Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwfq lisolo 31
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?
  • Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kinzambinzambi ezali nini?
  • Mangomba mikemike ya kobatama​—⁠Mazalaka ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bongɔndɔ mpe bonzenga—Mpo na nini kobatela yango?
    Lamuká!—1996
  • Sɛkɛlɛ́ na nkombo ya Nkolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
ijwfq lisolo 31
One of Jehovah’s Witnesses teaching a literacy class to a group of people.

Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?

Te, Batatoli ya Yehova bazali kinzambinzambi te. Tozali nde bakristo mpe tosalaka makasi tólanda ndakisa oyo Yesu atiká mpe tosalelaka mateya na ye na bomoi na biso.

Kinzambinzambi ezali nini?

Moto na moto alimbolaka liloba kinzambinzambi na ndenge na ye. Kasi, tótala ndimbola mibale oyo bato bapesaka na liloba yango. Na nsima tokomona ntina oyo ndimbola yango etali biso te.

  • Bato mosusu balobaka ete kinzambinzambi ezali lingomba moko oyo ebimi sika to oyo eboyi kolanda ndenge mangomba mosusu esalaka. Batatoli ya Yehova babimisá lingomba ya sika te. Kasi, tolandaka nde losambo oyo bakristo ya liboso bazalaki kosala, oyo ndakisa mpe mateya na bango ekomami na Biblia. (2 Timote 3:16, 17) Tondimaka ete makambo nyonso oyo etali losambo esengeli kouta na Biblia; kasi te kolanda ndenge mangomba mosusu esalaka.

  • Basusu balobaka ete kinzambinzambi ezali mwa lingomba moko ya mabe oyo mokonzi na yango ezali moto. Batatoli ya Yehova bamonaka moto moko te lokola mokonzi na bango. Kasi, totosaka likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”​—Matai 23:10.

Biso Batatoli ya Yehova tozali mwa lingomba te oyo esalaka bato mabe; tosalisanaka nde biso na biso mpe tosalisaka bato mosusu. Na ndakisa, mosala ya kosakola oyo tosalaka esalisi bato mingi bálongwa na boombo, na ndakisa ya bangi to ya masanga. Longola yango, na mokili mobimba, tosalá bakelasi mpo na kotángisa bato, mpe tozali kosalisa bankóto ya bato báyekola kotánga mpe kokoma. Topesaka mpe lisungi na bato oyo bazwi likama. Tosalaka makasi ete bizaleli na biso esepelisa basusu, kaka ndenge Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázala.​—Matai 5:13-16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto