Mangomba mikemike ya kobatama—Mazalaka ndenge nini?
FEBWÁLI 28, 1993—bapolisi koleka monkama bakotaki pwasa kati na lopango moko monene oyo ezalaki na bandako ebele, epai kuna ebele ya mibali, basi mpe bana bafandaka. Mokano ezalaki ya koluka bibundeli oyo eboyami na mibeko ya Leta mpe kokanga moto moko oyo bakanisaki ete azali mobomi bato. Nzokande bapolisi yango basutukaki na ntango mbula ya masasi oyo ezalaki kouta longwa na bandako yango eyelaki bango. Bango mpe bazongisaki.
Nsima ya kowelana wana bato zomi bakufaki mpe mingi bazokaki. Na boumeli ya mikolo 50 oyo elandaki, ebele ya bapolisi bazingaki lopango wana elongo na minduki mpo na kobunda etumba moko ya moke. Kozanga boyokani wana esukaki na etumba oyo na nsima na yango bato 86 bakufaki, kati na bango pene na bana 17 bakufaki.
Kasi monguna ezalaki nde nani? Limpinga ya bato oyo batekaka bilangwiseli? Etuluku ya bato oyo batombokeli boyangeli ya ekolo? Te, ezalaki bongo te. Lokola osili mbala mosusu koyeba yango, “monguna” ezalaki bongo etuluku ya bato bamipesá na lingomba moko, basangani ya mwa lingomba moko ya kobatama. Likambo na bango wana ya mawa esalaki ete lisangá wana ya bato oyo lizalaki ya kobatama na esobe na ntei ya engumba Texas, na Etats-unis, ebenda likebi ya mikili mingi. Bansango ya radio, ya televizyó, mpe bazulunalo etondaki na masolo ya boyebisi lolenge makambo malekaki, bokákoli mpe kolobelama ya makámá ya mangomba mikemike ya kobatama oyo basambeli na yango bamipesi kozanga kotalela na bososoli nyonso mabe mpe malamu.
Bakundwelaki bato na ntina na makambo oyo elekaki liboso wana basangani ya mangomba mikemike ya kobatama babomamaki na bakambi na bango: na 1969, Manson abomaki bato na engumba Californie; na 1978 ebele ya basangani ya mwa lingomba moko ya kobatama na engumba Johnestown, na Guyanne bamibomaki bango nyonso na etuluku; na 1987 boyokani mpo na komiboma oyo esalemaki na Corée, ememaki kufa ya basangani 32, nganga-monene na bango ya mwasi, Park Soon-ja nde atindaki bango kosala bongo. Likambo monene ezali oyo ete mingi kati na bato yango bazalaki komiloba ete bazali baklisto mpe bandimaka Biblia.
Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato mingi oyo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe bazali kobanga mpo na lolenge oyo mangomba mikemike wana ya kobatama mazali kosalela makomi na lolenge oyo ezali kopesa nsoni. Mpo na yango, na boumeli ya bambula, ebele ya bibongiseli bisalemaki na mokano ya kolandela mpe kotondola misala na bango oyo ezali kobimisa makámá. Bato na mayele oyo bakoyekolaka makambo matali mangomba basakolaki ete na boyei ya bambula oyo ekobanda na mobu 2000 oyo etikali mosika te, mangomba makobima mingi. Zulunalo moko ya bopanzi nsango emonisaki ete engebene bituluku ya baoyo batemelaka mangomba mikemike ya kobatama, ezali na ebele ya mangomba “oyo mazali pene ya kotambwisa nzoto na yo, kotambwisa elimo na yo, kobebisa molimo na yo. . . . Mingi te nde bazali na bibundeli, kasi mingi na yango matalelami ete makoki kobimisa makámá. Makolengola yo, makokamata mosolo mpe biloko na yo nyonso mpe, makobalisa yo mpe makokunda yo.”
Lingomba ezali nini?
Liloba “lingomba” esalelami na lolenge ya likolólikoló epai na bato oyo mbala mosusu bayebi mpenza te bandimbola nyonso oyo yango ekoki kozwa. Mpo na kopengola bongolabongola, bato oyo bakotá bakelasi minene mpo na koyekola bindimeli ya mangomba bazali mpenza koboya kosalela liloba wana.
Búku monene oyo ebengami The World Book Encyclopedia elimboli ete “liboso mpenza, liloba lingomba ezalaki kolobelama mpo na lolenge nyonso ya kosambela mpe kosala milulu.” Na kotalela ndimbola oyo, bibongiseli nyonso ya losambo bikoki kotalelama lokola mangomba. Nzokande, na lolenge oyo bato mingi bazali kosalela yango mokolo na mokolo lelo oyo, liloba “lingomba” ezali na ndimbola oyo ekeseni. Búku monene wana emonisi lisusu ete “kobanda pene na mobu 1950, bopanzi nsango na ntina na kokumisa mangomba eyaki kobongola ndimbola ya liloba wana. Lelo oyo, liloba yango lizali kosalelama mpo na bituluku oyo bazali kolanda motambwisi oyo azali moto lokola bango, ye oyo azali kopalanganisa bindimeli mpe bizaleli ya sika ekeseni na oyo ya bato nyonso.”
Kondimáká lolenge oyo bato mingi bazali kosalela liloba yango, zulunalo Newsweek epesi ndimbola oyo ete “mingimingi mangomba yango mazalaka bituluku mikemike, bitangwe mosika na bato mpe mateya na bango mazali na makambo makasimakasi, mpe basangani na yango bamekolaka mpe balandaka mikano ya moto moko oyo azali na bopusi makasi.” Bobele bongo, zulunalo Asiaweek emonisi ete “liloba [lingomba] ezali polele te, kasi mingimingi emonisaka liboke ya bindimeli ya sika bitali losambo, etongami likoló na motambwisi moko oyo azali na bopusi makasi, oyo mingimingi amilobaka ete azali elilingi ya Nzambe.”
Elobeli oyo esalelamaki kati na mokanda ya koyebisa mikano mikamatamaki na likita ya mbala ya 100 na Etúká ya Maryland, na Etats-unis, ezali mpe komonisa liloba lingomba na ndimbola na yango ya mabe. Mokanda yango elobi ete “lingomba ezali etuluku ya bato oyo bazali komipesa na lolenge eleki ndelo epai na moto moko to likanisi moko mpe na kosaleláká myango mabe mpe ya bokosi mpo na kobenda bato mpe kozala na bokonzi likoló na makanisi na bango, mpo na kotombola mikano ya batambwisi na yango.”
Emonani polele ete mangomba mikekemike ya kobatama matalelami mingi lokola mangomba oyo mazali na mateya mpe bizaleli ya makasimakasi oyo bizali na boyokani te na oyo endimami lelo ete ezali bizaleli bibongi kati na libota ya bato. Na momeseno, basalaka misala na bango ya losambo na nkúku. Mingi kati na bituluku ya mangomba mikemike wana ya losambo bamitangolaka mpo na kokende kofanda na bisika na bango moko. Emonani mpenza ete komipesa na bango epai na moto oyo amibengi ete motambwisi ezalaka na kozanga kotalela liboso makambo mosusu mpe bamipesaka mpenza mobimba. Mingimingi, batambwisi yango bamikumisaka ete basilaki koponama na Nzambe to kino komilobela ete bazali lolenge moko na Nzambe.
Na bantango mosusu, bibongiseli oyo bikotemelaka mangomba mikemike ya kobatama, bakisa mpe bapanzi nsango, bazali kobenga Batatoli ya Yehova ete bazali mwa lingomba ya kobatama. Mwa ndambo ya masoló na bazulunalo ya bopanzi nsango oyo euti kobima kala mingi te makokanisaki Batatoli ya Yehova na mangomba oyo eyebani mingi mpo na misala na yango ya mabe. Kasi ebongi mpenza kotalela Batatoli ya Yehova lokola mwa lingomba oyo etangwi mosika na bato mpe ezali na makambo makasimakasi? Mbala mingi, basangani ya mwa lingomba ya kobatama bamitangolaka mosika na baninga, na libota, ata mosika na bato nyonso. Ezali mpe bongo mpo na Batatoli ya Yehova? Batatoli ya Yehova bazali kosalela myango ya kokosa mpe ya mabe mpo na kozwa basangani ya sika?
Eyebani ete bakambi ya mangomba mikemike basalelaka mayele mabe mpo na kozala na bokonzi likoló na makanisi ya bato na bango. Ezali na elembeteli oyo emonisi polele ete Batatoli ya Yehova basalaka bongo? Basambelaka na kobatama? Bazali kolanda mpe kokumisa motambwisi moko oyo azali moto lokola bango? Na sikisiki mpenza, Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Jerry Hoefer⁄Fort Worth Star Telegram⁄Sipa Press