya liboso ya la Septante mazalaki na nkombo ya Nzambe na lolenge ya Tétragramme ya Liebele.​—1/11, lokasa 30.

▫ Bandakisa nini ya Biblia tozali na yango oyo emonisi ete lolenge oyo tozali kosala nsima ya mabungá na biso ezali na bopusi likoló na bomoi na biso?

Mokonzi Saulo aboyaki kondima toli, mpe mabungá na ye mayikanaki mingi kino na nsuka mamemaki ye na kufa, kozanga ngolu na Nzambe. (1 Samwele 15:17-29) Epai mosusu, atako asalaki mabungá mpe masumu, mokonzi Davidi abongolaki motema, andimaki kosembolama mpe atikalaki sembo epai na Yehova. Bandakisa wana ya Biblia emonisi ete kondima mabungá na biso ezali kosalisa biso na kobatela boyokani malamu elongo na Nzambe mpe bongo kozala na elikya ya bomoi ya seko. (Nzembo 32:1-5)​—15/11, nkasa 29-30.

▫ Lolenge nini Yehova apesaka lisalisi epai na basaleli na ye wana ezali bango kati na makámá ya biloko bizalisami to na makámá mosusu?

Yehova asalisaka, kasi asalaka yango te na kosaleláká bikamwiseli mpo na kobongola banguya ya biloko bizalisami to na nzela ya misala misusu ya kokamwa, kasi azali kosala yango na nzela ya nguya mosusu oyo bato mingi bakoki mpenza kososola yango te: bolingo. Ee, Yehova alingi mpenza basaleli na ye, mpe azali kokólisa epai na bango bolingo makasi moko mpo na mosusu, na boye ete akoki kosala mpo na bango oyo ezali komonana lokola bikamwiseli. (1 Yoane 4:10-12, 21)​—1/12, lokasa 10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto